Bilaka oyo okoki kotyela motema
MOSAKOLI Mika ayebaki ete mbala mingi bilaka ya bato mosusu ekokisamaka te. Na ntango na ye, ata baninga ya motema bazalaki ntango nyonso kotyelana motema te. Yango wana Mika alobaki boye: “Ondima moninga te, otalela molingami te; batelá bikuke ya monɔkɔ na yo liboso ya mwasi oyo alali na ntolo na yo.”—Mika 7:5.
Ezaleli mabe wana etindaki nde Mika atyela bilaka nyonso motema te? Te! Azalaki kotya motema mobimba na bilaka ya Yehova, Nzambe na ye. Mika akomaki boye: “Kasi ngai nakotalela [Yehova]; [nakozela] Nzambe ya kobika na ngai.”—Mika 7:7.
Mpo na nini Mika azalaki na elikya wana? Mpo ayebaki ete Yehova akokisaka ntango nyonso maloba na ye. Makambo nyonso oyo Yehova alakaki bankɔkɔ ya Mika ekokisamaki. (Mika 7:20) Lokola Yehova akokisaki bilaka na ye nyonso na ntango ya kala, Mika andimaki mpenza ete akokokisa mpe bilaka na ye nyonso mpo na mikolo ekoya.
“Liloba moko te . . . ezangaki kokokisama”
Na ndakisa, Mika ayebaki ete Yehova alongolaki Bayisalaele na boombo na Ezipito. (Mika 7:15) Yosua, moto oyo amonaki ndenge Yehova alongolaki bango na boombo, alendisaki bandeko na ye Bayisalaele ete bándima bilaka nyonso ya Nzambe. Ntina nini basengelaki kondima bilaka ya Nzambe? Yosua alobaki na bango boye: “Boyebi malamu na mitema na bino mobimba mpe na milimo na bino nyonso ete ata liloba moko te ezangaki kokokisama na maloba malamu nyonso oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino. Ata liloba moko te na kati na yango ezangaki kokokisama.”—Yosua 23:14, NW.
Bayisalaele bayebaki malamu ete Yehova asalaki makambo minene mpo na bango. Akokisaki elaka oyo apesaki nkɔkɔ na bango Abalayama, moto oyo azalaki kobanga Nzambe, ete bana na ye bakokóma ebele lokola minzoto mpe ete akopesa bango mokili ya Kanana. Yehova ayebisaki mpe Abalayama ete bankɔkɔ na ye bakonyokwama mbula 400, kasi “na libota ya minei” bakozonga na Kanana. Bilaka nyonso wana ekokisamaki.—Genese 15:5-16; Exode 3:6-8.
Na ntango ya Yozefe, mwana ya Yakobo, bayambaki Bayisalaele malamu mpenza na Ezipito. Na nsima, bato ya Ezipito bakómisaki bango baombo mpe bazalaki kosalisa bango misala makasimakasi, kasi ndenge kaka Nzambe alakaki, nsima ya mabota minei banda na mbula oyo bakómaki na Ezipito, bankɔkɔ ya Abalayama balongwaki na boombo na Ezipito.a
Na boumeli ya mbula 40 oyo elandaki, Bayisalaele bamonaki makambo mosusu oyo endimisaki bango ete Yehova akokisaka bilaka na ye. Ntango Baamaleki babundisaki Bayisalaele atako batumolaki bango te, Nzambe abundelaki bato na ye mpe abatelaki bango. Akokisaki bamposa na bango ya mosuni na boumeli ya mbula 40 oyo batambolaki na kati ya esobe mpe na nsuka akɔtisaki bango na Mokili ya Ndaka. Ntango Yosua alobelaki makambo nyonso oyo Yehova asalelaki bankɔkɔ ya Abalayama, alobaki na kondima mpenza ete: “Elaka moko te ezangaki kokokisama na kati ya bilaka malamu nyonso oyo Yehova apesaki na ndako ya Yisalaele; yango nyonso ekokisamaki.”—Yosua 21:45, NW.
Yekolá kotyela bilaka ya Nzambe motema
Ndenge nini okoki kokóma na kondima lokola oyo Mika ná Yosua bazalaki na yango mpo na bilaka ya Yehova? Omituna naino nini esalaka ete okóma kotyela bato mosusu motema? Olukaka liboso koyeba bango malamumalamu. Na ndakisa, okoki koyeba ete babongi kotyelama motema ntango ozali komona ete basalaka makasi mpo na kokokisa maloba na bango nyonso. Ntango ozali koyeba bango malamumalamu, okokóma mpe kotyela bango motema mingi. Okoki mpe kosala ndenge yango mpo okóma kotyela bilaka ya Nzambe motema.
Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kokanisa malamu na biloko oyo Nzambe akelá mpe mibeko oyo etambwisaka yango. Bato ya siansi batyelaka mibeko yango motema, na ndakisa oyo esalaka ete selile moko ya moto ebotana mpe ekóma bamiliare na bamiliare ya baselile ya nzoto mobimba. Esengeli kozala na Mosali-mibeko oyo tokoki kotyela motema oyo atyaki mibeko oyo etambwisaka biloko nyonso oyo ezali na molɔ́ngɔ́. Na ntembe te, okoki kotyela bilaka na ye motema, kaka ndenge otyaka motema na mibeko oyo etambwisaka biloko oyo akelá.—Nzembo 139:14-16; Yisaya 40:26; Baebele 3:4.
Na nzela ya mosakoli Yisaya, oyo azalaki na bomoi eleko moko ná Mika, Yehova asalelaki ndakisa ya bileko oyo eyaka na ntango na yango mpe ndenge mbula enɔkaka mpo na komonisa ete liloba na ye ezangaka te kokokisama. Mbula ebɛtaka na bileko na yango. Epɔlisaka mabelé mpe bato balonaka mpe na nsima babukaka mbuma. Na likambo yango, Yehova alobaki boye: “Lokola mbula mpe mbula mpɛmbɛ ekolongwa na lola mpe ekozonga kuna te kasi ekopɔlisa mabelé, ete ebimisa biloko na yango mpe etoisa yango, kopesáká mbóto epai ya mokoni mpe kwanga epai ya molei, boye na liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; ekobutwa epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.”—Yisaya 55:10, 11.
Bilaka ya solosolo ya Paladiso
Kotala malamumalamu biloko oyo nzambe akelá ekoki kolendisa kondima na biso epai ya Mozalisi; kasi tosengeli mpe kosala makambo mosusu mpo na koyeba malamumalamu bilaka oyo ezali na “liloba oyo ekobima na monɔkɔ na [ye].” Soki olingi koyeba bilaka yango mpo okoka kotyela yango motema, osengeli koyekola mokano ya Nzambe mpo na mabelé ndenge ekomami na Biblia mpe makambo oyo azali kosala mpo na bato.—2 Timote 3:14-17.
Mosakoli Mika azalaki kotyela bilaka ya Nzambe motema. Kutu, biso tozali na mikanda mingi oyo epemami na Nzambe koleka Mika. Ntango ozali kotánga Biblia mpe komanyola likoló na yango, yo mpe okoki kokóma na kondima ete bilaka ya Nzambe ekokokisama. Bilaka yango epesami kaka na bankɔkɔ ya Abalayama te, kasi epai ya bato nyonso. Yehova alakaki moto yango oyo azalaki kobanga Nzambe ete: “Na nzela ya mombóto na yo bikólo nyonso ya mokili ekozwa lipamboli mpo otosaki maloba na ngai.” (Genese 22:18, NW) “Mombóto,” to mwana ya Abalayama ezali libosoliboso Masiya, Yesu Klisto.—Bagalatia 3:16.
Na nzela ya Yesu Klisto, Yehova akopambola bato nyonso ya botosi. Kasi Nzambe alakaki kosala nini na ntango na biso? Mika 4:1, 2 epesi eyano na motuna yango na maloba oyo: “Ekozala ete na mikolo ya nsuka ngomba ya ndako ya [Yehova] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, ekotombwa likoló ya nkeka; mpe mabota bakokenda wana. Mabota mingi bakokenda mpe bakoloba ete, Yakani, tóbuta na ngomba ya [Yehova], epai ya ndako ya Nzambe ya Yakobo, ete alakisa biso nzela na ye mpe ete tótambola na bipai bikokendaka ye.”
Bato oyo bayekoli banzela ya Yehova “bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli ya matiti.” Mposa ya bitumba ekolongwa mpenza na makanisi na bango. Etikali moke mabelé mobimba etonda na bato ya sembo, mpe moto moko te akobangisa bango. (Mika 4:3, 4) Liloba ya Nzambe elaki ete ntango Bokonzi ya Nzambe oyo Yesu Klisto azali kotambwisa ekoyangela, Nzambe akolongola bato nyonso oyo bazali konyokola bazalani na bango.—Yisaya 11:6-9; Danyele 2:44; Emoniseli 11:18.
Ata mpe bato oyo banyokwamaki mpe bakufaki mpo bato batosaki mokano ya Nzambe te bakosekwa mpe bakozwa elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé. (Yoane 5:28, 29) Satana ná bademo na ye, oyo bazali kobimisa mabe, bakozala lisusu te, mpe na lisalisi ya mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa biso, makambo nyonso oyo lisumu ya Adama ememaki ekolongolama. (Matai 20:28; Baloma 3:23, 24; 5:12; 6:23; Emoniseli 20:1-3) Kasi nini ekokómela bato ya botosi? Bakozwa bomoi ya seko mpe nzoto kolɔngɔnɔ na paladiso awa na mabelé!—Nzembo 37:10, 11; Luka 23:43; Emoniseli 21:3-5.
Bilaka yango ezali kitoko mpenza! Kasi, okoki kondima ete ekokokisama? Okoki kondima yango. Ezali bilaka ya bato te oyo, ata soki bazali na makanisi malamu, bakoki kozanga makoki ya kokokisa mikano na bango. Ezali bilaka ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, oyo akoki kokosa te mpe “azali koumisa makambo te na oyo etali elaka na ye.” (2 Petelo 3:9; Baebele 6:13-18) Okoki mpenza kozala na elikya ete bilaka ya Biblia nyonso ekokokisama, mpamba te “[Yehova], Nzambe ya sembo” nde apesi yango.—Nzembo 31:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Étude perspicace des Écritures, volimi 1, nkasa 977-978, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
“Ata liloba moko te ezangaki kokokisama na maloba malamu nyonso oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino.”—YOSUA 23:14
[Bililingi na nkasa 4, 5]
Na Mbu Motane mpe na kati ya esobe, Yehova akokisaki bilaka oyo apesaki bana ya Yisalaele
[Bililingi na lokasa 7]
Yehova akokisaki bilaka oyo apesaki Abalayama. Mombóto na ye, Yesu Klisto, akopambola bato