Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/2 lok. 7
  • Bazali kosalisa bato ya lolenge nyonso na Pays-Bas

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kosalisa bato ya lolenge nyonso na Pays-Bas
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Masolo mosusu
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Okoki ‘koleka na Masedonia’?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • “Bólendisa mitema na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Bato “uta na minɔkɔ nyonso” bazali koyoka nsango malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/2 lok. 7

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

Bazali kosalisa bato ya lolenge nyonso na Pays-Bas

ABALAYAMA azalaki na kondima makasi. Ntoma Paulo alobi ete: “Wana ebyangami ye,” Abalayama atosaki maloba ya Nzambe “abimaki mpe, ata ayebaki esika ekokenda ye te.” Abalayama amemaki libota na ye mobimba mpe ‘afandaki lokola mopaya kati na mokili na elaka’ mbula monkama.​—Baebele 11:8, 9.

Lelo oyo mpe, Batatoli ya Yehova mingi bandimi kokende na mboka mopaya mpo na kosala epai oyo bazali na mposa ya basakoli mingi. Bamosusu bayekoli minɔkɔ mosusu mpo na koteya bapaya oyo bayei kofanda na bikólo na bango. Ndenge masolo oyo elandi emonisi yango, elimo malamu yango efungoli “ekuke monene mpo na mosala” na Pays-Bas, epai bato milio moko kati na bato milio 15 oyo bafandaka kuna bauti na bikólo mosusu.​—1 Bakolinti 16:9.

◻ Bahram autaki na ekólo moko na Moyen-Orient; kuna, azalaki kolakisa bato lisano ya karate. Bapesaki ye Biblia na mwa mikanda mosusu ya Batatoli ya Yehova. Nsima ya sanza moko mpamba, Bahram akangaki ntina ete ezali mateya ya solo. Motatoli moko abandaki koyekola na ye Biblia na mwasi na ye. Kasi, mokakatano ezalaki ete Motatoli yango ayebaki koloba monɔkɔ na bango te. Bazalaki kosolola na bilembo, bango moko balobaka ete bazalaki koloba “na mabɔkɔ na makolo.” Na nsima, Bahram na mwasi na ye bamonaki esika lisangá oyo makita ezalaki kosalema na monɔkɔ na bango, mpe baumelaki te kokola na elimo. Lelo oyo, Bahram azali Motatoli oyo azwi batisimo.

◻ Mwasi moko na mobali na ye bazali babongisi-nzela mpe bato ya Pays-Bas, basololaki na mobali moko moto ya Indonésie; mobali yango azalaki liboso ya magazini moko. Akamwaki mpe asepelaki ntango mwasi yango na mobali na ye basololaki na ye na monɔkɔ ya mboka na ye. Bayokanaki bákende kotala ye na ndako. Ayebisaki bango ete afandaki na Russie koleka mbula 20, kuna atángaki kelasi ya monganga mpo na maladi ya basi. Alobaki ete andimaka te ete Nzambe azali, kasi mbala nyonso oyo azalaki kobotisa mwasi, azalaki kokamwa mpe koloba ete: “Nzoto ya moto esalemá mpenza malamu! Ezali mpenza likamwisi!” Andimaki koyekola Biblia, mpe mosika te akómaki kondima ete ezali na Mozalisi oyo amibanzabanzaka mpo na bato. (1 Petelo 5:6, 7) Lelo oyo azali ndeko oyo azwi batisimo mpe azali na lisangá ya lokota ya Indonésien na engumba Amsterdam.

◻ Engumba Rotterdam ezali na moko na mabongo ya masuwa oyo eleki monene na mokili mobimba. Etuluku moko ya babongisi-nzela bakómi na mayele mingi ya koteya bato ya minɔkɔ ndenge na ndenge oyo bayaka na bamasuwa mokolo na mokolo. Mosala ya basakoli yango ya molende eboti mbuma malamu: basali mingi ya masuwa, na kapitɛni moko, mokonzi moko ya basoda ya mai, mpe moto moko oyo azalaki kala kokɛngɛla mokonzi, bandimaki mateya ya solo. Lelo oyo, bato yango mpe bazali kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba.​—Matai 24:14.

Lokola na bisika mosusu na mokili, Batatoli ya Yehova na Pays-Bas balingi mpenza kosakola nsango malamu ya seko na mabota nyonso, na mikili nyonso, na minɔkɔ nyonso, mpe na bibolo nyonso.​—Emoniseli 14:6.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto