Bato mikuse kasi bazali na mitema ya bokabi
SOKI moto azali mokuse mpenza (santimɛtrɛ 76), akomiyoka ndenge nini mpo na kokende kosakola Bokonzi ya Nzambe epai ya bato oyo ayebi bango te? Laura akoki koyebisa yo. Ye azali na mbula 33, kasi azali kaka na santimɛtrɛ 76. Ye na leki na ye María, oyo azali na mbula 24 kasi azali molai bobele santimɛtrɛ 86, bafandaka na engumba Quito, na ekólo Équateur. Tóyoka bango báyebisa mikakatano oyo bakutanaka na yango na mosala na bango ya kosakola.
“Mpo tókóma epai tokendaka kosakola mpe koyangana na makita ya lisangá, totambolaka pene na mɛtrɛ nkama mitano tii na esika oyo tozwaka bisi. Banda esika oyo bisi ekitisaka biso tii esika oyo tozwaka bisi ya mibale, totambolaka lisusu mɛtrɛ nkama mitano. Kasi, na nzela wana ezali na bambwa mitano oyo elandaka bato. Bambwa yango ebangisaka biso mingi mpamba te tomonaka yango minene mpenza lokola mpunda. Mpo na kobengana yango, tosimbaka nzete na mabɔkɔ; tobombaka nzete yango pembeni ya nzela liboso tómata na bisi mpo na kozonga na ndako.
“Komata na bisi ezalaka likambo monene mpo na biso. Totɛlɛmaka likoló na libondo ya mabelé na esika oyo bisi etɛlɛmaka mpo ezala mpasi te mpo na komata na bisi. Basɔfɛlɛ mosusu bapusaka bisi tii na libondo yango, kasi bamosusu basalaka bongo te. Soki bisi epusani tii na esika wana te, oyo aleki molai kati na biso mibale nde asalisaka moninga mpo amata na bisi. Mpo na kokóma na esika oyo tozwaka bisi ya mibale, esɛngaka tókatisa balabala moko ya monene epai mituka elekaka mingi. Yango esɛngaka ete tósala makasi mpo na kokatisa mpamba te tozali na makolo mikuse. Lokola tozali mikuse, komema sakosi oyo ezali na kilo ya mikanda ezalaka mpe mokakatano. Mpo sakosi ezala kilo te, tomemaka Biblia ya moke mpe mwa mikanda moke.
“Banda bomwana, tozalaka kaka na ezaleli ya nsɔninsɔni. Na kartye na biso bayebi ete banda kala tobangaka kosolola na bato mosusu. Yango wana bakamwaka mpe basepelaka soki bamoni biso na bandako na bango, mpe mbala mingi bayokaka biso. Kasi na bisika oyo bayebi biso mpenza te, mbala mingi bato bamonaka kaka bato mikuse; na yango, batyaka mpenza likebi oyo ebongi na nsango na biso te. Atako bongo, koyeba ete Yehova alingi biso epesaka biso makasi ya kokoba na mosala na biso ya kosakola. Tozwaka lisusu makasi ntango tokanisaka maloba ya Masese 3:5, 6.”
Ndenge Laura na María bamonisi yango, kotya molende atako tozali na mokakatano na nzoto ekoki kokumisa Nzambe. Ntoma Paulo abondelaki mpo ete “monzube kati na nzoto” oyo azalaki na yango, ekoki mpenza kozala mokakatano moko ya nzoto, elongwa. Kasi Nzambe alobaki na ye boye: “Ngɔlu na ngai ekoki na yo, zambi nguya na ngai ekokisami kati na bolɛmbu.” Ya solo, mpo na kosalela Nzambe malamu, esengeli kaka te ete mokakatano moko na nzoto esila naino. Soki totyeli Nzambe motema mobimba, ekoki kosalisa biso tósalela ye mosala malamu mpenza ata soki tozali na mokakatano nini. Lokola Paulo atalelaki “monzube kati na nzoto” ndenge yango, akokaki koloba boye: “Mpo wana ezali ngai na bolɛmbu, bongo nazali na nguya.” (2 Bakolinti 12:7, 9, 10) Nsima ya mwa bambula ntoma Paulo akomaki boye: “Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.”—Bafilipi 4:13.
Na ntango na biso, Nzambe azali kosala mosala monene na lisalisi ya mibali, basi, mpe bana oyo bamipesi epai na ye. Bamosusu kati na bango bazali na mokakatano na nzoto. Atako bango nyonso bazali na elikya ete bakobika ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela; bazali kozela te Nzambe asilisa naino bampasi na bango liboso básalela ye.
Yo mpe ozali kotungisama na bolɛmbu moko ya nzoto? Kolɛmba te! Soki ozali na kondima okoki kozala na kati ya bato lokola ntoma Paulo, Laura, mpe María. Tokoki koloba mpo na bango ndenge balobaki na mibali mpe basi ya kondima na ntango ya kala ete: “[Bango] bakembisami kati na bolɛmbu.”—Baebele 11:34.
[Elilingi na lokasa 8]
María
Laura
[Elilingi na lokasa 9]
María azali kosalisa Laura amata na bisi
[Bililingi na lokasa 9]
“Bambwa ebangisaka biso mpamba te tomonaka yango minene mpenza lokola mpunda”
Na nse: Laura na María na bato oyo bayekolaka na bango Biblia