Bato bazali koluka bisakweli oyo bakoki kotyela motema
NTANGO Alesandala Monene akómaki mokonzi ya Makedonia na mobu 336 L.T.B., mbala moko akendaki na esika mosantu ya Delphes, mboka moko oyo ezalaki na kati ya Grèce. Mposa na ye ezalaki ayangela bikólo mingi ya mokili na ntango wana. Kasi, alingaki naino banzambe bándimisa ye ete akokokisa mokano monene wana. Masolo ya kala elobaka ete mokolo oyo akómaki na Delphes, ezalaki mokolo oyo bapesaki ndingisa te ya kokutana na mosakoli. Lokola Alesandala alingaki kozonga mpamba te, atyaki mbamba mpe asɛngisaki na makasi ete mosakoli-mwasi ayebisa ye esakweli moko. Mosakoli alobaki na nkanda ete: “Elenge mobali, moto akoki kolonga yo te!” Mokonzi azwaki maloba yango lokola esakweli malamu mpo na ye, ezalaki komonisa ete akolonga na bitumba.
Nzokande, Alesandala akokaki koyeba malamumalamu ndenge oyo alingaki kolonga bitumba soki atalelaki bisakweli oyo ezali na mokanda ya Danyele, na kati ya Biblia. Bisakweli yango eyebisaki polele mpenza ndenge oyo akobɔtɔla bamboka na mwa ntango moke. Masolo ya kala elobaka ete nsukansuka Alesandala azwaki libaku ya komona makambo oyo Danyele akomaki mpo na ye. Josèphe, Moyuda moko oyo azalaki mokomi ya makambo ya kala ayebisi ete ntango mokonzi ya Makedonia akómaki na Yelusaleme, balakisaki ye esakweli ya Danyele. Ekoki kozala mokapo 8 ya mokanda yango. (Danyele 8:5-8, 20, 21) Masolo ya kala elobaka ete ezali mpo na yango nde basoda ya Alesandala babebisaki Yelusaleme te.
Mposa ya moto nyonso
Moto nyonso, azala mokonzi to moto mpamba, moto ya kala to ya mikolo na biso, azalaka na mposa ya koyeba bisakweli ya solosolo mpo na mikolo ekoya. Lokola tozali bato, tozali na mayele, yango wana tokanisaka makambo oyo eleká, toyebi makambo oyo ezali kosalema sikoyo, mpe tolukaka koyeba makambo oyo ekoya. Yango wana lisese moko ya bato ya Chine elobaka ete: “Ye oyo akoki koyeba mikolo misato liboso makambo ekoya akozala mozwi mpo na mbula nkóto na nkóto.”
Banda kalakala, bato ebele balukaki koyeba makambo ekoya na nzela ya maloba oyo bakanisaki ete euti epai ya Nzambe. Tózwa ndakisa ya Bagreke ya kala. Bango bazalaki na bisika mosantu ebele, lokola na Delphes, na Délos, mpe na Dodone. Kuna, bazalaki kokende kotuna banzambe na bango makambo ya politiki to ya bitumba, mpe makambo ya moto na moto lokola mobembo, libala, mpe bana. Longola bakonzi ya mboka to bakonzi ya basoda, ezali mpe na bikólo to bamboka mobimba oyo ezalaki koluka litambwisi ya banzambe na nzela ya bisakweli yango.
Profesere moko alobi ete, sikoyo “bibongiseli ndenge na ndenge ekómi kosalema na mokano ya koyekola makambo ekoya.” Kasi, bato mingi bamonaka malamu bátya pembeni mokanda se moko oyo ezali na bisakweli ya solosolo, elingi koloba Biblia. Baboyaka likanisi nyonso oyo elobi ete bisakweli ya Biblia ezali mpenza na makambo oyo bazali na mposa na yango. Kutu, bato mosusu ya mayele bazali koloba ete bisakweli ya Biblia ezali ndenge moko na bisakweli ya banganga na ntango ya kala. Lisusu, mbala mingi na mikolo na biso, bato ya ntembe bateyá bango makambo ya lokuta mpo na Biblia.
Tosɛngi yo otánga lisolo ya Biblia yo moko. Soki totaleli bisakweli ya Biblia mpe totaleli bisakweli ya bato, tokomona likambo nini? Okoki kondima bisakweli ya Biblia koleka bisakweli ya bato ya kala? Okoki kotya motema na bisakweli ya Biblia na kati ya bomoi na yo?
[Elilingi na lokasa 3]
Biblia esakolaki ete Alesandala akobɔtɔla bikólo mingi na mwa ntango moke
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Cortesía del Museo del Prado, Madrid, Espagne
[Elilingi na lokasa 4]
Alesandala Monene
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Musei Capitolini, Rome
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]
COVER: General Titus and Alexander the Great: Musei Capitolini, Roma