Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/11 nk. 28-31
  • Okosala nini soki olɛmbi nzoto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okosala nini soki olɛmbi nzoto?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kolɛmba na mosala ya kosakola
  • Ndenge nini kozwa matomba malamu
  • Batelá elimo na yo malamu
  • Bandeko na biso mpe bakoki kolɛmbisa biso nzoto
  • Makanisi ya kolɛmba nzoto epai ya moto ye moko
  • Makambo mibale ya malamu koleka mpo moto alɛmba te
  • Ndenge nini kozongela makasi
  • Ndenge oyo okoki kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Toyikisana mpiko awa emoni biso ete mokolo yango ezali kobelema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Ndenge tozwaka nguya ya kobundisa komekama mpe kolɛmba nzoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Tolɛmbi kasi makasi esili te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/11 nk. 28-31

Okosala nini soki olɛmbi nzoto?

NDENGE nini moto akoki kobundisa ezaleli ya kolɛmba nzoto? Batunaki bakɛngɛli-batamboli mingi oyo batalaka masangá ya Batatoli ya Yehova motuna yango. Biyano na bango ekoki kosalisa biso tóyeba nini emonisaka ete moto alembi nzoto mpe nini tokoki kosala mpo na kobundisa bolɛmbu yango, mpamba te likambo yango ekoki kokómela moklisto nyonso.

Mpo moto oyo alɛmbi nzoto azongela lisusu makasi, asengeli koluka koyeba likambo oyo ebandisaki yango mpe akanga mabɔkɔ te. Talá makambo oyo emonisaka ete moto alɛmbi na elimo: Akosala lisusu libondeli te to akosala lisusu boyekoli na ye moko te, akómi kozangisa makita mosusu, akómi mawamawa, mpe akozala na esengo te ata akutani na bandeko baklisto. Nzokande, likambo oyo eleki monene na likambo yango ezali ete akozala lisusu na molende te na mosala ya kosakola. Tiká tótalela makambo oyo emonisaka kolɛmba na elimo mpe oyo tokoki kosala mpo na kosilisa yango.

Kolɛmba na mosala ya kosakola

Yesu Klisto ayebaki malamu ete mosala ya kokómisa bato bayekoli ekozala na mikakatano. (Matai 28:19, 20) Atindaki bayekoli na ye lokola “bampate kati na nkoi,” ayebaki ete bakokutana na minyoko na mosala na bango ya kosakola. (Matai 10:16-23) Kasi, mikakatano yango esengeli kolɛmbisa bango te. Kutu, mbala mingi minyoko elendisaka basaleli ya Yehova Nzambe oyo batyelaka ye motema na bango mobimba.​—Misala 4:29-31; 5:41, 42.

Ata ntango oyo bayekoli ya Klisto bazwaki naino minyoko ya makasi te, bato bazalaki ntango nyonso koyamba bango malamu te. (Matai 10:11-15) Bobele bongo, lelo oyoa mosala ya kosakola oyo Batatoli ya Yehova basalaka ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Mpo na bato mingi, kondima Nzambe ezali likambo ya moto ye moko; balingaka te bato mosusu báyebisa bango yango. Bamosusu balingaka te koyoka mateya ya lingomba oyo bazalaka na makanisi mabe mpo na yango. Ya solo mpenza, soki bato bazali kosepela na nsango malamu te, soki mosala ezali kobota mbuma malamu te, to makambo mosusu ya ndenge na ndenge, ekoki mpenza kolɛmbisa moto nzoto. Ndenge nini kolonga mikakatano yango?

Ndenge nini kozwa matomba malamu

Esengo oyo toyokaka na mosala na biso ya kosakola eutaka mpe na matomba oyo tozali kozwa. Kasi, ndenge nini tokoki kosala mosala oyo ekobota mbuma mingi? Tozali “baluki na bato.” (Malako 1:16-18) Babomi mbisi na Yisalaele ya kala bazalaki kosala mosala na bango mingimingi na butu, mpamba te na ntango yango nde bakokaki kozwa mbisi mingi. Biso mpe tosengeli koyeba teritware na biso malamu mpo tókende “koluka” na ntango oyo bato mingi bazali na ndako mpe na ntango oyo bakoki koyoka nsango na biso. Ekoki kozala na mpokwa, na bawikende, to na bangonga mosusu. Mokɛngɛli-motamboli moko alobi ete kosakola na mpokwa to na wikende ebongi mpenza na bisika oyo bato basalaka misala moi mobimba. Alobi ete mbala mingi kobima mosala ya kosakola na mpokwa ebotaka mbuma malamu. Koteya na telefone to na libaku malamu esalisaka biso tósolola na bato mingi.

Kozala na molende na mosala ya kosakola ebimisaka matomba malamu. Na Mpoto ya Ɛsti mpe na mikili mosusu ya Afrika, mosala ya kosakola Bokonzi ezali kosalema malamu, mpe ezali kobota mbuma mingi. Bobele bongo, masangá mingi esalemi na bisika oyo na ntango ya kala etalelamaki lokola ebotaka mbuma te to ata na bisika oyo basakoli bateyaka mbala na mbala. Kasi, ezali boni soki teritware na yo ezali kobota mbuma te?

Batelá elimo na yo malamu

Soki tozali kokanisa malamu mikano oyo Yesu alobelaki, yango ekosalisa biso mpo tólɛmba te ntango bato bazali kosepela te na mosala na biso ya kosakola. Likanisi ya Klisto ezalaki ete bayekoli na ye báluka bato oyo babongi, kasi ezalaki te ete bákómisa bato ebele bayekoli mbala moko. Mbala mingi azalaki komonisa ete bato mingi bakondima nsango malamu te, ndenge moko mpe Bayisalaele mingi bayokaki basakoli na ntango ya kala te.​—Ezekiele 9:4; Matai 10:11-15; Malako 4:14-20.

Bato oyo “bayebi bamposa na bango ya elimo” nde bayambaka “Nsango Malamu . . . ya Bokonzi” na esengo. (Matai 5:3, NW; Mt 24:14) Bato yango bandimaka kosalela Nzambe na ndenge oyo alingi. Na yango, kozwa matomba malamu na mosala na biso etaleli mingimingi mitema ya bato oyo bazali koyoka biso kasi etaleli mpenza te makoki na biso ya koteya. Ezali solo ete, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo tóteya nsango malamu na ndenge oyo ekosepelisa bato. Kasi, Yehova nde moto asalaka ete mosala na biso ebota mbuma, mpo Yesu alobaki ete: “Moto akoki koya epai na ngai bobele soko Tata, Motindi na ngai akobenda ye.”—Yoane 6:44.

Mosala na biso ya kosakola esalaka ete nkombo ya Yehova eyebana. Bato báyoka to báyoka te, mosala na biso ya kosakola ezali kosantisa nkombo mosantu ya Yehova. Lisusu, mosala na biso ya kosakola ezali komonisa polele ete biso tozali bayekoli ya Klisto, mpe epesi biso libaku malamu ya kosangana na mosala oyo eleki ntina na mikolo na biso.​—Matai 6:9; Yoane 15:8.

Bandeko na biso mpe bakoki kolɛmbisa biso nzoto

Bato mosusu, ezala na libota to na lisangá, bakoki kolɛmbisa bamosusu nzoto. Na ndakisa, moto akoki komiyoka ete bandeko na ye to baninga na ye bazali koyeba bampasi na ye te. Mwa mabunga ya bandeko na biso ya lisangá ekoki mpe kolɛmbisa biso nzoto. Na likambo oyo mpe, Biblia ekoki kosalisa biso mingi.

“Lisangá mobimba ya bandeko” na mokili mobimba ezali libota monene ya elimo. (1 Petelo 2:17, NW) Kasi, moto akoki kobosana esengo na ye ya kozala na kati ya libota oyo ezali na bomoko ntango ye na ndeko mosusu bazali koyokana te mpo bazali na makanisi ndenge moko te. Emonani ete baklisto ya ekeke ya liboso bakutanaki mpe na makambo ya ndenge yango, mpamba te ntoma Paulo azalaki mbala na mbala koyebisa bango bázala na bomoko. Na ndakisa, alendisaki baklisto mibale ya basi, Ewodia na Suntuke básilisa matata na bango.​—1 Bakolinti 1:10; Baefese 4:1-3; Bafilipi 4:2, 3.

Soki mokakatano yango ekómeli biso, ndenge nini tokoki kosala mpo ete tólinga lisusu bandeko na biso? Soki tomikundoli ete Klisto akufaki mpo na bango mpe mpo na biso, tokondima ete bango mpe bazali kondima mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola biso. Tosengeli mpe kobosana te ete bandeko na biso mingi balingi mpenza kolanda ndakisa ya Yesu Klisto mpe bakoki kotya bomoi na bango na likama mpo na biso.

Eleki mwa bambula, na Paris, na ekólo France, elenge moko Motatoli akakatanaki te kozwa valisi moko oyo ezalaki na bombi oyo batyaki na libándá ya Ndako ya Bokonzi. Akitaki na yango liboso mbangu na etazi, na nsima abwakaki yango na mai, mpe kuna ebɛtaki kano. Ntango batunaki ye eloko oyo epusaki ye atya bomoi na ye na likama bongo, alobaki ete: “Namonaki ete bomoi na biso ezalaki na likama. Mpe eleki malamu ngai moko nakufa na esika ete biso nyonso tókufa.”b Ezali mpenza lipamboli kozala na bandeko ya ndenge yango, oyo bazali kokakatana te kolanda ndakisa ya Yesu!

Lisusu, tokoki kokanisa elimo ya bomoko oyo Batatoli ya Yehova bazalaki na yango na bakaa ya bakangami na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.c Ndenge moko mpe, na bambula eleki, bandeko na biso na Malawi babatelaki bosembo na bango lokola baklisto ya solo. Na ntango toyebi ete bandeko na biso na masangá mpe bakoki kosala bongo na bantango ya mpasi, yango ekopusa biso na kolimbisa mpe tokongalisa te matata mpe mikakatano oyo ebimaka mokolo na mokolo, boye te? Soki tolandi makanisi ya Klisto, boyokani na biso ya mokolo na mokolo na bandeko ya lisangá ekozala mpo na kolendisa, kasi mpo na kolɛmbisa nzoto te.

Makanisi ya kolɛmba nzoto epai ya moto ye moko

“Eloko oyo ozali kozela soki ezwami naino te epesaka motema mpasi, kasi eloko oyo ozali na mposa na yango soki ozwi yango, ezali nzete ya bomoi.” (Masese 13:12, NW) Basaleli mosusu ya Yehova bazali komona ete nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo ezali koya noki te. Baklisto bazali komona ete na eleko oyo tozali na yango bazali na ‘mpasi’ ndenge moko na bato mingi oyo bazali bandimi te.​—2 Timote 3:1-5.

Nzokande, na bokeseni na bato oyo bazali bandimi te, baklisto basengeli kosepela komona bampasi yango mpo ezali “elembo” ya kozala ya Yesu, mpe ezali komonisa ete, mosika te, Bokonzi ya Nzambe ekosukisa ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo. (Matai 24:3-14) Ata ntango makambo ekómi mpasi mingi, ndenge ekozala na “bolɔzi monene”—makambo yango ezali na esengo mpo na biso, mpamba te ekomonisa ete mokili ya sika ya Nzambe ezali koya.​—Matai 24:21, NW; 2 Petelo 3:13.

Soki moklisto azali kokanisa ete ntango oyo Bokonzi ya Nzambe ekosukisa makambo ya ntango oyo ezali naino mosika, akoki komipesa na koluka biloko ya mokili. Soki atiki nzela na mosala ya mosuni mpe kominanola ete ezwa ntango mpe makasi na ye nyonso, ekozala mpasi mpo akokisa malamumalamu mikumba oyo Biblia epesi ye. (Matai 6:24, 33, 34) Makanisi yango ekolongola ye esengo mpe nsima ekolɛmbisa ye. Mokɛngɛli-motamboli moko alobaki boye: “Koluka kozala na bomoi ya mokili ya sika na mokili oyo ezali likambo ya mayele te.”

Makambo mibale ya malamu koleka mpo moto alɛmba te

Ntango moto ayebi likambo oyo ezali kolɛmbisa ye nzoto, asengeli kosala nini mpo na kozongela molende na ye? Likambo oyo eleki malamu yango oyo: ayekola Biblia ye moko. Mpo na nini? Mokɛngɛli-motamboli moko alobaki boye: “Koyekola Biblia biso moko ekundwelaka biso ntina oyo tosengeli kosala makambo.” Mokɛngɛli mosusu alobaki ete: “Soki moto azali kosala mosala ya kosakola lokola nde bazali kotindika ye, nsukansuka ekokóma kilo.” Kasi programɛ malamu ya koyekola Biblia biso moko, esalisaka biso tóyeba mokumba na biso malamu lokola nsuka ekómi pene. Lisusu, Biblia ezali mbala na mbala kokundwela biso ntina ya kolya malamu na elimo mpo na kozala na esengo ya kosala mokano ya Nzambe.​—Nzembo 1:1-3; 19:7-10; 119:1, 2.

Bankulutu bakoki kosalisa bandeko bálɛmba nzoto te soki bazali kokende kotala bango na ndako mpo na kolendisa bango. Ntango bakei kotala bango, bankulutu bámonisa bandeko yango ete moto mokomoko azali na ntina mpe azali na esika na ye na kati ya basaleli ya Yehova. (1 Bakolinti 12:20-26) Nkulutu moko alobaki boye mpo na bandeko: “Mpo na komonisa bango ete bazali na ntina, nakundwelaka bango makambo malamu oyo bazalaki kosala liboso. Namonisaka bango ete bazali na motuya na miso ya Yehova mpe makila ya Mwana na ye epesamaki mpo na bango. Basepelaka ntango nyonso soki nazali koloba bongo. Soki nakɔtisi mikapo ya Biblia oyo ebongi mpenza, baoyo balɛmbi nzoto bamityelaka mikano ya sika, lokola kobondela mpe koyekola na libota mpe kotánga Biblia.”—Baebele 6:10.

Ntango bankulutu bakei kotala bandeko, basengeli kokeba ete bámonisa te lokola nde makambo oyo Nzambe azali kosɛnga biso ezali mpasi, tokoki kokokisa yango te. Nzokande, bankulutu bakoki kosalisa bandeko oyo balɛmbi nzoto bámona ete mokumba ya bayekoli ya Yesu ezali mpenza mpasi te. Yango wana, mosala na biso ya boklisto epesaka mpenza esengo.​—Matai 11:28-30.

Ndenge nini kozongela makasi

Ata soki tolɛmbi nzoto mpo na likambo nini, yango ezali maladi oyo tosengeli kobundisa. Kasi, tóyeba ete tozali biso moko te na etumba yango. Soki tolɛmbi nzoto, tóndima lisalisi ya bandeko na biso baklisto, mingimingi bankulutu. Soki tosali bongo, tokoki kokóma lisusu makasi.

Na koleka, tosengeli kosɛnga Nzambe asalisa biso tólɛmba nzoto te. Soki na bosembo nyonso totyeli Yehova motema, akosalisa biso tólɛmba nzoto te. (Nzembo 55:22; Bafilipi 4:6, 7) Na nyonso wana, lokola tozali basaleli na ye, tokoki kokanisa lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Esengo ezali na bato baoyo bayoki mingongo na kosanzola na bilambo; ɛ [Yehova], bazali kotambola na pole na elongi na yo. Bazali kosepela na nkombo na yo ntango nyonso, mpe bazali komikumisa na boyengebene na yo. Zambi yo ozali nkembo na nguya na bango, biso tokotombola mitó na biso likoló bobele na ntina na ngɔlu na yo.”—Nzembo 89:15-17.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisolo “Le porte à porte—une véritable gageure” (Kosakola ndako na ndako ezali likambo ya lisɛki tɛ) na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1981 (ebimeli ya Lifalanse).

b Talá Lamuká! ya 22 Mai 1985, nkasa 12 kino 13 (ebimeli ya Lifalanse), ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

c Talá lisolo “J’ai survécu à la marche de la mort” (Nabikaki na mobembo ya kufa) na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1980 nkasa 5 kino 10 (ebimeli ya Lifalanse), mpe lisolo “Intègre dans l’ allemagne nazie” (Bazalaki sembo na monyoko ya nazi na Allemagne) na Lamuká! ya 8 Augusto 1985 nkasa 13 kino 16 (ebimeli ya Lifalanse).

[Elilingi na lokasa 31]

Bankulutu ya bolingo bakoki kosalisa bandeko ete bálɛmba nzoto te soki bazali kokende kotala bango na bandako na bango mpo na kolendisa bango

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto