Ndenge nini Yesu akoki kobongola bomoi na yo?
YESU KLISTO azalaki Moteyi Monene oyo afandaki na Palestine esili koleka pene na mbula 2 000. Makambo ya bomwana na ye eyebani mpenza mingi te. Nzokande, eyebani malamu ete ntango azalaki soki na mbula 30, abandaki mosala na ye ya ‘kotatola mpo na solo.’ (Yoane 18:37, NW; Luka 3:21-23) Bayekoli na ye minei oyo bakomaki masolo ya bomoi na ye balobelaki mingi makambo oyo asalaki na boumeli ya mbula misato na ndambo oyo elandaki.
Na boumeli ya mosala na ye ya kosakola, Yesu Klisto apesaki bayekoli na ye mobeko oyo ezali lokola nkisi mpo na mikakatano ya mokili. Ezalaki mobeko nini? Yesu alobaki: “Nazali kopesa bino mobeko oyo na sika ete, Bólinganaka; bólinganaka lokola ngai nalingi bino.” (Yoane 13:34) Ɛɛ, bolingo nde ezali sɛkɛlɛ mpo na kosilisa bampasi ya bato. Mokolo moko, ntango batunaki Yesu soki mobeko nini eleki monene kati na mibeko nyonso, alobaki boye: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba na molimo na yo mobimba mpe na [elimo, NW] na yo mobimba. Oyo ezali mobeko moleki monene mpe oyo na liboso. Mosusu na mibale ezali mpe lokola yango ete, Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.”—Matai 22:37-40.
Yesu alakisaki biso na maloba mpe na misala ndenge tosengeli kolinga Nzambe mpe kolinga bazalani na biso. Tótalela mwa ndambo ya bandakisa yango mpo na koyeba liteya nini tokoki kozwa na yango.
Mateya na ye
Na lisolo moko oyo bato mingi bayebi yango, Yesu Klisto ayebisaki bayekoli na ye ete: “Moto akoki kosalela bankolo mibale te. Akoyina moko mpe akolinga mosusu, to [akokangama, NW] na moko mpe akotyola mosusu. Bokoki kosalela Nzambe mpe [bozwi, NW] te.” (Matai 6:24) Liteya ya Yesu oyo elobi ete tótya Nzambe na esika ya liboso na kati ya bomoi na biso ezali na ntina kino lelo oyo, wana bato mingi bazali kondima ete mbongo nde ekataka makambo nyonso? Ya solo, tozali na mposa ya mbongo mpo na kobikela. (Mosakoli 7:12) Kasi, soki totiki “Bozwi” ekóma nkolo na biso, “bolingo ya mbongo” ekotambwisa biso motó, mpe ekozala na bokonzi likoló ya bomoi na biso mobimba. (1 Timote 6:9, 10, NW) Bato mingi oyo bakweaki na motambo yango babebisaki bomoi ya libota na bango, kolɔngɔnɔ na bango ya nzoto, ata mpe bomoi na bango.
Nzokande, soki totiki Nzambe azala Nkolo na biso, bomoi na biso ekozala na ntina. Lokola azali Mozalisi, azali Liziba ya bomoi, na yango, bobele ye nde tosengeli kosambela. (Nzembo 36:9; Emoniseli 4:11) Baoyo bazali koyekola bizaleli na ye mpe bazali kolinga ye batosaka Mibeko na ye. (Mosakoli 12:13; 1 Yoane 5:3) Kosala bongo ezali mpo na bolamu na biso.—Yisaya 48:17.
Na Lisolo na ye likoló ya Ngomba, Yesu ateyaki mpe bayekoli na ye lolenge ya komonisa bolingo epai ya bazalani na bango. Alobaki ete: “Makambo nyonso malingi bino ete bato básalela bino yango, bino bósalela bango bobele bongo.” (Matai 7:12) Liloba “bato” oyo Yesu asaleli awa etaleli mpe ata banguna ya moto. Kaka na lisolo yango; alobaki ete: “Bólinga bayini na bino mpe bóbondela mpo na banyokoli na bino.” (Matai 5:43, 44) Bolingo motindo oyo ekosilisa bampasi mingi oyo tozali na yango lelo oyo, boye te? Mohandas Gandhi, mokonzi ya kala ya ekólo Inde, andimaki ete ezali bongo. Talá ndenge alobaki: “Na ntango [biso] nyonso tokolanda mateya oyo Klisto apesaki na Lisolo likoló na Ngomba, tokosilisa mikakatano . . . ya mokili mobimba.” Soki bato basaleli mateya oyo Yesu apesaki mpo na bolingo, mikakatano mingi ya mokili ekoki kosila.
Misala na ye
Yesu asukaki te bobele na koteya lolenge ya kolakisa bolingo kasi asalelaki mpe makambo oyo azalaki koteya. Na ndakisa, atyaki matomba ya bato mosusu liboso ya matomba na ye moko. Mokolo moko Yesu na bayekoli na ye bazalaki na mosala mingi mpo na kosalisa bato na boye ete bazwaki ata ntango te mpo na kolya. Yesu amonaki ete bayekoli na ye basengelaki kopema mwa moke, mpe akendaki na bango na esika oyo bazalaki bobele bango moko. Kasi ntango bakómaki kuna, bakutaki ebele ya bato bazali kozela bango. Soki ezalaki yo, olingaki kosala nini na komona ebele ya bato oyo bazali kozela ete osala mosala na ntango oyo ozali na mposa ya kopema mwa moke? Ɛɛ, Yesu “ayoki mawa mpo na bango” mpe “abandi koteya bango makambo mingi.” (Malako 6:34) Lokola Yesu azalaki komibanzabanza mpo na bato mosusu, yango ezalaki kopusa ye ete asalisa bango ntango nyonso.
Yesu asalelaki bato makambo malamu mingi, koleka koteya bango. Apesaki bango mpe lisungi oyo ebongi. Na ndakisa, mokolo moko aleisaki bato koleka 5 000 oyo baumelaki koyoka ye kino mpokwa. Nsima na yango, aleisaki mpe lisusu bato mingi—mbala oyo ezalaki bato koleka 4 000 oyo bazalaki koyoka ye na boumeli ya mikolo misato mpe bazalaki na eloko ya kolya te. Na mbala ya liboso, asalelaki biteni mitano ya mampa mpe mbisi mibale; na mbala ya mibale, asalelaki biteni nsambo ya mampa mpe na mwa mbisi mike. (Matai 14:14-22; 15:32-38) Ezali likamwisi? Ɛɛ, azalaki mosali ya makamwisi.
Yesu abikisaki mpe bato mingi oyo bazalaki na maladi. Abikisaki bakufi-miso, batɛngumi, bato ya maba, mpe baoyo bakufá-matoi. Asekwisaki mpe ata bakufi! (Luka 7:22; Yoane 11:30-45) Mokolo moko moto moko ya maba abondelaki ye ete: “Soko olingi, okoki kopɛtola ngai.” Yesu asalaki nini? “Ayoki mawa, asemboli lobɔkɔ, mpe [asimbi, NW] ye, ye ete, Nalingi, pɛtwá na yo!” (Malako 1:40, 41) Na nzela ya makamwisi lokola oyo, Yesu amonisaki bolingo na ye mpo na bato oyo bazalaki konyokwama.
Okakatanaka mpo na kondima makamwisi ya Yesu? Bato mosusu bandimaka yango te. Nzokande, kanisá naino, Yesu asalaki makamwisi na ye na miso ya bato nyonso. Ata bayini na ye, oyo bazalaki ntango nyonso koluka kozwa ye na libunga, bakokaki te kowangana ete azalaki mosali ya makamwisi. (Yoane 9:1-34) Nzokande, makamwisi na ye ezalaki na ntina na yango. Esalisaki bato báyeba ye lokola Moto oyo Nzambe atindaki.—Yoane 6:14.
Ntango azalaki kosala makamwisi, Yesu azalaki koluka te kobenda likebi ya bato epai na ye moko. Kasi, akumisaki Nzambe, Moto azalaki kopesa ye nguya. Mokolo moko na Kapalanauma azalaki na kati ya ndako moko oyo bato batondaki mingi. Mobali moko mokatatali alingaki ete Yesu abikisa ye kasi akokaki kokɔta na ndako te. Na bongo baninga na ye balalisaki ya na litɔkɔ, balongolaki matolo ya ndako mpe bakitisaki ye. Ntango amonaki ete bato yango bazali na kondima, Yesu abikisaki mokatatali yango. Mpo na yango bato ‘bakumisaki Nzambe’ mpe balobaki ete: ‘Tomoná [naino] likambo ya lolenge oyo liboso soko moke te.’ (Malako 2:1-4, 11, 12) Makamwisi ya Yesu ekumisaki Yehova, Nzambe na ye, mpe ezalaki kosalisa bato oyo bazalaki na bosɛnga.
Kasi, Kobikisa bato na nzela ya likamwisi, ezalaki te likambo ya libosoliboso na mosala ya Yesu. Moto moko oyo akomaki lisolo ya bomoi ya Yesu alobaki boye: “Oyo bisili kokomama ete bóndima ete Yesu azali Klisto, Mwana ya Nzambe mpe ete, wana ekondima bino, bózala na bomoi na seko kati na nkombo na ye.” (Yoane 20:31) Ɛɛ, Yesu ayaki awa na mabelé mpo bato oyo bakondima bákoka kozwa bomoi.
Mbeka na ye
Okoki komituna ete, ‘Yesu ayaki awa na mabele? Autaki wapi?’ Yesu ye moko alobaki ete: “Mpo ete nasili kokita longwa na Likoló ete nasala mokano na ngai moko te kasi mokano na motindi na ngai.” (Yoane 6:38) Azalaki na bomoi lokola Mwana mobotami-bobele-moko ya Nzambe liboso ya koya awa na mabelé. Na yango, mokano ya Moto oyo atindaki ye awa na mabelé ezalaki nini? Yoane, mokomi moko ya Evanzile alobi ete: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi [Mwana mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Ndenge nini yango ekokaki kosalema?
Biblia ezali koyebisa biso ndenge liwa ekɔtaki na mokili. Nzambe apesaki babalani ya liboso bomoi mpe elikya ya koumela seko na seko. Nzokande, baponaki kotombokela Mozalisi na bango. (Genese 3:1-19) Mpo na likambo oyo basalaki, elingi koloba lisumu, Adama na Eva batikelaki bana na bango libula ya mabe, elingi koloba liwa. (Baloma 5:12) Mpo na kopesa bato bomoi ya solo, lisumu mpe liwa esengeli kolongwa.
Monganga moko te akoki kolongola liwa na nzela ya mwango oyo babengi manipulation génétique. Ɛɛ, Mozalisi ya bato azali na makoki ya kokómisa bato ya botosi bato oyo bazangi masumu mpo ete bákoka kozala na bomoi ya seko. Biblia ebéngaka ebongiseli yango lisiko. Babalani ya liboso bamitekaki bango moko mpe bana na bango na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Batekaki bomoi na bango ya kozanga masumu mpe ya botosi epai ya Nzambe, mpo na bomoi ya lipanda liboso na Nzambe, kozwáká bikateli bango moko mpo na oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Mpo na kosomba lisusu bomoi ya kozanga masumu, esengelaki kopesa motuya oyo ekokani na bomoi ya kozanga masumu oyo baboti na biso ya liboso babungisaki. Lokola bato bazwaki nzoto ya masumu uta na Adama na Eva, bakokaki te kopesa motuya yango.—Nzembo 49:7.
Na yango, Yehova Nzambe andimaki kosalisa bango. Akɔtisaki bomoi ya Mwana mobotami-bobele-moko na ye na libumu ya moseka moko, oyo abotaki Yesu. Bambula mingi liboso, ekokaki kozala mpasi mpo na yo ondima ete moseka akoki kobota. Nzokande, lelo oyo, basava babotisi banyama mosusu ya basi kozanga ete básangisa yango na banyama ya mibali, mpe balongi kokɔtisa ba gènes ya nyama moko na nyama mosusu. Na yango, nani akoki kotya ntembe na nguya ya Mozalisi mpo na kobotisa mwasi kozanga ete asangana na mobali?
Lokola moto oyo azali na bomoi ezangi masumu amonanaki, motuya oyo esengelaki mpo na kosomba bato na lisumu mpe na liwa ekokaki kopesama. Ɛɛ, mwana oyo abotamaki awa na mabelé ezalaki Yesu; asengelaki naino kokola mpe kokóma lokola “monganga” oyo azali na makoki ya kopesa “nkisi” mpo na kobikisa bampasi ya bato. Akokisaki likambo yango na ndenge asalaki lisumu te na bomoi na ye mobimba. Yesu amonaki ndenge moto azali koyoka mpasi mpo na lisumu mpe ndenge lisumu ezali kopekisa moto na kosala malamu. Yango esalaki ete azala monganga oyo ayokelaka bato mawa. (Baebele 4:15) Makamwisi oyo asalaki mpo na kobikisa bato ntango azalaki awa na mabelé emonisaki ete azalaki na bolingo mpe na nguya ya kosilisa maladi.—Matai 4:23.
Yesu ateyaki mbula misato na ndambo awa na mabelé, mpe na nsima banguna na ye babomaki ye. Amonisaki ete moto oyo azali na bomoi ezangi masumu akoki kotosa Mozalisi na ye ata liboso ya komekama monene. (1 Petelo 2:22) Bomoi ezangi masumu oyo apesaki ekómaki motuya ya lisiko, mpo na kosomba bato na lisumu mpe na liwa. Yesu Klisto alobaki boye: “Moto te azali na bolingo boleki oyo ete moto asopa bomoi na ye mpo na baninga na ye.” (Yoane 15:13) Na mokolo ya misato nsima ya liwa na ye, Yesu asekwaki na bomoi ya elimo, mpe mwa bapɔsɔ na nsima amataki na likoló mpo na kopesa motuya ya lisiko epai ya Yehova Nzambe. (1 Bakolinti 15:3, 4; Baebele 9:11-14) Ntango asalaki bongo, Yesu azwaki likoki ya kosalela motuya ya mbeka ya lisiko na ye mpo na bato oyo bandimaka ye.
Okosepela ete maladi na elimo, na mayoki, mpe na nzoto esila? Soki olingi bongo osengeli kondima Yesu Klisto. Mpo na nini te koya epai ya monganga ye moko? Okoki kosala yango soki oyekoli makambo oyo Yesu Klisto asalaki mpe mokumba na ye mpo na kobikisa bato ya sembo. Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kosalisa yo.
[Elilingi na lokasa 5]
Yesu azalaki na bolingo mpe na nguya ya kosilisa maladi
[Elilingi na lokasa 7]
Ndenge nini otalelaka liwa ya Yesu?