Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/8 nk. 3-4
  • Lelo oyo bato bazali ndenge moko te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lelo oyo bato bazali ndenge moko te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Masolo mosusu
  • Bato bazali ndenge moko te—Nzambe akanaki bongo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Tozali komeka kosala ete bato bázala ndenge moko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Ekoki kosalema ete bato nyonso bázala ndenge moko?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Batatoli ya Yehova babendaka bato na makasi bákɔta na lingomba na bango?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/8 nk. 3-4

Lelo oyo bato bazali ndenge moko te

“Tondimi ete makambo oyo ezali mpenza solo: bato nyonso bakelamá mpo bázala ndenge moko, Mozalisi na bango apesá bango ntomo (droits) oyo moto moko akoki kotyola te; kati na ntomo yango, totángi bomoi, bonsomi mpe koluka bolamu.”—Déclaration d’indépendance, esakolamaki na mobu 1776 na États-Unis.

“Bato nyonso babotamá na bonsomi mpe bazali na ntomo ndenge moko.”—Déclaration des droits de l’homme et du citoyen, esakolamaki na parlema ya France na mobu 1789.

“Bato nyonso babotamá na bonsomi mpe bazali na lokumu mpe ntomo ndenge moko.”—Déclaration universelle des droits de l’homme, esakolamaki na likita monene ya mikili ya ONU na 1948.

TOKOKI kotyela likambo yango ntembe te. Awa na mokili, bato nyonso bazalaka na mposa bázala ndenge moko. Kasi, lokola bazali kolobela yango mbala na mbala ete bato basengeli kozala ndenge moko, elakisi ete tii na moi ya lelo, bato bazali ndenge moko te.

Lelo oyo nani akoki mpenza kotombola mosapi mpo na koloba ete, lokola tokómi na nsuka ya ekeke ya 20, makambo ebongi? Bato nyonso ezala na États-Unis, na France, to ata na ekólo nini na kati ya bikólo 185 ya ONU, bazali mpenza na ntomo ndenge moko oyo babotamá na yango, ndenge balobaka?

Atako “ezali solo” ete bato nyonso basengeli kozala ndenge moko, bato nyonso bazali na ntomo ya “bomoi, bonsomi mpe koluka bolamu” ndenge moko te. Na ndakisa, tokoki koloba mpenza ete bato nyonso bazali na lotomo ya kozala na bomoi ndenge moko soki na Afrika, monganga moko asengeli kosalisa bato 2 569, nzokande na Mpoto monganga moko azali se mpo na bato 289? Ndenge nini tokoki koloba ete bato bazali na ntomo ya kozala na bonsomi mpe koluka bolamu ndenge moko soki na Inde, mwana moko ya mobali na kati ya bana misato mpe bana mibale ya basi na kati ya bana misato bakoyeba kotánga na kokoma te bomoi na bango mobimba, nzokande na mikili lokola Japon, Allemagne, Grande-Bretagne, mwana mokomoko akokɔta kelasi?

Ebandi boni tóloba ete bato bazali na “lokumu mpe ntomo” ndenge moko soki na Amérique centrale moto moko azali kobikela na dolare 1 380 na mbula mobimba, nzokande na France, na mbula moko moto azali kozwa dolare 24 990? Ndenge nini tokoki koloba ete bato nyonso bazali ndenge moko soki mwana mwasi oyo abotami na Afrika akoki koumela na bomoi mbula 56, nzokande mwana mwasi ya Amerika ya Nɔrdi akoki koumela mbula 79?

Bato bazali ndenge moko te na makambo ebele, mpe makambo yango nyonso ya mabe. Soki tolobi ete bato bazali ndenge moko te na makambo ya bomoi, na likoki ya kozwa lisalisi ya monganga, na kozwa libaku ya kokɔta kelasi, totángi kaka mwa ndambo. Ntango mosusu, makambo ezali kosala ete bato bázala na lokumu mpe na bonsomi te ezali kaka bokabwani na makambo ya politiki, bokeseni ya mposo, to ya lingomba. Atako masukulu ndenge na ndenge esalemá mpe ezali kosalema mpo bato ya mokili mobimba bázala ndenge moko, bosolo ezali ete na mokili oyo bato bazali ndenge moko te. Lokola maladi oyo ezali kopalangana, bato bazali ndenge moko te na bisika nyonso. Likambo yango ezali komema mikakatano lokola bobola, maladi, boinga, bosomɛlɛ, mpe bokabwani oyo ezali konyokola bato.

“Bato nyonso bakelamá ndenge moko.” Ezali likanisi malamu mpenza! Kasi bosolo ezali ndenge mosusu.

[Picture Credit line on page 3]

FƆTƆ YA ONU 152113/SHELLEY ROTNER.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto