Longwá na esika ya likama!
BATO ya mayele oyo bayekolaka bangomba oyo ebimisaka mɔ́tɔ bazali na mokumba ya kotala bilembo, kolandela yango, mpe kokebisa bato soki ngomba elingi kobanda kobimisa mɔ́tɔ. (Ntango Ngomba Fugen ebandaki kobimisa mɔ́tɔ, bapolisi bazalaki koyebisa bato bákima.) Ndenge moko mpe, bayekoli ya Biblia bazali kotala malamumalamu elembo ya “nsuka ya mokili” mpe bazali kokebisa bato ete likama ezali koya. —Matai 24:3.
Mokapo ya Biblia oyo elobi ete likama ezali koya na mokili mobimba, eyebisi mpe makambo oyo ekobima liboso likama yango eya: “Libota moko ekotɛlɛmɛla libota mosusu mpe bokonzi moko ekotɛlɛmɛla bokonzi mosusu; nzala mpe koningana na mokili ekozala na esika na esika. . . . Basakoli mingi na lokuta bakotɛlɛma mpe bakopɛngwisa mingi. Mpe mpo ete mobulu ekoyikana mingi, bolingo na mingi ekozwa mpiɔ. . . . Mpe Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” —Matai 24:7-14.
Esengeli te tózala naino bato ya mayele oyo batalelaka na mozindo bansango mpo na komona ete esakweli yango ezali kokokisama lelo oyo. Mingimingi banda 1914, tozali komona ete esakweli yango ezali kokokisama. Bitumba mibale ya mokili mobimba esalemaki na ekeke oyo eleki; longola wana, na bisika mingi bato ya mboka moko babundaki bango na bango, bitumba mosusu esalemaki na bamboka ndenge na ndenge mpe matata ebimaki kati na bato mpo bakeseni mposo mpe mpo bazali na mangomba ekeseni. Bitumba yango ememelaki bato nzala. Makama mosusu lokola koningana ya mabele, mopɛpɛ makasi, to bampela ememeli mpe bato bampasi mingi. Koningana ya mabele ebomi bato mingi. Mwa mangomba mikemike ebimaki oyo bakonzi na yango bazali na makambo kilikili mpe bato balandaki bango lokola nde bakufá miso. Bato bazali lisusu na bolingo te mpe na boninga te mpo ‘mobulu eyikani.’
Mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba ezali na kati ya elembo yango mpe ezali kokokisama. Soki obaloli zulunalo oyo na ebandeli na yango, okomona ete maloba “Eyebisaka Bokonzi ya Yehova” ezali na kati ya nkombo ya zulunalo yango. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kobimisama na minɔkɔ 132 mpe mbala nyonso oyo ebimi, bazulunalo koleka milio 22 ezali kokabolama. Bato oyo bazali kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi” na mokili mobimba basalelaka mingimingi zulunalo yango. Nsango malamu yango ezali mpe koloba ete Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, Yehova Nzambe, atii Bokonzi ya likoló, bokonzi yango ekolongola makambo nyonso ya mabe oyo ezali na mokili oyo mpe ekotya paladiso awa na mabele. Tozali mpenza komona polele elembo oyo ezali kolakisa ete etikali moke Nzambe asala likambo moko mpe bomoi ya bato ya mokili oyo ezali na likama.—Talá 2 Timote 3:1-5; 2 Petelo 3:3, 4; Emoniseli 6:1-8.
Mokolo ya Yehova ekozala nsɔmɔ
Makambo nini ekosalema ntango ngonga ekokoka mpo Yehova apesa etumbu? Yoká ndenge oyo ye moko alobeli makambo oyo ekosalema ntango wana: “Nakopesa bikamwiseli na likoló mpe na mokili, makila mpe mɔ́tɔ mpe kobuta ya molinga. Ntango ekobongwana molili mpe sanza ekobongwana makila, liboso ya koya ya mokolo ya [Yehova], mokolo monene mpe ya nsɔmɔ.”—Yoele 2:30, 31.
Mokolo wana, mokolo ya nsɔmɔ mpe ya kobebisa ekoleka mɔ́tɔ nyonso oyo ebimá na ngomba to koningana nyonso ya mabele oyo esalemá, ezali lisusu mosika te. Mosakoli Sefania alobi boye: “Mokolo monene ya [Yehova] ebɛlɛmi; ebɛlɛmi, eyei mbango mpenza. . . . Na mɔ́tɔ ya nkɛlɛ na ye na zuwa mokili mobimba ekozikisama. Zambi akosukisa, ɛɛ, akokómisa na nsuka mpenza baoyo nyonso bazali kofanda kati na mokili.” Atako “palata na bango mpe wolo na bango ikolonga kobikisa bango te na mokolo ya nkanda ya [Yehova],” bato bakoki kobika na mokolo wana ya nsɔmɔ.—Sefania 1:14-18.
Sefania ayebisi ndenge oyo bato bakoki kobika, alobi boye: “Naino nkanda monene ya [Yehova] eyeli bino te, naino mokolo ya nkanda ya [Yehova] eyeli bino te. Bóluka [Yehova], bino basɔkɛmi nyonso na mokili . . . Bóluka boyengebene, bóluka bopɔlɔ, soko nde bokobombama na mokolo ya nkanda ya [Yehova].” (Sefania 2:2, 3) Tokoki kobika soki ‘toluki Yehova, toluki boyengebene, mpe toluki bopɔlɔ.’ Banani oyo bazali koluka Yehova lelo oyo?
Na ntembe te soki oyoki nkombo “Yehova” okanisaka mbala moko Batatoli ya Yehova mpo na mosala na bango ya kosakola. Ekoki kozala ete Motatoli ya Yehova nde apesaki yo zulunalo oyo osimbi na mabɔkɔ. Bayebani ete bazalaka bato ya bosembo mpe ya kolongobana. Basalaka makasi mpo bálata “bomoto ya sika,” oyo esɛngi mpe kozala na bopɔlɔ. (Bakolose 3:8-10) Bandimaka ete soki bakómi na bomoto yango, ezali mpo na mateya oyo bazwaka na kati ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele, oyo emonisami na masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Ya solo, okoki komibomba elongo na Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Batatoli ya Yehova basali ‘lisangá mobimba ya bandeko.’—1 Petelo 5:9.
Omibomba sikoyo
Mpo na koluka Yehova mpo tómibomba, tosengeli kozala baninga na ye. Yango esɛngi makambo nini? Biblia epesi eyano ete: “Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe? Moto nani akani ete azala moninga na mokili amizalisi moyini ya Nzambe.” (Yakobo 4:4) Mpo na kozala baninga ya Nzambe, tosengeli koboya mposa nyonso ya makambo ya mokili mabe oyo elingi banzela ya Nzambe te.
Biblia elobi na biso boye: “Bólinga mokili te soko makambo kati na mokili te. Soko moto nani akolingaka mokili, bolingo na Tata ezali kati na ye te. Zambi makambo nyonso kati na mokili, na mposa mabe na nzoto mpe mposa mabe na miso mpe nzombo na bizaleli iuti na Tata te kasi iuti na mokili. Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.” (1 Yoane 2:15-17) Lelo oyo, bato mingi bazali kolanda bamposa ya nzoto: mposa mabe ya pite, lokoso ya mbongo, mpe bakonzi bazali kosalela bokonzi na bango mabe. Kasi, mpo moto azala moninga ya Yehova, asengeli kobwaka bamposa wana.—Bakolose 3:5-8.
Ekoki kozala ete otángá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mbala na mbala, mpe mbala mosusu ondimaka ndenge oyo zulunalo yango elimbolaka bisakweli ya Biblia. Kasi, ekoki mpe kozala ete okakatanaka mpo na kosangana na Batatoli ya Yehova. Kasi, kanisá naino, soki likama ezali koyela biso, koyoka likebisi mpamba ekoki te, ezali boye te? Lokola tomoni yango na ndakisa ya Ngomba Fugen, tosengeli kosala oyo basɛngi biso. Kanisá bato soki 15 oyo bakufaki, bapanzi-nsango na bato oyo bakangaka bafɔtɔ, mpo bazalaki na mposa ya kotala likambo yango malamu mpe kozala bato ya liboso oyo bakolobela mpe bakolakisa yango. Kutu, moto moko oyo azalaki kokanga fɔtɔ akufaki na mosapi na ye na butɔ ya masini na ye ya fɔtɔ. Moto moko oyo azalaki koyekola bangomba oyo ebimisaka mɔ́tɔ alobaki boye: “Nakosepela ete mokolo nakokufa, ezala pembeni ya ngomba oyo ebimisaka mɔ́tɔ.” Akufaki mpe na ndenge oyo azalaki kolinga. Bango nyonso bamipesaki na mosala mpe na mikano na bango. Kasi bakufaki mpo balandaki likebisi te.
Lelo oyo, bato mingi bazali koyoka nsango oyo ezali koloba ete Nzambe akani koboma mokili mabe oyo, mpe bazali komona ete likebisi yango ezali solo. Mbala mosusu bazali kokanisa boye, ‘Nakanisi ete mokolo mosusu nsuka ekoya, kasi ekoya lelo te.’ Bazali komona malamu bázongisa mokolo ya Yehova nsima mpo likambo moko te epekisa bango kolanda makambo oyo ezali na ntina na miso na bango sikoyo.
Baluku azalaki mpe na mokakatano yango. Lokola azalaki sekrɛtɛrɛ ya mosakoli Yilimia na ntango ya kala, Baluku akebisaki Bayisalaele na mpiko nyonso ete etikali moke Yelusaleme ebomama. Kasi, ekómaki na ntango moko, alɛmbaki mosala oyo bapesaki ye. Yango wana Yehova azongisaki ye na nzela, alobaki na ye ete: “Ozali nde koluka makambo minene mpo na yo moko? Luká yango te.” Baluku asengelaki ‘koluka makambo minene mpo na ye te,’ ezala bomɛngo, lokumu, to biloko. Ebongaki asepela na likambo kaka moko: kosala mokano ya Nzambe, elingi koloba kosalisa bato bámitya na ngámbo na Ye. Soki asalaki bongo, asengelaki kozwa ‘bomoi na ye lokola libonza.’ (Yilimia 45:1-5) Biso mpe ndenge moko, na esika ‘tóluka makambo minene mpo na biso moko,’ tosengeli nde koluka Yehova, na ndenge yango nde tokobikisa bomoi na biso.
Bapolisi na bato oyo basalaka mosala ya koboma mɔ́tɔ bazalaki koleka zomi na Ngomba Fugen mpe bazalaki kosala mosala na bango tii ntango mɔ́tɔ makasi oyo ebimaki na ngomba ezwaki bango. Bazalaki kosalisa mpe kobatela bato oyo bakokaki kozwa likama. Basalaki lokola bato ya mitema malamu oyo bamipesi mosala ya komeka kobongisa makambo na mokili oyo. Atako bazali na mposa ya kosala malamu, ezali solo ete “oyo [etɛngami, NW ] ekoki kosembolama te.” (Mosakoli 1:15) Mokili oyo etɛngami, moto akoki kosembola yango te. Okanisi ete ezali likambo ya mayele mpo na moto aluka komikómisa “moninga ya mokili” mpe ameka kobongisa mokili oyo Nzambe akani koboma?
Ntango okimi, kozonga lisusu te
Kokima mokili oyo elingi kokwela likama mpe kotikala na esika oyo likama ekozwa yo te, elingi koloba na “lisangá mobimba ya bandeko” ezali makambo mibale ekeseni. (1 Petelo 2:17, NW ) Tókanisa lisusu basali bilanga oyo bakimaki kasi na nsima, bazongaki mpo na kotala bilanga na bango pembeni ya Ngomba Fugen. Na ntembe te, mposa na bango ezalaki bázongela bomoi na bango “ndenge bamesaná.” Kasi omoni ete basalaki bozoba lokola bazongaki kuna. Mbala mosusu mokolo oyo bazwaki likama ezalaki mbala ya liboso te oyo bakatisaki ndelo oyo etyamaki. Ekoki kozala ete bakatisaki ndelo mpe bakendaki na esika ya likama, baumelaki te, bazongaki mpe likambo moko esalemaki te. Mokolo mosusu, baumelaki mwa moke, mpe eloko moko esalemaki te. Ekoki kozala ete bakómaki na momeseno ya kokatisa ndelo mpe bazalaki lisusu kobanga te kolekisa ntango na bisika ya likama.
Yesu Klisto alobaki ete likambo ya ndenge yango ekosalema na “nsuka ya mokili.” Alobaki boye: “Mpo ete na mikolo yango liboso na mpela monene, bazalaki kolya mpe komela, kobala mpe kobalisa, kino mokolo eingelaki Noa na bwato; bayebaki likambo te kino eyaki mpela mpe elongolaki bango nyonso. Koya na Mwana na moto ekozala mpe bongo.”—Matai 24:3, 38, 39.
Omoni ete Yesu atángaki kolya, komela, mpe kobala. Makambo wana nyonso ezali mabe te na miso ya Yehova. Kasi mabe ezalaki nini? Bato ya ntango ya Noa “bayebaki likambo te,” bamipesaki na makambo na bango moko. Na ntango ya likama, moto azalaka lisusu na bomoi “ndenge amesaná” te. Soki okimi to okabwani na mokili mabe oyo, osengeli koboya mposa nyonso ya kozongela makambo ya mokili. (1 Bakolinti 7:31) Okoki mbala mosusu kobima na libándá ya esika oyo obatelami na elimo mpe kozonga kozanga ete likama ezwa yo; mbala mosusu mpe ata moto te akomona yo. Kasi, kosala bongo ekolongola yo kobanga mpe nsukansuka okoki kozonga lisusu na mokili mpe koumela mwa ntango. Mosika te, okoki kobanda kokanisa ete: “Nsuka ekoya lelo te.”
Kanisá mpe basɔfɛlɛ misato ya taksi oyo bakufaki mpo bazalaki kozela bapanzi-nsango mpe bato oyo bakangaka bafɔtɔ ntango mɔ́tɔ ebimaki na ngomba mpe ekitelaki bango. Lelo oyo, bato mosusu bakoki kolanda baoyo bamekaki kozonga na mokili. Ya solo, ezala mpo na nini, mposa ya kozonga na esika ya likama ezali mposa ya kolona na motema te.
Bato nyonso oyo bakufaki na mɔ́tɔ ya Ngomba Fugen bakatisaki ndelo mpe bakendaki na bisika ya likama. Atako bayebaki ete mokolo ezali oyo ngomba ekobimisa mɔ́tɔ, moto moko te akanisaki ete ekozala mokolo wana. Ntango bazali kolanda elembo ya nsuka ya mokili, bato mingi bazali komona ete mokolo ya Yehova ekoya, kasi bazali komona ete ekoya sikoyo te. Bato mosusu kutu bamonaka ete mokolo yango ekoki kozala “lelo” te. Kozala na makanisi wana ezali mpenza likama.
Ntoma Petelo alobaki ete: “Mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi.” Tosengeli kokɛngɛlaka, “kozela mpe kobatela ntango nyonso na makanisi koya ya mokolo ya Yehova,” ‘tósala nyonso mpo akuta biso na litɔnɔ te mpe na mbeba te mpe na kimya.’ (2 Petelo 3:10-14, NW) Soki mokili mabe oyo ebomami, paladiso kitoko oyo ekoyangelama na Bokonzi ya Nzambe ekozala na mabele. Yango wana, ata mpo na ntina nini, tómitika te ete tóbendama ata mokolo moko, ete tókende na esika ya likama, mpamba te mokolo oyo tokokatisa ndelo mpo na kozonga na mokili ekoki kozala ete mokolo ya Yehova nde yango wana.
Zalá na kati ya basaleli ya Yehova mpe tikalá wana mpo ozwa likama te.
[Elilingi na lokasa 7]
Zalá na kati ya basaleli ya Yehova mpe tikalá wana mpo ozwa likama te
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]
Iwasa/Sipa Press