Mpo na nini osengeli kokokisa bilaka na yo?
BERNARD BARUCH, mopesi-toli ya baprezida ya États-Unis, lelo oyo akufá, alobaki boye: “Bópona moto oyo alaki makambo mingi te; akoyokisa bino mawa mingi te.” Na moi ya lelo, ezali komonana ete bato bazali kolaka makambo mingi kasi bazali kokokisa yango te. Ekoki kozala ndai ya libala, boyokani na makambo ya mombongo, to baboti bazali kolaka bana na bango ete bakolekisa ntango mingi elongo na bango. Mbala mingi bato babosanaka ndimbola ya lisese oyo elobaka ete: “Moto malamu ezali ye oyo akokisaka maloba na ye.”
Ya solo, bato mingi bazalaka na mposa ya kokokisa bilaka oyo bapesaka bato te. Bamosusu bapesaka bilaka noki atako bayebi ete bakoki kokokisa yango te to babongolaka maloba na bango mpamba te bamonaka ete kobongola maloba ezali pɛtɛɛ koleka kokokisa makambo oyo balakaki.
Ya solo, moto akoki kozala na mokakatano ya kokokisa makambo oyo alakaki soki makambo mosusu ya mbalakaka ebimi. Kasi, mokakatano nini ebimaka soki moto akokisi elaka na ye te? Osengeli kozwa elaka na yo na lisɛki? Ndakisa ya Yehova Nzambe ekosalisa biso tómona ntina oyo tosengeli kozwa likambo yango na lisɛki te.
Yehova akokisaka bilaka na ye
Tosambelaka Nzambe oyo nkombo na ye emonisi ete akokisaka bilaka na ye. Na ntango ya kala, mbala mingi nkombo ya moto ezalaki komonisa bizaleli na ye. Ezali bongo mpo na nkombo Yehova, yango elimboli “Ye oyo akómisaka.” Na yango, nkombo ya Nzambe ezali kopesa likanisi ete Nzambe akokokisa bilaka na ye mpe mikano na ye.
Na boyokani na nkombo na ye, Yehova akokisaki elaka nyonso oyo apesaki na libota ya Yisalaele ya kala. Mpo na bilaka yango, Mokonzi Salomo alobaki boye: “[Yehova] akumisama oyo apesi bato na ye Yisalaele kimya lokola nyonso elakaki ye; liloba moko ekwei te kati na bilaka na ye malamu oyo elobaki ye na Mose moombo na ye.”—1 Mikonzi 8:56.
Ntoma Paulo alobaki boye mpo na komonisa ete ebongi tótyela Yehova motema: “Wana etyelaki Nzambe Abalayama elaka, asimbaki ndai na ye moko zambi azalaki na mosusu te oyo aleki ye [na] monene ete asimba ndai mpo na ye.” (Baebele 6:13) Ɛɛ, nkombo ya Yehova mpe bomoto na ye ezali ndanga ete akozonga nsima te, akokokisa bilaka na ye, atako yango ekoki kosɛnga ye makambo minene. (Baloma 8:32) Lokola Yehova akokisaka bilaka na ye yango epesi biso elikya oyo ezali lokola longo mpo na molimo to bomoi na biso.—Baebele 6:19.
Bilaka ya Yehova mpe bomoi na biso na mikolo mikoya
Elikya na biso, kondima na biso, mpe bomoi na biso ezali kotalela kokokisama ya bilaka ya Yehova. Elikya nini tosepelaka na yango mingi? “Nde tozali kotalela Likoló na sika mpe nse na sika, [lokola] elakaki ye; boyengebene ekofanda kati na yango.” (2 Petelo 3:13) Biblia epesi lisusu biso ntina mosusu ya kozala na elikya ntango elobi ete “lisekwa ekozala na bato sembo mpe na bato sembo te.” (Misala 24:15) Mpe tokoki kondima ete nyonso ekosuka na bomoi oyo te. Ɛɛ, oyo ntoma Yoane abéngi “eloko oyo elakamaki” ezali nde “bomoi ya seko.” (1 Yoane 2:25) Kasi, bilaka ya Yehova oyo ezali na kati ya Biblia ezali kaka mpo na mikolo ekoya te. Bilaka yango bizali kopesa bomoi na biso ya mokolo na mokolo ntina banda sikoyo.
Mokomi ya nzembo ayembaki ete: “[Yehova] azali penepene na bango nyonso bakobyanga ye, . . . akoyoka mpe konganga na bango.” (Nzembo 145:18, 19) Nzambe andimisi biso lisusu ete “akopesa nguya epai na ye oyo alɛmbi; epai na ye oyo azangi makasi, akobakisa nguya.” (Yisaya 40:29) Na yango tozali kobɔndisama mpo toyebi ete ‘Nzambe akotika biso te ete tómekama na koleka nguya na biso, kasi esika moko na emekeli, akobongisa ekimeli ete tókoka koyika mpiko’! (1 Bakolinti 10:13) Soki biso moko toyebi ete elaka moko ekokisamaki epai na biso, na yango tokoki kotyela Yehova motema mobimba. Na kotalela bolamu oyo tozali kozwa na bilaka mingi oyo Nzambe azali kopesa mpe azali kokokisa, ndenge nini tosengeli kotalela bilaka oyo biso tozali kopesa ye?
Tókokisaka bilaka oyo tozali kopesa Nzambe
Na ntembe te, komipesa na biso epai na Nzambe ezali elaka oyo eleki monene kati na bilaka nyonso oyo tokoki kopesa. Ntango tomipesi, tomonisaka ete tolingi kosalela Yehova libela na libela. Atako mibeko ya Nzambe ezali kilo te, ntango mosusu ezalaka pɛtɛɛ te mpo na kosala mokano na ye, lokola tozali na kati ya ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo. (2 Timote 3:12; 1 Yoane 5:3) Kasi, soki ‘totii lobɔkɔ na etimweli’ mpe tokómi basaleli ya Yehova oyo bamipesi mpe bayekoli ya Mwana na ye Yesu Klisto, tosengeli lisusu kotala nsima te na biloko ya mokili oyo totiki.—Luka 9:62.
Ntango tobondelaka Yehova, tokoki kolaka ye ete tokosala makasi mpo na kolonga bolɛmbu moko, kolona ezaleli moko ya boklisto, to kosala lisusu mingi na mosala moko ya Teokrasi. Eloko nini ekosalisa biso tókokisa elaka yango?—Talá Mosakoli 5:2-5.
Bilaka ya solosolo eutaka na motema mpe na makanisi. Yango wana, tóndimisa Yehova ete bilaka na biso ezali ya solosolo mpe tófungolela ye mitema na biso na libondeli, tóyebisa ye makambo oyo ezali kobangisa biso, bamposa na biso, na bolɛmbu na biso na bosembo nyonso. Kobondela mpo na elaka oyo topesi ekolendisa mokano na biso ya kokokisa yango. Tokoki kotalela bilaka oyo tozali kopesa Nzambe lokola nyongo. Soki nyongo ezali monene, bafutaka yango ndambondambo. Se ndenge moko, bilaka mingi oyo tozali kopesa Yehova ekosɛnga ntango mpo na kokokisa yango. Kasi, soki mbala na mbala tozali kopesa ye oyo tokoki, tokomonisa ete tozali kokokisa maloba na biso, mpe na ndenge yango akopambola biso.
Tokoki komonisa ete tozali kozwa bilaka na biso na lisɛki te soki tozali kobondela mpo na yango mbala na mbala, ata kutu mokolo na mokolo. Yango ekomonisa Tata na biso ya likoló ete tozali sembo. Yango ekosalisa biso tóbosana yango te. Davidi atikelaki biso ndakisa malamu na likambo yango. Na nzembo, abondelaki Yehova ete: “Ɛ Nzambe, yoká kolela na ngai; tyá matoi na kobondela na ngai. . . . Ngai nakoyembela nkombo na yo nzembo libela, mpe mikolo nyonso nakokokisa ndai na ngai.”—Nzembo 61:1, 8.
Bakotyela biso motema soki tokokisaka bilaka na biso
Soki tosengeli kozwa bilaka oyo tozali kopesa Nzambe na lisɛki te, esengeli kozala mpe bongo mpo na bilaka oyo tozali kopesa bandeko na biso baklisto. Tosengeli kosalelaka bandeko na biso makambo ndenge oyo tosalelaka Yehova. (Talá 1 Yoane 4:20.) Na Lisolo na ye likoló ya Ngomba Yesu alobaki boye: “Tiká ete liloba na bino lizala, Ɛɛ! Ɛɛ! mpe Te! Te!” (Matai 5:37) Tóluka ete ntango nyonso bato bátyelaka maloba na biso motema mpo yango ezali lolenge moko ya ‘kosala malamu epai na bango bazali bandimi.’ (Bagalatia 6:10) Mbala nyonso oyo tokokisaka elaka oyo topesaka epesaka nzela ete bátyela biso lisusu motema koleka.
Mbala mingi, na makambo ya mbongo, soki bato bakokisi bilaka na bango te, yango ebimisaka matata. Ezala na likambo ya kofuta nyongo, kosala mosala, to boyokani na likambo ya mombongo, moklisto asengeli kotosa maloba na ye. Yango esepelisaka Nzambe mpe epesaka nzela ete bátyela biso lisusu motema koleka; likambo yango ezali na ntina soki bandeko balingi “kofanda elongo na bomoko.”—Nzembo 133:1, NW.
Kasi, soki bato bazali kokokisa te makambo oyo bayokanaki na yango, bakoki kobebisa lisangá mpe na bato oyo batalelami mpenza na likambo yango. Mokɛngɛli-motamboli moko alobi ete: “Matata oyo ebimaka mpo na makambo ya mombongo, mpo moto moko akokisaki ndenge bayokanaki te na mosusu, mbala mingi eyebanaka na bato nyonso. Mpo na yango, bandeko na kati ya lisangá bakabwanaka, mpe ntango bakutani na Ndako ya Bokonzi, esengo ezalaka lisusu mingi te.” Ezali malamu tótalela na likebi nyonso makambo oyo tozali koyokana mpe tókoma yango na mokanda!a
Tosengeli kozala na bokɛngi ntango tozali kotɛkisa biloko ya ntalo mingi to kopesa moto toli atya mbongo na mombongo to na misala oyo akozwela matomba, mpenzampenza soki biso mpe tokozwa mwa litomba na yango. Ndenge moko mpe, tosengeli kozala mpenza na bokɛngi ete tólekisa ndelo te na matabisi oyo tokoki kozwa na biloko mosusu to bankisi ya monganga oyo tozali kotɛkisa to kolaka ete moto akozwa litomba mingi soki atii mbongo na ye na mombongo yango to na mosala yango. Baklisto basengeli komonisa ete bazali na bolingo mpe kolimbola malamu makama nyonso oyo ezali na likambo yango. (Baloma 12:10) Lokola bandeko mingi bameseni na makambo ya mombongo te, bakoki kotyela toli na biso motema kaka mpo tozali bandeko na lisangá. Kasi ekozala mawa mingi soki batyelaki yo motema mpe makambo ebaluki mabe!
Lokola tozali baklisto, tosengeli te kosala makambo ya nyamunyamu na mombongo to makambo oyo etalelaka te bolamu ya bato mosusu. (Baefese 2:2, 3; Baebele 13:18) Mpo Yehova andima biso ‘tóumela kati na hema na ye,’ tosengeli kozala bato oyo ebongi bátyela biso motema. ‘Soki tokati ndai, tokobongola yango te, ata epesi biso mpasi.’—Nzembo 15:1, 4.
Yefeta, mosambisi na Yisalaele, akataki ndai ete soki Nzambe asalisi ye alonga Baamona, akopesa Yehova moto ya liboso ya ndako na ye oyo akokutana na ye soki azongi na etumba lokola mbeka na kotumba. Esalemaki ete moto ya liboso ya ndako na ye oyo ayaki kokutana na ye ezalaki mwana na ye ya mwasi kaka moko, kasi Yefeta abongolaki maloba na ye te. Lokola mwana na ye ya mwasi andimaki na motema mobimba, Yefeta apesaki ye mpo akende kosala na hema ya Nzambe libela. Na ntembe te, kopesa mwana yango lokola likabo ezalaki mpasi mingi mpe ezalaki likambo moke te na makambo mingi.—Basambisi 11:30-40.
Bakɛngɛli na kati ya lisangá bazali mpenzampenza na mokumba ya kokokisa makambo oyo bayokanaki. Mokanda ya 1 Timote 3:2 (NW) elobi ete mokɛngɛli asengeli kozala “na efundeli te.” Yango ezali libongoli ya liloba ya Greke oyo elimboli “bakoki kozwa ye na likambo mabe te, azali na ekweli te.” Yango “esɛngi moto azala na lokumu malamu, kasi abonga mpe na lokumu yango.” (A Linguistic Key to the Greek New Testament) Lokola mokɛngɛli asengeli kozala na efundeli te, asengeli ntango nyonso kopesa bilaka oyo bato bakotyela yango motema.
Ndenge mosusu ya kokokisa bilaka na biso
Ndenge nini tosengeli kotalela bilaka oyo topesaka bato oyo bazali bandeko na biso baklisto te? Yesu alobaki ete: “Tiká ete moi na bino engɛnga liboso na bato ete bámona misala na bino malamu mpe ete bákumisa Tata na bino oyo azali na Likoló.” (Matai 5:16) Soki tokomonisa ete totosaka maloba na biso, tokoki kobenda bato na nsango ya boklisto oyo tosakolaka. Atako na mokili mobimba bato bazali lisusu na bosembo te, bato mingi bazali naino kolinga bosembo. Kokokisa makambo oyo tolobi ezali lolenge moko ya kolakisa ete tolingaka Nzambe mpe tolingaka mozalani na biso mpe tokosepelisa bato oyo balingaka bosembo.—Matai 22:36-39; Baloma 15:2.
Na boumeli ya mbula ya mosala 1998, Batatoli ya Yehova basalaki ngonga koleka miliare moko mpo na koteya bato nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Soki totosaki maloba na biso te, na ndakisa na makambo ya mombongo to makambo mosusu, mbɛlɛ tosalaki mosala ya mpunda epai ya bato mosusu. Lokola tozali bamonisi ya Nzambe ya solo, bato bazalaka na elikya mpenza ete tósala makambo na bosembo nyonso. Soki tozali bato ya kotyela motema mpe tozali sembo, ‘tokokembisa mateya ya Nzambe Mobikisi na biso, kati na makambo nyonso.’—Tito 2:10.
Ntango tozali na mosala na biso ya kosakola, tokomonisa ete totosaka maloba na biso soki tokozongela bato oyo basepelaki na nsango ya Bokonzi. Soki tolobi ete tokozonga nsima, tosengeli kokokisa yango. Kozongela moto oyo tolakaki ye ezali ndenge moko ya ‘koboya kosalela bato malamu te baoyo bakoki kozwa yango.’ (Masese 3:27) Ndeko mwasi moko alobi boye na likambo yango: “Mbala mingi, nakutanaki na bato oyo balobaki ete Motatoli moko alakaki ngai ete akozonga kasi azongaki te. Ya solo, nayebi ete mbala mosusu nkolo ndako azalaki te to makambo mosusu esalaki ete ndeko azonga te. Kasi, nakolinga te moto aloba bongo mpo na ngai, yango wana nasalaka makasi mpo nakutana lisusu na moto yango na ndako na ye. Soki nalaki moto mpe nazongi te, ekopesa nsɔni epai ya Yehova mpe epai ya bandeko na ngai nyonso.”
Na bantango mosusu, tokoki koyoka mposa ya kozonga te mpo tokoki koloba ete moto yango asepelaki mpenza te. Ndeko mwasi yango alobi boye: “Namekaka te koloba mbala moko ete moto oyo asepeli mingi to asepeli mpenza te. Makambo oyo ngai moko nakutani na yango eteyi ngai ete ezaleli oyo moto amonisaka mbala ya liboso mbala mingi ekosaka biso. Na yango, nakanisaka kaka ete moto yango akoyoka, natalelaka moto nyonso, ezala mwasi to mobali, ete akokóma Motatoli.”
Na mosala na biso ya kosakola mpe na makambo mosusu, tosengeli komonisa bato ete bakoki kotyela maloba na biso motema. Ya solo, koloba ezalaka pɛtɛɛ kasi kosala ezalaka mpasi. Moto ya mayele alobaki ete: “Bato mingi bakosakola, moto na moto mpo na boboto na ye moko; nani akoki komona moto na sembo?” (Masese 20:6) Soki totii molende, tokoki kozala sembo mpe maloba na biso ekozala solo.
Nzambe azali kosopa mapamboli
Moto oyo azali kopesa elaka ya lokuta na nko nyonso azali sembo te mpe akokani na moto oyo azali kosala chèque nzokande azali na mbongo na banki te. Tokozwa makabo mpe mapamboli soki tozali kokokisa bilaka na biso! Lipamboli moko oyo tokozwa soki tozali bato oyo ebongi bátyela biso motema ezali lisosoli malamu. (Talá Misala 24:16.) Na esika ya komitungisa na makanisi, tokozala nde na esengo mpe na kimya. Lisusu, soki tokokisaka maloba na biso, tokobatela bomoko na lisangá, yango esalemaka ntango bato bazali kotyelana motema. ‘Liloba na biso ya sembo’ ezali mpe komonisa biso lokola baministre ya Nzambe ya solo.—2 Bakolinti 6:3, 4, 7.
Yehova akokisaka maloba na ye, mpe aboyi “lolemo na lokuta.” (Masese 6:16, 17) Soki tokolanda ndakisa ya Tata na biso ya likoló, tokozala mpenza baninga na ye. Yango wana, ezali malamu tókokisaka bilaka na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Bókoma yango na mokanda!” (Mettez-le par écrit!) na Lamuká! ya 8 Mai 1983, nkasa 13-15 (na Lifalanse).
[Bililingi na lokasa 10]
Yefeta akokisaki elaka na ye, atako epesaki ye mpasi
[Bililingi na lokasa 11]
Soki olakaki bato ete okozongela bango, omibongisa malamu mpo na kozongela bango.