Makambo oyo ekoki kondimisa yo bisakweli ya Biblia
PYRRHUS, mokonzi ya Épire, mboka moko oyo ezalaki na nɔrdi-wɛsti ya Grèce, azwanaki matata na bokonzi ya Loma mpe matata yango eumelaki. Lokola azalaki na mposa makasi ya koyeba ndenge matata yango ekosuka, akendaki koluka esakweli na esika mosantu ya mboka Delphes. Kasi, eyano oyo bapesaki ye ekokaki kolimbolama na ndenge mibale: (1) “Nalobi ete yo mwana ya Éaque, okoki kolonga Baloma. Okokende mpe okozonga, okokufa na etumba te.” (2) “Nalobi ete Baloma bakoki kolonga yo, mwana ya Éaque. Okokende, okozonga te, okokufa na etumba.” Pyrrhus amonaki malamu alanda ndimbola ya liboso mpe abundisaki Loma mpe balongaki ye.
Makambo ya ndenge oyo epusaki bato bámona ete bisakweli ya kala ezalaki na bosikisiki te mpe ezalaki na mabombami. Kasi, ezali boni mpo na bisakweli ya Biblia? Bato mosusu oyo batyolaka Biblia balobaka ete bisakweli na yango ezali kaka ndenge moko na bisakweli ya bato ya kala. Bato yango balobaka ete bisakweli ya Biblia ezalaki makanisi ya bato ya mayele mpe ya bososoli mingi, mingimingi banganga, mpo na koyebisa makambo oyo ekosalema. Bakanisaka ete bato yango, soki bataleli makambo oyo bamonaki liboso na bomoi na bango to nsima ya koyoka makambo epai ya bato minene oyo bayebani na bango, bazalaki koloba ndenge makambo mosusu ekoleka. Soki tokokanisi makambo ndenge na ndenge ya bisakweli ya Biblia na bisakweli ya bato ya kala, na nsuka tokozwa makanisi oyo ebongi mpenza.
Makambo oyo ekeseni
Bisakweli mingi ya kala ezalaki polele te. Na ndakisa, na mboka Delphes, bazalaki kopesa biyano na mongongo oyo ezalaki koyokana malamu te. Yango wana esɛngaki ete banganga bálimbola bisakweli yango mpe bazalaki kokɔtisa makanisi oyo ekokaki kolimbolama na balolenge mingi. Ndakisa moko malamu na likambo yango ezali eyano oyo bapesaki Crésus, mokonzi ya Ludia. Ntango akendaki kotuna esakweli na esika mosantu, bayebisaki ye boye: “Soki Crésus akatisi Ebale Halys, akobebisa bokonzi moko monene.” Nzokande, “bokonzi moko monene” oyo ebebaki ezali nde bokonzi na ye! Ntango Crésus akatisaki Ebale Halys mpo na kobɔtɔla Kapadokia, akweaki na mabɔkɔ ya Sirise mokonzi ya Perse mpe alongaki ye.
Bisakweli ya Biblia ekeseni mpenza na bisakweli ya banzambe ya lokuta. Bisakweli ya Biblia ezalaka sikisiki mpe ezalaka polele. Na ndakisa, esakweli moko elobelaki ndenge oyo bokonzi ya Babilone ekosuka; esakweli yango ezali na mokanda ya Yisaya. Mbula soki 200 liboso ete likambo yango esalema, mosakoli Yisaya alobaki ata makambo mikemike mpe alimbolaki polele ndenge oyo Bamede na Baperse bakokweisa Babilone. Esakweli eyebisaki ete mokonzi oyo akolonga nkombo na ye ekozala Sirise, mpe ayebisaki mayele oyo akosalela: akokaukisa batelase minene ya mai oyo ezalaki kobatela mboka mpe bisika ya kokɔta na mboka yango oyo ezalaki na lopango monene ekozala polele ntango ye akokɔta. Makambo yango nyonso wana ekokisamaki. (Yisaya 44:27–45:2) Lisusu, Biblia esakolaki solo ete nsukansuka Babilone ekotikala mpamba.—Yisaya 13:17-22.
Tótalela lisusu likambo oyo mosakoli Yona alobaki polele: “Naino mikolo ntuku minei mpe Ninive akobukama.” (Yona 3:4) Makambo nyonso ezali polele awa! Bato ya Ninive bayokaki nsango yango polele mpe na sikisiki, yango wana mbala moko “bandimaki Nzambe; babongisaki kokila mpe balataki ngɔtɔ.” Lokola babongolaki motema, Yehova abomaki lisusu bato ya Ninive te na ntango wana.—Yona 3:5-10.
Bato bazalaki kosalela bisakweli na makambo ya politiki. Mbala mingi bakonzi ya mboka na bakonzi ya basoda bazalaki kolobela ndimbola oyo ebongi na bango mpo na matomba mpe mikano na bango moko mpe bazalaki komonisa ete ezali “mokano ya Nzambe.” Kasi, bisakweli ya Nzambe ezalaki kotalela bilongi ya bato te.
Tópesa bandakisa: Natana, mosakoli ya Yehova abangaki te kopamela Mokonzi Davidi ntango asalaki mabe. (2 Samwele 12:1-12) Ntango Yelobama II azalaki mokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele, mosakoli Hosea na mosakoli Amosa balobelaki mokonzi motomboki yango polele mpe na maloba ya makasi mpe bato oyo bazalaki na ngámbo na ye mpo batɛmɛlaki Nzambe mpe basalaki makambo mabe na miso ya Nzambe. (Hosea 5:1-7; Amosa 2:6-8) Na monɔkɔ ya mosakoli Amosa, Yehova akebisaki mokonzi na maloba makasi ete: “Nakotɛlɛmɛla ndako na Yelobama na mopanga.” (Amosa 7:9) Ndako ya Yelobama ebomamaki nyɛɛ.—1 Mikonzi 15:25-30; 2 Ntango 13:20.
Mingimingi, mpo na koyoka bisakweli, bazalaki kofuta mbongo. Moto oyo apesi mbongo mingi, bazalaki koyebisa ye esakweli oyo ekosepelisa ye. Baoyo bazalaki kokende na esika mosantu ya Delphes mpo na koyoka bisakweli bazalaki kofuta mbongo mingi, nzokande bazalaki koyebisa bango makambo ya mpambampamba. Yango wana, tempelo ya Apolo na bandako mosusu ya losambo etondaki na biloko ya motuya. Nzokande, bisakweli mpe makebisi ya Biblia ezalaki kosɛnga mbongo te mpe ezalaki na koponapona te ata soki moto oyo esakweli moko etalelaki ye azalaki na lokumu to na bozwi nini; mpamba te mosakoli ya solo akokaki kondima kanyaka te. Samwele oyo azalaki mosakoli mpe mosambisi, atunaki na bosembo nyonso ete: “Nayambi kanyaka epai na nani ete nakanga miso na ngai?”—1 Samwele 12:3.
Lokola bisika oyo bazalaki koyebisa bisakweli eyebanaki, esengelaki ete moto asala mobembo tii na bisika yango mpo na koyoka bisakweli. Ezalaki mpasi mpo na bato oyo bazalaki na bozwi mingi te bákóma na bisika yango mpamba te ezalaki na bisika lokola Dodone na Ngomba Tomarus na mboka Épire mpe na Delphes na kati ya Grèce, epai oyo ezali na bangomba mingi. Mingimingi, kaka bato ya mbongo na bakonzi nde bakokaki kotuna banzambe na bisika mosantu wana. Lisusu, na kati ya mbula mobimba, ezalaki se na mwa mikolo moke oyo bazalaki koyebisa “mokano ya banzambe.” Nzokande, Yehova Nzambe azalaki kotinda basakoli na ye mpo na kosakola makambo oyo bato basengelaki koyoka. Na ndakisa, ntango Bayuda bazalaki na boombo na Babilone, Nzambe atindelaki bato na ye basakoli soki misato: Yilimia na Yelusaleme, Ezekiele epai ya baombo, mpe Danyele na mboka-mokonzi ya Babilone.—Yilimia 1:1, 2; Ezekiele 1:1; Danyele 2:48.
Bisakweli ya bato ezalaki koyebisama na nkuku, yango wana, moto oyo ayoki yango akokaki kolimbola yango na ndenge oyo ezali na litomba mpo na ye. Nzokande, mbala mingi bisakweli ya Biblia ezalaki kopesama na miso ya bato nyonso mpo bango nyonso báyoka nsango mpe bákanga ntina na yango. Mosakoli Yilimia alobaki mbala mingi na miso ya bato nyonso na Yelusaleme, ata ayebaki ete nsango na ye ezalaki kosepelisa bakonzi mpe bato ya mboka yango te.—Yilimia 7:1, 2.
Lelo oyo, bato batalelaka bisakweli wana lokola makambo oyo eleká. Ezali ata na ntina moko te mpo na bato oyo bazali na eleko na biso oyo etondi na mikakatano. Ata esakweli moko te elobeli makambo ya mikolo na biso to mikolo ekoya. Kasi, bisakweli ya Biblia ezali na kati ya “Liloba ya Nzambe [oyo] ezali na bomoi mpe na nguya.” (Baebele 4:12) Bisakweli ya Biblia oyo ekokisamá ezali kolakisa ndenge oyo Yehova asalelaka bato makambo mpe ezali kolakisa makambo ya ntina mpo na mikano mpe bomoto na ye. Lisusu, bisakweli ya ntina mingi ya Biblia ekokokisama na mikolo ezali koya. Ntango alobelaki makambo oyo ekoya, ntoma Petelo ayebisaki boye: “Tozali kotalela likoló na sika [Bokonzi ya Masiya kuna na likoló] mpe nse na sika [bato ya sembo] [lokola] elakaki [Nzambe]; boyengebene ekofanda kati na yango.”—2 Petelo 3:13.
Ndenge oyo tokokanisi bisakweli ya Biblia na bisakweli ya mangomba ya lokuta ekoki kopusa yo oloba lokola ekomami na buku moko (The Great Ideas) ete: “Na oyo etali koyeba makambo oyo ekokómela bato, basakoli Baebele bakeseni na basakoli mosusu. Bakeseni na bato oyo, na bikólo mosusu, bayebisaka makambo ekoya to banganga-nkisi, . . . basalelaka bikelakela to mayele mabe te mpo na koyeba mabombami ya Nzambe. . . . Mingimingi, bisakweli na bango ezalaka polele, ekeseni na bisakweli ya basakoli ya lokuta. Mokano na bango ezalaka ya kolimbola, kasi ya kobomba mokano ya Nzambe te mpo na makambo oyo Ye moko alingi ete bato báyeba yango liboso.”
Okondima bisakweli ya Biblia?
Okoki kondima bisakweli ya Biblia. Yehova akoki kozwa esika ya liboso na bomoi na yo na bisakweli na ye oyo bizali kokokisama. Bisakweli ya Biblia ezali masolo mpamba ya makambo eleká te. Bisakweli mingi ya Biblia ezali kokokisama sikoyo to etikali moke ekokokisama. Soki totali makambo oyo eleká, tokoki kolikya ete yango mpe ekokokisama. Lokola bisakweli yango etaleli eleko na biso mpe etaleli bomoi na biso na mikolo ekoya, ebongi tótyela yango likebi mpenza.
Okoki mpenza kondima esakweli ya Yisaya 2:2, 3 oyo elobi boye: “Ekozala ete na mikolo na nsuka, ngomba na ndako na [Yehova] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso . . . Bikólo mingi bakokenda mpe bakoloba ete, Yakani, tóbuta na ngomba na [Yehova] . . . ete alakisa biso nzela na ye mpe ete tótambola na bipai bikokendaka ye.” Lelo oyo, bamilio ya bato bazali mpenza kondima losambo ya Yehova mpe bazali koyekola kotambola na banzela na ye. Okosimba libaku ya koyekola makambo mingi ya banzela ya Nzambe mpe kozwa boyebi ya solosolo ya Nzambe mpe ya mikano na ye mpo otambola na banzela na ye?—Yoane 17:3.
Esakweli mosusu ya Biblia ezali kotinda biso tósala makambo nokinoki. Mpo na mikolo ezali koya, mokomi ya nzembo asakolaki boye: “Basali na mabe bakosuka . . . Nsima na mwa ntango moke, moto na mabe akozala lisusu te.” (Nzembo 37:9, 10) Eloko nini esɛngami mpo moto abika ntango bato mabe mpe bato oyo bazali kotyola bisakweli ya Biblia bakobomama? Nzembo yango epesi eyano ete: “Baoyo bakozilaka [Yehova] bakosangola mokili.” (Nzembo 37:9) Kozela Yehova elimboli kotyela bilaka na ye motema mobimba mpe kotosa mibeko na ye na kati ya bomoi na biso.—Masese 2:21, 22.
Bomoi ekozala ndenge nini ntango bato oyo bazali kozela Yehova bakozwa mokili? Bisakweli ya Biblia eyebisi lisusu ete bato ya botosi bakozala na bomoi ya malamu mpenza. Mosakoli Yisaya akomaki ete: “Bongo miso na bakufeli miso makofungolama, mpe matoi na bimimi makozipolama; bongo, motɛngumi akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo na ebubu ekoyemba na esengo. Zambi mai makopunzwa kati na lisobe, bitima kati na mokili mokauki.” (Yisaya 35:5, 6) Ntoma Yoane akomaki makambo oyo ezali kolendisa na maloba oyo: “[Yehova] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te, mpo ete makambo na liboso masili koleka. Mofandi na kiti na bokonzi alobi ete, . . . Komá ete maloba oyo mazali sembo, na solo.”—Emoniseli 21:4, 5.
Batatoli ya Yehova bayebi ete Biblia ezali mokanda oyo ezali na bisakweli ya solo. Bandimaka mpenza elendiseli ya ntoma Petelo ete: “Tozali kolendisa liloba lisakolami na makasi na koleka. Bokosala malamu kotya mitema na yango, lokola na mwinda oyo ezali kopela na esika na molili mabe, kino ekotana ntɔngɔ mpe [monzoto] na ntɔngɔ ekobima na mitema na bino.” (2 Petelo 1:19) Elikya na biso ezali ete bisakweli ya Biblia oyo eyebisi bomoi malamu mpo na mikolo ezali koya ekosimba mpenza motema na yo!
[Etanda/Bililingi na lokasa 6]
ESIKA MOSANTU YA DELPHES eyebanaki koleka bisika mosusu na Grèce ya kala.
Milinga mabe ezalaki kokómisa mosakoli- mwasi lokola moto alangwi
[Bililingi]
Mosakoli-mwasi azalaki kofanda na kiti mpe abandi kosakola
Bato bazalaki kondima ete maloba na ye ezalaki na bisakweli oyo ezalaki kouta epai ya nzambe Apolo
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Kiti: Euti na buku Dictionary of Greek and Roman Antiquities; Apolo: The Complete Encyclopedia of Illustration/J. G. Heck
[Elilingi na lokasa 7]
Moto akokaki kotya motema na bisakweli oyo bazalaki koyebisa na esika mosantu ya Delphes te
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Delphes, Grèce
[Bililingi na lokasa 8]
Okoki kotya motema mobimba na esakweli ya Biblia oyo elobeli mokili ya sika