Mpo na nini bato babangaka nsuka ya mokili?
DAMIAN THOMPSON azali moto oyo akomaka makambo ya mangomba, akomaki boye na zulunalo Time: “Banda bambula mwa mingi, baklisto oyo balimbolaka Biblia na ndenge oyo yango ekomami bazali kosakola ete etikali moke mokili mobimba ekufa. Sikoyo, likambo moko ezali kosalema oyo ezali kokamwisa ata baklisto yango bango moko: bato bazali lisusu kozwa maloba na bango na lisɛki te, mpe lisusu, ata bato oyo bazalaki kosɛka bango, bato lokola baoyo basalaka baprograme ya ordinatere, bato minene ya mombongo mpe bato ya politiki bakómi koteya likambo yango.” Damian alobi lisusu ete lokola bato bazali kobanga ete na mobu 2000 baordinatere nyonso na mokili ekokufa, yango esali ete “bato oyo balandaka makambo ya Nzambe te bákóma kondima liteya ya boyangeli ya mbula nkóto.” Bazali kobanga ete “bato ebele bakokóma na nsɔmɔ, baguvernema ekokoka lisusu kosala misala na yango te, bato bakobanda kowela bilei, mpe bampɛpɔ ekokwea likoló ya babuludingi ya milaimilai.”
Longola kobanga oyo bato nyonso bazali na yango, mangomba mikemike, oyo bato mosusu babengaka “mangomba oyo esakolaka nsuka ya mokili,” yango mpe etikali nsima te na makambo yango oyo ezali kopesa bato motó mpasi. Na Yanuali 1999, zulunalo moko ya ekólo France (Le Figaro) ebimisaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo oyo: “Jérusalem mpe loseba ya nsuka ya mokili” (Jérusalem et les Sirènes de l’apocalypse). Lisolo yango elobaki boye: “Departema ya sekirite ya [Israël] elobi ete bato koleka nkama moko oyo bandimaka ‘boyangeli ya mbula nkóto’ bazali na Ngomba ya Olive to mpe penepene na yango mpo na kozela koya ya Klisto to nsuka ya mokili.”
Mokanda moko (1998 Britannica Book of the Year) ezali na lisolo moko oyo elobeli “mwa mangomba oyo eteyaka nsuka ya mokili.” Etángi mangomba ya mikemike mingi, lokola mwa mangomba oyo bandimi na yango bayokanaka mpo na komiboma bango nyonso esika moko (suicide collectif), Heaven’s Gate, “Tempelo ya Pɛplɛ,” “Ordre du temple solaire,” mpe Aum Shinrikyo. Na 1995, bandimi ya lingomba yango batyaki gaze oyo ebomaka na engbunduka ya engumba Tokyo, ebomaki bato 12 mpe bato mingi atako bakufaki te kasi bapemaki mopɛpɛ ya pwazo. Martin Marty, profesere ya makambo ya mangomba na iniversite moko (University of Chicago), akomaki makambo ya lisolo yango na mokuse ete: “Bato bazali kosakola, mpe nabanzi ete bakosakola lisusu makambo ndenge na ndenge mpo na mobu 2000 mpe mangomba ndenge na ndenge ekobima. Mosusu ekoki kobimisa makama. Ekozala ntango ya kokanga mabɔkɔ mpe kotala mpamba te.”
Ndenge oyo kobanga nsuka ya mokili ebandaki
Emoniseli (na Lifalanse Apocalypse to Révélation) ezali nkombo ya mokanda ya nsuka ya Biblia. Bakomaki yango pene na nsuka ya ekeke ya liboso T.B. Lokola mokanda ya Emoniseli ezali na bisakweli mpe na maloba ya elilingi mingi, bato babandaki kobenga mikanda mosusu oyo ekomamaki liboso mpenza bákoma mokanda ya Biblia oyo tobengi Emoniseli ete “Mikanda ya nsuka ya mokili.” Masapo ya mikanda yango ebandaki na ntango ya Baperse ya kala to mpe liboso na bango. Yango wana, mokanda moko (The Jewish Encyclopedia) elobi ete “bato oyo balobelami mingi na masapo ya Babilone balobelami mpe na mikanda [ya Bayuda oyo ezali kolobela nsuka ya mokili].”
Bayuda bakomaki mikanda mingi mpo na nsuka ya mokili banda na ebandeli ya ekeke ya mibale L.T.B. tii na nsuka ya ekeke ya mibale T.B. Mpo na komonisa ntina oyo bakomaki mikanda yango, molimboli moko ya Biblia akomaki boye: “Bayuda bazalaki kokabola bileko nyonso na biteni mibale. Ezalaki na eleko oyo tozali, eleko mabe na makambo nyonso . . . Yango wana, Bayuda bazalaki kozela ete makambo oyo ezali kosalema sikoyo esuka. Eteni ya mibale babengaki yango eleko ekoya, eleko malamu na makambo nyonso, eleko oyo Nzambe akotya kimya, bolamu mpe bosembo . . . Ndenge nini tokolongwa na eleko oyo tozali na yango mpo na kokɔta na eleko oyo ekoya? Bayuda bazalaki kondima te ete bato nde bakosala mbongwana yango, yango wana, bazalaki kozela Nzambe ye moko asala likambo moko. . . . Mokolo oyo Nzambe akoya kosala likambo wana bazalaki kobenga yango Mokolo ya Nkolo mpe balobaki ete ekozala mokolo ya nsɔmɔ, ya koboma, mpe ya kosambisa. Mpe eleko ya sika ekobanda nsima ya mokolo yango ya mpasi. Mikanda nyonso oyo elobelaka nsuka ya mokili ezali na makambo yango.”
Tosengeli mpenza kobanga nsuka ya mokili?
Mokanda ya Emoniseli oyo ezali na Biblia ezali kolobela “etumba ya mokolo yango monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso” to Armagedon. Na etumba yango bato mabe bakobomama, mpe eleko ya mbula nkóto ekolanda (ebengamaka mpe Boyangeli ya Mbula Nkóto), na boumeli na yango Satana akobwakama na libulu mozindo mpe Klisto akosambisa bato ya mokili. (Emoniseli 16:14, 16; 20:1-4, NW) Na Moyen-Âge bato bakangaki ntina ya bisakweli yango mabe mpo “Saint” Augustin, Mokatolike moko oyo azalaki na bomoi banda 354 tii 430 T.B., alobaki ete Boyangeli ya Mbula Nkóto ebandaki ntango Klisto abotamaki mpe ekosuka na kosambisama ya nsuka. Emonani ete Augustin atyaki likebi mingi na ntango te, kasi, wana mobu 1000 ekómaki pene, bato bakómaki kobanga mingi. Bato oyo bayekolaka masolo ya kala bazali na makanisi ndenge na ndenge mpo na kobanga oyo bato bazalaki na yango na Moyen-Âge. Ata soki bato bazalaki kobanga mingi, toyebi ete bazalaki kobanga mpamba.
Ndenge moko mpe lelo oyo, mangomba mpe bato mosusu bazali kobanga ete makambo ya nsɔmɔ ekobima na mobu 2000 to 2001. Kasi, ebongi mpenza tózala na kobanga? Tosengeli nde kobanga nsango oyo ekomami na mokanda ya Emoniseli na Biblia, to tosengeli nde kotyela yango elikya? Tosɛngi na yo otánga lisolo oyo elandi.
[Elilingi na lokasa 4]
Bato ya Moyen-Âge bazalaki kobanga mpamba mpo na nsuka ya mokili
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© Cliché Bibliothèque Nationale de France, Paris
[Picture/Credit Line on page 3]
Maya/Sipa Press