Nazali na botɔ́ndi mpo na libula monene ya Boklisto
LISOLO YA GWEN GOOCH
Na eteyelo nazalaki koyemba nzembo moko oyo ezalaki koloba ete: ‘Yehova Monene afandi na nkembo na ye.’ Mbala mingi nazalaki komituna ete: ‘Yehova yango azali nani?’
BANKƆKƆ na ngai bazalaki na bobangi Nzambe. Na ebandeli ya ekeke oyo, bazalaki kosangana na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na yango na eleko wana. Tata na ngai azalaki na mombongo oyo ezalaki kotambola malamu, kasi na ebandeli apesaki te bana na ye misato libula ya boklisto oyo ye azwaki.
Nayebaki ete Yehova ezali nkombo ya Nzambe ya solo bobele ntango tata apesaki ngai, na yaya na ngai ya mobali, Douglas, mpe leki na ngai ya mwasi, Anne, mwa babúku oyo moko na yango ezalaki na motó na likambo ete Misala na ye mpe mosusu Nzambe azali nani? [na Lingelesi] (Nzembo 83:18) Nasepelaki mingi! Kasi likambo nini elamwisaki lisusu bosepeli ya tata?
Na mobu 1938, ntango tata amonaki ete bikólo bizali komibongisa mpo na etumba, asosolaki ete mpo na kosilisa mikakatano ya mokili esengeli bobele milende oyo eleki milende ya bato. Nkɔkɔ ya mwasi apesaki ye búku Ennemis (Banguna), oyo ebimisamaki na Batatoli ya Yehova. Nsima ya kotánga yango, ayebaki ete monguna monene ya bato ezali Satana Zábolo mpe ete bobele Bokonzi ya Nzambe nde ekoki kotya kimya na mokili.a—Danyele 2:44; 2 Bakolinti 4:4.
Wana etumba ezalaki kobɛlɛma, libota na biso ebandaki koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na Wood Green, na epai ya nɔ́rdi ya engumba Londres. Na sanza ya Yúni 1939, tokendaki pene na esika moko ebéngami Alexandra Palace mpo na koyoka lisukulu ya bato banso oyo ezalaki na motó na likambo ete: “Boyangeli mpe kimya,” yango esalemaki na Joseph F. Rutherford, prezidá ya la Société Watch Tower na ntango wana. Lisukulu ya Rutherford oyo ezalaki kosalema na Madison Square Garden na engumba New York, tolandaki yango na engumba Londres mpe na bingumba mosusu ya minene na nzela ya radio. Tolandaki lisukulu yango polele na boye ete ntango bato ya mobulu bazalaki kosala makɛlɛlɛ kuna na New York, natalaki zingazinga na ngai mpo na koyeba soki makɛlɛlɛ yango ezalaki kouta na ndako ya makita oyo tozalaki!
Molende ya tata mpo na solo ya Biblia
Tata azalaki kosɛngisa libota na biso mobimba ete tósangana na boyekoli ya Biblia mokolo nyonso ya pɔ́sɔ na mpokwa. Tozalaki koyekola Biblia na nzela ya lisolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, oyo elengelamaki mpo na boyekoli ya lisangá mobimba na mokolo elandaki. Mpo na komonisa bopusi oyo boyekoli yango esalaki, kino lelo oyo lisolo ya Yosua mpe ndenge bazingaki engumba Ai, oyo toyekolaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Máí 1939, ezali naino na makanisi na ngai. Yango esepelisaki ngai na boye ete nalukaki mikapo nyonso kati na Biblia na ngai. Nasepelaki mingi na bolukiluki yango—mpe nasalaka sé bongo.
Kosolola na bato mosusu makambo oyo tozalaki koyekola, ekɔtisaki mateya ya Biblia kati na motema na ngai. Mokolo moko tata apesaki ngai fonó na diskɛ oyo ezalaki na lisolo moko ya Biblia, na mwa búku oyo tozalaki koyekola na yango Biblia, mpe adresi ya mobangé mwasi moko. Alobaki na ngai ete nakende kotala ye.
Natunaki ye ete: “Nakoloba nini, mpe nakosala nini?”
Tata ayanolaki ete, “Makambo nyonso ezali na kati. Bɛtá diskɛ na fonó, tángá mituna, ye atánga biyano, mpe na nsima tángá Makomami.”
Nasalaki ndenge alobaki na ngai, mpe na motindo yango nayekolaki kotambwisa boyekoli ya Biblia. Na kosaleláká Makomami kati na mosala ya kosakola, nakangaki ntina na yango malamumalamu.
Mikakatano na bambula ya etumba
Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na 1939, mpe na mbula elandaki nazwaki batisimo lokola elembo ya komipesa na ngai mpo na kosalela Yehova. Nazalaki bobele na mbula 13. Nazwaki ekateli ya kokóma mobongisi-nzela, lolenge babéngaka basakoli ya ntango nyonso. Natikaki kelasi na 1941 mpe na liyangani oyo esalemaki na engumba Leicester nalandaki Douglas na mosala ya ntango nyonso.
Na mbula oyo elandaki, bakangaki tata mpo ete aboyaki kokende na etumba na ntina na lisosoli na ye ya moklisto. Biso bana toyaki kosalisa mama, kosungáká ye na kobatela ndako na boumeli ya eleko wana ya mpasi ya etumba. Na nsima, mwa ntango moke nsima ya kobima ya tata na bolɔ́kɔ, bakangaki Douglas ete akende mosala ya sodá. Zulunalo moko ya engumba na biso ebimisaki lisolo moko oyo ezalaki na motó na likambo ete: “Mpo na nini mwana aponi kokende na bolɔ́kɔ lokola tata na ye aponaki?” Litatoli malamu epesamaki, mpamba te ezalaki libaku mpo na kolimbola ntina oyo baklisto ya solo babomaka bazalani na bango te.—Yoane 13:35; 1 Yoane 3:10-12.
Na boumeli ya bambula wana ya etumba, Batatoli ya Yehova mingi oyo bazalaki basakoli ya ntango nyonso bazalaki koya mbala na mbala na ndako na biso, mpe masolo na bango ya kolendisa oyo matongamaki likoló na Biblia masalaki bopusi makasi epai na ngai. Kati na bandeko wana ya sembo ezalaki na Ndeko John Barr mpe Ndeko Albert Schroeder, oyo bazali sikawa kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Baboti na ngai bazalaki mpenza bayambi ya bapaya, mpe bateyaki biso kosala bongo.—Baebele 13:2.
Pene mpo na kopesa eyano
Mwa moke nsima ya kobanda mosala ya mobongisi-nzela, nakutanaki na Hilda na mosala ya ndako na ndako. Alobaki na ngai na nkanda ete: “Mobali na ngai azali kobunda etumba mpo na koluka bolamu ya bato lokola bino! Mpo na nini yo okosala eloko te mpo na bato oyo bazali na etumba?”
Natunaki ye ete: “Oyebi mosala oyo nazali kosala? Oyebi mpo na nini nayei epai na yo?”
Ayanolaki ete: “Boye, kɔtá mpe oyebisa ngai.”
Nalimbwelaki ye ete tozali kopesa elikya ya solo epai ya bato oyo bazali konyokwama na ntina na makambo mabe oyo mazali kosalema—mingimingi na nkombo ya Nzambe. Hilda asepelaki koyoka ngai, mpe akómaki moto ya liboso oyo nayekolaki na ye Biblia. Azali kino sikawa Motatoli ya molende esili koleka mbula 55.
Na nsuka ya etumba, nakendaki mosala ya mobongisi-nzela na Dorchester, engumba moko na súdi-wɛ́sti ya Angleterre. Yango ezalaki mbala ya liboso nakende kofanda mosika na ndako na biso. Lisangá na biso ya moke ezalaki koyangana na restorá moko, ndako moko etongamá na ekeke ya 16, bazalaki kobénga yango “The Old Tea House (Ndako ya kala ya komela tii).” Liboso ya makita tozalaki kobongisa bamesa mpe bakiti. Yango ekesanaki na Bandako ya Bokonzi oyo namesanaki na yango. Atako bongo, bilei ya elimo mpe bolingo ya bandeko ezalaki bobele ndenge moko.
Na eleko wana baboti na ngai bakendaki kofanda na Tunbridge Wells, na súdi ya engumba Londres. Nazongaki na ndako mpo ete ngai, tata mpe Anne tósala mosala ya mobongisi-nzela esika moko. Lisangá na biso oyo ezalaki na basakoli 12 ekólaki kino kokóma na basakoli 70, na bongo, basɛngaki libota na biso ete tókende kofanda na engumba Brighton oyo ezwami pembeni ya mai monene na súdi ya ekólo Angleterre, kuna mposa mpo na basakoli ezalaki monene. Bato mingi basanganaki na mosala ya kosakola elongo na libota na biso oyo tozalaki babongisi-nzela, mpe tomonaki lolenge Yehova apambolaki mosala na biso. Oyo na ebandeli ezalaki lisangá moko, nsima ya ntango moke ekómaki masangá misato!
Libyangi oyo tomizelaki na yango te
Na eleko ya molungé ya mobu 1950, libota na biso ezalaki kati na batindami 850 oyo bautaki na ekólo Angleterre mpe bakendaki na liyangani ya mikili mingi oyo ezalaki na motó na likambo ete ‘Bokóli ya Teokrasi,’ yango esalemaki na Yankee Stadium, na engumba New York. Babongisi-nzela mingi oyo bautaki na mikili mosusu mpo na liyangani wana bazwaki demande mpo na kokɔta na Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, na South Lansing, na etúká ya New York. Ngai, Douglas, mpe Anne tozalaki kati na bango! Nazali kokanisa ntango nakɔtisaki demande oyo nautaki kotondisa na sanduku ya mikanda, ‘Sikawa namipesi na mosala mosusu lokola natondisi demande mpo na eteyelo ya Gileadi! Bomoi na ngai ekokóma ndenge nini?’ Kasi, ekateli na ngai ezalaki ete: “Ngai oyo! Tindá ngai.” (Yisaya 6:8) Nasepelaki mingi ntango nazwaki libyangi ete natikala nsima ya liyangani mpo nakɔta na kelasi ya Gileadi ya mbala ya 16, elongo na Douglas mpe Anne. Toyebaki malamu ete bakokaki kotinda biso lokola bamisionere ata na ekólo nini.
Nsima wana libota mobimba tolandaki liyangani, ntango ekokaki mpo ete baboti na biso bázonga na Angleterre—bango moko. Biso banso bana misato topɛpaki bango mbote wana masuwa na nkombo Mauritania ezalaki kolongwa na libongo. Yango ezalaki bokabwani ya mpasi mpenza!
Mosala ya misionere
Kelasi ya Gileadi ya mbala ya 16, ezalaki na banakelasi 120 oyo bautaki na mokili mobimba, bakisa mpe baoyo banyokwamaki na bakáa ya bakangami ya Nazi. Lokola bateyaki biso lokota Espagnole, tomizelaki ete bátinda biso na mikili ya Amerika ya Súdi bipai lokota yango elobamaka. Na mokolo ya kozwa mapɔlɔ́mi tokamwaki na koyeba ete Douglas atindamaki na ekólo Japon mpe ngai na Anne na ekólo Syrie. Na bongo ngai na Anne tosengelaki koyekola lokota Arabe, mpe yango ezalaki bongo ata na nsima ntango batindaki biso na ekólo Liban. Wana tozalaki kozela mikanda mpo na kosala mobembo, tozalaki kolanda mateya ya lokota Arabe mbala mibale na pɔ́sɔ epai ya Ndeko George Shakashiri, oyo azalaki kosala na departemá ya composition mpo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lokota Arabe.
Tozalaki na esengo ya kokende na mokili oyo elobelami kati na Biblia mpe oyo toyekolaki na kelasi! Tokendaki elongo na Keith mpe Joyce Chew, na Edna Stackhouse, na Olive Turner, na Doreen Warburton, mpe Doris Wood. Tokómaki libota ya bamisionere ya esengo! Motatoli moko ya mboka yango azalaki koya na ndako ya bamisionere mpo na koyekolisa biso lokota. Na boumeli ya mateya oyo tozalaki kolanda mokolo na mokolo, tozalaki kosala bilakiseli ya mikuse, mpe na nsima tozalaki kobima mpe kosalela yango na mosala ya kosakola.
Tolekisaki mbula mibale ya liboso na engumba Tripoli, [na ekólo Liban], epai lisangá moko ezalaki. Ngai, Joyce, Edna, Olive, Doreen, Doris, mpe Anne tosalisaki basi mpe bana ya basi ya Batatoli ya mboka yango ete báyanganaka na makita mpe bábimaka na mosala ya kosakola. Kino ntango wana, bandeko mibali mpe bandeko basi, na kolandáká bonkɔkɔ ya mboka, bazalaki kofanda esika moko te na makita, mpe bandeko basi bazalaki kobima mingi te na mosala ya kosakola ndako na ndako. Tozalaki na mposa ya lisungi na bango mpo na lokota na mosala ya kosakola, mpe tolendisaki bango ete básangana na mosala yango.
Na nsima batindaki ngai na Anne ete tókende kosunga etuluku moke ya Batatoli na engumba moko ya kala ebéngami Sidona. Eumelaki mingi te, basɛngaki biso ete tózonga na mboka-mokonzi, Beyrouth. Mbóto ya solo ya Biblia elónamaki kati na etuluku ya bato oyo bazalaki koloba lokota ya Arménien kuna, toyekolaki lokota yango mpo na kosalisa bango.
Nakei na teritware mosusu
Liboso ya kolongwa na Angleterre nakutanaki na Wilfred Gooch. Azalaki ndeko ya molende mpe na boboto, asalaki na Betele ya Londres. Wilf akɔtaki kelasi ya Gileadi ya mbala ya 15, oyo bazwaki mapɔlɔ́mi na liyangani oyo esalemaki na Yankee Stadium na 1950. Batindaki ye lokola misionere na filiale ya la Société Watch Tower na ekólo Nigeria, mpe na boumeli ya mwa ntango tozalaki kotindelana mikanda. Na mobu 1955, biso mibale, tozalaki na liyangani oyo ezalaki na motó na likambo ete “Bokonzi ezali kolónga,” oyo esalemaki na Londres, mpe mwa moke na nsima tokómaki babandani. Na mbula elandi, tobalanaki na ekólo Ghana, mpe nalandaki Wilf na engumba Lagos, na ekólo Nigeria.
Nsima ya kotika Anne na Liban, abalaki ndeko moko ya boboto oyo ayekolaki solo ya Biblia na engumba Jérusalem. Baboti na biso bazalaki te ntango biso tozalaki kobala, mpamba te ezala ngai, Douglas, to Anne tobalaki na bamboka ekeseni. Nzokande, bazalaki na esengo ya koyeba ete biso nyonso tozalaki kosalela Yehova Nzambe na biso, na esengo.
Mosala na Nigeria
Na Betele ya Lagos, nazalaki na mosala ya kotya bopɛto na bandako ya bandeko mwambe ya libota ya Betele, mpe kolamba bilei mpe lisusu kosukola bilamba na bango. Mpo na ngai, yango emonanaki ete nazwaki bobele mobali te, kasi lisusu libota mbala moko!
Ngai na Wilf toyekolaki kosala bilakiseli ya mikuse na lokota Yoruba, mpe tozwaki mbano mpo na milende na biso. Elenge (mobali) moyekoli oyo tosololaki na ye na eleko wana, sikawa azali na mwana ya mobali mpe mosusu ya mwasi oyo bazali kosala kati na libota monene ya basangani 400 ya Betele na Nigeria.
Na mobu 1963, Wilf abyangamaki na Brooklyn, na engumba New York, mpo na kolanda mateya oyo esengelaki koumela sanza zomi. Ntango mateya yango esilaki, kozanga komizela na yango atindamaki lisusu na ekólo Angleterre. Natikalaki na Nigeria mpe bapesaki ngai bobele mikolo 14 mpo nalanda Wilf na Londres. Nakendaki na esengo esangani na mawa, mpamba te Nigeria ezalaki teritware moko ya esengo. Nsima ya kosala na boumeli ya mbula 14 na mboka ya bopaya, esengelaki na ngai ntango molai mpo na komesana na bomoi na Angleterre. Nzokande, tozalaki na botɔ́ndi ya kozala lisusu pene ya baboti na biso oyo bakómaki mibangé mpe kozala na likoki ya kosunga bango.
Elikya esalisaki ngai
Kobanda na mobu 1980, nazwaki libaku malamu ya kokende na Wilf na bamboka mingi lokola azalaki mokɛngɛli ya zone. Nazalaki mpenza kozela na esengo ete tózonga kotala ekólo Nigeria. Na nsima tokendaki mpe na mikili ya Scandinavie, na bisanga ya Antilles, ya Caraïbes mpe ya Bahamas, mpe na Moyen-Orient—na ekólo Liban. Ezalaki mpenza esengo kolamwisa lisusu basuvenire malamu mpe komona bato oyo nayebaki wana bazalaki bana mike mpe basilaki kokóma bankulutu baklisto.
Likambo ya mawa, mobali na ngai ya bolingo akufaki na prɛntá ya mobu 1992. Azalaki bobele na mbula 69. Ezalaki mpenza likama oyo epesaki mpenza mpasi mpamba te liwa yango ezalaki ya mbalakaka. Nsima ya mbula 35 ya libala, esɛngaki na ngai ntango molai mpo na komesana na bomoi ya mwasi-mokufeli-mobali. Kasi nazwaki lisungi mingi epai ya bandeko na ngai ya libota ya boklisto na mokili mobimba. Nazwaki baeksperiansi mingi oyo nakoki kokanisa.
Baboti na ngai batikaki ndakisa monene ya bosembo ya boklisto. Mama akufaki na mobu 1981 mpe tata akufaki na mobu 1986. Douglas mpe Anne bazali kokóba kosalela Yehova na bosembo nyonso. Douglas na mwasi na ye Kam, bazongaki na Londres, uta ntango bayaki mpo na kosalisa tata. Anne na libota na ye bazali na États-Unis. Biso nyonso tozali kosepela na elikya mpe na libula oyo Nzambe apesi biso. Tozali kokóba ‘kozela,’ ntango oyo bato na bomoi, elongo na balingami na bango oyo bakosekwa, bakosala elongo libela na libela lokola basangani ya libota ya Yehova awa na mabelé.—Bileli 3:24.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisolo ya tata na ngai, Ernest Beavor, ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yúni 1980 (ebimeli ya Lifalansé).
[Bililingi na lokasa 23]
Na motindo makonga ya montre etambolaka kobanda na likoló na lobɔkɔ ya mwasi:
Gwen na mbula 13 azali kosala elakiseli ya lolenge ya kotambwisa boyekoli ya Biblia na Ndako ya Bokonzi ya Enfield
Libota ya bamisionere na engumba Tripoli, na ekólo Liban, na 1951
Gwen na nkɔndɔ mobali na ye Wilf.