Bandeko mosusu babakisami na Lisangani ya Mikóló-Bakambi
MOKOLO ya pɔsɔ, mwa 2 Ɔkɔtɔbɛ 1999, liyebisi moko ya esengo epesamaki na nsuka ya Likita ya Nsuka ya Mbula ya basangani ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. Bayebisaki bato oyo bazalaki na ndako ya makita na bamosusu oyo bazalaki kolanda na nzela ya telefone, bango nyonso bato 10 594, ete bandeko minei babakisami na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Bandeko yango ya sika bazali baklisto bapakolami, ezali: Samuel Herd; Stephen Lett; Guy Pierce na David Splane.
• Samuel Herd abandaki mosala ya mobongisi-nzela na 1958, mpe banda na 1965 tii na 1997, azalaki mokɛngɛli ya zongazonga mpe mokɛngɛli ya etúká. Na nsima, ye na mwasi na ye Gloria, bakómaki na libota ya Betele ya États-Unis, epai Ndeko Herd azalaki kosala na Biro oyo etalelaka mosala ya kosakola. Azalaki mpe kopesa mabɔkɔ na Komite ya Mosala.
• Stephen Lett abandaki mosala ya mobongisi-nzela na Desɛmbɛ 1966, mpe banda na 1967 tii 1971, asalaki na Betele ya États-Unis. Na Ɔkɔtɔbɛ 1971, abalaki Susan, mpe akómaki mobongisi-nzela monene. Banda na 1979 tii na 1998, azalaki mokɛngɛli ya zongazonga. Na Aprili 1998, ye na mwasi na ye Susan bakómaki na Betele ya États-Unis. Na Betele, azalaki kosala na Biro oyo etalelaka mosala ya kosakola mpe azalaki kopesa mabɔkɔ na Komite ya Mateya.
• Guy Pierce, nsima ya kokolisa bana na bango, ye na mwasi na ye bakómaki babongisi-nzela na Aprili 1982. Azalaki mokɛngɛli ya zongazonga banda 1986 tii na 1997. Na nsima bakómaki na Betele ya États-Unis. Ndeko Pierce azalaki kopesa mabɔkɔ na Komite oyo etalelaka bandeko oyo basalaka na Betele.
• David Splane abandaki mosala ya mobongisi-nzela na Sɛtɛmbɛ 1963. Azwaki diplome ya Eteyelo ya Gileadi na kelasi ya mbala ya 42, azalaki misionɛrɛ na Sénégal, na Afrika, mpe na nsima, alekisaki mbula 19 na mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga na Canada. Na 1990, ye na mwasi na ye Linda, bakómaki na Betele ya États-Unis epai azalaki kosala na Departema ya mosala ya kosakola mpe na Departema ya Bokomi. Banda na 1998, azalaki kopesa mabɔkɔ na Komite ya Bokomi.
Longola bandeko minei oyo babakisami, bandeko oyo bazali sikoyo na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali: Carey Barber, John Barr, Milton Henschel, Gerry Lösch, Theodore Jaracz, Karl Klein, Albert Schroeder, Lyman Swingle, na Danyel Sydlik. Biso nyonso tozali kobondela ete Yehova apambola mpe alendisa ntango nyonso Lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo eyambi bandeko ya sika, na mokumba na bango ya kotambwisa misala ya basaleli ya Nzambe na mokili mobimba mpe kokokisa bamposa na bango ya elimo.