Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/7 nk. 29-31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • “Kolemba te mpo na kosala malamu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tóbatela kimya mpe bopɛto ya lisangá
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Mokanda ya Biblia nimero 53—2 Batesaloniki
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/7 nk. 29-31

Mituna ya batángi

Likambo ya ‘kotya elembo’ oyo 2 Batesaloniki 3:14 (NW) elobeli, lisangá nde esengeli kosala yango to moklisto mokomoko nde asengeli kosala yango na kotikáká kosangana na bato ya motó makasi?

Makambo oyo ntoma Paulo akomelaki Batesaloniki ezali komonisa ete bankulutu ya lisangá basengeli kosala likambo moko ya sikisiki: ‘kotya elembo.’ Kasi, na nsima, moklisto mokomoko akolanda ndakisa yango. Akosala yango na mikano ya elimo. Tokoki kokanga ntina ya likambo yango malamu soki totaleli makambo oyo ezalaki ntango apesaki toli yango.

Paulo asalaki mingi mpo lisangá ya Tesaloniki esalema. Asalisaki basi na mibali bákóma bandimi. (Misala 17:1-4) Na nsima, ntango azalaki na Kolinti, akomelaki bango mokanda mpo na kopesa bango longonya mpe kolendisa bango. Paulo apesaki bango mpe toli oyo esengelaki. Alendisaki bango ‘báfanda na kimya mpe bátalela makambo na bango mpenza mpe básala misala na mabɔkɔ na bango.’ Lokola bamosusu bazalaki kosala bongo te, Paulo alobaki lisusu boye: “Bandeko, tolendisi bino bókebisa bato ya mobulu, bólobelaka milimo oyo ezali konyokwama maloba ya kolendisa, bózala na motema molai epai na baoyo bazali na bolɛmbu.” Emonani polele ete “bato ya mobulu”a bazalaki na kati na bango mpe esengelaki kopesa bango toli.​—1 Batesaloniki 1:2-10; 4:11; 5:14, NW.

Nsima ya basanza, Paulo akomelaki Batesaloniki mokanda ya mibale. Na mokanda yango abakisaki makambo mosusu ya kozala ya Yesu na mikolo oyo ezalaki koya. Paulo apesaki lisusu toli mpo na koyeba ndenge ya kosala epai ya bato ya mobulu oyo bazalaki ‘kosala te, kasi mosala na bango se kokɔta na makambo ya bato.’ Misala na bango ekesanaki mpenza na ndakisa oyo Paulo apesaki bango lokola mosali ya makasi mpe na etinda oyo apesaki bango polele ete moto na moto asala mpo akokisa bamposa na ye. (2 Batesaloniki 3:7-12) Paulo ayebisaki mwa makambo oyo basengelaki kosala. Makambo yango esengelaki kosalema nsima wana bankulutu bakebisi mpe bapesi naino moto ya mobulu toli. Paulo akomaki boye:

“Bandeko, tozali kolaka bino, . . . bókima ndeko nyonso oyo azali kotambola na mobulu mpe aboyi koyamba ezaleli oyo bozwaki epai na biso. Kasi, bandeko, bino bótika kosala malamu te. Kasi, soki moto moko aboyi kotosa liloba na biso na mokanda oyo, bótya ye elembo mpe bótika kotambola na ye mpo ayoka nsɔni. Nde bótalela ye lokola monguna te kasi bótika te kokebisa ye lokola ndeko.”—2 Batesaloniki 3:6, 13-15, NW.

Tomoni ete makambo oyo esengelaki kosalema ezali: kokima bato ya mobulu, kotya bango elembo, kotika kotambola na bango, kasi kokebisa bango lokola bandeko. Ntango nini bandeko na kati ya lisangá bakokaki kosala bongo? Mpo na kokanga ntina na yango malamu, tótalela makambo misato oyo Paulo alobeli awa te.

1. Toyebi ete baklisto bazali bato ya masumu mpe basalaka mabunga. Kasi, toyebi ete bolingo ezali elembo ya boklisto ya solo. Bolingo ezali kosɛnga biso tómityaka na esika ya bato mosusu mpe tólimbisaka mabunga na bango. Na ndakisa, moklisto akoki mbala mosusu kosilika makasi, ndenge ekómelaki Balanaba na Paulo. (Misala 15:36-40) To mpo alɛmbi, moto akoki kobimisa maloba oyo ekoswa to ekozokisa moninga. Na makambo ya ndenge yango, soki tomonisi bolingo mpe tosaleli toli ya Biblia, tokoki kozipa mabunga, tokoki kolanda kofanda esika moko, kotambola elongo, mpe kosala na ndeko na biso. (Matai 5:23-25; 6:14; 7:1-5; 1 Petelo 4:8) Tomoni mpenza ete, na 2 Batesaloniki Paulo azalaki kolobela mabunga ya ndenge oyo te.

2. Paulo azalaki kolobela te likambo ya moklisto moko oyo amoni malamu atika kotambola na ndeko mosusu mpamba te bizaleli to makanisi ya ndeko yango ezali mabe. Na ndakisa, ndeko oyo amonani lokola ete alingi kominanola mingi to alingi biloko ya mosuni mingi. To moboti moko akoki kopekisa mwana na ye kotambola na bilenge oyo batosaka baboti te, oyo balingaka masano ya makasimakasi to ya makama, to oyo batyolaka makambo ya elimo. Wana ezali makambo oyo moto na moto akoki kopona kosala na boyokani na makambo oyo totángaka na Masese 13:20 ete: “Ye oyo akotambola na bato na mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.”—Talá 1 Bakolinti 15:33.

3. Paulo akomelaki Bakolinti mpo na moto oyo azali kosala lisumu monene mpe azali kobongola motema te; yango ezalaki likambo ya mabe mpenza. Basengelaki kobimisa basumuki yango oyo baboyi kobongola motema na lisangá. Ezalaki lokola nde bakabi moto “mabe” na Satana. Na nsima, baklisto oyo bazali sembo basengelaki kosangana na bato mabe wana te. Ntoma Yoane ayebisaki baklisto ete bápesa ye ata mbote te. (1 Bakolinti 5:1-13; 2 Yoane 9-11) Kasi, ezali yango te nde esɛngami na 2 Batesaloniki 3:14.

Makambo misato oyo touti kolobela ekeseni na likambo ya “bato ya mobulu” oyo balobelami na 2 Batesaloniki. Paulo akomaki ete bango bazalaki kaka ‘bandeko,’ mpe basengelaki kokebisa bango mpe kotalela bango lokola bandeko. Na yango, likambo ya bandeko oyo bazalaki “bato ya mobulu” ezalaki mwa matata na kati ya bandeko te to lisumu monene oyo bankulutu ya lisangá basengeli kolandela mpo na kobimisa moto na lisangá, ndenge Paulo asalaki mpo na moto oyo asalaki pite na Kolinti. “Bato ya mobulu” basalaki lisumu monene te lokola moto oyo babimisaki na lisangá na Kolinti.

“Bato ya mobulu” na Tesaloniki bazalaki na makambo oyo ezalaki mpenza kolakisa ete bazalaki lisusu kotambola na molɔngɔ te na kati ya lingomba ya boklisto. Bazalaki kosala te, mbala mosusu mpo bakanisaki ete etikali moke Yesu azonga, to mpe mpo bazalaki mpenza na gɔigɔi. Lisusu, bazalaki kotya mobulu na lisangá na “kokɔta na makambo ya bato.” Ekoki kozala ete bankulutu ya lisangá bapesaki bango toli mbala na mbala, na kolandáká toli oyo Paulo apesaki na mokanda na ye ya liboso mpe toli mosusu euti na Liloba ya Nzambe. (Masese 6:6-11; 10:4, 5; 12:11, 24; 24:30-34) Kasi batikaki te etamboli oyo ezalaki kobwaka nsɔni na lisangá mpe ekokaki kozwa baklisto mosusu. Na yango, Paulo, lokola azalaki nkulutu, atángaki nkombo ya bato yango te, kasi alobelaki polele etamboli na bango ya nyamunyamu, mpe amonisaki etamboli mabe na bango.

Ayebisaki mpe lisangá mobimba ete ebongi mpenza ete moklisto mokomoko atya bato ya mobulu ‘elembo.’ Yango elimbolaki ete moto na moto asengelaki koyeba bato oyo misala na bango ekokanaki na etamboli oyo bakebisaki lisangá mpo na yango. Paulo apesaki bango toli ete ‘bákima ndeko nyonso oyo azali kosala makambo na mobulu.’ Yango ekokaki kolimbola koboya moto yango libela te, mpamba te basengelaki ‘kokebisa ye lokola ndeko.’ Basengelaki kokoba kokutana na makita to mpe na mosala ya kosakola. Basengelaki kozala na elikya ete ndeko na bango akoyoka toli mpe akotika bizaleli na ye ya mobulu.

Na ndimbola nini basengelaki “kokima” ye? Na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo. (Talá Bagalatia 2:12.) Koboya kosangana na ye na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo mpe na masano esengelaki kolakisa ye ete bato oyo balingaki mibeko ya Nzambe bazalaki kosepela te na banzela na ye. Ata soki ayokaki nsɔni te to abongwanaki te, bato mosusu bakokaki kolanda ye te mpe kokóma lokola ye te. Nzokande, moklisto mokomoko ya sembo asengelaki kolanda makambo oyo elendisaka. Paulo apesaki bango toli ete: “Bandeko, bótika kosala malamu te.”—2 Batesaloniki 3:13, NW.

Ya solo, toli ya ntoma oyo etindi biso te na kotyola to kosambisa bandeko na biso soki basali mwa mabunga ya mikemike. Kasi, esengeli nde kosalisa moto oyo alandi nzela ya mobulu, oyo eyokani te na mibeko ya boklisto.

Paulo alukaki kokɔtisa makambo ya mindɔndɔmindɔndɔ te na nzela ya mitinda ebele ebele. Kasi ezali polele ete bankulutu basengeli liboso kopesa moto ya mobulu toli mpe komeka kosalisa ye. Soki balongi te mpe moto atiki te etamboli na ye ya mobulu mpe emonani ete bandeko mosusu bakoki kolanda mabe yango, bakoki kozwa mokano ete esengeli kokebisa lisangá. Bakoki kobongisa lisukulu oyo ekomonisa ntina ya koboya etamboli ya mobulu motindo wana. Bakotánga nkombo ya bato te, kasi lisukulu na bango oyo ezali kokebisa ekobatela lisangá mpamba te bato oyo bayokaka toli bakobakisa bokɛngi mpo na kotika kosangana na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo na moto nyonso oyo azali komonisa polele etamboli ya mobulu.

Elikya ezali ete nsima ya mikolo, moto ya mobulu akoyoka nsɔni mpo na etamboli na ye mpe akobongwana. Soki bankulutu na bandeko mosusu ya lisangá bamoni ete abongwani, moto na moto akoki kokamata mokano azongela kosangana na ye na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo.

Na mokuse: Bankulutu ya lisangá nde babandaka na kosalisa mpe kopesa moto oyo azali kotambola na mobulu toli. Soki moto yango amoni mabe ya etamboli na ye te kasi azali kaka kokoba na makambo oyo ekomema bato mosusu na nzela mabe, bankulutu bakoki kosala lisukulu mpo na kokebisa lisangá. Lisukulu yango ekomonisa polele mitinda ya Biblia na makambo lokola bokutani na bato oyo bazali bandimi te na mokano ya kobalana, to etamboli nyonso ya mabe. (1 Bakolinti 7:39; 2 Bakolinti 6:14) Na kati ya lisangá, soki baklisto bakebisami na ndenge yango, mokomoko akoki kokamata mokano ya kotika kosangana na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo na bato oyo bamonani polele ete bazali kolanda kotambola na mobulu kasi bazali kaka bandeko.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bazalaki kosalela liloba ya Greke oyo ebongolami awa na mobulu mpo na basoda oyo bazalaki kokima mosala to bazalaki koboya disipilini, mpe bana oyo bazalaki kokima kelasi.

[Bililingi na lokasa 31]

Bankulutu baklisto bakebisaka bato ya mobulu kasi batalelaka bango lokola bandeko

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto