Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/8 nk. 4-5
  • Sepelá na “bomoi ya solo”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sepelá na “bomoi ya solo”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bomoi ya solosolo”
  • Yebá ete “bomoi ya solo” ezali ndɔtɔ te!
  • Yehova akokisaka bilaka na ye epai na basembwi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Tyá elikya epai na Yehova mpo na kokokisama ya mokano na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika
    Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika
  • Mokili ya sika ekómi pene!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/8 nk. 4-5

Sepelá na “bomoi ya solo”

YEHOVA NZAMBE atya likanisi ya bomoi ya seko na motema ya moto. (Mosakoli 3:11) Yango wana bato bayebaka te basala nini mpo na kosilisa liwa, kasi epai mosusu likanisi yango epesaka bango mposa makasi ya kozala na bomoi.

Biblia Mosantu, Liloba ya Nzambe, epesi biso elikya makasi. (2 Timote 3:16) Yehova, ye oyo azali bolingo, akokaki te kosala moto mpe kopesa ye likanisi ya bomoi ya seko, bongo na nsima moto aumela na bomoi kaka mwa bambula. Nzambe azali mpenza moto malamu mpe akokaki te kokela biso mpo tótungisama bomoi na biso mobimba. Biso tokelamá te lokola “banyama bazangi mayele, babotami bobele mpo na kokangama mpe kobomama.”—2 Petelo 2:12.

Lokola akelaki Adama na Eva mpe apesaki bango likanisi ya kozala na bomoi ya seko, Yehova Nzambe asalaki likambo moko “malamu mingi”; akelaki bango na elikya ya kozala na bomoi libela na libela. (Genese 1:31) Kasi, likambo ya mawa ezali ete mwasi na mobali ya liboso basalelaki bonsomi na bango mabe, batosaki te mobeko moko oyo Mozalisi ayebisaki bango polele; yango wana babungisaki ezalela na bango ya bato bazangi masumu. Yango wana bakufaki, mpe batikelaki bana na bango lisumu na liwa.​—Genese 2:17; 3:1-24; Baloma 5:12.

Biblia eyebisi polele ntina ya bomoi mpe mpo na nini moto akufaka. Biblia elobi ete na kati ya liwa “ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te” mpe ete bakufi “bayebi likambo te.” (Mosakoli 9:5, 10) Na maloba mosusu, bakufi bazali na bomoi te. Liteya oyo elobaka ete molimo ya moto ekufaka te euti na Biblia te. Ezali na libombami moko te mpo na koyeba soki bakufi bazalaka ndenge nini.​—Genese 3:19; Nzembo 146:4; Mosakoli 3:19, 20; Ezekiele 18:4.a

Nzambe azalaki na mokano; akelaki mabele ‘mpo ezala mpamba te.’ Asalaki yango mpo bato bazali na masumu te ‘báfanda’ na paladiso awa na mabelé, mpe atiki mokano na ye te. (Yisaya 45:18; Malaki 3:6) Mpo na kokokisa mokano yango, atindaki Mwana na ye awa na mabelé. Na ndenge atikalaki sembo tii na liwa na ye, Yesu Klisto apesaki eloko oyo esɛngamaki mpo na kobikisa bato na lisumu mpe na liwa. Kutu, Yesu alobaki ete: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi [Mwana mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.”—Yoane 3:16.

Banda kalakala, Nzambe alakaki ete akosala “Likoló na sika mpe nse na sika.” (Yisaya 65:17; 2 Petelo 3:13) Yango elingi koloba ete akopona mwa ndambo ya baklisto ya sembo mpo na bázala na bomoi na likoló. Elongo na Yesu Klisto, bakosala guvernema. Biblia ebéngi guvernema yango ete “Bokonzi na Likoló,” to “Bokonzi ya Nzambe” oyo ekotambwisa “makambo awa na mabele.” (Matai 4:17; 12:28; Efese 1:10; Emoniseli 5:9, 10; 14:1, 3) Soki abomi bato mabe na mokili mobimba mpe apɛtoli yango, Nzambe akotya bato ya sembo, to “mabelé ya sika.” Ekozala na bato oyo Nzambe akobatela ntango akoboma ebongiseli mabe ya ntango oyo. (Matai 24:3, 7-14, 21; Emoniseli 7:9, 13, 14) Bakosangana na bato oyo bakosekwa ndenge Nzambe alaki mpe bakozala lisusu na bomoi.​—Yoane 5:28, 29; Misala 24:15.

“Bomoi ya solosolo”

Mpo na kolobela bomoi ya malamu oyo ekozala na Paladiso awa na mabelé, Nzambe alobi: “Nakozalisa biloko nyonso biloko na sika.” (Emoniseli 21:5) Biso bato tokoki mpenza koyeba te misala kitoko nyonso oyo Nzambe akosala mpo na bato. Nzambe akosala paladiso na mokili mobimba, yango ekozala lokola elanga ya Edene. (Luka 23:43) Ndenge ezalaki na Edene, langi, makɛlɛlɛ, mpe bilei kitoko ndenge na ndenge ekozala bebo. Bobola mpe kozanga bilei ekozala lisusu te, mpo na ntango yango Biblia elobi ete: “Makambo na liboso masili koleka.” (Emoniseli 21:4; Nzembo 72:16) Moto moko te akoloba ete, “ngai nazali na maladi,” mpamba te maladi ekozala lisusu te mpo na libela. (Yisaya 33:24) Ɛɛ, makambo nyonso oyo epesaka bampasi ekozala lisusu te, bakisa mpe monguna monene ya bato, elingi koloba liwa. (1 Bakolinti 15:26) Ntoma Yoane amonaki “mabelé ya sika,” elingi koloba bato ya sika oyo Klisto akoyangela na kati ya emonaneli moko ya kokamwa mpe ayokaki mongongo koloba ete: “[Nzambe] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te.” Likambo nini lisusu ekoki kobɔndisa mpe kosepelisa koleka kokokisama ya esakweli oyo ya Nzambe?

Ntango Biblia ezali kolobela bomoi na mikolo ezali koya, elobelaka mingimingi makambo oyo ekokokisa bamposa ya moto na elimo. Bamposa oyo ebongi oyo balongi kokokisa te lelo oyo, ekokokisama mpenza. (Matai 6:10) Moko na bamposa yango ezali bosembo, oyo ekoki kokokisama lelo te mpo bato oyo bazali koyangela bazali konyokola bato. (Mosakoli 8:9) Mokomi ya nzembo akomaki maloba oyo ezali esakweli ya makambo oyo ekozala ntango Klisto akoyangela: “Na mikolo na ye, moyengebeni akozala na makila malamu; kimya mpe ekoyikana na ntango nyonso ekoumelaka sanza.”—Nzembo 72:7.

Kozala ndenge moko ezali mpe likambo mosusu oyo bato basali makasi mpo na kokokisa yango. Na “kozalisa na sika,” Nzambe akolongola bokeseni. (Matai 19:28) Bato nyonso bakozala na lokumu ndenge moko. Boyangeli moko te ya bato ekoki kosala bongo lelo. Kasi, makambo oyo ekabolaka bato nde ekolongwa, lokola lokoso mpe lolendo oyo epusaka bato na koluka koyangela bato mosusu to konduka biloko ebele. Yisaya asakolaki ete: “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga na miwiti mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alya.”—Yisaya 65:21, 22.

Ya solo, bato banyokwami ndenge bazali kobomana ezala kati na matata ya mwa bato to na bitumba minene! Likambo yango ebanda na kobomama ya Abele mpe ekomi kino na bitumba oyo ezali kosalema na mikolo na biso. Kobanda kala bato bazali koluka kotya kimya kasi ezali kokokisama te! Na Paladiso ya sika, bato nyonso bakozala bato ya kimya mpe ya komikitisa; “bakosepela mpe na kimya na solo.”—Nzembo 37:11.

Yisaya 11:9 elobi ete: “Mokili ekotonda na boyebi na [Yehova] lokola mbonge ekozipaka mai-na-monana.” Ezali na makambo mingi oyo ezali kosala ete tokoka te kososola bozindo ya maloba oyo, kati na yango, ezalela na biso ya bato ya masumu. Toyebi naino te ndenge oyo boyebi ya Nzambe oyo ezangi nsuka ekobimisa bomoko kati na biso na ye mpe ndenge nini ekopesa biso esengo mingi. Kasi lokola Biblia ezali koyebisa biso ete Yehova azali Nzambe ya nguya, ya mayele, ya bosembo, mpe ya bolingo, tokoki kotya motema ete akoyoka mabondeli ya bato nyonso oyo bakofanda na “mabelé ya sika.”

Yebá ete “bomoi ya solo” ezali ndɔtɔ te!

Bato mingi bamonaka ete bomoi ya seko na mokili ya kitoko ezali se ndɔtɔ to makanisi mpamba. Kasi, mpo na baoyo bandimaka makambo oyo Biblia elobi, elikya yango ezali mpenza solo. Ezali lokola longo mpo na bomoi na bango. (Baebele 6:19) Ndenge longo esimbaka masuwa mpe esalisaka yango etɛngatɛnga te, elikya ya bomoi ya seko esalaka ete bato bátɛngatɛnga te mpe bázala na elikya mpe esalisaka bango bábundisa mikakatano makasi ya bomoi mpe kolonga yango.

Tokoki kozala na elikya ete Nzambe akokokisa makambo oyo alaki. Kutu, akataki ndai, elingi koloba liloba oyo akoki kobongola yango te mpo na kopesa biso ndanga. Ntoma Paulo akomaki ete: “Bongo, elingaki Nzambe ete amonisa epai na bazwi na elaka ete mokano na ye ekobongwana te, atii ndai ete mpo na makambo mibale mayebi kobongwana te, oyo Nzambe akoki komimonisa na lokuta kati na yango te, biso . . . tóyika mpiko ete tósimba elikya.” (Baebele 6:17, 18) “Makambo mibale mayebi kobongwana te” oyo mpo na yango Nzambe akoki kozanga te kokokisa liloba na ye ezali elaka na ye mpe ndai na ye; yango nde esimbi bilikya na biso.

Kondima makambo oyo Nzambe alaki ebɔndisaka mpe elendisaka na elimo. Yosua, mokambi ya libota ya Yisalaele, azalaki na kondima ya ndenge wana. Ntango Yosua asalaki lisolo ya nsuka liboso ya Bayisalaele, akomaki mobange mpe ayebaki ete etikali moke akufa. Ata bongo, lokola azalaki na elikya makasi na makambo oyo Nzambe alakaki, azalaki mpenza makasi mpe azalaki sembo. Nsima ya koloba ete azalaki kokende “nzela na bato na mokili nyonso,” nzela ya liwa oyo ekómelaka bato nyonso, Yosua alobaki ete: “Boyebi na mitema na bino mpe na milimo na bino nyonso ete eloko moko ezangi te na makambo malamu nyonso oyo [Yehova] Nzambe na bino atyaki ndaka na yango na ntina na bino. Yango nyonso ebimelaki bino, mpe eloko na yango moko ezangi te.” Ɛɛ, mbala misato Yosua azongelaki koloba ete Nzambe akokisaka kaka makambo nyonso oyo alakaka.​—Yosua 23:14.

Yo mpe okoki kozala na kondima lolenge moko na likambo oyo Nzambe alaki ya kosala mokili ya sika na mikolo ezali koya mosika te. Soki omipesi na koyekola Biblia, okoyeba soki Yehova azali nani mpe mpo na nini abongi ete otyela ye motema. (Emoniseli 4:11) Abalayama, Sala, Yisaka, Yakobo, mpe bato mosusu ya sembo na ntango ya kala bazalaki na kondima makasi, mpo bayebaki malamu Nzambe ya solo Yehova. Babatelaki elikya makasi, atako “bilaka yango ekokisamaki te” ntango bazalaki na bomoi. Atako bongo, “bamonaki yango mosika mpe bapesaki yango losako.”—Baebele 11:13.

Lokola tozali kososola bisakweli ya Biblia, tozali komona ete “mokolo monene ya Nzambe Mozwi-na-nguya-nyonso” ezali lisusu mosika te, mokolo oyo akosukola mabelé na mabe nyonso. (Emoniseli 16:14, 16) Lokola bato ya sembo ya ntango ya kala, biso mpe tosengeli kotya motema na makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya, tokopusama na kondima mpe na bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na “bomoi ya solo.” Baoyo bazali kosala misala oyo ezali komonisa ete bazali kondima Yehova mpe baoyo balingaka ye balendisami na komona ete mokili ya sika ekómi pene. Tosengeli komonisa kondima mpe bolingo motindo wana mpo Nzambe andima biso mpe abatela biso na mokolo na ye oyo ekómi mpenza pene.​—Sefania 2:3; 2 Batesaloniki 1:3; Baebele 10:37-39.

Olingaka bomoi? Olingi mpe kozwa “bomoi ya solo,” elingi koloba kozala na bomoi lokola mosaleli ya Nzambe oyo andimi, mpe kozala na elikya kitoko na mikolo ezali koya, elikya ya bomoi ya seko? Soki ezali yango nde ozali koluka, landá elendiseli ya ntoma Paulo, oyo akomaki ete tosengeli ‘kotya elikya na biso na bozwi bokoumelaka solo te kasi epai na Nzambe.’ Paulo alobaki lisusu ete: “Tózala bazwi na misala kitoko,” oyo epesaka lokumu epai ya Nzambe, mpo ete ‘tómitongela miboko kitoko mpo na bomoi ya solo.’—1 Timote 6:17-19.

Soki ondimi koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, okoki kozwa boyebi oyo ‘elimboli bomoi ya seko.’ (Yoane 17:3) Na kati ya Biblia, tozali kokuta maloba oyo ezali lokola maloba ya Tata epai ya bana na ye: “Mwana na ngai bósana mobeko na ngai te; kasi tiká ete motema na yo mobatela malako na ngai. Zambi ikobakisela yo mikolo mingi mpe bomoi molai mpe kimya.”—Masese 3:1, 2.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na kozwa makanisi mosusu ya ntina na lisolo yango, talá mwa buku Nini ekomelaka biso soki tokufi?, Ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto