Lisolo ya bomoi
Bikateli ya malamu ememeli biso matomba ya libela
Ya Paul Kushnir
NA MOBU 1897, bankɔkɔ na ngai batikaki Ukraine mpe bakendaki kofanda na Canada, pene na engumba Yorkton, na etúká ya Saskatchewan. Bakendaki na bana minei, misato ya mibali ná moko ya mwasi. Na 1923, oyo ya mwasi, Marinka, abotaki ngai; nazalaki mwana na ye ya nsambo. Na ntango wana, tozalaki na biloko mingi te, kasi tozalaki na bomoi ya malamu mpenza. Tozalaki kolya malamu, tozalaki na bilamba ya malili mpe guvɛrnema ezalaki mpenza kokokisa mokumba na yango. Bato ya kartye moko bazalaki kosalisana na misala. Na nsuka ya 1925, Moyekoli ya Biblia moko (ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana), ayaki kotala biso. Yango etindaki biso tózwa bikateli oyo ezali kopesa ngai esengo tii lelo.
Mateya ya solo ekɔti na ndako na biso
Moyekoli yango ya Biblia apesaki mama mwa babuku oyo elimbolaka Biblia, mpe mosika te mama amonaki ete ezali na mateya ya solo. Akolaki noki na elimo mpe azwaki batisimo na 1926. Ntango mama akómaki Moyekoli ya Biblia, bomoi na biso ebongwanaki mpenza. Ndako na biso ekómaki esika ya koyamba bapaya. Mbala mingi, tozalaki koyamba bakɛngɛli-batamboli mpe Bayekoli ya Biblia mosusu epai na biso. Na 1928, mokɛngɛli-motamboli moko alakisaki biso “Drame Eureka,” oyo ezongelaki na mokuse lisolo ya “Fɔtɔ-drame.” Asalelaki ligbɔlɔlɔ na biso ya kopale, oyo ezalaki kolela, mpo na kolakisa drame yango. Soki alelisi yango mbala moko, alekisi elilingi moko. Tosepelaki makasi ndenge asalelaki ligbɔlɔlɔ na biso.
Mokɛngɛli-motamboli moko, Emil Zarysky, azalaki koya kotala biso na motuka na ye oyo ezalaki lokola ndako. Mbala mosusu, azalaki koya elongo na mwana na ye ya mokóló, oyo alendisaki ngai ná bandeko na ngai tómityela mokano ya kokóma babongisi-nzela. Babongisi-nzela mingi bazalaki mpe kolala na ndako na biso. Mokolo moko, mama adefisaki mobongisi-nzela moko elamba alata mpo abongisela ye oyo ya ye. Kasi, mobongisi-nzela yango abosanaki mpe akendeki na elamba yango. Na nsima, atindaki yango mpe asɛngaki bolimbisi na ndenge eumelaki. Akomaki boye: “Nazalaki na mbongo te mpo na kofuta posita.” Tolingaki kutu atikala ata na elamba yango. Nazalaki na elikya ete mokolo mosusu ngai mpe nakomekola elimo ya komipimela ya babongisi-nzela ya ndenge wana. Nazalaka na botɔndi mpenza mpo na elimo ya mama ya koyamba bapaya, oyo ememelá biso matomba mingi mpe ekolisi bolingo na biso mpo na bandeko.—1 Petelo 4:8, 9.
Atako tata akómaki Moyekoli ya Biblia te, azalaki kotɛmɛla biso te. Kutu, na 1930, andimaki bandeko básala liyangani ya mokolo moko na ndako na ye moko. Atako nazalaki kaka na mbula 7, esengo mpe limemya ya bayangani esimbaki mpenza motema na ngai. Tata akufaki na 1933. Atako mama atikalaki na bana mwambe ye moko, alɛmbaki te kolakisa biso nzela ya losambo ya solo. Azalaki kokende na ngai na makita. Na ntango wana, nazalaki komona lokola makita ezalaki koumela mingi, mpe nazalaki na mposa ya kokende kosakana na bana mosusu oyo baboti na bango bazalaki kotika bango básakanaka libándá. Kasi, mpo na kotosa mama, nazalaki kokende te. Soki mama azali kolamba, azalaki mbala mingi kotánga maloba moko ya Biblia mpe kotuna ngai nayebisa soki ezali na vɛrsɛ nini. Na 1933, lokola elanga na biso ebotaki mingi, mama alongolaki ndambo ya mbongo oyo tozwaki mpe asombaki motuka. Bato mosusu ya kartye bakómaki koloba ete abebisi mbongo, kasi ye ayebaki ete motuka yango ekosalisa biso na misala ya Bokonzi. Amikosaki te.
Bandeko basalisaki ngai nazwa bikateli ya malamu
Soki elenge abandi kokola, esɛngaka apona nzela oyo akolanda na bomoi na ye. Yango nde bayaya na ngai, Helen ná Kay, basalaki mpe bakómaki babongisi-nzela. John Jazewsky, moko ya babongisi-nzela oyo toyambaki na ndako na biso, azalaki ndeko moko malamu mpenza. Mama asɛngaki John afanda na biso mwa mikolo mpo asalisa biso na mosala ya bilanga. Na nsima, John ná Kay babalanaki mpe bakobaki mosala ya mobongisi-nzela pene na engumba na biso. Ntango nakómaki na mbula 12, basɛngaki ngai nakende kosakola elongo na bango na eleko ya konje. Yango epesaki ngai mposa ya mosala ya mobongisi-nzela.
Na nsima, ngai ná ndeko na ngai John tokómaki kotambwisa misala na bilanga na biso. Yango epesaki mama nzela ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Yuli mpe ya Augusto. Azalaki kokende na likalo moko oyo ezalaki kotambola na mpunda. Tata apesaki mpunda yango nkombo Saul mpo ezalaki motó makasi, kasi epai ya mama, ezalaki mpenza kotosa. Ngai ná John tozalaki kosepela na mosala ya bilanga mingi, kasi ntango mama azalaki kouta na mosala ya kosakola mpe koyebisa biso makambo ya esengo oyo azalaki kokutana na yango kuna, tokómaki mpe kosepela na mosala ya mobongisi-nzela. Na 1938, nabakisaki milende na ngai na mosala ya kosakola, mpe mwa 9 Febwali 1940, nazwaki batisimo.
Mwa moke na nsima, nakómaki nkulutu na lisangá. Nazalaki kosimba badosye ya lisangá mpe nazalaki kosepela mingi soki namoni ete lisangá ezali kokola. Teritware na ngai ezalaki na engumba moko na ntaka ya kilomɛtrɛ soki zomi na motoba. Na eleko ya malili, nazalaki kokende kuna na makolo pɔsɔ nyonso, mpe nazalaki kolala kuna mokolo moko to mikolo mibale, na eteni ya likoló ya ndako ya libota moko oyo bazalaki kosepela na mateya ya Biblia. Mokolo moko, nasololaki na pastɛrɛ moko ya Protesta, kasi lokola nazalaki koloba na ye makambo nyonso polelepolele, alobaki na ngai ete soki natiki bandimi na ye te akotindela ngai bapolisi. Yango ebakisaki lisusu nde milende na ngai.
Na 1942, yaya na ngai Kay ná mobali na ye John bazwaki bibongiseli mpo bákende na liyangani na engumba Cleveland, na etúká ya Ohio, na États-Unis. Nasepelaki makasi ntango basɛngaki ngai nakende na bango. Liyangani wana ezalaki moko ya makambo ya ntina mingi na bomoi na ngai. Esalisaki ngai nakangama kaka na nzela oyo naponaki kolanda. Ntango ndeko Nathan Knorr, oyo azalaki kokamba mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, alobaki ete bazali na mposa ya babongisi-nzela 10 000, nazwaki mbala moko ekateli ya kokóma mobongisi-nzela!
Na Yanuali 1943, Henry, mokɛngɛli moko ya zongazonga, ayaki kotala lisangá na biso. Asalaki lisukulu moko oyo ebakiselaki biso milende. Na mokolo oyo elandaki, malili ezalaki makasi (-40°C.), mpe mopɛpɛ moko makasi ya nɔrdi ebakisaki lisusu malili yango. Na malili ya ndenge wana, esengelaki nde tófanda na ndako, kasi Henry azalaki kaka motema likolólikoló mpo na kobima na mosala ya kosakola. Ye ná bandeko mosusu bazwaki wagɔ moko oyo ezalaki kotambola na mpunda mpe ezalaki na esika ya mɔtɔ, mpe bakendaki na mboka moko na ntaka ya kilomɛtrɛ 11. Nakendaki ngai moko kotala libota moko oyo ezalaki na bana mibali mitano. Bandimaki koyekola na ngai Biblia mpe nsukansuka bandimaki solo.
Tozali kosakola na ntango ya epekiseli
Na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bapekisaki mosala ya Bokonzi na Canada. Tosengelaki kobombaka mikanda na biso, mpe elanga na biso ezalaki na bisika ebele ya kobomba mikanda. Bapolisi bazalaki koya mbala na mbala koluka mikanda, kasi bamonaki yango te. Tozalaki kosakola kaka na Biblia ya mpamba. Tozalaki koyanga na bituluku mikemike mpo na makita, mpe baponaki ngai ná John mpo tókendeke kotikela bandeko mikanda na nkuku.
Na ntango ya etumba, lisangá na biso mpe ekabolaki mwa buku Fin du nazisme, oyo esengelaki kokabolama na Canada mobimba. Tobimaki na katikati ya butu, mpe nazalaki kobanga makasi. Tozalaki kotika mwa buku yango na monɔkɔ ya ndako mokomoko na mayele mpenza. Ezali na likambo moko te oyo ebangisá ngai lokola oyo wana. Motema na ngai ekitaki mpenza ntango tosilisaki kokabola mwa buku yango. Tozongaki mbangu na kati ya motuka, totalaki soki biso nyonso tokoki mpe tolimwaki na kati ya molili ya butu.
Mosala ya mobongisi-nzela, bolɔkɔ mpe mayangani
Mwa 1 Mai 1943, napesaki mama mbote ya bokabwani mpe nakendaki na teritware ya liboso oyo batindaki ngai lokola mobongisi-nzela. Nazalaki kaka na dolare 20 na potɔmɔni mpe valisi ya moke. Ndeko Tom Troop ná libota na ye, na engumba Quill Lake, bayambaki ngai na esengo mpenza. Na mbula oyo elandaki, nakendaki na teritware ya engumba Weyburn, na etúká ya Saskatchewan, oyo ezalaki na lisangá ata moko te. Mwa 24 Desɛmbɛ 1944, nazalaki kosakola na balabala mpe bakangaki ngai. Nsima ya kolekisa mwa ntango na bolɔkɔ ya engumba yango, bamemaki ngai na kaa ya bakangami ya engumba Jasper, na etúká ya Alberta. Nazalaki elongo na Batatoli mosusu kuna, epai tozalaki komona misala minene ya Yehova, bangomba minene ya Canada. Na ebandeli ya 1945, bakonzi ya kaa yango bapesaki biso nzela tókende koyangana na likita moko na engumba Edmonton, na etúká ya Alberta. Ndeko Knorr ayebisaki ndenge mosala na biso ezali kokende liboso na mokili mobimba, mpe tosepelaki makasi. Tokómaki kozela na mitema likoló mokolo oyo bolɔkɔ na biso ekosila mpo biso mpe tómipesa lisusu mingi na mosala yango.
Ntango nabimaki, nabandaki lisusu mosala ya mobongisi-nzela. Mwa moke na nsima, bayebisaki ete liyangani “Bokoli ya mabota nyonso” ekosalema na engumba Los Angeles, na etúká ya Californie. Ndeko moko na teritware na ngai ya sika atyaki bisika ya kofanda mpo na bato 20 na motuka na ye. Mwa 1 Augusto 1947, tobandaki mobembo molai ya kilomɛtrɛ 7 200. Tokatisaki bazamba mpe bisobe, ná baparke Yellowstone mpe Yosemite ya ekólo Canada. Ezalaki mobembo moko ya esengo, oyo eumelaki mikolo 27.
Nakobosana ata mokolo moko te esengo oyo nayokaki na liyangani wana. Mpo na kozwa matomba mingi na liyangani yango, nazalaki kosala na moi lokola moyambi ya bato mpe na butu nazalaki kokɛngɛla esika ya liyangani. Nakɔtaki na likita oyo babongisaki mpo na bandeko oyo basepeli na mosala ya misionɛrɛ, natondisaki lokasa mpo na mosala yango, atako nazalaki na elikya mpenza te ete bakopona ngai. Na 1948, bazalaki na mposa ya babongisi-nzela na etúká ya Quebec, na Canada, mpe ngai nandimaki kokende.—Yisaya 6:8.
Eteyelo ya Gileadi mpe mikumba mosusu
Na 1949, nasepelaki makasi mpo babengaki ngai na kelasi ya mbala ya 14 ya Gileadi, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Mateya oyo nazwaki kuna elendisaki kondima na ngai mpe esalisaki ngai napusana mpenza penepene na Yehova. John ná Kay bakɔtaki na kelasi ya mbala ya 11 mpe bazalaki bamisionɛrɛ na Rhodésie du Nord (lelo oyo Zambie). Yaya na ngai John akɔtaki na Eteyelo ya Gileadi na 1956. Ye ná mwasi na ye, Frieda, basalaki mosala ya misionɛrɛ na Brésil mbula 32 tii na liwa na ye.
Na mokolo tosilisaki, na Febwali 1950, nazwaki telegramɛ mibale oyo elendisaki ngai mingi, moko eutaki epai ya mama mpe mosusu epai ya libota ya ndeko Troop na engumba Quill Lake. Telegramɛ ya libota ya ndeko Troop, oyo ezalaki na motó ya likambo “Toli mpo na mwana-kelasi,” elobaki boye: “Lelo ezali mokolo monene mpo na yo. Mokolo oyo okobosana te bomoi na yo mobimba; totombeli yo bolongi mpe mosala malamu.”
Batindaki ngai na engumba Quebec, kasi natikalaki naino mwa mikolo na Ferme ya Bokonzi, na etúká ya New York, esika Eteyelo ya Gileadi ezalaki na ntango wana. Mokolo moko, ndeko Knorr atunaki ngai soki nakondima kokende na Belgique. Kasi, mwa mikolo na nsima, atunaki ngai soki nakondima kokende na Pays-Bas. Na mokanda, bayebisaki ngai ete nakei kuna mpo na kozala mokɛngɛli ya filiale. Natikalaki kaka monɔkɔ polele.
Mwa 24 Augusto 1950, nakɔtaki masuwa mpe nasalaki mobembo ya mikolo 11 tii na Pays-Bas. Na mikolo 11 wana, natángaki Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto oyo eutaki kobima mpe nasilisaki yango. Nakómaki na Rotterdam mwa 5 Sɛtɛmbɛ 1950, mpe bandeko ya Betele bayambaki ngai na esengo mpenza. Atako Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebebisaki mpenza mboka, bandeko basalaki nyonso mpo na kozongela misala ya Bokonzi. Ntango nazalaki koyoka masolo na bango, ndenge bayikelaki minyoko mpiko, nazalaki kokanisa ete ekozala mpasi bándima ete ngai, elenge oyo aumeli naino na solo te, natambwisa bango. Kasi mosika te, namonaki ete nazalaki kobanga kaka mpamba.
Ezalaki mpe na mwa makambo oyo esengelaki tótyela likebi. Nakómaki na Pays-Bas mwa moke liboso ya liyangani moko, mpe nakamwaki komona ndenge bapesaki ebele ya bandeko oyo bautaki mosika bisika ya kolala kaka wana na esika ya liyangani. Napesaki bandeko likanisi ete na mbala ya nsima tólukela bandeko bisika ya kolala na bandako ya bato. Bandeko balobaki ete likanisi yango ezali malamu, kasi ebongi te mpo na ekólo na bango. Nsima ya kopesana makanisi, toyokanaki ete tokotya bandeko mosusu na esika ya liyangani mpe bamosusu na bandako ya bato oyo bazali Batatoli te. Ntango ndeko Knorr ayaki na liyangani yango, nayebisaki ye likambo yango na esengo nyonso. Kasi, mosika te nalɛmbaki nzoto ntango natángaki lapolo ya liyangani na biso na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, oyo elobaki ete: “Tozali kolikya ete na mbala ya nsima bandeko bakozala na kondima mpe bakotya bayangani na bandako ya bato, bisika oyo ebongi mpenza mpo na kopesa litatoli.” Tosalaki mpe kaka bongo “na mbala ya nsima”!
Na Yuli 1961, babengaki bandeko mibale ya filiale na biso na likita moko elongo na bandeko ya bafiliale mosusu na Londres. Ndeko Knorr ayebisaki ete esengeli bábimisa Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu na minɔkɔ mwa mingi, atángaki mpe monɔkɔ ya Néerlandais. Tosepelaki makasi na nsango yango. Toyebaki te ete kobongola Biblia ezali mosala monene. Mbula mibale na nsima, na 1963, nazwaki libaku malamu ya kozala na liyangani moko oyo esalemaki na New York, ntango babimisaki Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto na monɔkɔ ya Néerlandais.
Bikateli mpe mikumba mosusu
Na Augusto 1961, nabalaki Leida Wamelink. Libota na ye mobimba bandimaki solo na 1942, na ntango ya minyoko ya Banazi. Leida abandaki mosala ya mobongisi-nzela na 1950, mpe akɔtaki Betele na 1953. Ntango namonaki molende na ye na Betele mpe na lisangá, nayebaki ete akozala moninga malamu mpenza ya mosala mpo na ngai.
Mbula moko na mwa ndambo nsima ya libala na biso, babengaki ngai nakende kolanda mateya na Brooklyn, na boumeli ya sanza zomi. Bazwaki bibongiseli te mpo tókende ná basi na biso. Atako Leida azalaki nzoto malamu te, andimaki ete nakende. Na nsima, maladi ya Leida ekómaki makasi. Tosalaki nyonso mpo tókoba kosala na Betele, kasi nsukansuka tomonaki malamu tókende kokoba mosala na biso ya ntango nyonso na teritware. Na yango, tobandaki mosala ya kotala masangá. Mwa moke na nsima, esɛngaki básala mwasi na ngai lipaso moko ya monene. Bandeko basungaki biso mpe elekaki malamu, mpe mbula moko na nsima, nandimaki kutu mokumba ya mokɛngɛli ya etúká.
Tolekisaki mbula 7 na mosala wana kitoko. Na nsima, tosengelaki kozwa ekateli moko ya monene, mpamba te babengaki ngai na Betele mpo nakende kotángisa na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi. Tondimaki, atako ezalaki pɛtɛɛ te mpo na biso kotika mosala ya kotala masangá oyo tolingaki mingi. Natángisaki kelasi 47, oyo mokomoko ezalaki koumela pɔsɔ mibale, mpe yango epesaki ngai libaku malamu ya kolendisa bankulutu ya masangá.
Na ntango yango, nazalaki komibongisa mpo na kokende kotala mama na 1978. Kasi, mwa 29 Aprili 1977, tozwaki nsango ete mama akufi. Nayokaki mawa mingi lokola nayebaki ete nakoyoka lisusu mongongo na ye te mpe nakozwa lisusu likoki te ya kotɔnda ye mpo na nyonso oyo asalá mpo na ngai.
Ntango Eteyelo ya mosala ya Bokonzi esilaki, basɛngaki biso tótikala na Betele. Nasalaki lokola mokambi ya Komite ya filiale na boumeli ya mbula zomi. Na nsima, Lisangani ya Mikóló-Bakambi batyaki ndeko mosusu oyo alekaki ngai na makoki na esika na ngai. Nazalaka na botɔndi mingi mpo na yango.
Tokobi kosala atako tokómi mibange
Ngai ná Leida tozali sikoyo na mbula 83. Naumeli na mosala ya ntango nyonso mbula koleka 60, mpe ngai ná mwasi na ngai toumeli mbula 45. Atalelaka lisungi nyonso oyo apesi ngai na mikumba nyonso oyo tosali na ye lokola mosala oyo asali mpo na Yehova. Sikoyo, tozali kosala misala oyo ekoki na makasi na biso na Betele mpe na lisangá.—Yisaya 46:4.
Mbala mingi, tosepelaka kolobela makambo ya esengo oyo tokutanaki na yango na bomoi na biso. Toyokaka mawa te mpo na ntango oyo tolekisi na mosala ya Yehova, mpe tondimaka mpenza ete tozwaki bikateli ya malamu mpenza na bolenge na biso. Tozali na ekateli makasi ya kokoba kosalela mpe kokumisa Yehova na makasi na biso nyonso.
[Elilingi na lokasa 13]
Ngai ná yaya na ngai Bill mpe mpunda na biso, Saul
[Elilingi na lokasa 15]
Mokolo ya libala na biso, na Augusto 1961
[Elilingi na lokasa 15]
Ngai ná Leida, lelo oyo