LISOLO YA BOYEKOLI 52
Ndenge oyo okoki kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto
“Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo.”—NZ. 55:22.
LOYEMBO 33 Bwakelá Yehova mokumba na yo
NA MOKUSEa
1. Kolɛmba nzoto ekoki kosala biso nini?
MOKOLO na mokolo tokutanaka na mikakatano, mpe tosalaka nyonso oyo tokoki mpo tóyikela yango mpiko. Kasi, ezalaka mpasi tóyikela mikakatano yango mpiko soki tolɛmbi nzoto. Na yango, tosengeli kotalela ezaleli ya kolɛmba nzoto lokola moyibi, oyo akoki koyiba elikya, mpiko, mpe esengo na biso. Masese 24:10 elobi: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.” Ya solo, kolɛmba nzoto ekoki kosilisa biso makasi mpe kosala ete ezala mpasi mpo tóyikela mikakatano mpiko.
2. Makambo nini ekoki kolɛmbisa biso nzoto, mpe tokolobela nini na lisolo oyo?
2 Ezali na makambo mingi oyo ekoki kolɛmbisa biso nzoto: mosusu emonanaka kasi mosusu emonanaka te. Na kati ya makambo yango tokoki kotánga ezaleli na biso ya kozanga kokoka, bolɛmbu na biso, mpe maladi. Tokoki mpe kolɛmba nzoto mpo bapesi biso te mokumba moko oyo tosepelaka na yango na mosala ya Yehova, to mpo tozali kosakola na esika oyo bato bazali kondima nsango malamu te. Na lisolo oyo, tokolobela makambo oyo tokoki kosala mpo tólonga ezaleli ya kolɛmba nzoto.
MABUNGA MPE BOLƐMBU NA BISO
3. Nini ekoki kosalisa biso tótalela mabunga na biso na ndenge ya malamu?
3 Ezalaka mpasi te tómitalela na ndenge ya mabe mpe tóyoka mpasi koleka ndelo mpo na mabunga na biso. Yango ekoki kotinda biso tókanisa ete, mpo na mabunga oyo tosalaka, Yehova akondima te tókɔta na Paradiso. Makanisi ya ndenge wana ekoki kozala mabe mpenza. Ndenge nini tosengeli kotalelaka mabunga na biso? Biblia emonisi polele ete, longola kaka Yesu Kristo, bato nyonso ‘basalaka masumu.’ (Rom. 3:23) Kasi Yehova, Nkolo Biblia, atyaka miso kaka na mabunga na biso te, mpe azelaka te ete tósala makambo lokola bato ya kokoka. Kasi azali nde Tata ya bolingo oyo alingaka kosalisa biso. Azali mpe na motema molai. Amonaka milende oyo tosalaka mpo na kobundisa bolɛmbu na biso mpe mpo na kolonga makanisi mabe oyo tozalaka na yango mpo na biso moko. Lisusu, azali pene ya kosalisa biso.—Rom. 7:18, 19.
Yehova ayebi makambo ya malamu oyo tosalá mpe oyo tozali kosala sikoyo na mosala na ye (Talá paragrafe 5)d
4-5. Na kotalela 1 Yoane 3:19, 20, nini esalisaki Déborah ná Maria bálonga ezaleli ya kolɛmba nzoto?
4 Tótalela ndakisa ya Déborah ná Maria.b Ntango Déborah azalaki mwana moke, mbala mingi, bazalaki kosalela ye makambo oyo ezalaki koyokisa ye nsɔni. Bazalaki kopesa ye longonya mpenza te. Yango wana, ntango akómaki mokóló, akómaki komitalela na ndenge ya mabe. Soki asali mwa libunga ya moke, azalaki kokanisa ete azali na likoki te ya kosala ata likambo moko ya malamu. Maria mpe akutanaki na likambo ya ndenge wana. Bandeko na ye bazalaki kotyola ye mpe koyokisa ye nsɔni. Yango wana, ntango akómaki mokóló, akómaki komimona ete azali na ntina te. Ata nsima ya kozwa batisimo, azalaki kaka kokanisa ete abongi te kozala Motatoli ya Yehova!
5 Atako bongo, bandeko basi yango batikaki kosalela Yehova te. Mpo na nini? Babondelaki Yehova na motema mobimba mpe babwakelaki ye mikumba na bango ya kilo. (Nz. 55:22) Bayaki koyeba ete, Tata na biso ya bolingo ayebi ndenge oyo makanisi mabe mpe makambo mabe oyo tokutaná na yango kala ekoki kosala biso. Kasi amonaka mpe bizaleli na biso ya malamu ata soki tokanisi ete tozalaka na yango te.—Tángá 1 Yoane 3:19, 20.
6. Moto akoki komiyoka ndenge nini soki asali lisusu libunga moko oyo asalaki liboso?
6 Moto oyo azali kobunda mpo na kolonga likambo moko ya mabe oyo epiká misisa na bomoi na ye, akoki kolɛmba nzoto soki akwei lisusu na likambo yango. Ya solo, ezali mabe te tómitungisa soki tosali lisumu. (2 Ko. 7:10) Kasi, tosengeli te komitungisa koleka ndelo mpe kokanisa ete: ‘tozali ata na ntina moko te mpe Yehova akolimbisa biso ata moke te.’ Makanisi mabe ya ndenge wana euti na mateya ya solo te, mpe yango ekoki kotinda biso tótika kosalela Yehova. Kobosana te oyo Masese 24:10 elobaka; soki tolɛmbi nzoto makasi na biso ekokóma moke. Kasi, tosengeli nde kobondela Yehova mpo na ‘kobongisa makambo ya mabe’ oyo tosaleli ye mpe kosɛnga ye bolimbisi. (Yis. 1:18) Soki Yehova amoni ete obongoli mpenza motema, akolimbisa yo. Lisusu, yebisá bankulutu likambo yango. Na motema molai mpenza bakosalisa yo mpo ozongela boyokani malamu oyo ozalaki na yango na Yehova.—Yak. 5:14, 15.
7. Mpo na nini tosengeli kolɛmba nzoto te soki tozali kobunda mpo na kosala oyo ezali malamu?
7 Jean-Luc, nkulutu moko na France, alobi boye mpo na bato oyo bazali kobunda na bolɛmbu moko: “Moto ya sembo na miso ya Yehova ezali te moto oyo asalaka libunga ata moke te, kasi nde moto oyo ayokaka mawa soki asali libunga, mpe asalaka ntango nyonso makasi ete abongola motema.” (Rom. 7:21-25) Na yango, soki ozali kobunda na momeseno moko ya mabe kokanisa te ete ozali na ntina te. Kobosana te ete moto moko te na kati na biso akoki kondimama na miso ya Yehova na makasi na ye moko. Biso nyonso tosengeli na boboto monene ya Nzambe oyo apesá biso na nzela ya lisiko.—Ef. 1:7; 1 Yoa. 4:10.
8. Ntango tolɛmbi nzoto, epai ya nani tokoki kokende mpo na koluka lisalisi?
8 Bandeko na biso bakristo balendisaka biso! Ntango tozali koloba, bakoki koyoka biso na likebi mpe kolendisa biso. (Mas. 12:25; 1 Tes. 5:14) Joy, ndeko mwasi moko na Nigeria, oyo abundanaki na ezaleli ya kolɛmba nzoto alobi boye: “Bisika nyonso nakendaka, nakutanaka na bandeko. Ndenge oyo bandeko na ngai bakristo balendisaka ngai, emonisi ete Yehova ayanolaka na mabondeli na ngai. Kutu ndakisa na bango esalisi ngai nayeba ndenge ya kolendisa baoyo balɛmbi nzoto.” Kasi, tosengeli kobosana te ete, bandeko bakoki koyeba ntango nyonso te soki tozali na mposa ya bilendiseli. Yango wana, tosengeli koluka ndeko moko oyo akɔmeli na elimo, mpe koyebisa ye ete tozali na mposa ya lisalisi.
NTANGO TOZALI KOBƐLA
9. Ndenge nini Nzembo 41:3 mpe 94:19 ezali kolendisa biso?
9 Sɛngá Yehova lisalisi. Ntango tozali koyoka nzoto malamu te, mingimingi soki tozali kobɛla maladi moko oyo eumeli, ekoki kozala mpasi mpo tózala na makanisi malamu. Atako sikoyo Yehova abikisaka biso te na ndenge ya likamwisi, kasi abɔndisaka biso mpe akoki kopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tóyika mpiko. (Tángá Nzembo 41:3; 94:19.) Na ndakisa, akoki kotinda bandeko báya kosalisa biso na misala ya ndako to bákende kosombela biso biloko oyo tosengeli na yango. Akoki mpe kotinda bandeko bábondela elongo na biso. To akoki kosalisa biso tokanisa lisusu makanisi ya kobɔndisa oyo ezali na Liloba na ye, na ndakisa, elikya kitoko ya kozala na bomoi ya kokoka na mokili ya sika, epai maladi mpe bampasi nyonso ekozala lisusu te.—Rom. 15:4.
10. Mpo na nini Isang atikaki te ete likama oyo akutanaki na yango elɛmbisa ye nzoto?
10 Isang, ndeko mobali moko oyo afandaka na Nigeria, akutanaki na likama moko ya mabe mpenza oyo ekómisá ye ebɔsɔnɔ. Monganga ayebisaki ye ete akotambola lisusu te. Isang alobi boye: “Nalɛmbaki nzoto mpe nasilaki mayele.” Kasi atikaki kaka makambo yango elekela ye motó? Te! Nini esalisaki ye? Alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai totikaki te kobondela Yehova mpe koyekola Liloba na ye. Tozwaki mpe ekateli ya kopesa Nzambe matɔndi mpo na makambo ya malamu oyo tozali na yango, ata mpe elikya na biso ya kozala na bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe.”
Ata bandeko oyo bazali kobɛla, bibɔsɔnɔ, to mibange, bakoki koluka mabaku ya kosakola mpe ya kozala na esengo (Talá paragrafe 11-13)
11. Nini esalisaki Cindy azala na esengo atako azalaki kobɛla makasi?
11 Monganga ayebisaki Cindy, ndeko mwasi moko oyo afandaka na Mexique, ete azali na maladi moko ya mabe mpenza oyo ekoki koboma ye. Asalaki nini mpo ayikela likambo yango mpiko? Ntango azalaki kozwa lisalisi ya monganga, amityelaki mokano ya kopesa litatoli mokolo na mokolo. Akomi boye: “Kosala bongo epesaki ngai likoki ya kotya makanisi nyonso epai ya bato mosusu na esika ya kokanisa kaka lipaso, mpasi mpe maladi oyo nazalaki na yango. Nazalaki kosala boye: Ntango nazalaki kosolola na minganga, nazalaki kotuna soki bato ya mabota na bango bazali malamu. Na nsima, nazalaki kotuna bango ntina oyo baponá mosala ya makasi boye. Yango ezalaki kosalisa ngai nayeba lisolo nini ekoki kosepelisa bango. Mingi na bango bazalaki koloba ete, ezalaka mpasi ete moto oyo azali kobɛla atuna bango soki bazali malamu. Mpe mingi kati na bango bazalaki kopesa ngai matɔndi ndenge nazalaki kotyela bango likebi. Bamosusu kutu bapesaki ngai baadrɛsi na bango mpe banimero na bango ya telefone. Na yango, na boumeli ya ntango wana ya mpasi na bomoi na ngai, Yehova apesaki ngai esengo oyo nakanisaki kutu te!”—Mas. 15:15.
12-13. Bandeko mosusu oyo bakɔtá ndako to oyo bazali bibɔsɔnɔ basalaka nini mpo bápesa litatoli, mpe yango eboti mbuma nini?
12 Bandeko oyo bazali kobɛla to oyo bazali bibɔsɔnɔ bakoki kolɛmba nzoto mpo bazali kosakola te ndenge oyo balingaka. Atako bongo, mingi kati na bango balukaka mabaku ya kosakola. Na boumeli ya mbula 37, bakɔtisaki ndeko mwasi Laurel, oyo afandaka na États-Unis, na masini moko mpo ekoka kosalisa ye mpo apemaka! Azalaki mpe na maladi ya kansɛr, mpe basalaki ye mapaso ya minene ndenge na ndenge. Longola yango, azalaki lisusu na maladi moko oyo ebebisaki loposo na ye ya nzoto. Kasi makambo nyonso wana ya mpasi epekisaki ye te asakola. Azalaki kopesa litatoli epai ya minganga mpe bato oyo bazalaki koya kotala ye. Yango ebotaki mbuma nini? Asalisaki bato koleka 17 báyeba mateya ya solo oyo ezali na Biblia!c
13 Richard, nkulutu moko na France, azali na makanisi oyo ekoki kosalisa bato oyo bakɔtá ndako to oyo bafandaka na bandako oyo babatelaka mibange. Alobi boye: “Nazali kosɛnga bango bázalaka na mwa mesa mpo na kotanda mikanda na biso. Yango ebendaka likebi ya bato mpe ekoki kotinda bango bátuna mituna. Kosolola na bato yango ekoki kolendisa bandeko na biso oyo bakoki lisusu te kokende kosakola ndako na ndako.” Baoyo bakɔtá ndako bakoki mpe kopesa litatoli na nzela ya telefone to na kokomáká mikanda.
NTANGO BAPESI BISO TE MOKUMBA OYO TOLINGAKA
14. Ndakisa nini ya malamu mpenza Mokonzi Davidi atikelá biso?
14 Ezali na makambo mingi oyo ekoki kosala ete tózwa te mokumba moko oyo tolingaka mingi na mosala ya Yehova. Na ndakisa, bobange, maladi to makambo mosusu ya bomoi. Soki ezali bongo mpo na biso, tokoki kozwa liteya na ndakisa ya Mokonzi Davidi. Mokonzi Davidi azalaki na mposa makasi ya kotongela Nzambe tempelo. Kasi ntango ayebaki ete baponaki nde moto mosusu mpo na kosala mosala yango, Davidi apesaki moto yango mabɔkɔ mpo akokisa mokumba oyo Nzambe apesaki ye. Kutu Davidi apesaki wolo ná palata ebele mpenza mpo na mosala yango. Oyo nde ndakisa malamu mpenza oyo tosengeli kolanda!—2 Sa. 7:12, 13; 1 Nt. 29:1, 3-5.
15. Ndenge nini ndeko Hugues alongaki ezaleli ya kolɛmba nzoto?
15 Hugues, ndeko mobali moko oyo afandaka na France, atikaki mokumba na ye ya nkulutu mpo akómaki kobɛla mpe azalaki lisusu kokoka te kosala ata misala mikemike ya ndako. Akomi boye: “Na ebandeli, nazalaki komona ete nazali na ntina te mpe nalɛmbaki mpenza nzoto. Kasi na nsima, namonaki ete ezali na ntina natika kozala mawamawa mpo na makambo oyo nakokoka kosala lisusu te. Yango esalaki ete nazala na esengo mpo na makambo oyo nakoki kosala na mosala ya Yehova. Ndenge kaka Gideone ná mibali nkama misato oyo bazalaki elongo na ye batikaki te kobunda atako balɛmbaki, ngai mpe nazwi ekateli ya kotika te!”—Bas. 8:4.
16. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya baanzelu?
16 Baanzelu ya sembo mpe bazali bandakisa ya malamu. Ntango Ahaba, mokonzi mabe, azalaki koyangela, Yehova asɛngaki baanzelu bápesa makanisi mpo na kokosa ye. Baanzelu ndenge na ndenge bapesaki makanisi na bango. Kasi Nzambe aponaki anzelu moko mpe ayebisaki ye ete likanisi na ye nde ekosimba. (1 Bak. 22:19-22) Baanzelu mosusu ya sembo balɛmbaki nde nzoto, to bakanisaki ete balekisi ntango na bango kaka mpamba ndenge bapesaki makanisi na bango? Tokoki koloba bongo te. Baanzelu bazalaka mpenza na komikitisa mpe balingaka ete lokumu nyonso ezonga epai ya Yehova.—Bas. 13:16-18; Em. 19:10.
17. Tosengeli kosala nini soki tozali kozwa te mokumba moko boye na mosala ya Yehova?
17 Kobosana te lokumu monene oyo tozali na yango ya kozala Batatoli ya Yehova mpe ya kosakola Bokonzi na ye. Tokoki kozwa mokumba moko boye to mpe kobungisa yango, kasi mokumba te nde ekosala ete tózala na motuya na miso ya Nzambe. Tokozala na motuya na miso ya Yehova mpe ya bandeko na biso, soki toyebi esika makoki na biso esuki mpe soki tozali na komikitisa. Yango wana, sɛngáká Yehova asalisa yo mpo oyeba esika makoki na yo esuki mpe ozala na komikitisa. Kanisá bandakisa ya malamu oyo ezali na Biblia ya bato oyo basalelaki Yehova na komikitisa mpe oyo bayebaki esika makoki na bango esukaki. Salá nyonso oyo okoki mpo na kosalela bandeko na yo na bolingo mpenza.—Nz. 138:6; 1 Pe. 5:5.
NTANGO TERITWARE NA BINO EZALI KOBOTA MBUMA TE
18-19. Ndenge nini okoki kozala na esengo na mosala ya kosakola ata soki bato ya teritware na bino bazali kosepela te na nsango malamu?
18 Esilá kokómela yo olɛmba nzoto na bantango mosusu mpo bato ya teritware na yo bazali kosepela na nsango malamu te to mpo ozali kokuta bango na bandako te? Soki okutani na makambo ya ndenge wana, okoki kosala nini mpo obatela esengo na yo to mpo obakisa yango? Mwa makanisi ya ntina ezali na etanda “Ndenge ya kobakisa esengo na mosala ya kosakola.” Ezali mpe na ntina otalela mosala ya kosakola na ndenge ya malamu. Yango elimboli nini?
19 Kobosana te ete ntina ya libosoliboso oyo tosakolaka ezali mpo na koyebisa bato nkombo ya Nzambe mpe Bokonzi na ye. Yesu alobaki polele ete kaka bato moke nde bakolanda ye. (Mat. 7:13, 14) Ntango tozali na mosala ya kosakola, tosalaka elongo na Yehova, Yesu, mpe baanzelu. (Mat. 28:19, 20; 1 Ko. 3:9; Em. 14:6, 7) Yehova azali koluka bato oyo bazali na mposa ya kosalela ye. (Yoa. 6:44) Na yango, soki moto aboyi koyoka biso lelo, ntango mosusu akoki koyoka biso na mbala ya nsima.
20. Yirimia 20:8, 9 ekoki koteya biso nini na oyo etali kobundisa ezaleli ya kolɛmba nzoto?
20 Tokoki kozwa mateya mingi na ndakisa ya mosakoli Yirimia. Azalaki kosakola na teritware moko ya mpasi mingi. Bato bazalaki kofinga mpe kotyola ye “mokolo mobimba.” (Tángá Yirimia 20:8, 9.) Na ntango moko boye, alɛmbaki mpenza nzoto mpe alingaki kutu kotika kosakola. Kasi atikaki te. Mpo na nini? “Liloba ya Yehova” ezalaki lokola mɔtɔ na kati ya nzoto ya Yirimia, mpe akokaki kobomba yango te! Biso mpe tokoyoka ndenge wana soki totondisi makanisi mpe motema na biso na Liloba ya Nzambe. Yango nde ntina mosusu oyo tosengeli koyekolaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe komanyola yango. Yango ekosala ete esengo na biso ekoba kobakisama mpe mosala na biso ya kosakola ebota mbuma.—Yir. 15:16.
21. Ezala tolɛmbi nzoto mpo na likambo nini, ndenge nini tokoki kolonga ezaleli yango?
21 Déborah oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Kolɛmba nzoto ekoki kozala ebundeli moko ya makasi oyo Satana azali kosalela.” Kasi Yehova Nzambe azali na nguya mingi koleka Satana ná bibundeli na ye nyonso. Na yango, soki olɛmbi nzoto ata mpo na likambo nini, bondelá Yehova na motema moko mpo asunga yo. Akosalisa yo olonga mabunga mpe bolɛmbu na yo. Akosalisa yo ntango ozali kobɛla. Akosalisa yo mpo otalelaka na ndenge ya malamu mikumba oyo ozali na yango na mosala na ye. Mpe akosalisa yo otalelaka mosala na yo ya kosakola na ndenge ya malamu. Lisusu, bondelá Tata na yo ya likoló mpe yebisá ye mpenza ndenge ozali komiyoka. Na lisalisi na ye, okolonga etumba oyo ozali kobunda ná ezaleli ya kolɛmba nzoto.
LOYEMBO 41 Yoká libondeli na ngai
a Na bantango mosusu, biso nyonso tolɛmbaka nzoto. Na lisolo oyo, tokolobela makambo ya sikisiki oyo tokoki kosala ntango tolɛmbi nzoto. Ndenge tokomona yango, na lisalisi ya Yehova, tokoki kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto.
b Topesi bango bankombo mosusu.
c Okoki kotánga lisolo ya bomoi ya ndeko Laurel Nisbet na Lamuká! ya 22/01/1993, na Français.
d NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mwasi moko alɛmbaki nzoto mpo na mwa ntango, kasi akanisi makambo oyo asalá na mosala ya Yehova mpe abondeli ye. Amindimisi ete Yehova abosanaka te makambo oyo asalá mpe oyo azali kosala na mosala na ye.