Bato bazali ndenge moko te—Nzambe akanaki bongo?
Na mokuse, eyano ezali ete te. Sikoyo tótalela mpo na nini tolobi bongo.
MOKANO ya Nzambe ezalaki ete bato nyonso bázala na bomoi ya malamu mpe ya esengo. Lisolo oyo ezali koyebisa ndenge oyo moto asalemaki elobi boye: “Nzambe alobaki ete, Tiká tózalisa moto na lolenge na biso na elilingi na biso; mpe tiká ete bázala na bokonzi likoló na mbisi na mai, mpe na likoló na ndɛkɛ na likoló, mpe na likoló na nyama nyonso, mpe likoló na mokili mobimba, mpe likoló na biloko nyonso [bikotambolaka, NW] na mokili.” Nsima ya kokela biloko nyonso awa na mabelé, “Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe izalaki malamu mingi.”—Genese 1:26, 31.
Ndenge lelo oyo ezali na bato bazali malamu mpe bamosusu bazali na mpasi, Nzambe akoki koloba ete yango ezali “malamu mingi”? Te, mpamba te “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Biblia elobi ete Nzambe “akoponaponaka bato te” mpe “mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe na sembo mpe na mabe te.” (Deteronome 10:17; 32:4; talá Yobo 34:19.) Lisusu, ntoma Petelo alobaki boye: “Na solo namoni ete Nzambe akokabolaka bato te; kasi na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.”—Misala 10:34, 35.
Lokola Nzambe azali bolingo, aponaponaka te, azali sembo, azali malamu, azali na boyengebene, mpo na nini asalaki ete bato nyonso bázala na bolamu ndenge moko te? Na ndenge oyo toyebeli Nzambe na bizaleli na ye, tondimi te ete akokaki kotika bato bákesana: bamoko bázala malamu, bongo bamosusu bázala na mpasi mpe atya bango na mokili oyo bato bakeseni mpenza. Mokano ya Nzambe ezalaki ete bato nyonso bábotama “na bonsomi mpe bázala na lokumu mpe na ntomo ndenge moko.” Kasi, lelo oyo tozali komona ete makambo ezali bongo te. Mpo na nini?
Esika bokeseni ebandi
Ntango tozali koloba ete Nzambe akelaki bato nyonso bázala ndenge moko, tolingi koloba te ete akanaki ete bato bákokana na makambo nyonso. Bakokaki kozala na makoki, na makambo oyo basepelaka na yango, mpe na bomoto oyo ekeseni. Bakokaki kozala na lokumu to bokonzi oyo ekeseni. Na ndakisa, mobali na mwasi bazali ndenge moko na makambo nyonso te, kasi Nzambe asalaki mwasi mpo azala “mosungi” ya mobali. (Genese 2:18) Toyebi malamu ete baboti na bana bazali na bokonzi ndenge moko te. Kasi, atako bakeseni na makambo wana, Nzambe alingaki kopesa bato nyonso—mibali, basi, to bana—lotomo ndenge moko ya kokokisa bamposa na bango mpo bázala na bomoi ya malamu. Basengelaki mpe kozala na lokumu ndenge moko na miso ya Nzambe.
Ndenge moko mpe, bapesaki bana ya Nzambe, elingi koloba bikelamu ya elimo oyo basalemaki liboso ya bato, misala mpe mikumba ndenge moko te. (Genese 3:24; 16:7-11; Yisaya 6:6; Yuda 9) Atako bongo, na makambo oyo bapesaki moto na moto, bango nyonso bazalaki na bomoi mpe na bolamu ndenge moko. Na ndenge yango, emonanaki malamu mpenza ete Nzambe aponaponaka te.
Likambo ya mawa ezali ete ekelamu moko ya elimo asepelaki te na ndenge oyo Nzambe asalaki makambo kozanga koponapona. Alukaki azwa mingi koleka oyo Nzambe apesaki ye. Akómaki na mposa ya lokumu mpe ya esika oyo eleki. Lokola akolisaki mposa mabe wana, amikómisaki monguna ya Yehova. Nzokande lokola Yehova azali Mozalisi, azali na lotomo ya kozala likoló ya bikelamu nyonso. Na nsima, mwana yango oyo atombokelaki Nzambe akosaki bato mpo báluka makambo mosusu koleka oyo Nzambe apesaki bango. (Genese 3:1-6; talá Yisaya 14:12-14.) Yango wana, mokano oyo Yehova azalaki na yango ete bato bázala na bomoi ya malamu mpe ya esengo ebebaki. Ekelamu ya elimo oyo etombokaki, oyo Emoniseli 20:2 ebéngi “Satana Zabolo,” ekɔtisaki bokeseni na kati ya bato.
Mokolo mosusu makambo ekobongwana?
Na mokuse, eyano ezali ɛɛ!
Kasi nani akobongisa makambo ekóma ndenge oyo tolingaka? Banda kalakala, bakonzi bamekaka na ndenge nyonso kobongisa makambo, bamosusu basalaka yango mpenza na bosembo nyonso. Kasi balongi se mwa moke. Yango wana, bato mingi bazali koloba ete tokoki kolikya te ete mokolo mosusu bato bakozala ndenge moko. Nzokande, Yisaya 55:10, 11 eyebisi likanisi ya Nzambe, elobi ete: “Lokola mbula mpe mbula mpɛmbɛ ikolongwa na lola mpe ikozonga kuna te kasi ikopolisa mabelé, ete ibimisa biloko na yango mpe itoisa yango, kopesáká mboto epai na mokoni mpe kwanga epai na molei, boye na liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; ekobutwa epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.”
Tozali kobɔndisama na koyeba ete Nzambe alobi ete akokokisa mokano oyo azalaki na yango na ebandeli, elingi koloba asala na boye ete bato nyonso bázala ndenge moko, bázala na bomoi ya malamu mpe ya esengo! Lokola azali Nzambe oyo alobaka solo, amityeli mokano ya kokokisa makambo oyo alakaki. Tozali na esengo na koyeba ete azali na mposa mpe na makasi ya kosala yango. Ndenge nini akokokisa yango?
Na nzela ya Bokonzi oyo Yesu Klisto ateyaki bayekoli na ye básalaka libondeli oyo: “Tata na biso ya Likoló; . . . Bokonzi na yo eya; Oyo olingaka esalama awa na nse, lokola esalamaka na likoló.” (Matai 6:9, 10, Boyokani ya Sika) Ɛɛ, Yehova akosalela Bokonzi ya Nzambe mpo na ‘kobuka mpe kosilisa bikonzi oyo nyonso [oyo ezali lelo oyo], mpe yango moko ekotikala lobiko na lobiko.’—Danyele 2:44.
Ntango Bokonzi ekoyangela kuna na likoló, bato ya sika bakofanda na mabelé. Na ntina na likambo yango, ntoma Yoane akomaki boye na mokanda ya nsuka ya Biblia oyo ebéngami Emoniseli: “Namonaki likoló na sika, na nse na sika, mpo ete lola na liboso, na nse na liboso isili kolongwa.” (Emoniseli 21:1) Makambo mabe oyo ezali kobima na mokili mpo bato bazali ndenge moko te, lokola bobola, maladi, boinga, bokabwani, mpe bwale mosusu ndenge na ndenge oyo bato bazali koyoka; nyonso wana ekolimwa.a
Banda mbula koleka 100, Batatoli ya Yehova bazali koteya bato Bokonzi yango. (Matai 24:14) Na nzela ya mikanda mpe na lisungi oyo bango moko bazali komemela bato, bazali kosala makasi mpo na kosalisa bato báyeba mikano ya Nzambe oyo ekomami na Biblia. Mosala na bango ya koteya bato Biblia, mosala oyo bazali kosala na mokili mobimba, epesi bato elikya ya kozala na bomoi na mokili oyo bato nyonso bakozala ndenge moko mpe bakozala na bolamu; kasi mosala yango esali lisusu ete banda sikoyo, elongola bokeseni ata mwa moke. Tótala ndenge nini.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba na bozindo ndenge oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala ete bato nyonso bázala ndenge moko, talá mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, na mokapo 10 na 11, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Mokano ya Nzambe ezalaki ete bato nyonso bázala na bomoi ya malamu