Luká koyeba Mozalisi na yo
“Nakolekisa malamu na ngai liboso na yo, mpe nakosakola liboso na yo nkombo na ngai [Yehova].”—EXODE 33:19.
1. Mpo na nini Mozalisi abongi kozwa lokumu?
NTOMA Yoane, moto oyo akomaki mokanda ya nsuka ya Biblia, akomaki maloba ya ntina mingi mpo na Mozalisi. Ye ete: “Nkolo mpe Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo, na lokumu, na nguya, mpo ete yo ozalisaki biloko nyonso; mpe mpo na mokano na yo bizali mpe bisili kozalisama.” (Emoniseli 4:11) Lokola lisolo oyo eleki emonisaki yango, mbala mingi makambo oyo bato ya siansi bazali koyeba lelo oyo ezali kobakisa bantina oyo tosengeli kondima ete Mozalisi ya biloko nyonso azali.
2, 3. (a) Bato basengeli koyekola makambo nini mpo na Mozalisi? (b) Mpo na nini tokoki kokanisa te ete tómona Mozalisi na miso?
2 Kondima ete Mozalisi azali ezali likambo ya ntina, kasi ezali mpe na ntina tóyeba soki azali ndenge nini. Azali moto ya solo, oyo azali na bomoto mpe bizaleli oyo esepelisaka bato. Ata soki oyebi Ye malamu to te, ebongi oyeba Ye lisusu malamumalamu, boye te? Mpo na koyeba ye, esɛngi kaka te omona ye na miso ndenge tomonaka bato.
3 Yehova nde akelá minzoto. Mpe moi oyo engɛngisaka biso ezali se moko ya minzoto mpe ezali na minzoto mosusu oyo eleki yango na monene. Kasi, okoki kozwa likanisi ya kopusana pene na moi? Te! Kutu, bato mingi balingaka kotala moi te to balingaka te ebɛta nzoto na bango ntango molai. Na kati ya moi, molunge ezali na degré Celsius 15 000 000. Moi ezali lokola fulu ya mɔ́tɔ makasi oyo ezali kotumba batɔni na batɔni ya biloko na segonde moko, yango wana ebimisaka mɔ́tɔ moko ya kosakana te. Mɔ́tɔ na yango moke kaka nde ekómaka awa na mabelé, mpe yango nde epesaka molunge na kongɛnga, mpe esalaka ete bikelamu ya bomoi ezala awa na mabelé. Makambo nyonso wana esengeli kolakisa biso ete Mozalisi azali na nguya mingi mpenza. Yango wana Yisaya akomaki ete Mozalisi azali ‘monene na nguya na ye mpe ete azali na makasi kati na nguya.’—Yisaya 40:26.
4. Mose asɛngaki nini, mpe Yehova apesaki ye eyano nini?
4 Kasi, oyebi ete ntango Bayisalaele babimaki na Ezipito na mobu 1513 L.T.B., mwa basanza na nsima Mose asɛngaki na Mozalisi ete: “Nabondeli yo, monisá ngai nkembo na yo.” (Exode 33:18) Soki okanisi ete Nzambe nde akelá moi, okoki kokanga ntina oyo apesaki Mose eyano oyo: “Okoki kotala elongi na ngai te, mpo ete moto akotala ngai mpe kobika te.” Mozalisi ayebisaki Mose amibomba esika moko na Ngomba Sinai ntango Ye ‘akoleka.’ Na bongo, Mose amonaki oyo tokoki kobénga “mokɔngɔ” ya Nzambe, mwa kongɛnga to nkembo oyo Mozalisi atikaki nsima na ye.—Exode 33:20-23; Yoane 1:18.
5. Ndenge nini Mozalisi akokisaki mposa ya Mose, mpe yango elakisaki nini?
5 Mose azalaki na mposa ayeba Mozalisi malamu, mpe akokisaki mposa yango. Nzambe alekaki liboso ya Mose; mpe asololaki na ye na nzela ya anzelu moko mpe alobaki boye: “[Yehova] azali Nzambe na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo. Akobatela boboto na ye mpo na nkóto nkóto, mpe akolimbisa mabe mpe nkanza mpe lisumu, kasi akolongisa mokiti soko moke te.” (Exode 34:6, 7) Likambo yango elakisi ete mpo tóyeba Mozalisi na biso malamu, esɛngi te ete tómona ye na miso, kasi koyeba malamu lolenge oyo azali, bomoto na ye mpe bizaleli na ye.
6. Ndenge nini ebongiseli oyo ebatelaka nzoto na biso ezali mpenza likambo ya kokamwa?
6 Moko na makambo oyo ekoki kosalisa biso ezali koyeba bizaleli na ye na nzela ya biloko oyo akelá. Na ndakisa, kanisá ebongiseli oyo esalaka ete nzoto na yo ebundisa mikrobe (système immunitaire). Zulunalo Scientific American elobelaki ebongiseli yango na lisolo moko. Bakomaki boye: “Banda tozali na libumu ya mama tii na liwa na biso, ebongiseli oyo ebundisaka mikrobe elalaka te. Bamolekile na baselile ndenge na ndenge . . . ebatelaka nzoto na biso na bamikrobe mpe bamaladi. Soki ebongiseli wana ezali te, moto akoki koumela na bomoi te.” Ebongiseli yango esalemaki ndenge nini? Lisolo moko ya zulunalo yango elobaki boye: “Ebele ya baselile oyo esalaka na boyokani ya kokamwa mpo na kobatela nzoto na bamikrobe eutaka na mwa baselile moke oyo ebimaki nsima ya pɔsɔ libwa banda ntango mwana abandaki kosalema na libumu ya mama.” Mama alekisaka epai ya mwana oyo azali kokola na libumu na ye biloko oyo ebatelaka nzoto. Na nsima, akobanda mpe kolekisa epai ya mwana baseleli oyo ebatelaka nzoto na bavitamini mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto ya mwana na nzela ya mabɛlɛ oyo akobanda komelisa ye.
7. Tokoki kotalela likambo nini na ebongiseli oyo ebatelaka nzoto na biso, mpe tokoki koloba nini mpo na yango?
7 Okoki mpenza kondima ete ebongiseli oyo ebatelaka nzoto na yo eleki nkisi nyonso oyo minganga bakoki kosala. Yango wana, omituna motuna oyo: ‘Likambo yango emonisi nini mpo na Ye oyo asalá mpe apesá yango?’ Ebongiseli yango, oyo ‘ebimaka ntango mwana akokisi pɔsɔ libwa banda mwana abandaki kosalema’ mpe oyo ekoki kobatela mwana oyo abotami, emonisi mpenza ete ye oyo asalaki yango azali na mayele mpe akanisaki. Kasi ebongiseli yango ekoki mpe koteya biso makambo mosusu mpo na Mozalisi? Bato mingi balobaka nini mpo na Albert Schweitzer na bato mosusu oyo balekisaki bomoi na bango mobimba na kosalisa babola mpo bango mpe bázwaka lisalisi ya minganga? Mingimingi balobaka ete bato yango bazali bato malamu. Tokoloba nini mpo na Mozalisi oyo apesi moto nyonso, ezala mobola to mozwi, ebongiseli oyo ebatelaka nzoto? Tokoki kokakatana te koloba ete azali na bolingo, aponaponaka te, azali na motema mawa, mpe azali sembo. Omoni te ete yango ekokani mpenza na bizaleli ya Mozalisi oyo Mose ayokaki?
Ayebisi ndenge oyo azali
8. Yebisá lolenge oyo Yehova amimonisi mpenzampenza epai na biso?
8 Kasi, ezali na ndenge mosusu oyo tokoki koyeba Mozalisi na biso malamu: na nzela ya Biblia. Ezali mpenza na ntina mpamba te ezali na makambo oyo bato ya siansi bakoki koyebisa biso yango te, ata mpe mokili yango moko, kasi ezali na makambo mosusu oyo Biblia eyebisi yango polele. Ndakisa moko ya makambo yango ezali nkombo ya Mozalisi. Kaka Biblia nde eyebisi nkombo ya Mozalisi mpe ndimbola na yango. Na bamaniskri ya Biblia oyo bakomaki na monɔkɔ ya Liebele, nkombo yango ekomami mbala 7 000 na balɛtre minei oyo, tokoki kokoma yango boye: YHWH. Mbala mingi na lingala totángaka yango Yehova.—Exode 3:15; 6:3.
9. Nkombo ya Mozalisi elimboli nini, mpe tokoki koloba nini mpo na yango?
9 Mpo tóyeba Mozalisi malamu, tosengeli kososola ete azali se “Nguya” te oyo ebimisaki bikelamu to likanisi mpamba oyo Biblia ebéngi “Ngai nazali.” Nkombo na ye emonisi ete ezali boye te. Nkombo yango ezali verbe moko ya Liebele oyo elimboli “kokóma” to “kozala.”a (Talá Genese 27:29; Mosakoli 11:3.) Nkombo ya Nzambe elimboli “Akómisaka” mpe emonisi ete akanaka mpe asalaka. Soki toyebi nkombo na ye mpe tozali kosalela yango, tokoki kokanga ntina malamu ete akokisaka makambo oyo alaki mpe mikano na ye.
10. Lisolo ya Genese ekoki kopesa biso bososoli nini?
10 Biblia ezali koyebisa biso mikano mpe bomoto ya Nzambe. Lisolo ya Genese emonisi ete na eleko moko, moto azalaki na boyokani malamu na Nzambe mpe azalaki na elikya ya bomoi molai mpe bomoi oyo ezali na ntina. (Genese 1:28; 2:7-9) Na boyokani na ndimbola ya nkombo na ye, tokoki kozala na elikya ete Yehova akosilisa bampasi mpe mitungisi oyo bato bakutanaka na yango banda kala. Na ndenge oyo akokokisa mikano na ye, Biblia elobi boye: “Nzambe azalisaki mokili mpamba, mpo na mokano na yango mpenza te nde mpo na mokano na ye oyo azalisaki yango boye. Kasi ezalaki na elikya ete ekosikwa na boombo na libebisi kino lisiko na nkembo na bana na Nzambe.”—Baloma 8:20, 21.
11. Mpo na nini tosengeli koyekola masolo ya Biblia, mpe lisolo moko elobi makambo nini?
11 Biblia ekoki mpe kosalisa biso na koyeba Mozalisi na biso malamu mpamba te eyebisi makambo oyo asalaki na ntango oyo azalaki kotambwisa libota ya Yisalaele. Na ndakisa, tótalela lisolo ya mosakoli Elisa na Namana, mokonzi ya basoda ya Sulia, banguna ya Yisalaele. Soki otángi lisolo yango na 2 Mikonzi mokapo 5, okomona ete elenge mwasi moko Moyisalaele oyo bakangaki ye mpe bamemaki ye na Sulia alobaki ete Elisa oyo azali na Yisalaele akoki kosilisa maba ya Namana. Namana akendaki kuna. Akanisaki ete Elisa akosalela milulu ya mindɔndɔmindɔndɔ na koningisa mabɔkɔ mpo na kobikisa ye. Nzokande, Elisa ayebisaki Namana akende kosukola na Ebale Yaladene. Atako basaleli na ye nde bandimisaki ye asala oyo basɛngaki ye, ntango asalaki yango maladi na ye esilaki. Namana apesaki Elisa makabo ya motuya mingi, kasi Elisa aboyaki kozwa yango. Na nsima, mosaleli ya Elisa alandaki Namana na mayele mpe akosaki ye; bongo Namana apesaki ye ndambo ya makabo yango. Lokola azalaki sembo te, akómaki na maba. Lisolo kitoko oyo ezali kolakisa mpe bizaleli ya bato mpe ezali koteya biso.
12. Tokoki koloba nini mpo na Mozalisi soki totángi lisolo ya Elisa na Namana?
12 Lisolo yango ezali kolakisa malamu mpenza ete Mozalisi Monene ya mokili mobimba azalaka mosika na biso te. Yango wana amonaki elenge mwasi wana mpe atyelaki ye likebi. Ezaleli wana ekeseni mpenza na ezaleli oyo bato ya bamboka mingi bazali na yango lelo oyo. Lisolo yango ezali mpe komonisa ete Mozalisi alingaka kaka ekólo to loposo moko te. (Misala 10:34, 35) Likambo mosusu oyo ezali kobenda likebi na biso ezali ete, na esika ya kosɛnga bato básalaka bikelakela ya “banganga-nkisi” ya kala to ya mikolo na biso, Mozalisi alakisaki mayele mingi. Ayebaki ndenge nini kosilisa maladi ya maba. Alakisaki mpe mayele mpe bosembo na ye na ndenge atɔndɔlaki lokuta. Awa lisusu tomoni ete makambo yango eyokani mpenza na bomoto ya Yehova oyo Mose ayokaki, boye te? Atako lisolo yango ya Biblia ezali mokuse, ezali koteya biso makambo mingi na ndenge oyo Mozalisi azali!—Nzembo 33:5; 37:28.
13. Monisá ndenge masolo ya Biblia ekoki koteya biso makambo ya ntina mingi.
13 Masolo mosusu ezali kolakisa ete Bayisalaele bazalaki na botɔndi te, mpe makambo oyo Nzambe asalelaki bango ezali komonisa mpenza ete Yehova amibanzabanzaka mpo na bato. Biblia elobi ete Bayisalaele bazalaki kotumola ye mbala na mbala, bazalaki koyokisa ye mpasi na motema. (Nzembo 78:40, 41) Yango elakisi ete Mozalisi azali na mayoki, amibanzabanzaka na makambo oyo bato bazali kosala. Masolo ya bato oyo toyebi malamu ekoki mpe koteya biso makambo ebele. Ntango Nzambe aponaki Davidi azala mokonzi ya Yisalaele, ayebisaki Samwele boye: “Moto akomonaka lolenge na libándá nde [Yehova] akotalaka kati na motema.” (1 Samwele 16:7) Mozalisi atalaka nde motema na biso, kasi atalaka kaka te makambo oyo ezali komonana na miso. Likambo oyo ezali mpenza kolendisa biso!
14. Ntango tozali kotánga eteni ya Biblia oyo ekomamaki na Liebele, eloko nini tokoki kosala mpo tózwa bolamu?
14 Mikanda 39 ya Biblia mikomamaki liboso Yesu aya awa na mabelé, mpe ezali na ntina tótángaka yango. Tosengeli kotángaka yango kaka mpo tóyeba masolo ya Biblia te. Soki tolingi mpenza koyeba Mozalisi na biso, tosengeli kokanisa na mozindo nsima ya kotánga masolo yango. Tokoki komituna boye: ‘Lisolo oyo emonisi nini mpo na bomoto ya Nzambe? Lisolo oyo elakisi ezaleli nini ya Nzambe?’b Soki tozali kosala bongo, ekoki kosalisa ata bato ya ntembe bámona ete Biblia ezali mokanda ya Nzambe, mpe yango ekozala ebandeli ya nzela oyo ekomema bango báyeba malamu Ye oyo akomisaki Biblia.
Molakisi Monene alakisi biso Mozalisi
15. Mpo na nini mateya mpe misala ya Yesu esengeli koteya biso?
15 Ekoki mpenza kozala ete bato oyo bandimaka te ete Mozalisi azali to baoyo bazali na makanisi ya likolólikoló mpo na Nzambe bayebi Biblia malamu te. Mbala mosusu okutaná na bato oyo bayebi ata te soki Mose azalaki na bomoi liboso to nsima ya Matai to mpe bayebi malamu te makambo oyo Yesu ateyaki to oyo asalaki. Ezali mawa mpamba te Yesu, oyo azali Moteyi Monene akoki kolakisa moto makambo mingi ya Mozalisi. Lokola azalaki pene ya Nzambe, akoki komonisa ndenge Mozalisi azali. (Yoane 1:18; 2 Bakolinti 4:6; Baebele 1:3) Asalaki mpe bongo. Kutu, mokolo moko alobaki, “Ye oyo amoni ngai asili komona Tata.”—Yoane 14:9.
16. Lisolo ya Yesu na mwasi Mosamalia ezali komonisa nini?
16 Talá ndakisa oyo. Mokolo moko Yesu, atako alɛmbaki nsima ya kosala mobembo, asololaki na mwasi moko Mosamalia pene ya mboka Sukala. Ateyaki ye makambo ya ntina mingi oyo emonisi ete esengeli “kosambela Tata na elimo mpe na solo.” Na eleko wana, Bayuda bazalaki kolinga Basamalia te. Nzokande, Yesu amonisaki ete Yehova andimaka bato ya bikólo nyonso, ndenge tomonaki yango na lisolo ya Elisa na Namana. Koyeba ete Yehova ayinaka bato ya mangomba mosusu te, ndenge ezali komonana epai ya bato mingi na mokili lelo oyo ezali kolendisa. Tóbosana mpe te ete Yesu akakatanaki te koteya mwasi; mpe mwasi yango azalaki mwasi ya makango. Na esika asambisa ye, Yesu asololaki na ye na limemya nyonso, na ndenge oyo ekokaki mpenza kosalisa mwasi yango. Na nsima, Basamalia mosusu bayokaki mateya ya Yesu mpe na nsuka na yango balobaki ete: “Toyebi ete oyo azali solo Mobikisi na mokili.”—Yoane 4:2-30, 39-42; 1 Mikonzi 8:41-43; Matai 9:10-13.
17. Lisolo ya lisekwa ya Lasalo ezali komonisa nini?
17 Tótala ndakisa mosusu oyo emonisi ndenge tokoki koyeba Mozalisi soki tosali makasi ya koyeba makambo oyo Yesu ateyaki mpe oyo asalaki. Tókanisa makambo elekaki ntango moninga na ye Lasalo akufaki. Liboso na yango, Yesu alakisaki ete azali na nguya ya kosekwisa bato. (Luka 7:11-17; 8:40-56) Kasi, asalaki nini ntango amonaki Malia, ndeko mwasi ya Lasalo azali kolela? Yesu ‘ayokaki mawa na motema mpe amitungisaki.’ Ezali te ete likambo yango esalaki ye eloko moko te; ‘atangisaki mpisoli.’ (Yoane 11:33-35) Kolela na ye ezalaki kaka te mpo alakisa bato ete azali na mawa. Yesu asalaki likambo moko: asekwisaki Lasalo. Tokoki kokanisa ndenge likambo yango esalisaki bantoma báyeba malamu ndenge oyo Mozalisi ayokaka mpe makambo oyo asalaka. Likambo yango esengeli mpe kosalisa biso na bato mosusu tóyeba bomoto mpe bizaleli ya Mozalisi.
18. Ndenge nini bato basengeli kotalela koyekola Biblia?
18 Tosengeli koyoka nsɔni te mpo na koyekola Biblia mpe koyeba Mozalisi na biso malamu. Biblia esilá ngala te. Yoane ayekolaki yango mpe akómaki moninga ya Yesu. Bambula mingi na nsima akomaki boye: “Toyebi nde ete Mwana na Nzambe asili koya mpe kopesa biso mayele ete tóyeba Oyo na solo. Tozali mpe kati na Oyo na solo kati na Mwana na ye Yesu Klisto. Ye wana Nzambe na solo mpe bomoi na seko.” (1 Yoane 5:20) Omoni ete soki tosaleli “mayele” mpo tózwa boyebi ya “Oyo na solo,” elingi koloba Mozalisi, tokoki kozwa “bomoi ya seko.”
Ndenge nini okoki kosalisa bato mosusu báyeba Ye?
19. Eloko nini esalemi mpo na kosalisa bato oyo bandimaka te ete Mozalisi azali?
19 Esɛngaka makambo mingi mpo bato mosusu bándima ete Mozalisi azali mpe azali na motema mawa, amibanzabanzaka mpo na biso mpe lisusu mpo báyeba ye malamu. Bamilio na bamilio ya bato bazali naino kondima te ete Mozalisi azali to mpe ndenge oyo bakaniselaka ye ekeseni na ndenge oyo Biblia elobeli ye. Ndenge nini tokoki kosalisa bango? Na mayangani ya etúká mpe ya mikili mingi oyo Batatoli ya Yehova basalaki na 1998 mpe 1999, mokanda moko ya sika ebimaki na minɔkɔ mingi mpe motó na likambo na yango elobi, Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous?
20, 21. (a) Ndenge nini tokoki kosalela malamu mokanda Créateur? (b) Yebisá mwa makambo oyo emonisi ndenge mokanda Créateur esalisaki bato.
20 Mokanda yango ekolendisa kondima na yo mpo na Mozalisi mpe ekosalisa yo osepela lisusu mingi na bomoto mpe bizaleli na ye. Mpo na nini tondimi yango? Mpamba te mokanda Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous? ekomamaki na mikano wana. Ntango moto azali kotánga yango, akomona lokola nde bazali koyanola na motuna oyo: “Eloko nini ekoki kosala ete bomoi na yo ezala na ntina mingi?” Mokanda yango ekomami na ndenge oyo ekosepelisa ata bato oyo bayekolá mingi. Kasi, elobeli makambo oyo biso nyonso tozalaka na yango mposa. Makambo na yango ekosepelisa mpe ekondimisa bato oyo batyaka ntembe ete Mozalisi azali te. Mokanda yango ekomami lokola nde ezali koloba na moto oyo andimaka te ete Mozalisi azali. Bato ya ntembe bakosepela na ndenge mokanda yango elobeli makambo oyo bato ya siansi bayebi na mikolo na biso. Makambo yango ekolendisa mpe kondima ya bato oyo bandimelaka Nzambe.
21 Ntango ozali koyekola mokanda yango, okomona ete mikapo na yango mosusu elobeli na mokuse masolo oyo ezali na Biblia na ndenge oyo ezali komonisa polele bomoto ya Nzambe, mpo esalisa moto oyo azali kotánga yango ayeba Nzambe malamu. Bato mingi oyo batángi yango balobi ete bamonaki makambo yango. (Talá lisolo oyo ezali na lokasa 25 mpe 26.) Tiká ete ezala mpe bongo mpo na yo wana okobanda kotánga mokanda yango mpe kosalela yango mpo osalisa bato mosusu báyeba Mozalisi malamu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Michael Gruenthaner, sango ya lisangá ya ba Jésuites mpe molimboli ya Biblia, ntango azalaki mokambi ya zulunalo The Catholic Biblical Quarterly, asalelaki na verbe oyo ndimbola oyo apesaki mpo na verbe mosusu ya Liebele oyo ekokani na yango. Ye ete “ata mbala moko te emonisá kozala na bomoi lokola likanisi mpamba kasi epesaka ntango nyonso likanisi ya kozala to kokóma na ndenge oyo ezali komonana, elingi koloba komimonisa na miso.”
b Ntango baboti bazali kobɛtela bana na bango masolo ya Biblia, bakoki kosalisa bango na mituna ya ndenge wana. Na bongo, bana bakoyeba Nzambe malamu, mpe bakoyekola kokanisa makambo oyo ezali na Liloba na ye.
Osimbaki makambo oyo?
◻ Na Ngomba Siona, ndenge nini Mose ayebaki Yehova malamu?
◻ Mpo na nini koyekola Biblia esalisaka na koyeba Nzambe?
◻ Ntango tozali kotánga Biblia, tokoki kosala nini mpo na komesana na Mozalisi na biso?
◻ Ndenge nini ozali kokana kosalela buku Créateur?
[Elilingi na lokasa 20]
Ebongiseli oyo ebatelaka nzoto na biso ezali koteya biso nini mpo na Mozalisi?
[Elilingi na lokasa 21]
Eteni ya rulo ya Mbu Ekufa, na Tetragrame (nkombo ya Nzambe na Liebele) eyeisami monene
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Shrine of the Book, Israel Museum, Jerusalem
[Elilingi na lokasa 23]
Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yesu asalaki liboso ya mawa ya Malia?