Tólendisanaka
“Bango nde bakómi lisalisi oyo ezali kopesa ngai makasi.”—BAKOLOSE 4:11.
1, 2. Atako kokende kotala Paulo na bolɔkɔ ezalaki na makama, mpo na nini baninga na ye bazalaki kosala yango?
KOZALA moninga ya moto oyo azali na bolɔkɔ ekoki kozala likama, ata soki bakatelaki ye etumbu yango na bosembo te. Bakonzi ya bolɔkɔ bakoki kokanisela yo mabe mpe kobanda kolandela yo mpo mbala mosusu ozali kokana kosala likambo ya mabe. Yango wana, esɛngaka kozala na mpiko mpo na kotikala moninga ya moto oyo azali na bolɔkɔ mpe kokende kotalaka ye ntango nyonso.
2 Nzokande, ezali yango nde baninga ya ntoma Paulo basalaki, eleki sikoyo mbula soki 1 900. Bazalaki kobanga te kokende kotala Paulo na bolɔkɔ mpo na kobɔndisa ye mpe kolendisa ye na elimo. Baninga yango ya sembo ezalaki banani? Liteya nini tokoki kozwa na mpiko, bosembo mpe boninga na bango?—Masese 17:17.
‘Lisalisi oyo ezali kopesa makasi’
3, 4. (a) Tángá bankombo ya baninga mitano ya Paulo, mpe bakómaki nini epai na ye? (b) ‘Lisalisi oyo ezali kopesa makasi’ elimboli nini?
3 Soki na mobu 60 ya ntango na biso (T.B.), ntoma Paulo azalaki na bolɔkɔ na Loma mpo bakoselaki ye makambo ete azali kotinda bato na kotomboka. (Misala 24:5; 25:11, 12) Paulo atángaki nkombo ya baklisto mitano oyo bazalaki kosunga ye: Tisike, motindami na ye oyo autaki na etúká ya Azia mpe “moninga moombo na kati ya Nkolo”; Onezime, ‘ndeko ya sembo mpe molingami’ oyo autaki na Kolose; Alisitake, moto ya Masedonia oyo autaki na Tesaloniki mpe, na eleko moko, azalaki “mokangami lokola” Paulo; Malako, mwana ya ndeko moko ya Balanabasi, moninga ya mobembo ya Paulo mpe mokomi ya Evanzile ya Malako; mpe Yusutusi, moninga ya mosala ya Paulo “mpo na bokonzi ya Nzambe.” Paulo alobaki mpo na bango mitano ete: “Bango nde bakómi lisalisi oyo ezali kopesa ngai makasi.”—Bakolose 4:7-11.
4 Paulo alobaki makambo oyo ezali na ndimbola monene mpo na lisalisi oyo baninga na ye ya sembo bapesaki ye. Asalelaki liloba ya Grɛki (parêgoria) oyo ebongolami na ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi’; na Biblia mobimba, liloba yango ezali kaka na vɛrsɛ wana. Liloba yango ezali na bandimbola mingi mpe bazalaki kosalela yango mingimingi na makambo ya monganga.a Ekoki kobongolama na ‘kopesa makasi, kokitisa mpasi, kobɔndisa, to kosunga.’ Paulo azalaki na mposa ya lisungi ya ndenge wana, mpe bato wana mitano bapesaki ye yango.
Ntina oyo Paulo azalaki na mposa ya ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi’
5. Atako Paulo azalaki ntoma, azalaki na mposa ya nini, mpe biso nyonso tozalaka na mposa nini mbala na mbala?
5 Moto mosusu akoki kokamwa ete Paulo, oyo azalaki ntoma, azalaki na mposa bálendisa ye. Kasi, ezalaki bongo. Ezali ya solo ete Paulo azalaki na kondima makasi, mpe nzoto na ye enyokwamaki mingi, ‘abɛtamaki koleka ndelo,’ ‘akómaki pene na liwa mbala na mbala,’ mpe akutanaki na bampasi mosusu, kasi abikaki na yango nyonso. (2 Bakolinti 11:23-27) Atako bongo, azalaki kaka moto, mpe na bantango mosusu, moto nyonso azalaka na mposa bábɔndisa ye mpe básalisa ye mpo na kolendisa kondima na ye. Ata Yesu kutu azalaki na mposa bálendisa ye. Na butu ya nsuka liboso ya liwa na ye, anzelu moko abimelaki ye na elanga ya Getesemane mpe “alendisaki ye.”—Luka 22:43.
6, 7. (a) Na Loma, banani bayambaki Paulo malamu te, mpe banani balendisaki ye? (b) Na Loma, misala nini bandeko baklisto basalelaki Paulo, oyo emonisaki ete bazali ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi’?
6 Paulo mpe azalaki na mposa ya kolendisama. Azalaki mokangami, mpe ntango akómaki na Loma, bato ya ekólo na ye moko bayambaki ye malamu te. Bayuda yango mingi baboyaki kondima nsango ya Bokonzi. Mokanda ya Misala elobi ete bato minene na kati ya Bayuda bakendaki kotala Paulo na ndako oyo batyaki ye; na nsima, “bamosusu babandaki kondima makambo oyo elobamaki; bamosusu bazalaki kondima te. Bongo, lokola bazangaki boyokani na kati na bango, babandaki kokende.” (Misala 28:17, 24, 25) Tokanisi mpenza ete Paulo ayokaki mpasi na komona ndenge bato wana bazangaki botɔndi mpo na boboto monene ya Yehova! Mokanda oyo atindelaki lisangá ya Loma mwa bambula liboso ezali komonisa polele ndenge oyo ayokaki mpo na likambo yango: “Nazali na mawa monene mpe na mpasi oyo ezali kosila te na kati ya motema na ngai. Mpo nakolinga kutu ete ngai moko, lokola moto oyo alakelami mabe, nakabwana ná Klisto mpo na bandeko na ngai [Bayuda], bato ya libota na ngai na mosuni.” (Baloma 9:2, 3) Atako bongo, na Loma akutanaki na baninga ya solosolo mpe ya sembo oyo, mpiko mpe bolingo na bango, ekitisaki ye motema. Bazalaki bandeko na ye ya solosolo na elimo.
7 Na ndenge nini bandeko yango mitano bazalaki lisalisi oyo ezali kopesa makasi? Baboyaki Paulo te mpo akómaki moto ya bolɔkɔ. Kutu, na mposa mpe na bolingo na bango moko, bazalaki kosalisa Paulo, bazalaki kosalela ye makambo oyo ye moko akokaki kosala te lokola azalaki moto ya bolɔkɔ. Na ndakisa, bazalaki komema mikanda ya Paulo na masangá mpe koyebisa malako na ye; bazalaki komemela Paulo bansango ya kolendisa oyo etalaki bokolɔngɔnɔ ya bandeko ya Loma mpe ya bisika mosusu. Ekoki mpenza kozala ete bazalaki kosombela ye biloko oyo asengelaki na yango, na ndakisa, bilamba ya malili, barulo, mpe biloko oyo esengeli mpo na kokoma. (Baefese 6:21, 22; 2 Timote 4:11-13) Misala nyonso wana oyo ezalaki kosunga Paulo elendisaki ye ntango azalaki na bolɔkɔ, yango wana, ye mpe akómaki ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi’ mpo na bato mosusu, ata mpe masangá.—Baloma 1:11, 12.
Ndenge oyo tokoki kozala ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi’
8. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Paulo andimaki na komikitisa ete azali na mposa ya ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi’?
8 Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya Paulo ná baninga na ye mitano? Tokolobela mingimingi liteya moko: Esɛngaka mpiko mpe komipimela mpo na kosalisa bato oyo bazali na mpasi. Lisusu, esɛngaka komikitisa mpo na kondima ete tokoki kozala na mposa ya lisalisi na ntango tozali na mpasi. Paulo andimaki ete azalaki na mposa ya lisalisi mpe andimaki yango na botɔndi mpenza mpe apesaki bato oyo basalisaki ye longonya. Akanisaki te ete kondima lisalisi ya basusu ezali bolɛmbu to nsɔni mpo na ye, biso mpe tosengeli kokanisaka bongo te. Soki tolobi ete tokoki kozala na mposa ya lisalisi oyo ezali kopesa makasi ata mokolo moko te, na maloba mosusu tolobi ete tozali lokola bato ya kokoka. Tóbosana te ete ndakisa ya Yesu ezali komonisa ete ata moto ya kokoka akoki ntango mosusu kosɛnga lisalisi.—Baebele 5:7.
9, 10. Matomba nini ekoki komonana ntango moto azali kondima ete azali na mposa ya lisalisi, mpe yango ekoki kosala nini epai ya bato mosusu na libota mpe na lisangá?
9 Ntango bandeko oyo bazali na mikumba bazali kondima ete bakoki kosala nyonso te mpe bazali na mposa ya lisalisi ya basusu, yango ekoki komema matomba mingi. (Yakobo 3:2) Bosembo ya ndenge wana elendisaka boyokani kati na baoyo bazali kotambwisa lisangá mpe bandeko mosusu, mpe yango esalaka ete bákoka kosololaka malamu. Komikitisa ya baoyo bandimaka lisalisi ezali ndakisa mpo na bamosusu oyo bazali na makambo lokola ya bango. Emonisaka ete baoyo bazali kotambwisa lisangá bazali bato mpe moto nyonso akoki kosolola na bango.—Mosakoli 7:20.
10 Na ndakisa, ekoki kozala mpasi te mpo bana bándima ete baboti na bango básalisa bango na kolonga mikakatano mpe komekama ntango baboti bazali komonisa bango ete bango moko mpe bakutanaki na mikakatano ya ndenge yango ntango bazalaki bana. (Bakolose 3:21) Yango ekoki kosala ete baboti básololaka malamu na bana na bango. Ekoki kosala ete baboti bázala na mokakatano te mpo na kopesa bana toli ya Biblia mpe bana bándima yango kozanga nkaka. (Baefese 6:4) Na lisangá mpe ndenge moko; ekozala mpasi te bandeko bándima lisalisi ya bankulutu soki bazali koyeba ete bankulutu mpe bazalaka na mikakatano, na mabanzo, mpe na makambo oyo etungisaka bango. (Baloma 12:3; 1 Petelo 5:3) Lisusu, ekoki kosala ete bankulutu básololaka malamu na bandeko, bápesa bango toli euti na Biblia, mpe bálendisa kondima na bango. Tóbosana te ete bandeko na biso bazali na mposa ya lisalisi sikoyo koleka liboso.—2 Timote 3:1.
11. Mpo na nini bato mingi lelo oyo bazali na mposa ya ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi’?
11 Ata soki tofandaka na mboka nini, tozali banani, to tozali na mbula boni, biso nyonso tokutanaka na mitungisi na bomoi. Yango ezali na kati ya makambo ya bomoi ya lelo. (Emoniseli 12:12) Kotungisama na nzoto to na makanisi ndenge wana emekaka kondima na biso. Tokoki kokutana na mikakatano na mosala, na kelasi, na libota, to na lisangá. Mitungisi yango ekoki kozala mpo na maladi ya makasi to likambo moko ya mpasi oyo ekómelaká biso. Soki molongani na biso, nkulutu moko, to moninga moko alendisi biso na maloba ya boboto to asalisi biso na ndenge mosusu, yango ekoki mpenza kokitisa biso motema! Ezalaka lokola nde azali kopakola biso pomadi na esika oyo tozali koyoka mpasi! Yango wana, soki omoni ndeko moko azali kotungisama, zalá mpo na ye lisalisi oyo ezali kopesa makasi. To mpe, soki likambo moko ezali kotungisa yo makasi, sɛngá lisalisi epai ya ndeko moko oyo akɔmeli na elimo.—Yakobo 5:14, 15.
Ndenge oyo lisangá ekoki kosalisa
12. Na kati ya lisangá, moto na moto akoki kosala nini mpo na kolendisa bandeko?
12 Biso nyonso na kati ya lisangá, mpe ata bilenge, tokoki kolendisa basusu. Ya liboso, soki ozangisaka makita te mpe obimaka ntango nyonso na mosala ya kosakola, okolendisa mpenza kondima ya basusu. (Baebele 10:24, 25) Bokangami na yo na mosala ya bosantu ekomonisa ete ozali sembo epai ya Yehova mpe ekomonisa ete ozali kolala mpɔngi te na elimo atako ozali kokutana na mikakatano. (Baefese 6:18) Bokangami wana ekoki kolendisa basusu.—Yakobo 2:18.
13. Mpo na nini bato mosusu bakoki kotika kosakola, mpe tokoki kosala nini mpo na kosalisa bango?
13 Ntango mosusu, mitungisi ya bomoi to mikakatano mosusu ekoki kolɛmbisa bamosusu to mpe bakoki mpenza kotika kosakola. (Malako 4:18, 19) Ekoki kozala na bato mosusu oyo batiká kosakola mpe bamonanaka lisusu na makita te. Kasi, ntango mosusu bazali naino na bolingo ya Nzambe na mitema na bango. Tokoki kosala nini mpo na kolendisa kondima na bango? Bankulutu bakoki kokende kotala bango mpo na kolendisa bango. (Misala 20:35) Bankulutu bakoki kosɛnga na bandeko mosusu bápesa bango mabɔkɔ. Kotala oyo bazali kokende kotala bato oyo balɛmbi ekoki kozala nkisi oyo ekopesa bango lisusu makasi.
14, 15. Paulo apesaki toli nini na oyo etali kolendisa basusu? Lobelá ndakisa ya lisangá moko oyo esalelaki toli yango.
14 Biblia ezali kolendisa biso ete ‘tólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo ezali konyokwama na makanisi, tósalisa bato ya bolɛmbu.’ (1 Batesaloniki 5:14) Mbala mosusu ‘milimo oyo ezali konyokwama na makanisi’ bazali komona ete mpiko na bango ezali kokita mpe bakoki te kolonga mikakatano na bango soki basalisi bango te. Okoki kosalisa bango? Maloba “bósalisa bato ya bolɛmbu” ebongolami mpe na “bósimba makasi” to “bókanga makasi” bato ya bolɛmbu. Yehova alingaka bampate na ye nyonso. Amonaka bango biloko mpamba te, mpe alingaka te ete ata moko na bango abunga nzela. Okoki kosalisa lisangá na ‘kosimba makasi’ bandeko oyo balɛmbi tii bakozwa lisusu makasi?—Baebele 2:1.
15 Nkulutu moko akendaki kotala mobali moko ná mwasi na ye oyo bazalaki kosakola lisusu te banda mbula motoba. Nkulutu yango akomaki boye: “Boboto mpe bolingo oyo lisangá mobimba emoniselaki bango esalisaki mingi mpenza mpo bázonga na kati ya etonga.” Ndeko mwasi oyo atikaki kosakola ayokaki ndenge nini na ndenge bandeko bazalaki kokende kotala bango? Alobi boye: “Eloko esalisaki biso tózongela mosala ya kosakola ezali ete moko te na bandeko oyo bazalaki koya kotala biso, ata mpe bandeko basi oyo bazalaki koya na bango, azalaki koloba mabe to kosambisa biso. Bazalaki nde komitya na esika na biso mpe bazalaki kolendisa biso na makanisi ya Biblia.”
16. Nani azalaka ntango nyonso pene ya kosalisa baoyo bazali na mposa ya kolendisama?
16 Ya solo, moklisto ya sembo asepelaka kozala lisalisi oyo ezali kopesa basusu makasi. Lokola bomoi na biso ebongwanaka, ekoki kokóma mokolo mosusu ete bandeko mosusu bálendisa biso. Kasi, ekoki kokóma ete na ntango ya mpasi, tomoni ata moto moko te oyo akosalisa biso. Atako bongo, ezali na Molendisi oyo azangaka te, azalaka ntango nyonso pene ya kosalisa, ezali Yehova Nzambe.—Nzembo 27:10.
Yehova: Molendisi Monene
17, 18. Na ndenge nini Yehova alendisaki Mwana na ye, Yesu Klisto?
17 Ntango babakaki Yesu na nzete, agangaki ete: “Tata, na mabɔkɔ na yo natiki elimo na ngai.” (Luka 23:46) Na nsima akufaki. Mwa bangonga liboso, bakangaki ye mpe baninga na ye ya motema basundolaki ye mpe bakimaki mpo babangaki. (Matai 26:56) Yesu atikalaki ye moko, na Molendisi kaka moko: Tata na ye ya likoló. Motema oyo atyelaki Yehova ezalaki mpamba te. Bosembo ya Yesu epai ya Tata na ye ezwaki mbano na ndenge Yehova asungaki ye tii na nsuka.—Nzembo 18:25; Baebele 7:26.
18 Ntango nyonso oyo Yesu asalaki mosala na ye awa na mabelé, Yehova azalaki kopesa Mwana na ye oyo esengelaki mpo atikala sembo tii liwa na ye. Na ndakisa, ntango kaka Yesu azwaki batisimo mpo abanda mosala na ye, ayokaki mongongo ya Tata na ye oyo elobaki ete andimi ye mpe endimisaki lisusu Yesu ete Tata alingaka ye. Ntango Yesu azalaki na mposa ya lisalisi, Yehova azalaki kotinda baanzelu mpo na kolendisa ye. Ntango Yesu akutanaki na komekama oyo elekaki makasi na nsuka ya bomoi na ye, Yehova ayokaki mabondeli mpe malɔmbɔ na ye. Na ntembe te, Yesu amonaki nyonso wana ete ezali lisalisi oyo ezali kopesa makasi.—Malako 1:11, 13; Luka 22:43.
19, 20. Nini ezali kondimisa biso ete Yehova akolendisa biso na ntango ya mpasi?
19 Yehova alingi mpe kozala Mosungi na biso monene. (2 Ntango 16:9) Mopesi ya nguya mpe makasi nyonso akoki kozala lisalisi oyo ezali kopesa makasi na ntango oyo tozali na bosɛnga na yango. (Yisaya 40:26) Bitumba, bobola, maladi, liwa, to kozanga kokoka na biso ekoki kotungisa biso mingi. Ntango mikakatano ya bomoi ebandi kokóma lokola ‘moyini ya makasi,’ Yehova akoki kozala molendisi mpe nguya na biso. (Nzembo 18:17; Exode 15:2) Azali na nguya oyo ekoki mpenza kosalisa biso: elimo santu na ye. Na nzela ya elimo na ye, Yehova akoki kopesa “nguya epai na ye oyo alɛmbi” mpo akoka ‘kopumbwa likoló na mapapu lokola mpɔngɔ.’—Yisaya 40:29, 31.
20 Elimo ya Nzambe ezali nguya oyo eleki makasi na molɔ́ngɔ́ mobimba. Paulo alobaki boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” Ya solo, Tata na biso ya likoló akoki kopesa biso “nguya oyo eleki makasi” mpo tókoka koyikela mikakatano nyonso mpiko tii ntango akosala “biloko nyonso biloko ya sika” na Paladiso oyo alaki mpe oyo ekoya mosika te.—Bafilipi 4:13; 2 Bakolinti 4:7; Emoniseli 21:4, 5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Diksionɛrɛ Vine’s Complete Expository Dictionary of Old and New Testament Words, ya William Vine, elobi ete: “Verbe oyo euti na liloba yango [parêgoria] elimbolaka nkisi oyo ekitisaka mpasi.”
Ozali koyeba lisusu?
• Na ndenge nini bandeko na Loma bazalaki ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi’ mpo na Paulo?
• Na ndenge nini tokoki kozala ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi’ na kati ya lisangá?
• Na ndenge nini Yehova azali Molendisi Monene mpo na biso?
[Elilingi na lokasa 19]
Bandeko bazalaki ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi’ mpo na Paulo na ndenge bazalaki na bosembo nyonso kosunga ye, kolendisa ye, mpe kosalela ye misala
[Elilingi na lokasa 21]
Bankulutu bapesaka ndakisa na kolendisa bampate