Nsuka ya mokili—tosengeli kobanga yango to kotyela yango elikya?
“Lelo oyo, nsuka ya mokili (apokalipisi) ezali bobele lisolo mpamba ya Biblia te; kasi ekómi likambo oyo ekoki mpenza kosalema.”—Javier Pérez de Cuéllar, secrétaire général ya kala ya ONU.
NDENGE oyo mokonzi monene wana asalelaki liloba “nsuka ya mokili” emonisi ndenge oyo bato mingi batalelaka liloba yango ntango bayokaka yango na bafilme, batángaka yango na mikanda, mpe na bazulunalo. Ezali kopesa likanisi ya mobulungano moko monene oyo ekosalema na mokili. Kasi “nsuka ya mokili” elimboli mpenza nini? Mpe motuna mosusu ya ntina mingi yango oyo: Mokanda ya Emoniseli oyo ezali na Biblia elobelaka nini?
Liloba ya Greke oyo ebongolami na “Emoniseli” elimboli “koyebisa makambo oyo ebombamá,” to “kobimisa sɛkɛlɛ.” Mokanda ya Emoniseli eyebisaki makambo nini to ebimisaki sɛkɛlɛ nini? Ezalaki kaka nsango ya makambo ya nsɔmɔ, ete bato nyonso bakobomama mpe ata moto moko te akobika? Ntango batunaki makanisi ya Jean Delumeau, moto ya mayele na istware mpe azali mosangani ya Institut de France mpo na mokanda ya Emoniseli, alobaki boye: “Ezali mokanda oyo ebɔndisaka mpe epesaka elikya. Bato bakómi na nsɔmɔ ya makambo oyo ekomami na kati, mpamba te bazali kotya likebi kaka na mikapo oyo elobeli kobebisa.”
Ndenge oyo lingomba ya liboso ezalaki kotalela mokanda ya emoniseli
Ndenge nini “baklisto” ya liboso bazalaki kotalela mokanda ya Emoniseli mpe elikya ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto na mabelé oyo mokanda yango elobeli? Jean Delumeau alobaki lisusu boye: “Mpo na ngai, baklisto, mingi mpenza ya liboso, bazalaki kondima Boyangeli ya Mbula Nkóto. . . . Na kati ya baklisto ya liboso oyo bazalaki kondima Boyangeli ya Mbula Nkóto, totángi Papias, episkɔpɔ ya Yelapoli na Asie Mineure, . . . Saint Justin, ye abotamaki na Palestine mpe akufaki lokola martiru na Loma pene na mobu 165, Saint Irénée, episkɔpɔ ya Lyon, ye akufaki na mobu 202, Tertullien, ye akufaki na mobu 222, mpe . . . mokomi monene Lactantius.”
Mpo na Papias, oyo balobaka ete akufaki lokola martiru na Pelegamo na mobu 161 to 165 T.B., mokanda moko (The Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Papias, episkɔpɔ ya Yelapoli, moyekoli ya Saint Jean, azalaki kondima mpe koteya boyangeli ya mbula nkóto. Alobaki ete azwaki mateya na ye epai ya bato oyo bazalaki na bomoi eleko moko na bantoma, mpe Irénée akomaki ete ba ‘Presbyteri’ mosusu bamonaki mpe bayokaki mateya ya moyekoli Yoane oyo ateyaki bango bándima liteya ya Boyangeli ya Mbula Nkóto mpo ezali kati na makambo oyo Nkolo ateyaki. Eusèbe alobi ete . . . Papias akomaki na mokanda na ye ete nsima ya lisekwa, bokonzi ya Klisto oyo ekomonana na nkembo, mpe ekoyangela mabelé na boumeli ya mbula nkóto.”
Soki tolandi ndenge bandimi ya liboso bazalaki kotalela mokanda ya Emoniseli, makambo yango emonisi biso nini? Ezalaki kobangisa to kopesa bango elikya? Bato ya mayele ya istware babengaka baklisto ya ekeke ya liboso ete ba chiliastes, nkombo yango euti na liloba ya Greke khilia étê (mbula nkóto). Yango wana, mingi na bango bayebanaki ete bazali kondima Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto; boyangeli oyo ekokómisa mabelé paladiso. Na Biblia mobimba, kaka mokanda ya Emoniseli nde elimboli polelepolele elikya ya mbula nkóto. (Em 20:1-7) Na yango, na esika ebangisa bandimi, Emoniseli epesaki bango nde elikya kitoko. Cecil Cadoux, profesɛrɛ ya istware ya mangomba na iniversite ya Oxford, akomaki boye na mokanda na ye (The Early Church and the World): “Atako na nsima baboyaki yango, lingomba eteyaki likanisi ya ba chiliastes na boumeli ya ntango molai, mpe bakomi mosusu oyo bato bapesaka limemya mingi bateyaki yango.”
Ntina oyo bato baboyaki elikya ya emoniseli
Lokola moto te akoki kotya ntembe ete baklisto mingi ya bikeke ya liboso bazalaki kolikya na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto na paladiso awa na mabelé, ndenge nini “na nsima bato baboyaki makanisi ya ba chiliastes”? Ezalaki na makambo oyo epusaki bato mosusu báboya makanisi yango. Ndenge Robert Mounce, molimboli moko ya Biblia, alobaki yango, “ba chiliastes bakómaki na makanisi mosusu mpo na eleko ya mbula nkóto mpe bakómaki kotalela yango lokola eleko oyo bakomipesa na makambo ya mosuni mpe na bamposa ya nzoto.” Kasi, bakokaki kosembola makanisi yango kozanga koboya elikya ya boyangeli ya mbula nkóto.
Bato oyo baboyaki liteya ya boyangeli ya mbula nkóto basalelaki mayele mpenza mpo na kolimwisa liteya yango. Mokanda moko (Dictionnaire de théologie catholique) elobi ete “mpo na kolimwisa liteya ya boyangeli ya mbula nkóto,” Gaius, moto ya Lingomba ya Katolike (ye azalaki na bomoi na nsuka ya ekeke ya mibale tii na ebandeli ya ekeke ya misato) “alobaki mpenza ete mokanda ya Emoniseli mpe Evanzile ya Santu Yoane ezali mikanda ya Biblia te.” Mokanda yango elobi lisusu ete, Denys, azalaki episkɔpɔ ya Alesandala na ekeke ya misato, akomaki mokanda moko mpo na kokweisa liteya ya boyangeli ya mbula nkóto, “mpo na kosala ete bato oyo bazalaki kondima liteya ya boyangeli ya mbula nkóto bátika koloba ete liteya yango euti na Emoniseli ya Santu Yoane, alobaki ete Emoniseli ezali mokanda ya Biblia te.” Koboya mpenza kondima boyangeli ya mbula nkóto, ntango oyo mapamboli ekosopana na mabelé, emonisi polele makanisi mabe oyo bato ya teoloji bazalaki na yango na ntango wana.
Na mokanda na ye (The Pursuit of the Millenium), Profesɛrɛ Norman Cohn akomi boye: “Na ekeke ya misato, ntango Origène, moto ya teoloji, oyo mbala mosusu alekaki baninga na ye nyonso na lokumu na lingomba ya kala, abandaki komonisa ete Bokonzi ya Nzambe ezali likambo oyo ekoya na ntango moko boye te kasi ekoya nde na kati ya mitema ya bandimi, babandaki koboya koteya boyangeli ya mbula nkóto, balobaki ete ezali lokuta.” Origène, alandaki filozofi ya Bagreke kasi Biblia te; yango wana, alongolaki elikya kitoko oyo emonisaka ete mapamboli ekozala na mabelé ntango Bokonzi ya Masiya ekoyangela mpe ateyaki bato ete bokonzi “ekoya . . . na mitema ya bandimi,” liteya oyo bato bakoki kokanga ntina na yango te. Léon Gry, mokomi moko Mokatolike, akomaki boye: “Filozofi ya Bagreke ekɔtelaki bato makasi . . . yango wana ebandaki kokweisa mokemoke mateya ya ba chiliastes.”
“Lingomba ebungisi nsango oyo ezali kopesa bato elikya”
Na ntembe te, Augustin azalaki mokonzi ya kala ya Lingomba oyo asalaki makambo mingi mpo na kosangisa filozofi ya Bagreke na boklisto ya nkombo mpamba oyo ezalaki na eleko na ye. Na ebandeli azalaki koteya mpenza boyangeli ya mbula nkóto, kasi na nsuka atikaki kondima ete Klisto akoyangela na boumeli ya mbula nkóto awa na mabelé. Abebisaki ndimbola ya Emoniseli mokapo 20 mpe amonisaki ete ezali nde maloba ya elilingi.
Mokanda moko (The Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Augustin asukaki na kondima ete boyangeli ya mbula nkóto ekozala te. . . . Alobi na biso ete, lisekwa ya liboso, oyo mokapo yango ezali kolobela, ezali nde kobotama lisusu na elimo na nzela ya batisimo; sabata ya mbula nkóto oyo ekobanda nsima ya mbula nkóto motoba banda bakelá moto ezali nde bomoi ya seko.” Buku mosusu (The New Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Ndimbola mabe oyo Augustin apesaki mpo na boyangeli ya mbula nkóto ekómaki liteya ya lingomba . . . Baprotesta oyo balandaki Luther, Calvin, mpe mateya ya Lingomba ya Angleterre . . . bakangamaki makasi na makanisi ya Augustin.” Na ndenge yango, bandimi ya mangomba ya boklisto bazalaki lisusu na elikya ya boyangeli ya mbula nkóto te.
Lisusu, Frédéric de Rougemont, moto ya teoloji mpe mwanamboka Suisse, alobi ete “ndenge [Augustin] atikaki makambo oyo azalaki kondima liboso mpo na boyangeli ya mbula nkóto, asalelaki lingomba mabe monene mpenza. Lokola azalaki mokonzi monene na lingomba, andimaki libunga moko oyo elongolaki [lingomba] elikya na yango ya bomoi awa na mabelé.” Adolf Harnack, moto ya teoloji mpe mwanamboka Allemagne, alobaki ete koboya kondima boyangeli ya mbula nkóto ezalaki lokola kolongola bato “mateya oyo bazalaki kokanga ntina na yango,” kolongola “kondima mpe bilikya oyo bazalaki na yango liboso” mpo na kopesa bango “kondima oyo bakoki kokanga ntina na yango te.” Lokola bandakonzambe ezali kotikala mpamba na mikili mingi, ezali elembo oyo ezali komonisa polele ete bato bazali na mposa ya kondima mpe ya elikya oyo bakoki koyeba.
Na mokanda na ye (Highlights of the Book of Revelation), George Beasley-Murray, ye azali molimboli ya Biblia, akomaki boye: “Bakatolike na Baprosteta baboyaki liteya ya boyangeli ya mbula nkóto mpo: ya liboso, balandaki mingi makanisi ya Augustin mpe ya mibale, mangomba ya mikemike ezwaki liteya yango. Soki batuni bakonzi ya mangomba mpo na elikya bakoki kopesa moto na mokili oyo, eyano na bango ezalaka ete: Elikya ezali te. Mokili ekobomama ntango Klisto akoya mpe ekotika esika na likoló ya seko mpe lifelo ya seko kuna bakobosana makambo ya kala. . . . Lingomba ebwaki nsango oyo ezali kopesa bato elikya.”
Elikya kitoko ya emoniseli esili te!
Batatoli ya Yehova bandimaka ete bilaka kitoko ya Biblia mpo na Boyangeli ya Mbula Nkóto ekokokisama. Na emisyo moko ya televizyo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Bato bazali kobanga ete nsuka ya mokili ekoya na mobu 2000,” batunaki Jean Delumeau, moto ya mayele na istware mpe mwanamboka France; ye alobaki boye: “Batatoli ya Yehova bazali mpenza kolanda liteya ya boyangeli ya mbula nkóto, mpo bazali koloba ete etikali moke . . . tókɔta na eleko oyo ekoumela mbula 1 000, eleko moko ya esengo, kasi tokoleka naino na likama monene.”
Ntoma Yoane amonaki makambo yango mpe akomaki yango na mokanda ya Emoniseli. Akomaki boye: “Namonaki likoló na sika, na nse na sika . . . Nayoki mongongo makasi kobima na kiti na bokonzi ete, Talá! Efandelo na Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te, mpo ete makambo na liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:1, 3, 4.
Batatoli ya Yehova bazali koteya na mokili mobimba mpo básalisa bato ebele bázwa elikya yango. Bakosepela kosalisa yo oyeba makambo mingi na likambo yango.
[Elilingi na lokasa 6]
Papias alobaki ete bato oyo bazalaki na bomoi eleko moko na bantoma nde bateyaki Boyangeli ya Mbula Nkóto
[Elilingi na lokasa 7]
Tertullien azalaki kondima Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© Cliché Bibliothèque Nationale de France, Paris
[Elilingi na lokasa 7]
“Ndenge [Augustin] atikaki kondima oyo azalaki na yango liboso mpo na boyangeli ya mbula nkóto, asalelaki lingomba mabe monene mpenza”
[Elilingi na lokasa 8]
Tosengeli mpenza kotya elikya na Paladiso oyo mokanda ya Emoniseli elaki