Batatoli ya Yehova bafungoli esika na bango monene ya mateya—Feti mpo na Yehova
BANDA na ntango ya kala, losambo ya Yehova ezalaka na bafeti ya esengo. Bafeti mosusu oyo ezalaki kosalema na Yisalaele ya kala ezalaki koumela mikolo mingi mpe ebele ya basambeli ya Yehova bazalaki kokende na bafeti yango. Ntango bafungolaki tempelo ya Salomo, basalaki feti oyo eumelaki mikolo nsambo mpe na nsima basalaki feti ya Mingombo oyo eumelaki pɔsɔ mobimba. Yango ezalaki kosalisa Bayisalaele bákanisa makambo malamu oyo Yehova asalelaki bango. Bazongaki epai na bango ‘na kosepela mpe na mitema na esengo mpo na malamu nyonso oyo Yehova asalaki.’—1 Mikonzi 8:66.
Likambo oyo esalemaki na Esika Monene ya Mateya ya la Société Watchtower na Patterson, na etúká ya New York, na États-Unis banda mokolo ya 17 tii mokolo ya 22 Mai 1999, epusaki bato oyo bakendaki kuna bákanisa bafeti oyo ezalaki kosalema na Yisalaele ya kala. Ezalaki mpenza pɔsɔ moko oyo ekeseneki na bapɔsɔ mosusu. Na pɔsɔ yango, bafungolaki esika oyo ezali na bakelasi mpe badepartema mpo na kotambwisa mosala ya koteya bato Biblia na mokili mobimba. Esika yango ezali na bandako ya minene 28. Babongisaki na boye ete bandeko 5 400 oyo basalaka na biro monene na Brooklyn, na Wallkill, mpe na Patterson bátambola mpo na kotala bandako nyonso ya Patterson na boumeli ya pɔsɔ wana. Na kati ya bapaya 8 100 oyo bayaki, ezalaki na bandeko koleka 500 oyo basalaki misala ya kotonga esika yango ya mateya, bandeko bautaki na bafiliale 23 ya la Société Watchtower, mpe bandeko mosusu bautaki na masangá ya pembeni.
Bato oyo bayaki kotala bateyamaki na makambo oyo bamonaki
Mpo bapaya báyeba malamumalamu esika yango, balakisaki bango bafɔtɔ, batalaki bakasɛti-video, mpe batambolaki mpo na kotala esika yango mobimba. Na ekɔtelo ya monene, eloko oyo ebendaki likebi na bango ezalaki na mwa elilingi ya tempelo ya Yelusaleme na ntango Yesu azalaki awa na mabelé. Bafɔtɔ mosusu emonisaki ndenge Eteyelo ya Gileadi ebandaki, mayangani ya minene, makita ya lisangá, ndenge ya koyekolisa bato Biblia na bandako na bango. Lelo oyo basakoli bazali koyekola na bamilio ya bato Biblia poso na poso. Bamonaki mpe mosala oyo departema ya makambo etali mibeko ezali kosala mpo na kopesa nzela ete mosala ya kosakola esalema ndenge Yesu atindaki.—Matai 28:19, 20.
Pene na esika ya kokɔta, ezali na ndako moko monene ya makita; ndako yango ezali na bisika ya kofanda 1 700. Kuna, bapaya batalaki kasɛti-video moko oyo eumelaki miniti 33 mpe ezalaki na motó ya likambo ete: “Na nguya ya bato te, kasi na elimo na ngai!” Kasɛti video yango emonisaki ndenge Esika yango Monene ya Mateya ya Watchtower ebandaki. Batunaki bandeko mosusu mituna, bayebisaki mwa makambo oyo bakutanaki na yango mpe emonisaki polele litambwisi ya Yehova mpe mapamboli na ye na milende nyonso oyo esalemaki mpo na kosilisa kotonga esika wana oyo ebandaki eleki sikoyo mbula 15. Bato mingi bapesaki mabɔkɔ mpo na kotonga esika yango. Na eleko moko na 1994, bato oyo bazalaki kosala bazalaki 526, kati na bango bandeko 350 bazalaki kosala wana mikolo nyonso, bandeko 113 bazalaki kosala mpo na mwa ntango, mpe bandeko 63 bazalaki koya kopesa mabɔkɔ mokolo na mokolo. Bandeko mosusu mingi bazalaki kopesa makabo mpo na kotambwisa mosala yango. Bango nyonso bamonaki ete eloko moko ekokaki kosalema te soki elimo ya Yehova ezalaki te.—Zekalia 4:6.
Bapaya oyo batambolaki mpo na kotala bamonaki mpenza ete mosala nyonso oyo ezali kosalema kuna ezali mpo bato mingi bázwa mateya ya Biblia. Bafɔtɔ oyo balakisaki na esika oyo bakɔtelaka na ndako monene oyo ezali na bakelasi ya Eteyelo ya Gileadi emonisaki ete eteyelo yango esalisaki bato mingi na elimo, ndenge ebandaki mpe makambo oyo esalamaka kuna tii lelo oyo. Banda kelasi efungwamaki mbala ya liboso na 1943 na South Lansing, na etúká ya New York tii lelo oyo, banakelasi koleka 7 000 batángaki na Gileadi, mpo na kosala lokola bamisionɛrɛ. Bafɔtɔ oyo batyaki na etaze ya liboso ya buludingi ya eteyelo ezali komonisa Eteyelo mpo na bandeko oyo bazali na bakomite ya filiale mpe Eteyelo mpo na bakɛngɛli-batamboli, biteyelo yango nyonso mibale esalemaka wana. Banda Eteyelo mpo na bandeko oyo bazali na bakomite ya filiale efungwamaki na sanza ya Novɛmbɛ 1995, bandeko 360 ya bakomite ya filiale ya mikili 106 basili kozwa mateya na eteyelo yango.
Ntango bapaya bazalaki kotambola mpo na kotala, bamonaki ete na bisika mingi, bakokaki komona makambo mingi koleka bafɔtɔ. Bakɔtaki na badepartema ndenge na ndenge, kotala babiro mpe bisika mosusu ya mosala, mpe koyeba malamu mosala oyo ezali kosalema kuna. Likambo oyo ebendaki mpenza likebi ya bato oyo bayaki mpo na kotala, ezalaki ndako oyo ezali na departema oyo esalaka bakasɛti ya radio mpe bakasɛti-video. Bandako kitoko ezali kosalelama mpo ete mosala ya koteya Biblia esalema malamu! Bafɔtɔ mpe mwa bafilme ya video esalisaki bapaya báyeba ndenge bakɔtisaka maloba ya bato na bakasɛti mpe ndenge nini babongisaka bakasɛti-video. Bamonaki ndenge babongisaka bisika mpo ezala kitoko mpe ndenge balatisaka bato oyo tomonaka na mikanda, na badrame mpe na bafilme ya la Société. Bamonaki ndenge bandeko basalaka nyonso ete mbongo ebima mingi te, kasi mosala esalemaka malamu mpenza. Bamonaki ndenge babongisaka miziki mpo na kosala ete bato oyo bazali kotala bámona lokola nde bazali mpenza esika oyo likambo yango ezali kosalema. Kobanda 1990, la Société abimisaki bakasɛti-video na minɔkɔ 41, na mitó na makambo ndenge na ndenge ya Biblia. Ezali mpe na bakasɛti-video mosusu mpo na baoyo basalelaka elobeli ya bikela ya Amerika (langue des signes américains).
Bato mingi oyo bayaki mpo na kotala bakendaki na laboratware ya bafɔtɔ, na departema ya mayemi, na departema ya informatique, departema oyo elakisaka ndenge ya kosalela ordinatɛrɛ, na babiro oyo etalelaka mosala ya masangá 11 242 mpe ya bakɛngɛli-batamboli 572. Bakendaki mpe na biro oyo esalaka mosala ya kopesa biyano na mituna oyo bato batunaka. Bayanolaka na mituna soki 14 000 na mbula moko. Bakamwaki na komona ndenge bandeko balukaka makanisi malamu liboso ya kozongisa biyano na mikanda yango mpe ndenge oyo bamibanzabanzaka mpenza mpo na bato oyo bazali kotuna mituna oyo emonisi ete bazali mpenza na mikakatano makasi.
Ebele ya bapaya yango bakendaki kotala departema ya kobongola mikanda. Bakamwaki ntango bayokaki ete na boumeli ya mbula mitano oyo eleki, mikanda ya la Société ekómaki kobima na minɔkɔ ya sika 102. Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova oyo bayebi Lingelesi te nde baleki mingi (soki 80 %). Mpo na kosalisa bango bátángaka mikanda ya la Société, bandeko ya bolingo malamu koleka 1 700 bazali kosala mosala ya kobongola mikanda na mikili 100. Bamonaki bililingi oyo ezali komonisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na minɔkɔ oyo elobamaka na Amerika, na Mpoto, na Azia, mpe na Afrika. Bapaya bamonaki Biblia Traduction du monde nouveau na minɔkɔ 31 oyo esili kobongolama. Bayebisaki bango ete mikanda ya la Société ezali sikoyo kobima na minɔkɔ 332 mpe ete mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? esili kobima na minɔkɔ 219.
Na departema ya makambo ya mibeko balakisaki bapaya makambo ndenge na ndenge oyo esɛngaka bátalela mibeko na mokili mobimba. Batalaki kasɛti-video moko oyo elakisaki tribinale moko ezali kosambisa likambo mpe Motatoli moko oyo azali avoka azali kolobela likambo ya kozongisa makila. Bayebisaki bango mpe makambo oyo ezali kosalema mpo nsango malamu ekoba kosakolama. (Bafilipi 1:7) Bayebisaki bango ete na sanza ya Marsi ya mbula oyo, tribinale moko elongolaki mobeko oyo ezalaki kosɛngisa Batatoli básɛngaka nzela mpe bálataka makarɔ liboso ya kosakola ndako na ndako na komine ya Oradell, na etúká ya New Jersey, na États-Unis.
Bapaya yango bamonaki makambo mosusu mingi. Na esika oyo babongisaka biloko ya mosala ya kotonga bandako, bamonaki bafɔtɔ ya bandako oyo ezali kotongama. Batambolaki mpo na kotala esika oyo bapɛtolaka mai oyo ebebi nsima ya kosalela yango na misala ndenge na ndenge mpo na kosalela yango lisusu, batalaki mpe bandako ya kura, mpe esika oyo batyaka nkisi na mai ya komela mpe ya kosukola mpo ezala pɛto, mpe baatelye mosusu ndenge na ndenge. Ezalaki libaku moko kitoko mpenza.
Likita ya bofungoli emonisi mateya euti na Nzambe
Likita ya bofungoli mpenza esalemaki na mokolo ya misato mwa 19 Mai na ngonga ya 4:00 nsima ya nzanga. Na kati ya bato 6 929 oyo bazalaki kuna, bamosusu bautaki na biro ya Brooklyn, na bapaya oyo la Société abengisaki, mpe bato 372 oyo bayanganaki na Betele ya Canada mpo na kolanda likita yango na televizyo.
Bayangani basepelaki na maloba oyo Milton Henschel, prezida ya la Société Watch Tower alobaki mpo na kotombela bango boyei malamu, maloba yango esimbaki mitema na bango mpenza. Na nsima, Theodore Jaracz, ye azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe azalaki prezida ya likita yango, abengaki William Malenfant. Na lisolo na ye oyo elobaki ete: “Makambo ya ntina na misala ya botongi,” atunaki mituna na bandeko misato oyo basalaki misala ya ntina mingi mpo na kotonga Esika Monene ya Mateya ya Watchtower. Na biyano na bango, balobaki ete na boumeli ya bambula oyo mosala yango ya botongi esalemaki, bato koleka 8 700, bakendaki kosala mpo na mwa ntango na mbongo na bango moko. Yango ezali komonisa bomoko mpe elimo ya bokabi oyo ezali kouta na mateya ya Nzambe.
Na nsima balandaki masukulu-matongani oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Mateya mauti na Nzambe ezali koteyama na mokili mobimba.” Bandeko minei oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi nde basalaki yango. Ndeko John Barr amonisaki ete mateya ya Nzambe eutaka na kati ya Liloba ya Nzambe, Biblia, mpe ezali kolendisa baklisto ete ‘bábota mbuma na misala nyonso malamu, bákola mpe na boyebi koyeba Nzambe.’ (Bakolose 1:10) Daniel Sydlik amonisaki ete mateya ya Nzambe ebongisami na ndenge ya Teokrasi banda na mokonzi ya lisangá, Yesu Klisto, tii epai ya libota ya bandeko nyonso na mokili mobimba. (1 Bakolinti 12:12-27) Biteni mibale ya nsuka ya masolo yango, moko esalemaki na Gerrit Lösch mpe mosusu na Carey Barber. Masolo yango emonisaki ndenge oyo mateya ya Nzambe ezali kobongisa bato oyo bazali koteya yango ete bákutana na bato epai nyonso mpe báteya bango mpo bango mpe bátambola na nzela ya Nzambe.—Yisaya 2:1-4; 2 Bakolinti 3:5.
Mpo na kosalisa bayangani báyeba malamumalamu biteyelo ndenge na ndenge oyo ezali kosalema na esika monene ya mateya, batunaki balakisi mituna mpe basololaki na bandeko mosusu oyo basalaka mosala ya kotambwisa biteyelo yango. Bamonisaki bapaya ntina ya eteyelo mokomoko mpo na mosala ya koteya mateya ya Nzambe na mokili mobimba. Bamonisaki ete na Eteyelo ya Gileadi bayekolaka mokanda mokomoko ya Biblia, bayekolaka lisolo ya libota ya Yehova na mikolo na biso, mpe babongisaka bandeko mpo na mosala ya misionɛrɛ. Eteyelo mpo na komite ya filiale esalisaka bandeko oyo bazali na komite ya filiale báyeba kotambwisa misala nyonso ya filiale malamu. Eteyelo mpo na bakɛngɛli-batamboli ebongisami mpo na bamposa ya bandeko oyo bazali kosala lokola bakɛngɛli-batamboli mpe mpo na kobongisa bango báyeba kosalisa masangá na elimo.
Mpo na kosukisa likita yango, Lloyd Barry, ye azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaki lisukulu ya bofungoli oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Tozali kotonga elongo na Mozalisi na biso Monene.” Amonisaki ete Mozalisi, Yehova, asepelaka na biloko nyonso oyo akelá mpe azali kosɛnga biso ete tósepela na ye elongo. (Yisaya 65:18) Lokola azali ‘motongi ya nyonso,’ tosengeli kopesa Yehova Nzambe lokumu nyonso mpo na mosala nyonso oyo ya kotonga. (Baebele 3:4) Nsima ya koloba maloba wana, molobi asalaki libondeli na motema moko mpenza, alobaki ete Esika Monene ya Mateya ya Watchtower ezala mpo na lokumu ya Yehova, Mozalisi na biso Monene.a
Ntembe ezali te ete makambo nyonso oyo eumelaki pɔsɔ mobimba ekotikala na makanisi ya bato nyonso oyo bazalaki kuna. Tolendisi bino bóya kotala Esika Monene ya Mateya ya Watchtower. Tondimi ete koya kotala esika yango ekolendisa bino na mosala oyo bozali kosala mpo na koyekola makambo mingi ya Mozalisi na biso oyo atondi na bolingo mpe kozala na bomoi oyo eyokani na mibeko na ye ya sembo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ndeko Barry asukisaki bomoi na ye awa na mabelé na bosembo nyonso na mokolo ya 2 Yuli 1999. Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1999 lokasa 16.
[Bililingi na lokasa 10]
Bato batondaki na ndako ya makita mpe na ndako ya kolya
[Bililingi na lokasa 10]
Bato basepelaki mingi ntango batambolaki kotala bisika ndenge na ndenge