Lisangá ya Boklisto—Esika oyo moto akoki kozwa lisungi oyo ekolendisa ye
POPI, elenge mwasi ya mbula 20, alɛmbaki nzoto na ntina na mikakatano kati na libota na bango, azalaki kosolola na baboti na ye te.a Nsima ya koyebisa likambo yango epai ya nkulutu moko na mwasi na ye, akomelaki bango maloba oyo: “Natɔndi bino mingi na ndenge bozwaki ntango ya kosolola na ngai. Bokoki koyeba te ndenge lisungi na bino esalisaki ngai. Nazali kotɔnda Yehova na ndenge apesi ngai bato oyo nakoki kotyela motema mpe kosolola na bango.”
Toula, oyo mobali na ye auti kokufa, mpe azali na bana mibale oyo bakómi bilenge, anyokwamaki makasi na makanisi mpe azalaki na mbongo te. Na lisangá na bango, ndeko moko na mwasi na ye bazalaki kokende mbala na mbala kotala ye na bana na ye mpo na kolendisa bango. Nsima ya kolonga mokakatano na ye, atindelaki bango kalati moko oyo akomaki maloba oyo: “Natyaka bino ntango nyonso na mabondeli na ngai. Mbala na mbala nakanisaka ndenge bosungaki ngai mpe ndenge bolendisaki ngai.”
Mbala mosusu omonaka ete ‘olɛmbi’ na mitungisi ya mokili oyo ezali se kobakisama? (Matai 11:28) “Ntango mpe makambo makanami te” etondisi bomoi na yo na makambo ya mpasi? (Mosakoli 9:11, NW) Ozali yo moko te. Bato mingi oyo banyokwamaki na makanisi bazwaki lisungi ya solosolo na kati ya lisangá ya Batatoli ya Yehova, ndenge moko yo mpe okoki kozwa yango. Na ekeke ya liboso T.B., ntoma Paulo amonaki ete baklisto mosusu bazalaki mpenza ‘lisungi oyo ezalaki kolendisa’ ye. (Bakolose 4:10, 11, NW) Ekoki kosalema mpe bongo mpo na yo.
Lisungi mpe lisalisi
Na Makomami ya Greke ya boklisto, liloba “lisangá” euti na liloba ya Greke ékklêsia, yango elimboli bato oyo basangani. Liloba yango ezali kopesa makanisi ya bomoko mpe kosungana.
Lisangá ya boklisto elongisaka solo ya Liloba ya Nzambe mpe esakolaka nsango malamu ya Bokonzi na ye. (1 Timote 3:15; 1 Petelo 2:9) Nzokande, lisangá ya boklisto epesaka lisusu basangani na yango lisungi mpe lisalisi na elimo. Na kati ya lisangá, moto akoki kozwa baninga ya bolingo, oyo bamibanzabanzaka mpo na bato mosusu, mpe basunganaka bamoko na bamosusu, baoyo bazali na bolingo malamu ya kosunga mpe kobɔndisa basusu na bantango ya mpasi.—2 Bakolinti 7:5-7.
Basaleli ya Yehova bazwaka ntango nyonso libateli na kati ya lisangá na ye. Mokomi ya nzembo alobaki ete azalaki na esengo mpe na libateli na kati ya lisangá ya basaleli ya Nzambe. (Nzembo 27:4, 5; 55:14; 122:1) Ndenge moko lelo oyo, lisangá ya boklisto ezali na bandimi oyo bazali kolendisana mpe kopesana makasi.—Masese 13:20; Baloma 1:11, 12.
Bandeko ya lisangá yango bateyami ete ‘básalela bato nyonso malamu, kasi na koleka epai na baoyo bazali bandeko [na bango] kati na kondima.’ (Bagalatia 6:10) Mateya ya Biblia oyo bazali kozwa ezali kopusa bango bálinganaka mpenza lokola bandeko. (Baloma 12:10; 1 Petelo 3:8) Na kati ya lisangá, bandeko ya elimo mibali mpe basi basengeli kozala na boboto, na kimya mpe na motema mawa. (Baefese 4:3) Na esika bázala basambeli ya nkombo mpamba, na bolingo nyonso, bazali komibanzabanza mpo na bamosusu.—Yakobo 1:27.
Yango wana, na kati ya lisangá, baoyo bazali na mitungisi, bazali komona ete bazali na esika ya kimya lokola na kati ya libota. (Malako 10:29, 30) Bazali kolendisama na ndenge bayebi ete bazali na kati ya bato oyo bazali na bomoko mpe na bolingo. (Nzembo 133:1-3) Na nzela ya lisangá, “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa bilei malamu ya elimo “na elaka na yango.”—Matai 24:45.
Lisungi ya bakɛngɛli ya bolingo
Bandeko ya lisangá ya boklisto bakoki kolikya kokuta na kati na yango, babateli ya mpate oyo bazali na bolingo, bayebi komitya na esika na bango, mpe bazali na makoki, baoyo bapesaka lisungi mpe makasi na elimo. Babateli ya mpate oyo bazali na bizaleli ya ndenge yango bazali lokola ‘ebombamelo mpo na mopɛpɛ, ezipelo na ntango na mbula makasi.’ (Yisaya 32:1, 2) Bankulutu to bakɛngɛli oyo baponami na elimo santu, babatelaka basaleli ya Nzambe oyo bakokanisami na bampate, balendisaka baoyo bazali na maladi mpe baoyo bazali kotungisama na makanisi, mpe basembolaka baoyo babungi nzela.—Nzembo 100:3; 1 Petelo 5:2, 3.
Ya solo, lisangani ya bankulutu ezali lisangani ya minganga te, oyo bakoki kobikisa maladi ya nzoto to ya makanisi oyo bandeko bazali kokutana na yango. Na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo, moto ya maladi azali naino “na mposa ya monganga.” (Luka 5:31, NW) Atako bongo, babateli yango ya mpate bakoki kosunga baoyo bazali na bosɛnga na elimo. (Yakobo 5:14, 15) Ntango nyonso oyo likoki ezali, bankulutu bazwaka bibongiseli mpo na lisalisi mosusu.—Yakobo 2:15, 16.
Nani akamati bibongiseli yango ya bolingo? Yehova Nzambe ye moko! Mosakoli Ezekiele amonisaki Yehova azali koloba ete: “Nakobatela bampate na ngai, mpe nakoluka bango. . . . Nakobikisa bango na bisika nyonso bipanzanaki bango . . . Ngai mpenza nakozala mobateli na bampate na ngai, mpe nakolalisa bango.” Nzambe amibanzabanzaka lisusu mpo na bampate oyo balɛmbi.—Ezekiele 34:11, 12, 15, 16.
Lisungi ya solosolo na ntango malamu
Tokoki mpenza kozwa lisungi ya solosolo na lisangá ya boklisto? Ɛɛ, bandakisa oyo elandi emonisi makambo ndenge na ndenge oyo lisangá esungaki bandeko.
◆ Liwa ya moto oyo alingaki mingi. Mobali ya Anna akufaki na maladi oyo eumelaki mingi. Anna, alobi ete: “Banda ntango wana, bandeko baklisto babandaki komonisela ngai bolingo ya boklisto. Maloba malamu ya bandeko ezali kolendisa mpe ndenge bazali koyamba ngai na mabɔkɔ, ezali kosala ete motema na ngai elendisamaka na esika etungisamaka ntango nyonso, yango wana nazali kotɔnda Yehova. Bolingo na bango ezali komonisa ngai ete nasungami mpenza, esengo na ngai ebakisami mpenza, mpe bazali komibanzabanza mpo na ngai na boboto nyonso.” Yo mpe okoki kotungisama makasi na liwa ya moto oyo olingaki mingi. Na bantango ya boye, bandeko ya lisangá bakoki kobɔndisa yo mpe kosunga yo na elimo na ndenge oyo esengeli.
◆ Maladi. Arthur, azali mokɛngɛli-motamboli mpe moto ya ekólo Pologne, mbala na mbala azalaki kotala masangá ya mikili ya Asie centrale mpo na kolendisa yango na elimo. Na ntango asalaki mobembo moko mpo na kotala masangá, maladi ekangaki ye mpe mpasi ekómaki makasi. Arthur, na botɔndi nyonso alobi ete: “Nalingi koyebisa bino ndenge bandeko na [mboka moko na ekólo Kazakhstan] basalisaki ngai. Bandeko mibali mpe basi, mingi nayebi bango te—ata mpe bato ya sika—bayaki na mbongo, bilei, mpe bankisi. . . . Mpe basalaki yango na esengo.
“Bókanisa ndenge nayokaki ntango nazwaki anvɛlɔpi ya mbongo na mokanda oyo bakomaki boye: ‘Ndeko ya bolingo, napesi yo mbote ya bolingo. Mama apesaki ngai mbongo oyo mpo nasomba crème, kasi namoni malamu napesa yo yango mpo osomba nkisi. Obika noki. Yehova azali na mposa na biso mpo na ntango molai. Natombeli yo makambo malamu. Mpe yebisá biso masolo mosusu ya kitoko mpe oyo ekoteya biso. Ngai Vova.’” Ɛɛ, lokola emonisami na likambo oyo, bilenge na mikóló bakoki kopesa lisungi oyo ekolendisa na ntango ya maladi.—Bafilipi 2:25-29.
◆ Konyokwama na makanisi. Teri azalaki na mposa makasi ya kozala mobongisi-nzela, to mosakoli ya ntango nyonso ya Bokonzi. Kasi, mpo na mikakatano, atikaki mosala ya mobongisi-nzela. Alobi ete: “Nazalaki koyoka lokola moto amemi ngambo na ndenge nabandaki mosala yango kasi nasilisi ata mbula moko te.” Teri azalaki komikosa na kokanisa ete Yehova andimaka moto kaka soki apesaka ngonga mingi na mosala na ye. (Kokanisá na Malako 12:41-44.) Amitungisaki na makanisi, mpe alingaki lisusu kofanda na bato te. Kasi, lisangá ebɔndisaki ye.
Teri alobi ete: “Ndeko mwasi moko mobongisi-nzela ya mokóló ayaki nokinoki kosunga ngai mpe ayokaki ngai ntango nayebisaki ndenge nazalaki koyoka. Ntango nabimaki na ndako na ye, nayokaki lokola balongoli ngai kilo moko na motó. Banda ntango wana, ndeko mwasi yango mobongisi-nzela na mobali na ye, nkulutu na lisangá, basungaki ngai na ndenge oyo ebongi. Mokolo na mokolo bazalaki kobénga ngai na telefone mpe kotuna ngai soki nazali malamu. . . . Ntango mosusu nazalaki kosangana na boyekoli ya libota na bango, yango emonisaki ngai ntina oyo mabota esengeli kozala na bomoko makasi.”
Konyokwama na makanisi, kolɛmba nzoto, to koyoka lokola ete ozali na moto te ezali makambo oyo ekómelaka bato mingi, ata baklisto oyo bamipesi. Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpo ete tokoki kozwa lisalisi ya bolingo mpe oyo ezangi moimi na lisangá ya Nzambe!—1 Batesaloniki 5:14.
◆ Mikakatano mpe makama. Omitya na esika ya libota ya bato minei oyo biloko na bango nyonso ezikaki ntango ndako na bango epelaki mɔ́tɔ. Mosika te bazwaki oyo bango moko babéngaki “elendiseli oyo tokobosana yango ata mokolo moko te mpe basaleli ya Yehova bazali na bolingo ya solo.” Balobi boye: “Mwa moke na nsima, ebele ya bandeko ya elimo babandaki kobénga na telefone mpo na koyebisa biso ete bazali koyoka mawa mpo na makambo oyo ekómelaki biso. Bandeko bapemaki te mpo na kobénga biso na telefone. Komibanzabanza mpe bolingo ya solosolo ya ndeko mokomoko esimbaki biso makasi na boye ete tolelaki mpo na botɔndi.”
Mosika te, bankulutu ya lisangá batindaki etuluku moko ya bandeko, mpe nsima ya mwa mikolo, batongelaki libota yango ndako ya sika. Mama moko ya kartye na bango alobaki ete: “Ebongi komona na miso! Bato ya ndenge nyonso bazali kosala kuna; mibali, basi, baindo, mpe baoyo balobaka lokota ya Espagnole!” Likambo yango ezalaki elembo ya polele ya bolingo ya bandeko.—Yoane 13:35.
Bandeko baklisto bapesaki lisusu libota yango bilamba, bilei mpe mbongo. Tata ya libota yango alobi boye: “Ezalaki na Noele ntango moto nyonso apesaka makabo, kasi na bosembo nyonso tokoki koloba ete ata moto moko te azwaki biloko ebele lokola oyo bapesaki biso na bolingo ya solosolo.” Mpe balobi lisusu ete: “Tozalaki kokanisa lisusu mɔ́tɔ te kasi tozalaki kokanisa makambo malamu ya boboto mpe boninga malamu. Tozali kotɔnda Yehova, Tata na biso ya bolingo oyo azali na likoló, na ndenge tozali na libota moko kitoko ya bandeko oyo ezali na bomoko awa na mabelé, mpe tozali na botɔndi ndenge tozali na kati ya libota yango!”
Ya solo, makambo ya boye ekosalema te, to esengeli kolikya yango te, na likama mokomoko oyo ekoki kosalema. Kasi ndakisa oyo emonisi lisungi oyo lisangá ekoki kopesa.
Mayele oyo euti na likoló
Bato mingi bamoni eloko mosusu oyo ezali kosunga mpe kopesa makasi na kati ya lisangá ya boklisto. Eloko yango nini? Mikanda oyo ebongisami na “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Oyo eyebani mingi na kati ya mikanda yango ezali bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Mpo na kopesa toli ya mayele mpe mateya oyo ebongi, mikanda yango esalelaka libosoliboso mayele ya Nzambe oyo ekomami na Biblia. (Nzembo 119:105) Longola makambo oyo euti na Biblia, makambo mosusu ezali kouta na bolukiluki mozindo na misala ya bato ya mayele na makambo lokola konyokwama na makanisi, kosilisa mpasi ya mayoki oyo moto azalaka na yango soki basangisaki na ye nzoto na makasi, mikakatano ndenge na ndenge na bomoi ya bato mpe ya nkita, mpe makambo oyo ezali kotungisa bilenge, mpe mikakatano oyo bato bazali na yango na mikili ya bobola. Likoló na nyonso, mikanda yango, ezali kolongisa likanisi oyo emonisi ete nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi oyo eleki malamu.—Yisaya 30:20, 21.
Mbula na mbula, bato mingi batindelaka la Société Watch Tower mikanda mpo na komonisa matɔndi na bango. Na ndakisa, mpo na lisolo moko ya Lamuká oyo elobelaki komiboma, elenge mobali moko na ekólo Russie akomaki ete: “Lokola nazalaki konyokwama na makanisi, . . . mbala mingi nalukaki komiboma. Lisolo oyo eyeisaki kondima na ngai makasi ete Nzambe akosalisa ngai nalonga mikakatano na ngai. Alingi nazala na bomoi. Natɔndi ye mpo na lisungi apesi ngai na nzela ya lisolo oyo.”
Soki omoni ete mitungisi ya mokili oyo ezali makasi mingi mpe okoki kolonga yango te, yebá ete lisangá ya boklisto ezali esika malamu mpo na kozwa libateli. Ɛɛ, soki mokili oyo ezangi bolingo oyo ekokanisami na mokili mokauki ezali kolɛmbisa yo, okoki kozwa esika ya mpiɔ oyo ekopesa yo lisusu makasi na kati ya ebongiseli ya Yehova. Ntango okomona lisungi yango, yo mpe okoloba lokola mwasi moklisto oyo alongaki mokakatano ya kobatela mobali na ye oyo azalaki na maladi makasi; mwasi yango akomaki ete: “Mpo na bolingo oyo bamoniselaki biso mpe ndenge bazalaki komibanzabanza mpo na biso, nazali koyoka lokola Yehova amemi biso na mabɔkɔ na ye na eleko oyo ya mpasi. Nazali na botɔndi lokola tozali na kati ya ebongiseli malamu ya Yehova!”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango nkombo mosusu.
[Bililingi na lokasa 26]
Tokoki kolendisa bato ya maladi, baoyo bakufeli moto mpe bato mosusu