Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/10 nk. 10-15
  • “Ntango ya kimya” ekómi pene!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ntango ya kimya” ekómi pene!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eloko oyo esimbi kimya ya solosolo
  • Mpo na nini “ntango ya etumba”?
  • Oyo ezali “ntango ya koloba”
  • Baoyo bazali koloba mpo na “kimya! nde kimya ezali te”
  • Yehova alobi
  • Kimya ya solo​—Ekouta wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tika ete “kimya na Nzambe” ebatela mitema na bino!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Nani akokamba bato epai na kimya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bóluka kimya ya solo mpe bólanda yango!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/10 nk. 10-15

“Ntango ya kimya” ekómi pene!

“Ntango ezali mpo na eloko na eloko, . . . ntango ya etumba mpe ntango ya kimya.” —MOSAKOLI 3:1,8.

1.Likambo nini ya kokamwa esalemi na ekeke ya 20 mpo na bitumba mpe kimya?

BATO mingi balukaka kimya, mpe balukaka yango na ntina. Na ekeke ya 20, kimya ezangi koleka bikeke mosusu nyonso oyo eleká. Ezali likambo ya kokamwa mpamba te bato basali milende oyo esalemá naino liboso te mpo na kobatela kimya. Na 1920, basalaki Société des Nations. Na 1928, “mikili nyonso, longolá kaka mwa ndambo moke . . . endimaki kotika bitumba” mpe etyaki sinyatili na boyokani babéngi Pacte Kellogg-Briand. Buku moko ebéngaki yango “moko na milende ya solosolo oyo esalemi mpo na kobatela kimya nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba.” Bongo na 1945, basalaki ONU na esika ya Société des Nations.

2. Mpo na nini basalaki ONU, mpe tokoki mpenza koloba ete ONU esali likambo ya malonga?

2 Ndenge moko na Société des Nations, basalaki ONU mpo na kobatela kimya na mokili mobimba. Kasi, ONU esali mpenza likambo ya malonga te. Ya solo, mokili ezali lisusu na bitumba ya minene lokola bitumba mibale ya mokili mobimba te. Atako bongo, ebele ya bitumba mikemike oyo ezali kosalema lelo esali ete bato mingi bázala na kimya te na makanisi mpe biloko na bango ebatelami te, ata mpe bomoi na bango. Tokoki mpenza kozala na elikya ete ONU ekotya “ntango ya kimya” na ekeke ya 21?

Eloko oyo esimbi kimya ya solosolo

3. Mpo na nini kimya ya solo ekoki kozala te na esika oyo koyinana ezali?

3 Mpo bato mpe bikólo ezala na kimya, esengeli kaka te ete bamoko bándima ete bato mosusu bázala na makanisi oyo ekeseni na oyo ya bango. Soki moto azali koyina mozalani na ye, akoki kofanda na ye na kimya? Te, mpamba te 1 Yoane 3:15 elobi boye: “Moto na moto oyo akoyinaka ndeko na ye azali mobomi na bato.” Ndenge makambo oyo euti kosalema na mikolo eleki ezali komonisa yango, mbala mingi koyinana makasi ememaka na bitumba.

4. Banani bakoki kozala na kimya, mpe mpo na nini?

4 Lokola Yehova azali “Nzambe oyo apesaka kimya,” kaka bato oyo balingaka Nzambe mpe batosaka mibeko na ye nde bakoki kozala na kimya. Ezali polele ete Yehova apesaka kimya bipesela te. “Nzambe na ngai alobi ete, Mpo na bato mabe kimya ezali te.” Ezali bongo mpamba te bato mabe balingaka te ete elimo santu ya Nzambe, oyo moko na mbuma na yango ezali kimya, etambwisa bango.​—Baloma 15:33, NW; Yisaya 57:21; Bagalatia 5:22.

5. Likambo nini oyo baklisto ya solo bakoki kosala te?

5 Baklisto ya solo bakoki kobundisa bato mosusu te, ndenge baklisto ya nkombo mpamba basali yango mbala mingi na ekeke ya 20. (Yakobo 4:1-⁠4) Ezali solo ete baklisto ya solo babundisaka mateya oyo ezali kobebisa lokumu ya Nzambe, kasi etumba yango ezali mpo na kosalisa bato, mpo na kosala bango mabe te. Konyokola bato mpo bazali na lingomba mosusu to koyokisa nzoto na bango mpasi mpo na bolingo ya ekólo, eyokani na mateya ya boklisto ya solo te. Paulo ayebisaki baklisto ya Loma ete: “Soko ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bózala na bato nyonso kimya.”​—Baloma 12:17-19; 2 Timote 2:24, 25.

6. Lelo oyo, kimya ya solosolo ekoki komonana kaka na esika nini?

6 Lelo oyo, kaka basaleli ya solo ya Yehova Nzambe nde bazali na kimya oyo Nzambe azali kopesa. (Nzembo 119:165; Yisaya 48:18) Makambo ya politiki ekaboli bango te mpamba te, ata na esika nini bazali, bakɔtaka na makambo ya politiki te. (Yoane 15:19; 17:14) Lokola ‘basangani na motema moko mpe na elimo moko,’ kimya na bango ekoki kobebisama na bokabwani na mateya ya lingomba te. (1 Bakolinti 1:10) Na moi ya lelo, kimya ya Batatoli ya Yehova ezali mpenza likamwisi, kimya yango euti na Nzambe, ndenge alakaki ete: “Nakobongola mikóló na yo kino kimya mpe banyokoli na yo kino boyengebene.”​—Yisaya 60:17; Baebele 8:10.

Mpo na nini “ntango ya etumba”?

7, 8. (a)Atako Batatoli ya Yehova bazali bato ya kimya, ndenge nini batalelaka ntango oyo tozali na yango? (b) Ebundeli ya liboso ya baklisto ezali nini?

7 Atako Batatoli ya Yehova bazali bato ya kimya, bazali komona ete oyo ezali mpenza “ntango ya etumba.” Ya solo, ezali etumba ya mandoki te, mpamba te kondimisa bato nsango ya Biblia na makasi, na kolakisa mandoki eyokani te na maloba ya Nzambe oyo elobi ete “tiká . . . oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.” (Biso nde totɛngisi makomi; Emoniseli 22:17) Bazali kobongola bato na makasi te! Batatoli ya Yehova bazali kobunda etumba ya elimo. Paulo akomaki boye: “Bibundeli na etumba na biso izali na nzoto te kasi izali na nguya na Nzambe mpo na kobebisa bisika bibatelami makasi.”​—2 Bakolinti 10:4; 1 Timote 1:18.

8 Na kati ya “bibundeli ya etumba na biso” ebundeli ya liboso ezali “mopanga ya [elimo, NW] yango Liloba na Nzambe.” (Baefese 6:17) Mopanga yango ezali mpenza makasi. “Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ezali na mopotu koleka mipanga nyonso mipeli bipai mibale. Ezali kotɔbɔla kino [esika oyo ekaboli molimo na elimo, NW], matɔngi mpe lilɔngɔ; ezali komeka makanisi mpe mikano na motema.” (Baebele 4:12) Ntango baklisto bazali kosalela mopanga yango, bazali kokweisa “makanisi mpe eloko nyonso ya lolendo oyo ezali kotɛlɛmɛla boyebi ya Nzambe.” (2 Bakolinti 10:5, NW) Ezali kosalisa bango bámonisa polele mateya ya lokuta, misala mabe, mpe mateya ya filozofi oyo euti na makanisi ya bato kasi na mayele ya Nzambe te.​—1 Bakolinti 2:6-⁠8; Baefese 6:11-​13.

9. Mpo na nini tosengeli kolɛmba te na kobundisa nzoto ya masumu?

9 Tozali mpe kobundisa nzoto ya masumu. Baklisto balandaka ndakisa ya Paulo. Ye alobaki ete: “Kasi nazali kobɛta nzoto na ngai mpe nakokómisa yango lokola moombo ete nazala moboyami te awa esili ngai kosakwela bamosusu.” (1 Bakolinti 9:27) Baklisto ya Kolose bazwaki toli ete báboma “binama na [bango] oyo ezali na mokili, na makambo ya pite, bosɔtɔ, bamposa ya nzoto, mposa ya mabe mpe elulela, yango ezali losambo ya bikeko.” (Bakolose 3:5, NW) Mpe lisusu, Yuda, moko na bato oyo bakomaki Biblia, alendisaki baklisto ete ‘bábunda etumba makasi mpo na kondima oyo epesamaki na babulami mbala moko mpo na libela.’ (Yuda 3, NW) Mpo na nini tosengeli kosala yango? Paulo apesi eyano ete: “Soko bozali bato na nzoto, bokokufa mpenza; nde soko na nzela na [elimo, NW] bokoboma bizaleli na nzoto, bokobika.” (Baloma 8:13) Maloba ya polele wana emonisi ete tokoki kolɛmba te ndenge tozali kobundisa bamposa mabe.

10. Likambo nini esalemaki na 1914, mpe ezali komema na likambo nini oyo ekosalema mosika te?

10 Kasi, tosengeli mpe komona ete oyo ezali ntango ya etumba mpo “mokolo na kobukanisa na Nzambe na biso” ezali lisusu mosika te. (Yisaya 61:1, 2) Ntango oyo Yehova aponaki mpo na kotya Bokonzi ya Masiya mpe kopesa bokonzi yango nzela ya kobundisa ebongiseli ya Satana ekokaki na 1914. Ntango oyo Nzambe atikelaki bato bámiyangela bango moko esukaki na mbula wana. Bato mingi baboyi kotosa Mokonzi Masiya oyo Nzambe aponi, ndenge moko mpe bato ebele baboyaki ye na ekeke ya liboso. (Misala 28:27) Yango wana, lokola bazali kotɛmɛla Bokonzi na ye, Klisto asengeli ‘kozala na bokonzi kati na bayini na ye.’ (Nzembo 110:2) Kasi, Emoniseli 6:2 (NW) elaki ete ‘akolonga tii na nsuka.’ Akosala yango na “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Oyo-Azali-na-Nguya-Nyonso . . . , ebéngami na Liebele ete Armagedon.”​—Emoniseli 16:14, 16, NW.

Oyo ezali “ntango ya koloba”

11. Mpo na nini Yehova amonisaki motema molai mingi, kasi nsukansuka, likambo nini ekosalema?

11 Mbongwana monene ekɔtaki na mokili na 1914, banda wana eleki sikoyo mbula 85. Yehova amonisi mpenza motema molai epai ya bato. Ayebisi Batatoli na ye ete mikolo oyo ezali mikolo ya kosala nokinoki. Bomoi ya bato ebele ezali na likama. Ebongi bákebisa bato yango mpamba te “[Yehova] . . . alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.” (2 Petelo 3:9) Nzokande, etikali moke tókóma na ntango oyo “Mokonzi Yezu akomonana na Likolo, elongo na baanzelu na ye ya nguya.” Na ntango wana, baoyo nyonso baboyaki nsango ya Bokonzi ya Nzambe na nko bakozwa “etumbu” oyo Yesu akopesa “bato oyo bayebi Nzambe te mpe baboyi kotosa Nsango Malamu ya Mokonzi na biso Yezu.”​—2 Tesalonika 1:6-9, Boyokani ya Sika.

12. (a) Mpo na nini ezali na ntina te tóluka koyeba mokolo oyo bolɔzi monene ekobanda? (b) Yesu akebisaki na ntina na likama nini?

12 Ntango nini motema molai ya Yehova ekokóma na nsuka? Ezali na ntina moko te tóluka koyeba mokolo oyo “bolɔzi monene” ekobanda. Yesu alobaki polele ete: “Mpo na mokolo yango mpe ntango yango, moto ayebi te.” Kasi, apesaki toli oyo: “Boye bótala mpo ete boyebi te soko Nkolo na bino akoya na mokolo nini. Bongo ekoki na bino [komibongisa, NW], mpo ete Mwana na moto akoya na ntango ekanisi bino te.” (Matai 24:21, 36, 42, 44) Na maloba ya polele, elakisi ete tosengeli kolandaka malamu makambo oyo ezali koleka na mokili mokolo na mokolo mpo tósutuka te ntango bolɔzi monene ekobanda. (1 Batesaloniki 5:1-⁠5) Ezali likama soki tozali kokanisa ete tokoki kosala makambo malɛmbɛ, kozala na bomoi lokola nde likambo ezali te, mpe kozela mpo tómona ndenge makambo ekoleka! Yesu alobaki: “Kebá na bino ete mitema na bino mikóma makasi mpo na kolunda te, soko na kolangwa te, soko na bitungiseli na bomoi te. Bongo mokolo yango ebimela bino pwasa lokola motambo te.” (Luka 21:34, 35) Tóbosana te ete “mipɛpɛ minei” oyo ekoya kobebisa, oyo “baanzelu minei” ya Yehova basimbi sikoyo, bakosimba yango libela te.​—Emoniseli 7:1-⁠3.

13. Likambo nini bato soki milio motoba bandimi?

13 Lokola mokolo ya kokata makambo ezali koya noki, soki tolandi maloba ya Salomo, oyo ezali mpenza “ntango ya koloba.” (Mosakoli 3:7) Lokola basosoli ete oyo ezali mpenza ntango ya koloba, na molende nyonso, Batatoli ya Yehova, oyo bazali sikoyo pene na milio mobota, bazali kosakola nkembo ya bokonzi ya Nzambe mpe kokebisa bato ete mokolo oyo Nzambe akolakisa nkanda na ye ezali koya. Bamipesi na mokolo oyo basoda ya Klisto bazali kolakisa makasi na bango.​—Nzembo 110:3, NW; Nz 145:10-​12.

Baoyo bazali koloba mpo na “kimya! nde kimya ezali te”

14. Na ekeke ya nsambo L.T.B., banani bazalaki basakoli ya lokuta?

14 Na ekeke ya 7 L.T.B., Yilimia na Ezekiele basakolaki nsango ya Nzambe ete bato ya Yelusaleme bakozwa etumbu mpo bazalaki kotosa Nzambe te. Atako bakonzi minene ya lingomba bazalaki kotɛmɛla maloba ya bamemi-nsango ya Nzambe, na mobu 607 L.T.B., Yelusaleme ebomamaki ndenge basakolaki yango. Bakonzi yango bamonanaki “basakoli na zoba baoyo . . . [bazalaki] kokosa bato na [Nzambe], na koloba, Kimya, awa ezali kimya te.”​—Ezekiele 13:1-​16; Yilimia 6:14, 15; 8:8-​12.

15. Basakoli ya lokuta bazali mpe lelo oyo? Limbola.

15 Ndenge moko na “basakoli na zoba” na ntango ya kala, lelo oyo bakonzi ya mangomba mingi bazali kokebisa bato te ete mokolo oyo Nzambe akosambisa bato ezali lisusu mosika te. Kutu, bazali koloba ete makambo ekobonga, ete bato ya politiki bakotya kimya. Lokola bazali na mposa ya kosepelisa bato kasi Nzambe te, bazali koteya bandimi na bango makambo oyo balingi koyoka na esika bámonisa bango ete Bokonzi ya Nzambe esalemi mpe etikali moke Mokonzi Masiya akolonga tii na nsuka. (Danyele 2:44; 2 Timote 4:3, 4; Emoniseli 6:2) Ndenge moko na basakoli ya lokuta, bango mpe bazali koloba mpo na “kimya! wana kimya ezali te.” Kasi, etikali moke makambo bazali kotyela motema ekokóma makambo ya nsɔmɔ ntango nkanda ya Ye oyo bazali komonisa na ndenge mabe mpe bazali mpenza kosambwisa nkombo na ye ekongalela bango. Bakonzi ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba, baoyo Biblia emonisi lokola mwasi ya ndumba, bakobomama ntango bazali koganga kimya ya lokuta.​—Emoniseli 18:7, 8.

16. (a) Batatoli ya Yehova bayebani lokola banani? (b) Nini ekesenisi bango na baoyo bazali koganga “kimya! wana kimya ezali te”?

16 Atako ebele ya bakonzi minene bazali se kolaka kimya, baoyo bazali kotya motema na kimya ya solo oyo Nzambe alaki bazali kobungisa elikya te. Banda bambula koleka 100, Batatoli ya Yehova bayebani lokola bato oyo bandimaka ete Liloba ya Nzambe ezali solo. Na mpiko nyonso bazali kokweisa mateya ya mangomba ya lokuta, mpe bazali na molende mpo na kokumisa Bokonzi ya Nzambe. Na esika báluka kokitisa bato mitema na maloba ya elɛngi oyo ezali kolaka kimya, bazali nde koyebisa bato báfungola miso mpe bámona ete oyo ezali ntango ya etumba.​—Yisaya 56:10-​12; Baloma 13:11, 12; 1 Batesaloniki 5:6.

Yehova alobi

17. Ntango Biblia elobi ete etikali moke Yehova aloba, yango elimboli nini?

17 Lisusu, Salomo alobaki boye: “Nzambe akosambisa bayengebene mpe basali na masumu, mpo ete ntango ezali mpo na makambo nyonso.” (Mosakoli 3:17) Ɛɛ, Yehova aponi ntango oyo akopesa etumbu na mangomba ya lokuta na “mikonzi na nse [baoyo] bazali . . . kotɛmɛla [Yehova] mpe Mopakolami na ye.” (Nzembo 2:1-⁠6; Emoniseli 16:13-​16) Wana ntango yango ekokoka, mikolo ya Yehova mpo na kofanda “nyɛɛ” ekosila. (Nzembo 83:1; Yisaya 62:1; Yilimia 47:6, 7) Na nzela ya Mokonzi Masiya, Yesu Klisto, Yehova ‘akoloba’ kaka na monɔkɔ oyo banguna na ye bayokaka: “[Yehova] akobima lokola elombe, lokola moto na etumba akopelisa nkanda na ye; angangi, angulumi, amimonisi na nguya liboso na bayini na ye. Longwa ntango molai nazali nyɛɛ, nafandi kimya, namiboyi; [sikoyo] nakonganga lokola mwasi oyo azali kobota, nakokimela mpe nakopemapema. Nakoyeisa nkeka mpe ngomba mpamba, nakokaukisa matiti nyonso na yango; nakobongola bibale kino bisanga, nakokaukisa mpe maziba. Nakokamba bakufi miso na nzela eyebaki bango te; na bilekelo biyebaki bango te, nakotambolisa bango. Nakobongola molili liboso na bango ete mozala pole, bisika na mobulu ete bizala nzela alima. Oyo izali makambo makosala ngai mpe nakotika bango te.”​—Biso nde totɛngisi makomi; Yisaya 42:13-​16.

18. Na likambo nini etikali moke basaleli ya Nzambe ‘bázala nyɛɛ’?

18 Ntango Yehova ‘akoloba’ mpo na komonisa ete azali solo Nzambe, basaleli na ye bakozala lisusu na mposa ya koloba te mpo na komilongisa. Wana ekozala ntango na bango ya “kozala nyɛɛ.” Ndenge esalemaki epai ya basaleli ya Nzambe na ntango ya kala, maloba oyo ekokokisama lisusu: “Ekokoka na bino [kobunda] na etumba oyo te, tɛlɛmá na bisika na bino, zalá nyɛɛ mpe talá elonga na [Yehova] mpo na bino.”​—2 Ntango 20:17.

19. Etikali moke bandeko ya Klisto básala likambo nini?

19 Satana na ebongiseli na ye mobimba bakobebisama mpenza! Bandeko ya Klisto oyo bakómi na nkembo bakosangana mpo na kobunda makasi mpe kolonga mpo na bosembo, ndenge Biblia elaki ete: “Na ntango moke, Nzambe na kimya akonyatela Satana na nse na makolo na bino.” (Baloma 16:20) Ntango ya kimya oyo tozelaka banda kala ezali lisusu mosika te.

20.Etikali moke ekozala ntango ya makambo nini?

20 Bomoi ekozala malamu mpenza mpo na baoyo bakobika na ntango Yehova akolakisa nguya na ye monene! Mwa moke na nsima, bakosangana na bato ya ntango ya kala oyo bazalaki sembo wana ekokóma ntango na bango ya kosekwa. Boyangeli ya Klisto oyo ekoumela mbula nkóto ekozala mpenza “ntango mpo na kokona . . . , ntango ya kobikisa . . . , ntango ya kotonga . . . , ntango ya kosɛka . . . , ntango ya kobina . . . , ntango ya [koyamba, NW] . . . ntango ya kolingana.” Ɛɛ, mpe ekozala “ntango ya kimya” libela na libela!​—Mosakoli 3:1-⁠8; Nzembo 29:11; 37:11; 72:7.

Okopesa eyano nini?

◻ Eloko nini esimbi kimya ya solosolo?

◻ Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazali kotalela ntango oyo ete ezali “ntango ya etumba”?

◻ Mpo na basaleli ya Nzambe, wapi ntango ya “koloba” mpe ntango ya “kozala nyɛɛ”?

◻ Ndenge nini mpe ntango nini Yehova akoloba?

[Etanda/Bililingi na lokasa 13]

Yehova azali na ntango oyo

◻ akopusa Gogo abundisa basaleli ya Nzambe.​—Ezekiele 38:3, 4, 10-​12

◻ akotya mposa ya koboma Babilone Monene na mitema ya bakonzi ya mokili.​—Emoniseli 17:15-​17; 19:2

◻ akosala libala ya Mwana na Mpate.​—Emoniseli 19:6, 7

◻ akobanda etumba ya Armagedon.​—Emoniseli 19:11-​16, 19-​21

◻ akokanga Satana mpo Boyangeli ya Yesu oyo ekoumela mbula nkóto ebanda.​—Emoniseli 20:1-⁠3

Tolandisi makambo ndenge Biblia elobeli yango. Tosengeli koyeba ete makambo yango mitano ekosalema na molɔngɔ oyo Yehova ye moko akotya mpe na ntango mpenza oyo ye moko akopona.

[Bililingi na lokasa 15]

Boyangeli ya Klisto oyo ekoumela mbula nkóto ekozala mpenza ntango ya . . .

kosɛka . . .

koyamba . . .

kolingana . . .

kokona . . .

kobina . . .

kotonga . . .

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto