Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/2 nk. 25-29
  • Yehova azali ekimelo mpe nguya na ngai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova azali ekimelo mpe nguya na ngai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tomitii na ngámbo ya Yehova na ntango ya mpasi
  • Mikano ya ntina
  • Mosala ya misionɛrɛ na Québec
  • Mosala na biso na France
  • Mosala ya misionɛrɛ na Afrika
  • Natɔndi Nzambe mpo na mosala oyo nasali
  • Na ntango ya etumba mpe ya kimya, Yehova apesaki biso makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Basakoli ya Bokonzi liboso ya batribinale
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Nazali na botɔ́ndi mpo na libula monene ya Boklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Komekola bandakisa ya malamu ememeli ngai mapamboli ebele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/2 nk. 25-29

Lisolo ya bomoi

Yehova azali ekimelo mpe nguya na ngai

LISOLO YA MARCEL FILTEAU

“Soki obali ye, okosuka na bolɔkɔ.” Bato bazalaki koyebisa mwasi oyo ngai nalingaki kobala bongo. Tiká nalimbola mpo na nini balobaki bongo.

NTANGO nabotamaki na 1927 na etúká ya Québec, na Canada, bato mingi bazalaki na Lingomba ya Katolike. Nsima ya mbula soki minei, Cécile Dufour, oyo azalaki Motatoli ya Yehova mpe mosakoli ya ntango nyonso, abandaki koya koteya biso na ndako na engumba Montréal. Yango wana, bato ya kartye na biso bazalaki mbala mingi kokanela ye. Kutu mbala mingi, bazalaki kokanga ye mpe konyokola ye mpo azalaki koteya makambo ya Biblia. Eumelaki te mpo tómona ete maloba ya Yesu ezali solo ete: “Mabota nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.”—Matai 24:9.

Na ntango yango, bato mingi bazalaki komona ete ekoki kosalema te ete libota moko elongwa na Lingomba ya Katolike na Québec. Atako baboti na ngai bazalaki Batatoli ya Yehova te mpo bazwaki batisimo te, bakangaki ntina mbala moko ete mateya ya Lingomba ya Katolike eyokani na Biblia te. Yango wana, balendisaki bana na bango mwambe bátángaka mikanda ya Batatoli ya Yehova, mpe bazalaki kolendisa biso baoyo tolingaki kolanda mateya ya solo ya Biblia.

Tomitii na ngámbo ya Yehova na ntango ya mpasi

Na 1942, wana nazalaki naino na kelasi, nabandaki kosepela koyekola Biblia. Na ntango wana bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na Canada, mpamba te balandaki ndakisa ya baklisto ya liboso mpe baboyaki kokɔta na bitumba. (Yisaya 2:4; Matai 26:52) Bakangaki yaya na ngai ya liboso, Roland, mpo aboyaki kokɔta na mosala ya soda na etumba ya mokili mobimba mpe batyaki ye na kaa ya bakangami oyo bazalaki kosalisa bato misala makasimakasi.

Ezalaki na ntango yango nde, Tata apesaki ngai mokanda moko ya Lifalanse oyo ezalaki kolobela ndenge oyo banyokolaki Batatoli ya Yehova na Allemagne mpo baboyaki kokóma basoda ya Adolph Hitler.a Nazwaki mokano ya kozala lokola bato yango ya sembo mpe ya mpiko, mpe nabandaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki kosalema na ndako ya moto moko. Mwa moke na nsima batunaki ngai soki nakoki kobima na mosala ya kosakola. Nandimaki mpe nayebaki malamu ete mokolo mosusu bakoki kokanga ngai mpe kotya ngai na bolɔkɔ.

Nsima ya kosala libondeli mpo Nzambe apesa ngai makasi, nabɛtaki na ndako ya bato mpo na mbala ya liboso. Elenge mwasi moko ya boboto andimaki, nayebisaki ye nkombo na ngai mpe ntina oyo nayelaki, natángelaki ye 2 Timote 3:16 oyo elobaka ete: “Makom[am]i nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.”

Natunaki ye boye: “Okosepela koyeba Biblia malamu?”

Alobaki ete: “Ɛɛ.”

Nayebisaki ye ete nakoya na ndeko moko oyo ayebi Biblia malamu koleka ngai, mpe tokendaki na ndeko yango na pɔsɔ oyo elandaki. Nsima ya kosakola bongo mpo na mbala ya liboso, mwa kobanga elongwaki, mpe namonaki mpenza ete mosala ya kosakola esalamaka na makasi ya bato te. Lokola ntoma Paulo alobaki, mosala ya kosakola esalamaka na lisalisi ya Yehova. Yango wana, tosengeli mpenza koyeba ete ‘nguya na yango mingi euti na biso te kasi [ezali] ya Nzambe.’—2 Bakolinti 4:7.

Na nsima, bomoi na ngai ekómaki kaka mosala ya kosakola, bazalaki kokanga ngai mbala na mbala mpe kɔtya ngai na bolɔkɔ. Yango wana balobaki na mwasi oyo nalingaki kobala ete: “Soki obali ye, okosuka na bolɔkɔ”! Kasi, yango ezalaki likambo ya mpasi koleka te. Mbala nyonso soki tolali na bolɔkɔ, ndeko moko Motatoli azalaki kofuta mbongo mpo bábimisa biso.

Mikano ya ntina

Na Aprili 1943, namipesaki na Yehova mpe nazwaki batisimo na mai mpo na komonisa komipesa yango. Na 1944, nakendaki mpo na mbala ya liboso na liyangani ya monene na engumba Buffalo, na etúká ya New York, na États-Unis, pene na ndelo ya Canada. Tozalaki bato 25 000, mpe makambo oyo toyokaki kuna epesaki ngai mposa ya kokóma mobongisi-nzela, ndenge babengaka basakoli ya ntango nyonso ya Batatoli ya Yehova. Na Mai 1945, Batatoli ya Yehova na Canada bazongelaki bonsomi ya kosakola, mpe nakómaki mobongisi-nzela na sanza oyo elandaki.

Kasi, lokola nakómaki kosakola mingi, nakómaki mpe kokɔta bolɔkɔ mingi. Mokolo moko batyaki ngai na kasho esika moko na Mike Miller, ye azalaki kosalela Yehova na molende banda kala. Tofandaki na nse mpe tobandaki kosolola. Masolo yango elendisaki ngai mingi na elimo. Kasi, na nsima motuna moko eyelaki ngai na makanisi: ‘Elingaki kozala ndenge nini soki ngai na ye tozalaki koyokana te mpe kolobana te?’ Ntango oyo nalekisaki na bolɔkɔ na ndeko yango ya bolingo eteyaki ngai makambo malamu mingi oyo nakoki kobosana te na bomoi na ngai mobimba, ete: Tozali na mposa ya bandeko na biso mpe tosengeli kolimbisanaka mpe kozalaka na boboto. Soki te, ekozala ndenge ntoma Paulo akomaki ete: “Nde soko bokoswanaka mpe bokolyanaka, bókeba ete bóbebisana te.”—Bagalatia 5:15.

Na Sɛtɛmbɛ 1945, babengisaki ngai nakende kosala na Betele, elingi koloba biro ya filiale ya Société Watch Tower, na engumba Toronto, na Canada. Programɛ ya makambo ya elimo oyo esalemaka kuna elendisaki kondima na ngai. Na mbula oyo elandaki, batindaki ngai na ferme ya Betele, kilomɛtrɛ soki 40 na nɔrdi na esika oyo Betele ezali. Ntango nazalaki kopona mbuma ya fraise na elenge Anne Wolynec, namonaki ete azali mwasi kitoko mpe azali na bolingo mpe azali kosalela Yehova na molende. Tolinganaki, mpe tobalanaki na Yanuali 1947.

Na boumeli ya mbula mibale na ndambo oyo elandaki, tozalaki babongisi-nzela na engumba Londres, engumba Ontario, mpe na Esanga Cap-Breton, kuna tofungolaki lisangá moko. Na 1949, babengaki biso tókɔta kelasi ya mbala ya 14 ya Gileadi, Eteyelo ya Watch Tower mpo na mateya ya Biblia, epai tozwaki mateya mpo na kokóma bamisionɛrɛ.

Mosala ya misionɛrɛ na Québec

Bandeko ya Canada oyo bazwaki diplome na bakelasi ya Gileadi liboso na biso batindaki bango bábanda mosala ya kosakola na Québec. Na 1950, biso na bamisionɛrɛ mosusu 25 ya kelasi ya mbala ya 14 tolandaki bango. Lokola mosala ya bamisionɛrɛ ekómaki monene, bakonzi ya Lingomba ya Katolike bakómaki kotinda bato bányokola biso mpe bábimisela biso mobulu.

Ntango tokómaki na teritware na biso na engumba Rouyn, mikolo mibale na nsima, bakangaki Anne mpe bakɔtisaki ye na nsima ya motuka ya bapolisi. Yango ezalaki likambo ya sika mpo na ye, mpamba te akolaki na mboka moko moke na etúká ya Manitoba, na Canada, kuna amesanaki mpenza komona bapolisi te. Abangaki mingi mpe akanisaki lisusu maloba oyo: “Soki obali ye, okosuka na bolɔkɔ.” Kasi, liboso motuka ekende, bapolisi bamonaki ngai mpe bakɔtisaki ngai na motuka esika moko na Anne. Alobaki na ngai boye: “Nasepeli ndenge namoni yo!” Afandaki mwa nyɛɛ mpe alobaki lisusu ete: “Ah, makambo ya ndenge oyo mpe ekómelaki bantoma mpo bazalaki kosakola makambo etali Yesu.” (Misala 4:1-3; 5:17, 18) Mokolo yango kaka na mpokwa, tofutaki lomande mpe batikaki biso.

Mbula soki moko nsima ya likambo yango, mokolo moko tozalaki na mosala ya ndako na ndako na teritware na biso ya sika na engumba Montréal, nayokaki makɛlɛlɛ na balabala mpe namonaki ebele ya bato oyo bazalaki na nkanda bazali kobamba mabanga. Ntango nakendaki mpo na kosunga Anne na moninga na ye, bapolisi mpe bakómaki esika yango. Na esika bákanga bato oyo bazalaki kosala mobulu, bapolisi bakangaki nde Anne na moninga na ye! Na kati ya bolɔkɔ, Anne ayebisaki Motatoli wana ya sika ete makambo oyo ekómeli bango ezalaki komonisa ete Yesu alobaki solo ete: “Bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.”—Matai 10:22.

Na eleko moko, bafundaki Batatoli ya Yehova na bifundeli soki 1 700 oyo bazalaki kozela ete básamba yango na batribinale ya Québec. Mbala mingi, bazalaki kofunda biso ete tozali kokabola mikanda oyo ezali kotinda bato bátomboka to tozali kokabola mikanda kozanga ndingisa. Yango wana, Departema ya Watch Tower oyo etalaka makambo ya mibeko efundaki guvɛrnɛma ya Québec na tribinale. Nsima ya kolekisa bambula mingi mpo na kosamba, Yehova asalisaki biso mpe tolongaki mbala mibale na Esambiselo Monene ya Canada. Na sanza ya Desɛmbɛ 1950, bazuzi balobaki ete mikanda na biso ezali kotinda bato na botomboki te, mpe na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1953, bandimaki ete tosengeli te kozwa ndingisa liboso ya kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia. Na bongo, tomonaki polele ete Yehova azali mpenza “ekimelo mpe nguya na biso; amonani solo na kosunga na ntango na mpasi.”—Nzembo 46:1.

Likambo ya kokamwa, ntango nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na 1945, Batatoli ya Yehova bazalaki 356, lelo oyo bakómi koleka 24 000 na Québec! Makambo elekaki mpenza ndenge esakweli moko ya Biblia elobi yango: “Ebundeli na ebundeli oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga te, mpe okozalisa lolemo na lolemo nyɛ oyo ekotɛmɛla yo na kosambisama.”—Yisaya 54:17.

Mosala na biso na France

Na Sɛtɛmbɛ 1959, basɛngaki ngai na Anne tókende kosala na Betele ya Paris, na France; kuna batyaki ngai mokɛngɛli ya imprimerie. Tii ntango tokómaki kuna na sanza ya Yanuali 1960, kompani moko ya mokili nde ezalaki kobimisela biso mikanda na masini na yango. Lokola bapekisaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na France, tozalaki kobimisa zulunalo yango sanza na sanza lokola mwa buku ya nkasa 64. Tozalaki kobenga mwa buku yango Bulletin intérieur des Témoins de Jéhovah, mpe ezalaki na masolo ya koyekola na masangá mpo na sanza mobimba. Na 1960, bato oyo bazalaki kobima na mosala ya kosakola na France bazalaki 15 439 mpe na 1967 bakómaki 26 250.

Na nsima, batindaki bamisionɛrɛ mingi na bisika mosusu, bamosusu bakendaki na bamboka ya Afrika epai balobaka Lifalanse mpe bamosusu bazongaki na Québec. Lokola Anne azalaki na maladi mpe esengelaki básala ye lipaso, tozongaki na Québec. Nsima ya mbula misato ya kolanda kozwa nkisi ya monganga, nzoto ya Anne ezongaki kolɔngɔnɔ. Na nsima, batindaki ngai nasala lokola mokɛngɛli ya zongazonga, nazalaki kotala lisangá moko na pɔsɔ moko mpo na kolendisa yango na elimo.

Mosala ya misionɛrɛ na Afrika

Nsima ya mwa bambula, na 1981, tosepelaki ntango batindaki biso na teritware ya sika lokola bamisionɛrɛ na Zaïre, oyo ekómi sikoyo République démocratique du Congo. Bato bazalaki babola mpe bazalaki konyokwama mingi. Ntango tokómaki kuna, Batatoli bazalaki 25 753, kasi lelo oyo, bakómi koleka 113 000, mpe bato 446 362 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto na 1999!

Na 1984, guvɛrnɛma epesaki biso mabelé hectares soki 200 mpo na kotonga Betele ya sika. Na nsima, na sanza ya Desɛmbɛ 1985, liyangani ya mikili mingi esalemaki na engumba-mokonzi Kinshasa; bayangani bazalaki 32 000 bautaki na mikili mingi. Nsima na yango, bakonzi ya mangomba batyaki sɔngisɔngi epai ya bakonzi ya mboka, yango wana bapekisaki mosala na biso na Zaïre. Na mokolo ya 12 Marsi 1986, bandeko oyo bazalaki kotambwisa mosala bazwaki mokanda oyo elobaki ete mibeko ya Zaïre epekisi misala ya lingomba ya Batatoli ya Yehova. Mobutu Sese Seko, prezida ya Zaïre na ntango wana, oyo auti kokufa na bambula eleki, atyaki sinyatili na mokanda oyo epekisaki mosala na biso.

Lokola makambo yango eyelaki biso na mbalakaka, tosalelaki toli ya Biblia oyo elobi ete: “Moto na mayele akososola mabe liboso mpe akomibomba.” (Masese 22:3) Tosalaki mayele mpo na kozwa bapapye, mai ya mokanda, filme, plaques offset, mpe biloko mosusu na bamboka mosusu mpo na kobimisa mikanda na biso na Kinshasa. Tosalelaki mpe mayele mosusu mpo na kotindela bandeko mikanda. Ntango tobongisaki makambo nyonso malamu, yango ezalaki kotambola malamu koleka kutu posita!

Bakangaki Batatoli mingi, mpe mingi banyokolaki bango makasi. Atako mwa bandeko moke bakweaki, mingi bayikaki mpiko mpe batikalaki sembo. Ngai mpe bakangaki ngai mpe namonaki na miso ndenge oyo bazalaki komonisa bandeko bwale na kati ya babolɔkɔ. Mbala mingi bato ya sirete mpe bakonzi bazalaki kolandela biso, kasi mbala nyonso Yehova azalaki kobikisa biso.—2 Bakolinti 4:8.

Tobombaki bakartɔ soki 3 000 na depo ya moto moko ya mombongo. Kasi, na nsima, moto na ye moko ya mosala afundaki likambo yango epai ya bato ya sirete, mpe bakangaki moto ya mombongo yango. Ntango bazalaki kokende na bolɔkɔ, mbala moko, bamonaki ngai na kati ya motuka na ngai. Moto yango ayebisaki bango ete ngai nde moto nayokanaki na ye mpo na kobomba mikanda. Bapolisi batɛlɛmisaki ngai mpe batunaki ngai, balobaki ete nabombaki mikanda oyo epekisami na depo ya moto ya mombongo wana.

Natunaki bango: “Bozali na moko na mikanda yango?”

Bandimaki ete: “Ɛɛ.”

Natunaki ete: “Bokoki kolakisa ngai yango?”

Bayelaki ngai mokanda moko, mpe nalakisaki bango na kati esika bakomi ete: “Ebimisami na la Société Watch Tower na États-Unis d’Amérique.”

Nalobaki na bango ete: “Mokanda oyo bosimbi na mabɔkɔ ezali ya États-Unis kasi ya Zaïre te. Guvɛrnɛma na bino epekisi lingomba ya Batatoli ya Yehova na Zaïre kasi epekisi Watch Tower Bible and Tract Society ya États-Unis te. Esengeli bókeba na mikanda oyo.”

Batikaki ngai mpo bazalaki na mokanda te oyo epesaki bango ndingisa ya kokanga ngai. Na butu yango, tokamataki mituka minene mibale mpe tobimisaki mikanda nyonso na depo yango. Mokolo oyo elandaki ntango bakonzi bakendaki na depo yango, basilikaki makasi mpo bakutaki eloko te na depo. Banda wana bakómaki koluka ngai, mpamba te bazwaki mokanda oyo epesaki bango ndingisa ya kokanga ngai. Bamonaki ngai, mpe lokola bazalaki na motuka te, ngai moko natambwisaki motuka tii na bolɔkɔ! Motatoli mosusu akendaki na ngai mpo azonga na motuka noki bábɔtɔla yango.

Nsima ya kotunatuna ngai na boumeli ya ngonga mwambe mobimba, bazwaki ekateli ya kobengana ngai na Zaïre. Kasi nalakisaki bango fɔtɔkopi ya mokanda ya guvɛrnɛma oyo ezalaki komonisa ete baponaki ngai mpo natekisa biloko ya association “Les Témoins de Jéhovah” oyo bapekisi na Zaïre. Yango wana batikaki ngai nalandaki kosala mosala na ngai na Betele.

Nsima ya kosala mbula minei na mitungisi ya epekiseli na mosala na biso na Zaïre, nazwaki maladi makasi ya estoma oyo ezalaki kolekisa makila mingi mpe yango elingaki koboma ngai. Esengelaki nakende kosalisa nzoto na Afrika ya Sudi, kuna, filiale esalaki makambo nyonso, mpe nzoto na nga ezongaki kolɔngɔnɔ. Nsima ya kosala mbula mwambe na Zaïre, mosala oyo tokoki kobosana yango te mpe oyo epesaki biso esengo, tokendaki na Betele ya Afrika ya Sudi na 1989. Na 1998 tozongaki na mboka na biso mpe banda wana tozali kosala lisusu na Betele ya Canada.

Natɔndi Nzambe mpo na mosala oyo nasali

Soki nakanisi mbula 54 oyo nalekisi na mosala ya ntango nyonso, nazali na bɔtɔndi ete nasalelaki bolenge na ngai na mosala ya ntina mpo na Yehova. Atako Anne akutanaki na komekama mingi, azalaki komilelalela te kutu azalaki nde kosunga ngai mingi na misala na biso. Ngai na ye tosalisaki bato ebele báyeba Yehova, mingi kati na bango bazali sikoyo na mosala ya ntango nyonso. Ezali esengo ya komona bana na bango mosusu to bankɔkɔ na bango bazali kosalela Nzambe na biso Monene, Yehova!

Nandimi ete ezali na eloko moko te oyo mokili oyo ekoki kopesa koleka mabaku malamu mpe mapamboli oyo Yehova apesi biso. Ya solo, tomekamaki mingi, kasi nyonso esalisi biso tókembisa kondima mpe elikya na biso epai ya Yehova. Ye azali ndako makasi, esika ya kokima, mpe lisungi na ntango ya mpasi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mokanda yango ebimaki liboso na lokota ya Allemand na motó ya likambo ete Kreuzzug gegen das Christentum (Etumba mpo na kosilisa baklisto ya solo). Babongolaki yango na Lifalanse mpe na Polonais kasi na Lingelesi te.

[Bililingi na lokasa 26]

Ngai na Anne na mosala ya mobongisi-nzela na 1947; ngai na Anne lelo oyo

[Elilingi na lokasa 29]

Bato oyo tokutanaki na bango na Zaïre balingaki mateya ya Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto