Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/11 nk. 4-6
  • Okoki ‘koleka na Masedonia’?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki ‘koleka na Masedonia’?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Masolo mosusu
  • Okoki koleka na Masedonia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Okoki kokende kosakola na mboka mopaya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Ndenge ya kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Kende esika mposa ya basakoli ezali mingi
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 8/11 nk. 4-6

Okoki ‘koleka na Masedonia’?

1. Nini etindaki Paulo ná baninga na ye ya mosala bákende na Masedonia?

1 Na mobu soki 49 ya ntango na biso, ntoma Paulo alongwaki na Antiokia ya Siri mpo na mobembo na ye ya mibale na mosala ya misionɛrɛ. Azalaki na mokano ya kokende kosakola na Efese mpe na bingumba mosusu ya Azia Moke. Kasi na nzela ya elimo santu, azwaki emonaneli moko oyo etindaki ye ‘aleka nde na Masedonia.’ Paulo ná baninga na ye ya mosala bandimaki kokende mpe bazwaki libaku malamu ya kofungola lisangá ya liboso na etúká yango. (Mis. 16:9, 10; 17:1, 2, 4) Lelo oyo mpe, bisika mingi na mokili ezali na mposa monene ya basakoli. (Mat. 9:37, 38) Okoki kokende kopesa mabɔkɔ na bisika yango?a

2. Mpo na nini bandeko mosusu bakanisaka ete bakokoka te kokende kofanda na mboka mopaya?

2 Mbala mosusu yo mpe ozali na mposa okóma misionɛrɛ lokola Paulo, kasi likanisi ya kokende kofanda na mboka mopaya mpo na kosakola ekómela yo naino te. Ntango mosusu ezali mpo ete ozali na likoki ya kokɔta na Gileadi te mpo olekisi mbula oyo esɛngami, to ozali ndeko mwasi oyo abali naino te, to mpe ozali na bana oyo bazali naino mike. Mbala mosusu ozali kobanga kokende kofanda na mboka mopaya mpo okanisi ete okokoka te koyekola monɔkɔ mosusu. To mpe ekoki kozala ete ofandi na mboka mopaya mpo okendaki kuna koluka mbongo; yango wana ozali kokakatana mpo olongwa mboka yango mpe okende lisusu na mboka mosusu. Kasi soki otaleli likambo yango malamu mpe obondeli, mbala mosusu okomona ete makambo wana esengeli te kopekisa yo okende kofanda na mboka mopaya epai mposa ya basakoli ezali monene.

3. Mpo na nini esengeli kaka te moto azwa formasyo ya misionɛrɛ mpo akoka kosakola na mboka mopaya?

3 Esengeli kaka ozwa formasyo ya misionɛrɛ? Nini esalisaki Paulo ná baninga na ye bákoka kosakola na mboka mopaya? Bazalaki kotyela Yehova motema mpe batikaki elimo santu na ye etambwisa bango. (2 Ko. 3:1-5) Yango wana, ata soki ozali na likoki te ya kozwa formasyo mpo na kokóma misionɛrɛ, okoki kosakola na mboka mopaya. Kobosana mpe te ete ozwaka formasyo pɔsɔ na pɔsɔ na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe na Likita ya Mosala. Longola yango, soki ozalaka na mokano ya kokɔta na Gileadi to na eteyelo mosusu ya ndenge wana, kokende kofanda na mboka mopaya mpo na kosakola ekosalisa yo oyeba ndenge mosala ya misionɛrɛ ezalaka, mpe okoyekola makambo mosusu oyo ekosalisa yo soki ondimami mpo na kokɔta na eteyelo yango.

4. Mpo na nini bandeko oyo bakómi mikóló basengeli te kokanisa ete kokende kosakola na mboka mopaya ezali mpo na bango te?

4 Bandeko oyo bakómi mikóló: Bandeko oyo bakómi mikóló mpe bakɔmeli na elimo, oyo bazali naino nzoto makasi, bakoki kosalisa mingi na bikólo oyo esengeli na basakoli. Osili kozwa pansiɔ na mosala? Mpo na bandeko mosusu, mwa mbongo ya pansiɔ oyo bazwaka ekoki mpo bázala na bomoi ya mwa malamu soki bakei kofanda na mikili oyo bozwi ezali mingi te; mpe mbongo oyo bakobimisa kuna mpo na kobikela, ezala mpo na kozwa lisalisi ya minganga ya malamu, ezali moke koleka oyo babimisaka na mboka na bango moko.

5. Lobelá lisolo ya ndeko moko oyo azwaki pansiɔ mpe akendaki kofanda na mboka mopaya.

5 Ndeko mobali moko ya ekólo moko epai balobaka Lingelesi, oyo azali nkulutu mpe mobongisi-nzela mpe asili kozwa pansiɔ, akendaki kofanda na esika moko kitoko oyo bato mingi bakendaka kotala na Sudi-Ɛsti ya Azia, mpo na kopesa mabɔkɔ na etuluku moko ya monɔkɔ ya Lingelesi oyo ezalaki na basakoli libwa. Basakoli yango bazalaki kosakwela bapaya 30 000 oyo bazalaki kofanda na esika wana. Nsima ya mbula mibale, bato 50 bakómaki koyangana na makita. Ndeko yango akomi boye: “Bandá nayei kofanda awa, nazwi mapamboli ebele mpenza oyo nazwá naino te. Soki nalobi nabanda koyebisa mapamboli nyonso oyo nazwi, tokolala awa!”

6. Lobelá lisolo ya ndeko mwasi moko oyo azali monzemba mpe akendaki kofanda na ekólo oyo basakoli bazali mingi te.

6 Bandeko basi oyo bazali minzemba: Yehova asalelaka bandeko basi mingi mpo na kopalanganisa nsango malamu na bikólo oyo mposa ya basakoli ezali monene. (Nz. 68:11) Ndeko mwasi moko oyo azali elenge mpe abali naino te, amityelaki mokano ya kokende kofanda na mboka mopaya mpo na kosakola lisusu mingi, kasi baboti na ye bazalaki kobanga ete likambo moko ya mabe ekómela ye kuna. Na yango, ndeko mwasi yango aponaki ekólo moko oyo mobulu ezali te na makambo ya politiki mpe nkita ezali malamu; akomelaki biro ya filiale ya ekólo yango mpe bayebisaki ye makambo mingi etali ekólo yango oyo ekokaki kosalisa ye. Na mbula motoba oyo afandaki na ekólo yango, azwaki mapamboli mingi. Alobi boye: “Soki natikalaka na mboka na biso, nalingaki te kozwa libaku ya koyekola Biblia na bato ebele boye. Kasi kokende kosakola na esika oyo basakoli bazali mingi te epesi ngai libaku ya koyekola Biblia na bato ebele mpe esalisi ngai nayeba koteya lisusu malamu koleka.”

7. Lobelá lisolo ya libota moko oyo ekendaki kofanda na ekólo mosusu.

7 Mabota: Soki ozali naino kobɔkɔla bana, yango ekoki kopekisa yo okende kofanda na mboka mopaya mpo na kosakola nsango malamu? Libota moko oyo ezali na bana mibale, moko ya mbula mwambe mpe mosusu ya mbula zomi, ezwaki ekateli ya kosala bongo. Mama ya libota yango akomi boye: “Tosepeli mingi na ndenge tobɔkɔlaki bana na biso awa, mpamba te bazalaki ntango nyonso elongo na babongisi-nzela minene mpe bamisionɛrɛ. Tozwaki mapamboli mingi na ndenge toyaki kosakola na esika oyo mposa ezali monene.”

8. Moto akoki kokende kosakola na mboka mopaya kozanga ete ayekola monɔkɔ mosusu? Limbolá.

8 Ozali kobanga koyekola monɔkɔ mosusu? Ozali kobanga kokende kofanda na mboka mopaya mpo okanisi ete okokoka te koyekola monɔkɔ mosusu? Ekoki kozala ete monɔkɔ ya mboka na bino elobamaka mpe na bikólo mosusu epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali monene. Ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo balobaka Lingelesi bakendaki kofanda na mboka moko epai balobaka monɔkɔ ya Espagnol, oyo ezalaki na bapaya ebele oyo balobaka Lingelesi. Ntango biro ya filiale ya ekólo yango ekomelaki bango mpo na masangá ya Lingelesi oyo ezalaki na mposa ya basakoli, baponaki lisangá moko mpe bakendaki kotala yango mbala mibale. Ntango bazongaki epai na bango, basalaki nyonso mpo bábimisaka lisusu mbongo mingi te, mpe babombaki mbongo mpo na mbula mobimba. Ntango bakómaki pene ya kokende, bandeko oyo bazalaki kofanda kuna basalisaki bango bázwa ndako na ntalo malamu.

9, 10. Likambo nini bandeko oyo bakendá kofanda na mboka mopaya basengeli kokanisa kosala, mpe mpo na nini?

9 Bandeko oyo bakendá kofanda na mboka mopaya: Osilá kolongwa na mboka na bino mpe okendá kofanda na mboka mopaya, ntango mosusu liboso oyekola solo? Mbala mosusu, na ekólo oyo obotamá, mposa ya basakoli ezali monene. Okoki kozonga kuna mpo na kopesa mabɔkɔ? Na ntembe te, lokola ozali mwana-mboka, ekozala mpasi te ozwa mosala mpe ndako koleka moto mosusu oyo auti mboka mopaya. Mbala mosusu mpe olobaka monɔkɔ ya mboka. Lisusu, lokola ozali mwana-mboka, bato bakondima koyoka nsango ya Bokonzi oyo ozali koteya bango koleka soki moto oyo azali mopaya ateyi bango.

10 Mobali moko akimaki ekólo Albanie mpe akendaki kofanda na Italie; kuna azwaki mosala oyo efutaka malamu mpe azalaki kotindela bandeko na ye na Albanie mbongo. Nsima ya koyeba solo, abandaki koteya monɔkɔ ya Albanien na etuluku moko ya babongisi-nzela minene oyo bautaki Italie mpe bazalaki kokende kofanda na Albanie mpo na kosakola epai mposa ezalaki monene. Ndeko yango akomi boye: “Bazalaki kokende na teritware oyo natiká. Bayebaki monɔkɔ ya mboka te kasi bazalaki na esengo ya kokende kuna. Nzokande, Albanie ezali mboka na ngai mpe nalobaka monɔkɔ ya mboka yango. Nazalaki kosala nini na Italie?” Ndeko yango azwaki ekateli ya kozonga na Albanie mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola nsango malamu. Alobi boye: “Ata mokolo moko te nayokaka mpasi na motema mpo na mbongo mpe mosala oyo nazalaki na yango na Italie! Awa na Albanie nazali kosala mosala ya ntina mpenza. Mpo na ngai, mosala oyo eleki ntina mpe epesaka esengo ya solosolo ezali kosalela Yehova na nyonso oyo ozali na yango!”

11, 12. Bandeko oyo balingi kokende kofanda na mboka mopaya mpo na kosakola basengeli kosala nini?

11 Soki olingi kokende: Liboso ete Paulo ná baninga na ye ya mosala bákende na Masedonia, bazalaki na mokano ya kokende kosakola na ngámbo ya wɛsti, na Azia, kasi “elimo santu epekisaki bango”; na yango, bakendaki nde na ngámbo ya nɔrdi. (Mis. 16:6) Ntango bakómaki pembeni ya Bitinia, Yesu apekisaki bango. (Mis. 16:7) Ata lelo oyo, Yehova, na nzela ya Yesu, azali kokoba kotambwisa mosala ya kosakola. (Mat. 28:20) Yango wana, soki ozali na likanisi ya kokende kofanda na mboka mopaya mpo na kosakola, luká litambwisi ya Yehova na nzela ya libondeli.​—Luka 14:28-30; Yak. 1:5; talá etanda “Ndenge nini okoki koyeba soki ekólo oyo olingi kokende esengeli na basakoli?”

12 Sɛngá bankulutu ya lisangá na bino mpe bandeko mosusu oyo bakɔmeli na elimo báyebisa yo polele soki bakanisi ete okokoka to te. (Mas. 11:14; 15:22) Tángá masolo oyo ebimá na mikanda na biso oyo elobeli kokende kosakola na mboka mopaya, mpe luká koyeba makambo ebele mpo na ekólo oyo olingi kokende. Mpo na nini te kokende kotala ekólo yango, mpe kolekisa mwa mikolo kuna? Soki olingi mpenza kokende kofanda na ekólo mosusu mpo na kosakola, okoki kokomela biro ya filiale ya ekólo yango, na adrɛsi oyo ezali na Annuaire ya sika, mpo báyebisa yo makambo mosusu oyo etali ekólo yango. Kasi, na esika yo moko otinda mokanda na yo na biro ya filiale yango, pesá yango bankulutu ya lisangá na bino; bango bakokoma oyo ya bango mokanda mpe bakotinda yango nzela moko ná oyo ya yo.​—Talá Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, nkasa 111-112.

13. Na ndenge nini biro ya filiale ekoki kosalisa yo, kasi makambo nini osengeli kosala yo moko?

13 Biro ya filiale ya ekólo yango ekotindela yo makambo oyo osengeli koyeba mpo na ekólo yango mpo na kosalisa yo ozwa ekateli; kasi yebá ete biro yango ezali na mokumba te ya kotindela yo mokanda ya prise en charge, mikanda mpo na kofanda na mboka yango, viza, to mikanda mosusu ya Leta, to mpe ya kolukela yo esika ya kofanda. Wana ezali makambo oyo yo moko osengeli kosala liboso okende kofanda kuna. Lisusu, yo moko nde ozali na mokumba ya kokende na Ambassade to Consulat ya ekólo yango mpo na koyeba masɛngami mpo na kozwa viza to mikanda mpo na kosala kuna. Ndeko nyonso oyo alingi kokende kofanda na mboka mopaya asengeli kozala na likoki ya kokokisa bamposa na ye mpe kokokisa mikanda ya Leta.​—Gal. 6:5.

14. Makambo nini osengeli kokeba na yango soki olingi kosala mobembo to kokende kofanda na ekólo oyo mosala ya kosakola epekisami?

14 Bikólo oyo mosala ya kosakola epekisami: Na bikólo mosusu, bandeko basengeli kozala mpenza ekɛngɛ na losambo na bango. (Mat. 10:16) Basakoli oyo basalaka mibembo na ekólo yango to bakendaka kofanda kuna bakoki mbala mosusu kobenda likebi ya bato na mosala oyo tosalaka mpe kotya bomoi ya bandeko oyo bafandaka na ekólo yango na likama. Soki olingi kokende kofanda na mboka ya ndenge wana, osengeli liboso kokomela biro ya filiale ya mboka na bino mpe kopesa mokanda yango na bankulutu ya lisangá na bino mpo bátinda yango.

15. Ndenge nini bandeko oyo bazali na likoki te ya kokende kofanda na mboka mopaya bakoki kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola na esika oyo bazali?

15 Soki okoki te kokende na mboka mosusu: Soki okoki te kokende kofanda na mboka mosusu, kolɛmba nzoto te. Mbala mosusu ezali na “porte [mosusu ya] monene, oyo ezali kopesa nzela na mosala,” oyo efungwami liboso na yo. (1 Ko. 16:8, 9) Mokɛngɛli ya zongazonga na bino akoki koyebisa yo masangá nini ezali na mposa ya basakoli, oyo ezali mosika te na esika oyo ofandi. Okoki mpe kopesa mabɔkɔ na lisangá to na etuluku moko ya monɔkɔ ya bapaya oyo ezali mosika te. To okoki kosakola lisusu mingi na lisangá na bino. Ezala makambo ya bomoi na yo ezali ndenge nini, likambo ya ntina ezali ya kosalela Nzambe na molimo na yo mobimba.​—Kol. 3:23.

16. Tosengeli kosala nini soki ndeko moko alingi kokende kofanda na mboka mopaya mpo na kosakola?

16 Oyebi ndeko mobali to ndeko mwasi moko oyo akɔmeli na elimo mpe azali na mokano ya kokende kosakola na mboka mopaya? Soki ezali bongo, salisá ye mpe lendisá ye! Ntango Paulo alongwaki na Antiokia ya Siri, engumba yango ezalaki engumba ya misato oyo elekaki monene na Ampire ya Roma (nsima ya Roma mpe Alezandria). Lokola lisangá ya Antiokia ezalaki na teritware ya monene bongo, na ntembe te ezalaki na mposa ya lisalisi ya Paulo mpe elingaki mpenza kozanga ye soki alongwe wana. Atako bongo, Biblia elobi te ete bandeko bapekisaki Paulo akende. Emonani polele ete na esika bátalela kaka bamposa ya teritware na bango, bayebaki ete “elanga ezali mokili.”​—Mat. 13:38.

17. Mpo na nini esengeli kokanisa ‘koleka na Masedonia’?

17 Paulo ná baninga na ye ya mosala bazwaki mapamboli mingi mpo bandimaki koleka na Masedonia. Ntango bakómaki na engumba Filipi na Masedonia, bakutanaki na Lidia mpe “Yehova afungolaki motema na ye mpo atya likebi na makambo oyo Paulo azalaki koloba.” (Mis. 16:14) Kanisá esengo oyo Paulo ná baninga na ye bamisionɛrɛ bayokaki ntango Lidia ná libota na ye mobimba bazwaki batisimo! Na bikólo mingi lelo, ezali na bato ya mitema sembo lokola Lidia oyo bayoká naino nsango ya Bokonzi te. Soki ‘oleki na Masedonia,’ mbala mosusu yo mpe okoki koyoka esengo ya kokutana na bato ya ndenge wana mpe kosalisa bango.

a Awa na Congo, bandeko mibali oyo bakɔmeli na elimo bakoki kosalela makanisi mpe batoli oyo ezali na lisolo oyo mpo na kokende kofanda na bamboka ya kati to na bitúká mosusu ya Congo. Mposa ya basakoli ezali monene na bisika mingi awa na Congo. Basakoli mosusu bakoki kozonga na bitúká oyo babotamá mpo na kosakola kuna. Basusu balobaka monɔkɔ moko oyo elobamaka na bisika oyo mposa ezali monene ya bandeko mibali oyo bakɔmeli na elimo. To, na etúká oyo ozali, ekoki kozala na zongazonga mosusu ya pembeni oyo ezali na mposa ya bandeko mibali oyo bakɔmeli na elimo.

Ndenge nini okoki koyeba soki ekólo oyo olingi kokende esengeli na basakoli?

  • Talá Annuaire ya sika. Tyá likebi mingimingi na esika oyo batye motángo ya bato oyo mosakoli mokomoko asengeli kopesa litatoli na ekólo yango.

  • Salelá Index mpo na koluka masolo mosusu oyo etali ekólo yango.

  • Sololá na basakoli oyo basilá kokende na ekólo yango to bafandá kuna.

  • Soki ozali kokanisa kokende kosakola na ekólo moko epai monɔkɔ ya mboka na bino elobamaka, luká na Internet to na mikanda mosusu mpo na koyeba bato boni balobaka monɔkɔ yango na ekólo wana.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto