Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/7 lok. 7
  • Masolo ya basakoli na Bokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masolo ya basakoli na Bokonzi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bosembo ezwi mbano
  • Kolongobana ezali kokembisa mosala na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Lisungi epai na baoyo “bazali na mposa ya komɛla” na Russie
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Zalá sembo na makambo nyonso
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Zalá sembo na makambo nyonso
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/7 lok. 7

Masolo ya basakoli na Bokonzi

◻ “MINYOKO MAKASI” likoló na lisangá ya boklisto ya liboso epanzaki bayekoli na Klisto. (Misala 8:1). Kasi, minyoko yango ekokisaki mokano na yango te mpamba te, baoyo bapalanganaki “bakei epai na epai kosakoláká nsango malamu ya liloba”. (Misala 8:4.) Filipo alandi kosakola mpe “ebele na bato batii motema moko na makambo malobi Filipo”. (Misala 8:6.) Lokola yango ezalaki na ekeke ya liboso, na mboka moko na Nord ya Thaïlande, minyoko mikokisaki mokano na yango te.

Ministre moko Témoin de Jehovah, pionnier spécial, abandaki kosakola kati na mboka yango, kasi na ebandeli, bafandi na mboka oyo bayokaki ye te. Kasi, ntango asololaki na pastere ya mboka wana, bato bazingaki bango mpo na koyoka. Bamosusu bamonaki ete Temwe ayebaki Biblia malamu koleka pastere na bango. Babandaki bongo koyekola Biblia elongo na ye, atako mitungisi ya bafandi mosusu ya mboka baoyo babomaki mabala na bango mosusu, bakanelaki koboma pionnier mpe batumbaki ndako ya mobali moko oyo asepelaki na solo. Mobali yango alobaki boye: “Bakoki kotumba ndako na ngai. kasi bakoki kotumba motema na ngai te.’’ Baoyo bazalaki koyekola Biblia elongo na Temwe yango bazalaki kotambola bantáká molai na vélo mpo na koyangana na makita na Salle du Royaume. Minei kati na bango bazwaki batisimo mpe motóbá mosusu bazali koyangana na makita mbala na mbala elongo na bango.

Bosembo ezwi mbano

◻ Batemwe ya Zambie basili kozwa lokumu ya bato oyo na sembo; likambo yango ebimiselaki bango matomba mpe epesaki nzela ete bato mosusu bandima solo, Nkulutu ya lisangá moko, oyo azali pionnier permanent, azalaki kosala mobembo na bus wana eyokaki ye mwasi moko moklisto kosolola na bamosusu na ntina etali lisekwa. Moko na basali mobembo atunaki ye ete: ”Mpo na nini, bino Batemwe, bolobaka ntango nyonso ete bino nde bozali na lingomba ya solo?” Na bongo, nkulutu asanganaki na masolo mpe alobaki epai na moto yango ete Jéhovah akopesa lifuti epai na Batemwe na ye mpo ete bazali koteya solo ya Biblia.

Na boumeli ya mobembo wana molai, nsima na katikati ya butu (minuit), bus ekómaki na esika oyo batyaki nzéka (barrage) na nzela. Mbula ezalaki kobeta makasi. Soda moko akotaki kati na bus mpe atunaki soki Ba Témoins de Jéhovah bazalaki na kati. Bazalaki misato. Na yango soda alobaki ete: ’’Bino Batemwe, botikala, bamosusu, bokita elongo na biloko na bino.” Bato nyonso bakitaki na nsé ya mbula mpe, nsima na kotala nini ezalaki kati na biloko na bango, bamataki wana bilamba mpe biloko na bango epoli.

Ntango bazongaki na kati ya bus, soda alobaki boye: Natikaki Batemwe mpo ete bazali bato na bosembo. Tozali na eksperianse mingi mpo na likambo yango, mpe tomonaki ete bobele bango nde bazali bato na bosembo; ntango totunaka bango nini ezali kati na sakosi na bango, balobaka na biso oyo ezali solo.“ Wana bus elandaki mobembo. Temwe atunaki: “Nini ezali lingomba ya solo?’’ Moto moko apesaki eyano ete: “Ezali oyo epolaki na mbula te.”

Ntembe ezali te, bosembo ezali kopesa nzela ya koyeba lingomba ya solo mpe bazali kozanga lifuti te!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto