Yesu Klisto Azali nani?
“ATA ebele ya bato mosusu oyo bazali baklisto te bandimaka ete azalaki moteyi monene mpe ya mayele. Na ntembe te, azalaki mpenza moko na bato oyo batiká nsango kino lelo.” (The World Book Encyclopedia) “Ye” nani? Yesu Klisto, mobandisi ya lingomba ya boklisto. Oyebi ye malamu? Ezali nde na likambo moko oyo asi asali oyo ezali kotalela bomoi na yo?
Makambo oyo Yesu asalaki ekomami na kati ya Biblia na mikanda minei oyo babengi Baevanzile. Masolo yango ezali mpenza makambo ya solo? Nsima ya koyekola masolo yango malamumalamu, Will Durant, nganga-mayele ya masolo ya kala oyo ayebani mingi akomaki boye: “Soki ezali solo ete, bobele na boumeli ya libota moko, mwa ndambo ya bato mpamba babimisaki na makanisi na bango moko, moto moko ya nguya mpe na bizaleli malamu mingi boye, soki bango kaka bamisalelaki mitinda kitoko wana ya etamboli malamu, mpe batikaki ndakisa malamu mingi ya bondeko kati na bato, tokoloba ete wana ezali likamwisi oyo eleki makamwisi nyonso totángaka na kati ya Baevanzile.”
Nzokande, bato mingi na mikili ya Azia mpe na mikili mosusu, bayebi Yesu Klisto te. Bakoki kondima ete azalaki na bomoi, kasi bakanisaka te ete akoki kozala na ntina na bomoi na bango. Bato mosusu baboyaka kondima Yesu mpo na makambo mabe oyo bato oyo balobaka ete bazali baklisto basalaki. Bato mosusu na ekólo Japon bakoki koloba ete, ‘baklisto babwakaki bɔmbe atomike na engumba ya Nagasaki, nzokande Nagasaki ezali na baklisto ebele koleka bingumba mingi ya Japon.’
Kasi, okoki nde kopesa monganga foti soki moto moko oyo azali na maladi aboyi ye moko kosalela nkisi ndenge monganga akomelaki ye? Soko moke te. Bato mingi ya mangomba ya boklisto batyaka likebi te na malako ya Yesu mpo na kosilisa mikakatano na bango ya mokolo na mokolo. Na yango, na esika ete oboya kondimela Yesu mpo na makambo mabe ya bato oyo balobaka ete bazali baklisto kasi balandaka malako na ye te, mpo na nini te kozwa nde ekateli yo moko ete oyekola makambo ya Yesu? Talá na kati ya Biblia mpo na komona soki Yesu azali nani mpe ndenge akoki ata kobongola bomoi na yo.
Bolingo ezali lilako na ye
Yesu Klisto azalaki moteyi moko monene oyo azalaki na Palestine esili koleka pene na mbula 2 000. Makambo ya bomwana na ye eyebani mpenza mingi te. (Matai mokapo 1 mpe 2; Luka mokapo 1 mpe 2) Ntango akokisaki mbula 30, Yesu abandaki mosala na ye ya “kotatola mpo na solo.” (Yoane 18:37; Luka 3:21-23) Bato minei oyo bakomaki lisolo ya bomoi ya Yesu balobelaki mingimingi mosala na ye ya kosakola, oyo asalaki na boumeli ya mbula misato na ndambo ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele.
Na boumeli ya mosala na ye ya kosakola, Yesu alakisaki bayekoli na ye sɛkɛlɛ ya kolonga mikakatano ndenge na ndenge na bomoi na bango. Sɛkɛlɛ yango ezalaki nini? Ezalaki bolingo. Na lisolo moko oyo eyebani mingi mpenza, oyo babengi Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu ateyaki bayekoli na ye ndenge ya komonisa bolingo epai ya bazalani na bango. Alobaki ete: “Makambo nyonso malingi bino ete bato básalela bino yango, bino bósalela bango bobele bongo.” (Matai 7:12) Babengaka mobeko yango ete Lilako Lileki Malamu. Liloba “bato” oyo Yesu asaleli awa etaleli mpe ata banguna na biso. Kaka na lisolo yango, alobaki lisusu ete: “Bólinga bayini na bino mpe bóbondela mpo na banyokoli na bino.” (Matai 5:44) Bolingo motindo yango ekosilisa mikakatano mingi oyo tozali na yango lelo oyo, boye te? Mohandas Gandhi, mokonzi moko ya Lingomba ya Bahindu, andimaki ete ezali bongo. Balobaka ete alobaki maloba oyo: “Na ntango biso nyonso tokolanda mateya oyo Klisto apesaki na Lisolo Likoló na Ngomba, tokosilisa mikakatano . . . ya mokili mobimba.” Soki bato basaleli mateya oyo Yesu apesaki likoló ya bolingo, mikakatano mingi ya mokili ekoki kosila.
Amonisaki bolingo na ye
Yesu asalelaki makambo oyo azalaki koteya. Azalaki kotya matomba ya bato mosusu liboso ya matomba na ye moko mpe amonisaki bolingo na misala na ye. Mokolo moko, Yesu na bayekoli na ye bazalaki kosalisa bato mpe bazwaki ata ntango mpo na kolya te. Yesu amonaki ete bayekoli na ye basengelaki kopema mwa moke, mpe akendaki na bango na esika oyo basengelaki kozala bobele bango moko. Kasi ebele ya bato bakendaki liboso na bango mpe bazalaki kozela bango kuna. Soki ozalaki na esika ya Yesu olingaki kosala nini? Yesu “ayoki mawa mpo na bango” mpe “abandi koteya bango makambo mingi.” (Malako 6:30-34) Motema mawa oyo azalaki komonisa epai ya bato etindaki ye asalisa bango.
Makambo oyo Yesu asalaki mpo na bolamu ya bato esukaki kaka te na koteya bango makambo ya elimo. Apesaki bango mpe biloko oyo basengelaki na yango. Na ndakisa, aleisaki bato 5 000 (kozanga kotánga basi na bana) baoyo bazalaki koyoka ye mokolo moko kino na mpokwa. Aleisaki mpe bato 4 000 na libaku mosusu ya nsima. Na mbala ya liboso, asalelaki mampa mitano mpe mbisi mibale, na mbala ya mibale asalelaki mampa nsambo mpe mwa mbisi moke. (Matai 14:14-21; 15:32-38; Malako 6:35-44; 8:1-9) Ezalaki makamwisi? Ɛɛ, asalaki makamwisi.
Yesu abikisaki mpe bato mingi oyo bazalaki na maladi. Abikisaki bakufi-miso, batɛngumi, bato ya maba, mpe baoyo bakufá-matoi. Asekwisaki mpe ata bakufi! (Luka 7:22; Yoane 11:30-45) Mokolo mosusu moto moko ya maba abondelaki ye ete: “Soko olingi, okoki kopɛtola ngai.” Yesu asalaki nini? “Asemboli lobɔkɔ, mpe amami ye, ye ete, Nalingi, pɛtwá na yo!” (Malako 1:40, 41) Yesu azalaki na mposa makasi ya kosalisa bango. Na makamwisi lokola oyo, Yesu amonisaki bolingo na ye mpo na bato oyo bazalaki konyokwama.
Ezali mpasi mpo na kondima yango? Yesu asalaki makamwisi na ye mingi na miso ya bato nyonso. Ata bayini na ye oyo bazalaki ntango nyonso koloba mabe mpo na ye, bakokaki te koboya kondima ete azalaki kosala makamwisi. (Yoane 9:1-34) Lisusu, makamwisi na ye ezalaki na ntina na yango. Esalisaki bato báyeba ete Yesu azali moto oyo Nzambe atindaki.—Yoane 6:14.
Soki tozali kotalela mateya ya Yesu mpe bomoi na ye ata mwa moke, yango ekosalisa biso ete tólinga ye mingi mpe ekotinda biso tómekola bolingo oyo ye amonisaki. Kasi, yango ezali te lolenge bobele moko oyo Yesu akoki kobongola bomoi na yo. Azalaki kaka moteyi monene te oyo azalaki koteya bolingo. Amonisaki mpe ete liboso ya koya awa na mabele azalaki na bomoi lokola Mwana mobotami-bobele-moko ya Nzambe. (Yoane 1:14; 3:16, NW; 8:58; 17:5; 1 Yoane 4:9) Nsima ya bomoi na ye awa na mabele lokola moto Yesu akómi na bomoi ya lolenge mosusu, mpe yango esali ete azala moto ya ntina mingi mpo na yo. Biblia emonisi ete Yesu asekwisamaki mpe asili kotyama Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. (Emoniseli 11:15) Yesu alobaki ete: “Oyo ezali bomoi ya seko ete báyekola koyeba yo Nzambe bobele moko ya solo mpe motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3, NW; 20:31) Ya solo, koluka koyeba Yesu Klisto ekoki kopesa bomoi oyo ezangi nsuka na kati ya Paladiso! Yango ekozala ndenge nini? Mpo na nini te koyekola makambo mingi na ntina na Yesu mpo omona ndenge oyo “bolingo ya Klisto ezali kotinda biso” ete tómekola ye? (2 Bakolinti 5:14, NW ) Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo.—Yoane 13:34, 35.
Soki liyebisi ezali te, mikapo nyonso ya Biblia oyo ezali awa euti na Biblia ya Lingala haut-fleuve, ebimeli ya 1970. NW elakisi New World Translation of the Holy Scriptures.