Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w19 Janvier lok. 31
  • Ndeko ya sika na Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndeko ya sika na Lisangani ya Mikóló-Bakambi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Masolo mosusu
  • Ndeko ya sika na Lisangani ya Mikóló-Bakambi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Bandeko ya sika na Lisangani ya Mikóló-Bakambi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bandeko mosusu babakisami na Lisangani ya Mikóló-Bakambi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bandeko mibale ya sika na Lisangani ya Mikóló-Bakambi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
w19 Janvier lok. 31
Kenneth ná Jamie Cook

Kenneth Cook ná mwasi na ye Jamie

Ndeko ya sika na Lisangani ya Mikóló-bakambi

NA NTƆNGƆ ya mokolo ya misato, mwa 24/01/2018, bandeko ya Betele ya États-Unis mpe ya Canada bazalaki na esengo ya kolanda liyebisi moko ya malamu: Ndeko Kenneth Cook abakisami na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova.

Ndeko Cook abotamá mpe akolá na Pennsylvanie, na États-Unis. Ayebaki solo epai ya moninga na ye ya kelasi mwa moke liboso asilisa eteyelo ya ntei (secondaire) mpe azwaki batisimo na mokolo ya 07/06/1980. Abandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza na mokolo ya 01/09/1982. Nsima ya mbula mibale, babengaki ye na Betele, mpe na mokolo ya 12/10/1984, abandaki mosala na Betele ya Wallkill, na etúká ya New York.

Mbula 25 oyo elandaki, Ndeko Cook azwaki mikumba ndenge na ndenge na imprimeri mpe na biro oyo elandelaka makambo ya bandeko ya Betele. Na 1996, abalaki mwasi na ye Jamie, oyo akɔtaki mpe Betele ya Wallkill. Na sanza ya 12/2009, batindaki Ndeko Cook ná mwasi na ye na Esika monene ya mateya ya Watchtower na Patterson, epai Ndeko Cook azwaki mokumba ya kosala na Departema ya kopesa biyano na mituna ya Biblia. Na sanza ya 04/2016, nsima ya kozonga mwa moke na Wallkill, batindaki Ndeko Cook ná mwasi na ye na Betele ya Brooklyn. Sanza mitano na nsima, bakendaki na biro monene na Warwick. Na sanza ya 01/2017, Ndeko Cook akómaki mosungi na Komite ya Bokomi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali lelo na bandeko mwambe oyo batyami mafuta na elimo:

Anthony Morris III; David Splane; Geoffrey Jackson; Gerrit Lösch; Kenneth Cook; Mark Sanderson; Samuel Herd; Stephen Lett

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto