Lisolo ya bomoi
Tokanisaki mozalisi na biso banda na bolenge na biso
LISOLO YA DAVID Z. HIBSHMAN
“Soki nakómi na nsuka ya bomoi na ngai, nakanisi nakoloba ete nazalaki sembo epai ya Yehova. Nazali kosɛnga ye abatelela ngai David. Yehova, matɔndi mingi mpo na ye, mpe mpo na libala na biso ya malamu mpe ya esengo!”
KANISÁ ndenge nayokaki nsima ya kokunda mwasi na ngai na Marsi 1992, namonaki makambo oyo na mwa kaye oyo azalaki kokoma makambo na ye. Elekaki kaka sanza mitano, tosepelaki mbula ya 60 oyo Helen akokisaki na mosala ya ntango nyonso.
Nazali koyeba malamu mokolo oyo ngai na Helen tofandaki esika moko na liyangani ya Columbus, na etúká ya Ohio, na États-Unis. Ezalaki na 1931. Helen akokisaki naino mbula 14 te, kasi asepelaki na liyangani yango koleka ata ndenge oyo ngai nasepelaki na yango. Mwa moke na nsima, emonanaki mpenza ete Helen azalaki kosepela na mosala ya kosakola ntango ye na mama na ye oyo azalaki mwasi-mokufeli-mobali bakómaki babongisi-nzela, ndenge babengaka Batatoli ya Yehova oyo bazali basakoli ya ntango nyonso ya nsango malamu. Batikaki ndako na bango ya malamu mpo na kokende koteya na bamboka na sudi ya États-Unis.
Libula na ngai ya boklisto
Na 1910, baboti na ngai na bana na bango mibale ya mike balongwaki na ɛsti ya etúká ya Pennsylvanie mpe bakendaki kofanda na Grove City, na wɛsti ya etúká yango. Kuna bazwaki ndako ya kofutela mpe bakómaki kosambela na Église réformée. Mwa moke na nsima, William Evans, Moyekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova ntango wana, akendaki kotala bango. Na ntango wana Tata azalaki na mbula 20 na ndambo, mpe azalaki mokóló ya Mama na mbula mitano. Tata ayokaki mateya ya moto yango ya boboto mpe abengisaki ye aya kolya na ndako. Eumelaki te, tata na mama bandimaki mateya ya Biblia oyo bazalaki koyekola.
Mpo na kozala penepene na lisangá, Tata amemaki libota na ye na engumba Sharon, oyo ezali na kilomɛtrɛ soki 40 na esika oyo bazalaki liboso. Nsima ya mwa basanza, na 1911 to 1912, Tata na Mama bazwaki batisimo. Charles Russell, prezida ya liboso ya la Société Watch Tower, asalaki lisukulu ya batisimo. Ngai nabotamaki na mokolo ya 4 Desɛmbɛ 1916, ntango yango mama na tata bazalaki na bana minei. Ntango nabotamaki, balobaki ete: “Tozwi ndeko mosusu oyo tokolinga ye.” Yango wana bapesaki ngai nkombo David, oyo elimboli “Molingami.”
Nazalaki na sanza minei, mbala ya liboso oyo bamemaki ngai na liyangani. Na ntango wana, tata na bayaya na ngai ya mibali bazalaki kotambola bakilomɛtrɛ mingi mpo na kokende na makita ya lisangá, kasi ngai, mama, na yaya na ngai ya mwasi tozalaki kokende na engbunduka. Makita ezalaki kosalema na ntɔngɔ mpe na nsima ya midi. Mbala mingi, na ndako, tozalaki kosolola masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe L’Âge d’or, nkombo ya kala ya Lamuká!
Bandakisa malamu epesi matomba
Bandeko oyo bazalaki kokende kosala masukulu na masangá mosusu to ba pèlerins, ndenge bazalaki kobenga bango, bazalaki koya na lisangá na biso. Bazalaki kolekisa mokolo moko to mibale na lisangá na biso. Moko ya bandeko yango oyo nabosanaka ye te ezalaki Walter Thorn, oyo akanisaki Mozalisi na ye Monene na ‘mikolo na bolenge na ye.’ (Mosakoli 12:1) Ntango nazalaki elenge, nazalaki kokende na Tata kolakisa “Fɔtɔ-Drame ya bozalisi,” filme ya biteni minei oyo ezalaki kolobela lisolo ya bato.
Atako Ndeko Evans na mwasi na ye, Miriam, bazalaki na bana te, bakómaki baboti mpe bankɔkɔ na biso ya elimo. William azalaki kobenga Tata ntango nyonso ete “Mwana na ngai,” mpe ye na Miriam bapesaki libota na biso mposa makasi ya kosakola nsango malamu. Na ebandeli ya ekeke ya 20, Ndeko Evans asalaki mibembo mingi na Pays de Galles mpo na kokɔtisa mateya ya solo ya Biblia na bamboka oyo ezalaki na zingazinga ya engumba Swansea. Kuna bazalaki kobenga ye moteyi oyo auti na Amerika.
Na 1928, Ndeko Evans atikaki mosala na ye mpe akómaki koteya na etúká ya bangombangomba na Virginie ya Wɛsti. Bayaya na ngai mibale ya mibali: Clarence, ye azalaki na mbula 21 na Carl, oyo azalaki na mbula 19, bakendaki na ye elongo. Biso nyonso bana minei ya mibali tolekisaki bambula mingi na mosala ya ntango nyonso. Kutu, biso nyonso tozalaki bakɛngɛli-batamboli na bolenge na biso. Eleki naino ntango mingi te, mama-leki na ngai Mary, ye azali sikoyo na mbula 90 na ndambo, akomelaki ngai boye: “Biso nyonso tozali kotɔnda Ndeko Evans na ndenge azalaki kosala mosala ya kosakola na molende mpe na ndenge ayaki na Grove City!” Mama-leki Mary mpe akanisaki Mozalisi na ye na bolenge na ye.
Na mayangani minene
Kaka Tata na Clarence nde bakendaki liyangani ya monene oyo esalemaki na 1922, na Cedar Point, na etúká ya Ohio. Kasi, na 1924 tozalaki na motuka, mpe tokendaki libota mobimba na liyangani ya Colombus, na etúká ya Ohio. Biso bana tosengelaki kosalela mbongo oyo tozalaki kobomba mpo na kosomba bilei na biso na boumeli ya mikolo mwambe ya liyangani. Makanisi ya baboti na biso ezalaki ete moto na moto asengeli koyeba kokokisa bamposa na ye. Na yango tozalaki kobɔkɔla bansoso, basimbiliki (lapins) mpe tozalaki na bandako ya kobɔkɔla nzoi, mpe biso bana mibali tozalaki kotɛkisa bazulunalo.
Na 1927, ntango tosengelaki kokende na liyangani ya Toronto na Canada, tozalaki na leki na biso ya moke ya sanza motoba, nkombo na ye Paul. Mama na tata na bandeko na ngai mosusu bakendaki na Toronto, ngai natikalaki na ndako mpo na kobatela Paul, mpe mama-leki, oyo azalaki na ndako ya libala azalaki koya kosunga ngai. Bapesaki ngai dolare zomi; nasombaki na yango kazaka ya sika. Ntango nyonso bazalaki kolakisa biso ete tosengeli kolata malamu ntango tozali kokende na makita mpe tosengeli kobatelaka bilamba na biso malamu.
Na 1931, ntango liyangani moko monene esalemaki na Columbus, na etúká ya Ohio, Clarence na Carl na basi na bango bazalaki babongisi-nzela. Bazalaki na bandako oyo babendaka na motuka. Mwasi ya Carl nkombo na ye Claire Houston, autaki na engumba Wheeling, na Virginie ya Wɛsti; yango wana nafandaki esika moko na Helen, leki ya Claire na liyangani ya Columbus.
Mosala ya ntango nyonso
Ntango nasilisaki kelasi ya ntei na 1932, nazalaki na mbula 15, mpe na mbula oyo elandaki, nakendaki kotikela yaya na ngai Clarence motuka moko ya kala; ye azalaki mobongisi-nzela na Caroline ya Sudi. Nasɛngaki mosala ya mobongisi-nzela mpe nabandaki kosala elongo na Clarence na mwasi na ye. Na ntango yango Helen azalaki mobongisi-nzela na Hopkinsville, na etúká ya Kentucky, mpe nakomelaki ye mokanda mpo na mbala ya liboso. Azongisaki eyano mpe atunaki boye: “Ozali mobongisi-nzela?”
Na mokanda na ngai, oyo Helen abombaki tii na liwa na ye nsima ya mbula soki 60 banda nakomá yango, nazongiselaki ye eyano ete: “Ɛɛ, mpe nazali na elikya ete nakozala ntango nyonso mobongisi-nzela.” Na mokanda yango, nayebisaki Helen ete nalingi nabanda kokabola mwa buku Le Royaume, l’espérance du monde epai ya bakonzi ya mangomba mpe bazuzi na teritware na ngai.
Na 1933, Tata atongelaki ngai ndako ya kapo na wago ya motuka. Ezalaki molai mɛtrɛ 2,4 mpe monene mɛtrɛ 2; ezalaki na lininisa na liboso mpe na nsima. Yango nde ezalaki ndako na ngai mbula minei oyo elandaki ntango nazalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela.
Na Marsi 1934, bato mwambe, elingi koloba ngai, Clarence, Carl, na basi na bango, Helen na mama na ye, na semeki ya Clarence, tokendaki na liyangani na Los Angeles, na etúká ya Californie. Bamosusu bakendaki mpe bazalaki kolala na wago na ngai. Ngai nazalaki kolala na motuka, bamosusu bafutelaki ndako. Lokola tozwaki mikakatano na motuka, tokómaki na mokolo ya mibale ya liyangani, liyangani yango esalaki mikolo motoba. Kuna, ngai na Helen tozwaki batisimo na mai mpo na komonisa ete tomipesi na Yehova.
Na liyangani yango, Joseph Rutherford, prezida ya la Société Watch Tower na ntango wana, akutanaki na babongisi-nzela nyonso. Alendisaki biso, alobaki ete tozali babundi ya mpiko mpo na mateya ya solo ya Biblia. Na libaku yango, bibongiseli ezwamaki mpo na kopesa babongisi-nzela mwa mbongo mpo na kosalisa bango bákoba na mosala na bango.
Mateya mpo na bomoi
Ntango toutaki na liyangani ya Los Angeles, biso nyonso toteyaki nsango ya Bokonzi na bamboka nyonso ya Caroline ya Sudi, Virginie, Virginie ya Wɛsti, mpe na Kentucky. Nsima ya bambula, Helen akomaki mpo na ntango yango boye: “Lisangá mpo na kosunga biso ezalaki te, tozalaki na baninga te oyo bakokaki kosalisa biso, mpamba te tozalaki mpenza bapaya na mboka mopaya. Kasi sikoyo nayebi ete yango ezalaki nde koteya ngai likambo moko. Nakómaki na bozwi mingi.”
Atunaki boye: “Elenge mwasi akoki kolekisaka ntango na ye na makambo nini soki azali mosika na baninga na ye mpe na mboka na ye? Nazalaki malamu. Nakanisi ete nalɛmbaki nzoto ata mbala moko te. Nazalaki kotánga mingi. Ntango nyonso tozalaki kotánga Biblia mpe koyekola mikanda oyo elimbolaka Biblia. Nazalaki moninga mpenza ya mama, ye alakisaki ngai kosalela mwa mbongo oyo tozalaki na yango malamu, kokenda kosomba biloko na zando, kolongola bapine ya motuka oyo etɔbɔki mpe kotya mosusu, kolamba, kotonga bilamba, mpe koteya. Nazali na mawa te mpe soki esengeli kozongela yango, nakosala yango na esengo.”
Atako mama na ye azalaki na ndako ya kitoko, Helen na mama na ye bandimaki kofanda na wago moke ya motuka na ntango wana. Nsima ya liyangani ya Columbus, na etúká ya Ohio, na 1937, mama ya Helen abɛlaki, mpe akɔtaki lopitalo. Akufaki na Novɛmbɛ 1937 na teritware na ye ya mosala na engumba Philippi, na Virginie ya Wɛsti.
Nabali mpe nakobi mosala
Na mokolo ya 10 Yuni 1938, tobalanaki na Helen. Tosalaki mwa feti moke na ndako oyo babotaki ye na Elm Grove, mosika te na Wheeling, na etúká ya Virginie ya Wɛsti. Evans, ndeko na biso ya bolingo, oyo ateyaki libota na biso Biblia liboso ngai nabotama, asalaki lisukulu ya libala. Nsima ya kobalana, ngai na Helen tokanaki kozonga na mosala ya mobongisi-nzela na ɛsti ya Kentucky, kasi tokamwaki, babengi biso na mosala ya zone. Mosala yango esɛngaki kotala bituluku ya Batatoli ya Yehova na wɛsti ya Kentucky mpe na bisika mosusu ya etúká ya Tennessee mpo na kosalisa bango na mosala ya kosakola. Na ntango yango basakoli ya Bokonzi bazalaki kaka soki 75 na bisika nyonso oyo totambolaki na mosala ya zone.
Na eleko yango, bolingo ya ekólo ebebisaki makanisi ya bato mingi, mpe nazalaki komona ete mosika te nakokɔta bolɔkɔ lokola nazali moklisto mpe nakɔtaka na makambo ya politiki te. (Yisaya 2:4) Kasi, lokola eyebanaki ete nazali kosala mosala ya kosakola, batyaki ngai na liste ya bato oyo bakoki kosala mosala ya soda te mpe yango epesaki ngai nzela ya kokoba na mosala ya ntango nyonso.
Ntango tobandaki mosala ya kotambola na masangá, moto nyonso azalaki kokamwa mpo tozalaki bilenge mpenza. Na Hopkinsville, na Kentucky, ndeko mwasi moko ayambaki Helen ntango apesaki ye mbote mpe atuni ye ete: “Ozali koyeba ngai lisusu?” Na 1933, Helen ateyaki ye na magazini ya mobali na ye. Azalaki molakisi na Eteyelo ya mokolo ya lomingo, kasi nsima ya kotánga buku oyo Helen atikelaki ye, atɛlɛmaki liboso ya bana oyo azalaki kotángisa mpe asɛngaki bolimbisi na ndenge ateyaki bango makambo oyo eutaki na Biblia te. Nsima ya kolongwa na lingomba, abandaki kosakola solo ya Biblia na mboka na ye. Ngai na Helen tosalaki na Kentucky mbula misato, mpe mbala mingi tozalaki kofanda na ndako ya ndeko mwasi yango na mobali na ye.
Na ntango wana tozalaki kosala mayangani ya mike, mpe Alexander Macmillan ayaki kokamba liyangani. Afandaká na ndako ya baboti ya Helen ntango Helen azalaki mwana moke. Na liyangani, aponaki kofanda na ndako na biso ya mɛtrɛ 5 oyo babendaka na motuka; tobakisaki mbeto mosusu mpo na ye. Ye mpe akanisaki Mozalisi na ye Monene na bolenge na ye, amipesaki na Yehova na mobu 1900, ntango azalaki na mbula 23.
Na Novɛmbɛ 1941, mosala ya bandeko oyo bazalaki kokende kotala masangá ezalaki kosalema lisusu te mpo na mwa ntango moke, mpe batindaki ngai lokola mobongisi-nzela na engumba Hazard, na etúká ya Kentucky. Mbala oyo lisusu tosalaki na yaya na ngai Carl na mwasi na ye Claire. Kuna, Joseph Houston, mwana ya ndeko ya Helen, alandaki biso mpe abandaki mosala ya mobongisi-nzela. Akobaki na mosala ya ntango nyonso na boumeli ya mbula pene na 50; akufaki liwa ya mbalakaka na maladi ya motema na 1992, na ntango wana azalaki kosala na bosembo nyonso na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na New York.
Na 1943, batindaki biso na engumba Rockville, na etúká ya Connecticut. Yango ezalaki mpenza mokili mosusu mpo na ngai na Helen mpamba te tomesanaki koteya na sudi ya États-Unis. Na Rockville, Helen azalaki koyekola Biblia na bato koleka 20 pɔsɔ na pɔsɔ. Nsukansuka, tokómaki kofutela ndako moko mpo na kosalela yango lokola Ndako ya Bokonzi, mpe tobandaki koyangana na mwa bato moke mpo na kobanda mwa lisangá ya sika.
Ntango tozalaki naino kosala na Rockville, babengisaki biso tókɔta na kelasi ya mbala ya mitano ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, na South Lansing, na etúká ya New York. Tosepelaki ntango toyebaki ete Aubrey na Bertha Bivens, oyo bazalaki baninga na biso ntango tozalaki babongisi-nzela na Kentucky, bakozala baninga na biso na kelasi.
Kelasi mpe teritware na biso ya sika
Atako tozalaki naino bilenge, baninga na biso mingi ya kelasi bazalaki baleki na biso. Na ntembe te, bazalaki kokanisa Mozalisi na bango Monene na bolenge na bango. Tozwaki badiplome na sanza ya Yuli 1945, ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ekómaki na nsuka na yango. Ntango tozalaki kozela bátinda biso na mosala ya misionɛrɛ, tozalaki koyangana na lisangá ya Flatbush na Brooklyn, na New York. Nsukansuka, mokolo ya 21 Ɔkɔtɔbɛ 1946, elongo na banakelasi mosusu motoba, kati na bango Bivens na mwasi na ye, batindaki biso na Guatemala City, na ekólo Guatemala, yango ekómaki mboka na biso ya sika. Na ntango yango, Batatoli ya Yehova bazalaki ata 50 te na ekólo yango mobimba ya Amerika ya Ntei.
Na Aprili 1949, batindaki bamisionɛrɛ mosusu kati na biso na Quetzaltenango, engumba ya mibale na monene ya ekólo yango. Engumba yango ezali likoló, mɛtrɛ 2 300 likoló ya nivo oyo mai monene esuki, mpe mopɛpɛ ya ngomba yango ezalaka mpiɔ mpe kitoko. Helen alobaki na mokuse mpo na mosala na biso kuna ete: “Tozalaki na libaku malamu ya koteya na bingumba mpe bamboka mingi. Tozalaki kolamuka soki na ngonga ya minei ya ntɔngɔ mpe kozwa bisi (babisi yango mingi ezalaki na kiyungulu na maninisa) mpe tozalaki kokende na engumba moko mosika. Kuna tozalaki koteya pene na ngonga mwambe liboso tózonga na mpokwa.” Lelo oyo, masangá mingi ezali na bisika yango, bakisa mpe masangá motoba na Quetzaltenango.
Eumelaki te babengisaki bamisionɛrɛ bákende kosala na Puerto Barrios na bokula ya mer des Antilles, engumba ya misato ya monene na Guatemala. Baninga na biso oyo tolingaki mingi na mosala, elingi koloba Bivens na mwasi na ye, baoyo tosalaki na bango mbula mitano na Guatemala, bazalaki na kati ya bamisionɛrɛ oyo bakendaki na teritware yango ya sika. Ntango bakendaki esalaki biso mpasi mingi na motema mpe tozangaki bango mpenza na bomoi na biso. Lokola totikalaki kaka ngai na Helen na ndako ya bamisionɛrɛ, tokendaki kofanda na ndako moko ya moke. Na 1955, ngai na Helen tondimaki kokende na teritware ya moi makasi na engumba ya Mazatenango. Paul, leki na ngai ya nsuka, na mwasi na ye, Dolores, bango bazwaki diplome na Gileadi na 1953, bateyaki na Mazatenango mwa moke liboso biso tókóma kuna.
Na 1958, tozalaki na Batatoli koleka 700, masangá 20, mpe zongazonga misato na Guatemala. Ngai na Helen tosalaki mosala ya kotambola, kotala bituluku mikemike ya Batatoli mpe masangá mingi, bakisa mpe lisangá moko na Quetzaltenango. Na nsima, na Augusto 1959, babengaki biso tózonga na Guatemala City, kuna tokómaki kofanda na Betele. Ngai nakómaki kosala na Betele, kasi Helen akobaki lisusu mosala ya misionɛrɛ mbula 16. Na nsima ye mpe akómaki kosala na Betele.
Mapamboli mosusu
Eleki bambula mingi nazalaki kaka mwana moke na kati ya bato oyo bazalaki kosalela Yehova. Lelo oyo, ngai nde nazali mokóló mingi na kati na bango nyonso, ndenge emonanaki ntango nakɔtaki kelasi ya basangani ya komite ya filiale na Patterson, na New York, na 1996. Lokola mikóló basalisaki ngai mingi ntango nazalaki elenge, na bambula eleki ezalaki ngala na ngai ya kosalisa ebele ya bilenge oyo balingi kokanisa Mozalisi na bango na bolenge na bango.
Yehova azali kaka kosopela basaleli na ye mapamboli awa na Guatemala. Na 1999, Guatemala City ezalaki na masangá koleka 60. Banda na nɔrdi, sudi, ɛsti, mpe wɛsti, masangá ezali mingi mpe basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe bazali mingi. Eleki sikoyo pene na mbula 53 ntango tokómaki, basakoli bazalaki ata 50 te, lelo oyo bazali koleka 19 000!
Ezali na makambo mingi oyo nasengeli kotɔnda Yehova mpo na yango
Moto moko te azangi mikakatano na bomoi, kasi tokoki ntango nyonso kokitisa “mokumba” na biso “epai ya [Yehova].” (Nzembo 55:22) Mbala mingi asungaka biso na nzela ya baninga na biso ya bolingo oyo tozali kosala na bango. Na ndakisa, mwa bambula liboso akufa, Helen apesaki ngai etanda moko oyo bakomaki maloba ya Baebele 6:10 ete: “Nzambe azangi bosembo te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki epai na Ye na ndenge bosalisaki bato na Ye mpe bozali naino kosalisa bango.”—Weymouth.
Abakisaki mokanda moko oyo elobaki boye: “Mobali na ngai ya bolingo, nazali na mingi ya kopesa yo te, kaka BOLINGO NA NGAI NYONSO . . . Vɛrsɛ oyo ebongi mpenza mpo na yo, mpe nasɛngi yo otya yango na mesa na yo, ezali te mpo ngai nde napesi yo yango, kasi etaleli mpenza yo na ebele ya bambula ya mosala na yo.” Tii lelo oyo, etanda yango ezali na biro na ngai na Betele ya Guatemala.
Nasaleli Yehova banda bomwana na ngai, mpe sikoyo nakómi mobange, nazali kotɔnda Yehova mpo nazali naino na nzoto kolɔngɔnɔ mpe yango ezali kopesa ngai nzela nakokisa mikumba na ngai. Ntango natángaka Biblia mbala na mbala, namonaka mbala mingi bavɛrsɛ oyo nakanisaka ete Helen, mwasi na ngai ya bolingo, alingaki kotya yango mikɔlɔtɔ na Biblia na ye. Namonaka yango ntango natángaki lisusu Nzembo 48:14 oyo elobaka boye: “Oyo azali Nzambe, Nzambe na biso libela na libela; ye akozala motambolisi na biso kino ntango na kufa.”
Nasepelaka koyebisa bato elikya ya mokolo ya lisekwa ntango bato ya bikólo nyonso ya kala bakoyamba bandeko na bango oyo bakosekwa na mokili ya sika. Ezali mpenza elikya kitoko! Mokolo yango tokotangisa mpisoli na esengo wana tokokanisa ete Yehova azali solo Nzambe “oyo akobɔndisaka basɔkɛmi”!—2 Bakolinti 7:6.
[Elilingi na lokasa 25]
Banda na likoló na lobɔkɔ ya mwasi: Mama, Tata, Tata mwasi Eva, mpe bayaya na ngai Carl na Clarence, na 1910
[Bililingi na lokasa 26]
Ngai na Helen na 1947 mpe 1992