Mpo na nini bato bazali na mposa ya mosungi?
MOTO moko oyo liboso azalaki na lolendo mpe na makambo mabe alobaki boye: “Nazalaki monyokoli mpe motyoli.” Moto yango azalaki kofinga Nzambe, atungisaki mpe anyokolaki bayekoli ya Yesu Klisto, bato oyo bazalaki kobanga Nzambe. Kasi, na nsima alobaki na botɔndi mpenza ete: “Kasi, [Nzambe] ayokeli ngai mawa.” Atako ekoki kokamwisa biso, monyokoli yango akómaki moklisto ya sembo mpe toyebi ye na nkombo ya ntoma Paulo.—1 Timote 1:12-16; Misala 9:1-19.
Bato nyonso te basalá makambo oyo Paulo asalaki. Kasi, biso nyonso tobukaka mibeko ya Nzambe. Mpo na nini? Mpamba te “bato nyonso babungi mpe bazangi nkembo ya Nzambe.” (Baloma 3:23) Mpe lisusu, ezali mpasi te mpo tóbungisa elikya, mpe mbala mosusu tóbanda kokanisa ete tozali mpenza bato mabe koleka, yango wana Nzambe akoki koyokela biso mawa te. Ntango Paulo akanisaki bomoto na ye ya masumu, alobaki boye: “Ngai moto ya mawa mingi! Nani akolongola ngai na nzoto oyo ya kufa?” Ye moko apesaki eyano na motuna na ye mpe akomaki ete: “Bobele Nzambe mpo na Yesu Klisto, Nkolo na biso.”—Baloma 7:24, 25.
Ndenge nini Mozalisi ya sembo akoki kozala na boyokani na bato ya masumu? (Nzembo 5:4) Tósimba ete Paulo alobaki boye: “Bobele Nzambe mpo na Yesu Klisto, Nkolo na biso.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Moto mosusu oyo Nzambe ayokelaki mawa alobaki boye: “Nde soko moto nani akosala lisumu, tozali na [mosungi, NW] epai ya Tata, ye Yesu Klisto, Moyengebene. Ye azali mpe mbɔndi mpo na masumu na biso. Kasi bobele mpo na yango na biso te nde mpo na mokili mobimba.”—1 Yoane 2:1, 2.
Mpo na nini Yesu Klisto abengami “mosungi epai ya Tata”? Mpe ndenge nini Yesu azali “mbɔndi” mpo na masumu?
Mpo na nini tozali na mposa ya mosungi?
Yesu ayaki na mokili “mpo na . . . kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.” (Matai 20:28) Lisiko ezali eloko oyo bafutaka mpo na kosikola, to mpo na koluka ete bátika moto to eloko oyo bakangaki. Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “lisiko” euti na verbe moko oyo ezali na likanisi ya kozipa to kofuta masumu. (Nzembo 78:38) Liloba ya Greke, lokola oyo esalelami na Matai 20:28, ezalaki kosalelama mingimingi mpo na kolobela mbongo to eloko oyo bafuti mpo bátika bato oyo bakangaki na bitumba to mpo na kolongola bato na boombo. Mpo makambo esalema na bosembo, bapesaka eloko oyo motuya na yango ekokani na motuya ya eloko oyo balingi kozwa.
Bato bakómaki baombo mpo moto ya liboso atombokelaki Nzambe. Lokola Genese mokapo 3 emonisi yango, moto yango ya kokoka, Adama, atosaki Yehova Nzambe te. Likambo oyo asalaki ezalaki lokola nde amitekaki na boombo ya lisumu mpe ya liwa, mpe atekaki bana na ye na boombo yango atako babotamaki naino te. Adama abungisaki likabo ya bomoi ya kokoka, ezala mpo na ye moko to mpo na bana na ye.—Baloma 5:12, 18, 19; 7:14.
Na ntango ya kala, na Yisalaele, Nzambe asɛngaki bato bákabaka banyama lokola mbeka mpo na kofuta, to kozipa masumu na bango. (Levitike 1:4; 4:20, 35) Elingi koloba bazalaki kopesa bomoi ya nyama na esika ya bomoi ya moto oyo asali lisumu. (Levitike 17:11) Yango wana, “mokolo ya mbɔndi” ekokaki mpe kobengama “mokolo ya mbeka.”—Levitike 23:26-28.
Kasi, lokola nyama ekokani na moto te, “makila ya bangɔmbɛ mpe bantaba ekoki kolongola masumu [mpo na libela] te.” (Baebele 10:1-4) Mpo mbeka efuta to elongola mpenza masumu mpo na libela, motuya na yango esengelaki kozala ndenge moko na motuya ya bomoi oyo Adama abungisaki. Bosembo esɛngaki ete moto moko ya kokoka (Yesu Klisto) afuta oyo moto mosusu ya kokoka (Adama) abungisaki. Esengelaki kaka bomoi ya moto ya kokoka mpo na kofuta motuya oyo ekoki mpenza kosomba bana ya Adama na boombo oyo tata na bango akɔtisaki bango. Bosembo ya solosolo esɛngi kofuta “molimo mpo na molimo.”—Exode 21:23-25, NW.
Ntango Adama asalaki lisumu mpe bakatelaki ye etumbu ya liwa, bana na ye, atako babotamaki naino te, kasi bazalaki na mokɔngɔ na ye; yango wana, bakufaki na ye elongo. Yesu, moto ya kokoka, “Adama ya nsuka,” asepelaki abota te. (1 Bakolinti 15:45) Azalaki mpe na bana na mokɔngɔ na ye ntango akufaki lokola mbeka ya bomoi ya kokoka. Yango wana, tokoki koloba ete bato ya kokoka oyo bazalaki na mokɔngɔ na ye bakufaki na ye nzela moko. Yesu akamataki bana ya Adama, bato ya masumu mpe oyo babongi kokufa, lokola bana na ye. Atikaki lotomo na ye ya kobota bana na ye moko. Lokola akabaki bomoi na ye ya kokoka, Yesu asombaki bana nyonso ya Adama mpo bákóma bana na Ye, mpe Ye akómaki “Tata ya seko” mpo na bango.—Yisaya 9:6, 7.
Mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola bato efungolaki nzela mpo Nzambe ayokela bato ya botosi mawa mpe apesa bango bomoi ya seko. Yango wana, ntoma Paulo akomaki ete: “Zambi masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa; nde Nzambe akopesa likabo mpamba, likabo na ye bomoi na seko kati na Yesu Klisto, Nkolo na biso.” (Baloma 6:23) Motema na biso esengeli kotinda biso na kosanzola Yehova mpo na bolingo mpe motema mawa na ye na ndenge oyo apesaki mbeka atako yango ezalaki likambo ya mpasi mpenza mpo na ye mpe mpo na Mwana na ye ya bolingo. (Yoane 3:16) Yesu akómaki mpe ‘Mosungi epai ya Tata’ ntango asekwaki mpo na bomoi na likoló mpe alakisaki Nzambe motuya ya mbeka na ye.a (Baebele 9:11, 12, 24; 1 Petelo 3:18) Kasi, ndenge nini Yesu Klisto azali sikoyo kosala lokola mosungi na biso kuna na likoló?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko mokapo 4 na mokapo 7, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 4]
Bomoi ya Yesu, moto ya kokoka, ekómaki mbeka mpo na kosikola bana ya Adama.