Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/5 nk. 8-12
  • Tósimba makasi mateya ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósimba makasi mateya ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokili oyo Satana azali koyangela
  • Banguna ya mateya ya solo
  • Na kati ya lisangá
  • Tóbatela oyo etyami na mabɔkɔ na biso
  • Tosengeli kozala na bososoli
  • Tótondisa elimo na biso na makambo malamu
  • Nini ekoki kosalisa biso na kosembola liloba ya solo malamumalamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mokanda ya Biblia nimero 54—1 Timoté
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Tyá elikya epai na Yehova mpe na Liloba na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Monisá polele ete ozali kokende liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/5 nk. 8-12

Tósimba makasi mateya ya Nzambe

“Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”—MASESE 3:5, 6.

1. Mpo na nini lelo oyo tokoki koyekola mayele ya mokili mingi koleka na ntango ya kala?

NA MOI ya lelo, balolenge ya bazulunalo soki 9 000 ezali kobima mokolo na mokolo na mokili mobimba. Soki tokamati kaka ekólo lokola États-Unis, mbula na mbula bakomaka babuku ya sika soki 200 000. Ankɛtɛ moko emonisaki ete na sanza ya Marsi 1998, Internet ezalaki na ba pages Web soki milio 275; mpe balobi ete ba pages web milio 20 ekobanda kobakisama sanza na sanza na Internet. Lelo oyo, moto akoki koyeba makambo mingi na mayele ndenge na ndenge ya siansi. Atako likambo yango ezali na matomba, kasi ebimisi mpe mikakatano mingi.

2. Mikakatano nini ekoki kobima lokola tozali na ebele ya makambo oyo tokoki koyekola?

2 Bato mosusu bakómi na mposa oyo eleki ndelo ya koyeba makambo mingi mpe balingi kolekisa ata likambo moko te; ntango nyonso bazali se koluka koyeba makambo nini ya sika ebimi, mpe bazali kobosana makambo oyo eleki ntina. Bato mosusu, nsima ya koyeba mwa makambo na mayele moko ya siansi, bazali komimona ete bayebi makambo mingi. Na mwa makambo oyo bayebi, bazali kosala makambo minene oyo ekoki kopesa bango moko to bato mosusu mpasi. Likama mosusu mpe ezali ya kondima makambo ya lokuta. Mbala mingi, lokola makambo yango ezali koyela biso ebele, likoki ya koyeba soki likambo boye ezali solo to soki babakisi makambo mosusu ya lokuta ezali te.

3. Makambo nini Biblia elobi mpo na kokebisa biso na oyo etali kolanda mayele ya bato?

3 Banda kalakala, moto azalaka ntango nyonso na mposa ya koyeba makambo ya sika. Kolekisa ntango mpo na koluka koyeba makambo mosusu oyo ezangi ntina to oyo ebebisaka ezalaka na likama mpe yango eyebanaki ata na ntango ya Salomo. Salomo alobaki boye: “Opamelama na yango. Ezali na nsuka na kosala mikanda te, koyekola mingi ekolɛmbisa nzoto.” (Mosakoli 12:12) Bambula ebele na nsima, ntoma Paulo akomelaki Timote boye: “Obatela yango etyami na mabɔkɔ na yo. Opɛngwɛla bilobaloba ya mpamba mpe kowelana na yango ebyangami nkombo na lokuta ete Boyebi. Bamosusu basakoli yango nde bapɛngwi na kondima.” (1 Timote 6:20, 21) Ya solo, lelo oyo baklisto basengeli koboya kotya matoi na makambo oyo ekoki kobebisa bango.

4. Ndenge nini tokoki kolakisa ete tozali kotyela Yehova mpe mateya na ye motema?

4 Ebongi mpe ete basaleli ya Yehova bálanda toli ya Masese 3:5, 6 oyo elobi boye: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” Kotalela Yehova elakisi mpe koboya makanisi nyonso oyo eyokani te na Liloba ya Nzambe, ezala ete euti na bɔɔngɔ na biso moko to euti na bato mosusu. Mpo tóbatela elimo na biso, ezali na ntina mingi tókóma na bososoli ya koyeba mbala moko ete likambo boye ezali mabe mpe tókima yango. (Baebele 5:14) Tótalela sikoyo bisika mosusu oyo makambo yango ezali kouta.

Mokili oyo Satana azali koyangela

5. Tángá esika moko oyo makanisi ya mabe ebimaka, mpe nani azali kosalela yango?

5 Mokili ezali kobimisa makanisi mingi ya mabe. (1 Bakolinti 3:19) Yesu Klisto abondelaki Nzambe mpo na bayekoli na ye ete: “Nalɔmbi te ete olongola bango na mokili kasi ete obatela bango na ye mabe.” (Yoane 17:15) Lokola Yesu asɛngaki Nzambe abatela bayekoli na ye na “ye mabe,” yango emonisi ete ayebaki ete Satana azali kosala mosala na mokili oyo. Elingi koloba te ete lokola tozali baklisto makambo mabe ya mokili oyo ekoki kobenda biso te. Yoane akomaki boye: “Toyebi ete tozali bana ya Nzambe mpe mokili mobimba ezali kolala na kati ya oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Mingimingi na mikolo oyo ya nsuka, Satana na bademo na ye batondisi mpenza mokili na bansango mingi ya mabe oyo ezali kobebisa makanisi ya bato.

6. Ndenge nini masano oyo mokili ezali kolakisa ekoki koboma lisosoli na biso?

6 Bansango mosusu oyo ezali kobebisa makanisi ya bato emonanaka lokola nde ezali na yango mabe te. (2 Bakolinti 11:14) Tókamata ndakisa ya masano: baemisyo ya televizyo, bafilme, miziki, mpe mikanda. Bato mingi bazali koloba ete masano mosusu ekómi mpenza koteya misala ya mabe lokola pite, mobulu mpe komela bangi. Ntango balakisi likambo moko ya mabe mpenza mpo na mbala ya liboso, bato bakoki koyoka mabe. Kasi soki bakómi kozongela yango mbala na mbala, bato bakomesana na yango mpe ekotungisa bango lisusu te. Tosengeli te kondima bansango to masano oyo ezali koteya makanisi mabe lokola nde ezali malamu.—Nzembo 119:37.

7. Mayele nini ya mokili ekoki komema biso tótika kotyela Biblia motema?

7 Esika mosusu oyo makambo oyo ebebisaka makanisi ya bato ezali kouta ezali ebele ya makanisi oyo bato mosusu ya siansi mpe bato mosusu ya mayele oyo batyelaka Biblia ntembe bazali kobimisa. (Talá Yakobo 3:15.) Babimisaka makanisi yango mingimingi na bazulunalo mpe na mikanda oyo ebele ya bato batángaka mingi; makambo yango ekoki komema biso tótika kotyela Biblia motema. Bato mosusu bamonaka ete ezali likambo ya lokumu ntango bazali kotyela Liloba ya Nzambe ntembe mpe bazali kotyola yango. Likama ya ndenge yango ezalaki na ntango ya bantoma, ndenge maloba ya ntoma Paulo emonisi yango ete: “Bókeba: mbala mosusu ezali na moto moko oyo akobenda bino lokola eloko na ye ya kolya na nzela ya mateya ya filozofi mpe na lokuta ezangi ntina na ndenge ya mimeseno ya bato, na makambo mpamba ya mokili kasi na ndenge ya Klisto te.”—Bakolose 2:8, NW.

Banguna ya mateya ya solo

8, 9. Ndenge nini lipɛngwi ezali komonana na moi ya lelo?

8 Bato mosusu oyo bakoki kobebisa elimo na biso ezali bapɛngwi. Ntoma Paulo asakolaki ete ekozala na baklisto mosusu oyo bakopɛngwa. (Misala 20:29, 30; 2 Batesaloniki 2:3) Nsima ya liwa ya bantoma, maloba yango ekokisamaki; lipɛngwi moko monene ebimaki mpe yango nde ebimisaki mangomba ya boklisto. Lelo oyo, ezali mpenza na lipɛngwi monene te na kati ya basaleli ya Nzambe. Kasi, ezali na mwa bato moke oyo batiki lisangá, mpe bamosusu kati na bango bamipesi mosala ya koloba makambo ya lokuta na nkombo ya Batatoli ya Yehova mpo na kobebisa lokumu na biso. Ezali mpe na mwa bapɛngwi oyo bakɔti na masangá mosusu mpo na kotɛmɛla losambo ya solo. Makambo oyo bazali kosala ezali komonisa mbala moko ete bamitii na ngámbo ya mopɛngwi ya liboso, elingi koloba Satana.

9 Bapɛngwi mosusu bazali kosalela bazulunalo, radio, televizyo ata mpe Internet, mpo na kopanza bansango ya lokuta mpo na Batatoli ya Yehova. Yango wana, ntango bato mosusu ya sembo bazali koluka koyeba mateya na biso, bakoki koyoka bilobaloba ya bapɛngwi. Ata Batatoli mosusu mpe, kozanga ete bákana yango, bazali kolanda mateya yango oyo ekoki kobebisa makanisi. Longola wana, ntango mosusu bapɛngwi balekaka na baemisyo ya radio to ya televizyo. Ebongi na biso kosala nini liboso ya makambo yango?

10. Likambo nini ya mayele tosengeli kosala na maloba ya bapɛngwi?

10 Ntoma Yoane ayebisaki baklisto ete báyamba bapɛngwi na bandako na bango te. Akomaki boye: “Soko moto nani ayei epai na bino mpe akomema mateya oyo te, [bóyamba] ye kati na ndako te; bópesa ye losako te. Mpo ete ye oyo akopesa ye losako, asangani na ye na misala na ye mabe.” (2 Yoane 10, 11) Soki toboyi na motema moko kosangana na banguna yango, tokokima makanisi na bango oyo ekoki kobebisa makanisi na biso. Soki tozali kolanda mateya ya bapɛngwi, ezala na radio, na televizyo, na bazulunalo mpe bongo na bongo, ezali kaka lokola tozali koyamba bango na bandako na biso. Tosengeli kotika nzela te ete mposa ya koyeba makambo ya sika emema biso na kolanda nzela mabe wana!—Masese 22:3.

Na kati ya lisangá

11, 12. (a) Na lisangá ya ekeke ya liboso, mateya ya mabe ezalaki kouta wapi? (b) Ndenge nini baklisto mosusu basimbaki mateya ya Nzambe makasi te?

11 Tótalela esika mosusu oyo makanisi ya mabe ekoki kouta. Ata soki azali na mokano ya koteya mateya ya lokuta te, moklisto mosusu akoki kokóma na ezaleli ya kolobaloba. (Masese 12:18) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso tobɛtaka mabaku na lolemo na biso. (Masese 10:19; Yakobo 3:8) Toyebi malamu ete na ntango ya ntoma Paulo , bato mosusu na kati ya lisangá, bazalaki kopekisa lolemo na bango te mpe bazalaki kotyana ntembe likoló ya maloba. (1 Timote 2:8) Ezalaki na baoyo bazalaki komimona ete baleki bamosusu mpe bakómaki kutu kotɛmɛla Paulo. (2 Bakolinti 10:10-12) Elimo yango ebimisaki matata oyo ezangi ntina.

12 Ntango mosusu, matata yango ebotaki “kowelana makasi mpo na makambo ya mpambampamba,” mpe ezalaki kobebisa kimya ya lisangá. (1 Timote 6:5, NW; Bagalatia 5:15) Mpo na bato oyo bazalaki kobimisa ntembe yango, Paulo akomaki boye: “Soko moto nani akolakisa na nzela mosusu mpe akoboya maloba na sembo na Nkolo na biso Yesu Klisto mpe mateya masangani na makambo na Nzambe, ye wana asili [kovimba] na lolendo, ayebi likambo te. Kasi abɛli motó mpo na ntembe mpe kowelana na ntina na maloba. Uta na makambo yango ikobimaka zuwa mpe nkaka mpe kotuka mpe ntembe mabe.”—1 Timote 6:3, 4.

13. Na ekeke ya liboso, baklisto mingi bazalaki na bizaleli nini?

13 Likambo ya malamu ezali ete na ntango ya bantoma, baklisto mingi bazalaki sembo mpe bamipesaki na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bazalaki kolekisa ntango na bango na kotala “bitike mpe basi-bakufeli-mibali” mpe bazalaki komibatela “nzoto pɛto na makambo na mokili,” bazalaki kobebisa ntango na bango na ntembe ya mpambampamba te likoló ya maloba. (Yakobo 1:27) Bazalaki koboya “baninga mabe,” ata na kati ya lisangá, mpo na kobatela elimo na bango.—1 Bakolinti 15:33; 2 Timote 2:20, 21.

14. Soki tokebi te, ndenge nini masolo ya malamu ekoki kobongwana mpe kokóma makanisi mabe ya kotyana ntembe?

14 Ezali se ndenge moko lelo oyo, makambo oyo tolobeli na paragrafe 11 emonanaka mingi te na kati ya masangá ya Batatoli ya Yehova. Kasi, ezali malamu tóbosanaka te ete soki tokebi te, ntembe ya mpambampamba ekoki kobima. Ya solo, ezali mabe te kosolola masolo ya Biblia to komituna mituna mpo na makambo mosusu ya mokili ya sika oyo toyebi naino te. Mabe moko ezali te soki bandeko bazali kopesana makanisi na makambo oyo etali moto na moto, makambo lokola kolata mpe ndenge ya kosala monzele to kopona masano. Kasi, soki tokómi kondimisa makanisi na biso moko mpe tozali kosilika soki bandeko mosusu baboyi makanisi na biso, makambo mikemike wana ekoki kokabola bandeko na kati ya lisangá. Likambo mosusu oyo ebandaka lokola mwa lisolo mpamba ekoki kokóma likambo monene.

Tóbatela oyo etyami na mabɔkɔ na biso

15. Ndenge nini “mateya ya bademo” ekoki kobebisa elimo na biso mpe Makomami epesi toli nini?

15 Ntoma Paulo akebisi biso na maloba oyo: “Elimo ezali koloba polele ete na bantango ekoya, bamosusu bakotika kondima mpo na kolanda maloba ya lokuta mapemami mpe mateya ya bademo.” (1 Timote 4:1, NW ) Ya solo, makanisi ya mabe ezali mpenza likama. Yango wana Paulo ayebisaki Timote, moninga na ye ya motema ete: “Ɛ Timote, obatela yango etyami na mabɔkɔ na yo. Opɛngwɛla bilobaloba na mpamba mpe kowelana na yango ebyangami nkombo na lokuta ete Boyebi. Bamosusu basakoli yango nde bapɛngwi na kondima.”—1 Timote 6:20, 21.

16, 17. Eloko nini ya motuya Nzambe apesi biso mpe ndenge nini tosengeli kobatela yango?

16 Ndenge nini tokoki kozwa matomba na toli malamu yango lelo oyo? Bapesaki Timote eloko moko ya motuya mpo ete abatela yango. Eloko yango nini? Paulo alobi ete: “Osimba lolenge na maloba [ya] sembo mayoki yo epai na ngai kati na kondima mpe na bolingo oyo ezali na Klisto Yesu. Obatela makambo na solo mazwi yo na [elimo santu oyo efandi, NW ] kati na biso.” (2 Timote 1:13, 14) Eloko ya motuya oyo bapesaki Timote, ezalaki mpe na “maloba ya sembo,” elingi koloba “mateya [oyo mayokani na komipesa, NW ] na Nzambe.” (1 Timote 6:3) Na kotalela maloba yango, lelo oyo baklisto bazali na mposa ete bábatela kondima na bango mpe mateya nyonso ya solo oyo bapesi bango.

17 Kobomba eloko yango esɛngi mpe kolona bizaleli lokola momeseno malamu ya koyekola Biblia mbala na mbala mpe kobondela ntango nyonso, kozanga kobosana ‘kosalela bato nyonso malamu mpe na koleka epai na bango bazali bandimi.’ (Bagalatia 6:10; Baloma 12:11-17) Paulo alobaki lisusu boye: “[Olanda] boyengebene, kosalela Nzambe, kondima, bolingo, etingya, bopɔlɔ. [Obunda] etumba malamu ya kondima, osimba bomoi ya seko [makasi, NW ]; zambi obyangami mpo na yango wana eyamboli yo eyambweli malamu na miso na batatoli mingi.” (1 Timote 6:11, 12) Maloba ya Paulo lokola “obunda etumba malamu” mpe “osimba makasi” emonisi polele ete tosengeli mpenza mpe na ekateli makasi kotɛmɛla makambo oyo ekoki kobebisa elimo na biso.

Tosengeli kozala na bososoli

18. Ndenge nini tokoki kozala na bokatikati na ndenge ya kotalela makambo oyo ezali koteyama na mokili?

18 Ntango tozali kobunda etumba malamu ya kondima, tosengeli kozala na bososoli. (Masese 2:11; Bafilipi 1:9) Na ndakisa, ebongi mpenza te komona ete makambo nyonso oyo ezali koteyama na mokili ezali mabe. (Bafilipi 4:5; Yakobo 3:17) Ezali te ete makanisi nyonso ya bato eyokani te na Liloba ya Nzambe. Yesu alobaki ete bato ya maladi bazali na mposa ya monganga ya malamu, nzokande mosala ya monganga ezali mosala ya mokili. (Luka 5:31) Atako nkisi oyo minganga bazalaki kopesa na ntango oyo Yesu azalaki awa na mabele esalemaki na mayele mingi te lokola oyo tozali na yango lelo oyo, Yesu andimaki ete monganga akoki kosunga moto oyo akei koluka lisalisi epai na ye. Lelo oyo, baklisto batalelaka mayele ya mokili na bokatikati, kasi baboyaka na motema moko kolanda likambo nyonso oyo ekoki kobebisa elimo na bango.

19, 20. (a) Ndenge nini bankulutu basengeli kosalela bososoli ntango bazali kosalisa bato oyo bazali na bilobaloba? (b) Lisangá esalaka nini mpo na bato oyo balingi kotika koteya mateya ya lokuta te?

19 Bankulutu mpe basengeli kozala na bososoli ntango balingi kosalisa bato oyo bazali na bilobaloba. (2 Timote 2:7) Ntango mosusu, bandeko na kati ya lisangá bakoki kobanda kotyana ntembe na makambo ya mpambampamba. Mpo na kobatela bomoko ya lisangá, bankulutu basengeli kotalela likambo yango nokinoki. Kasi, bakokeba ete bábanda kokanisela bandeko na bango mabe te mpe báloba mbala moko te ete bazali bapɛngwi.

20 Paulo amonisaki ndenge ya kosalisa bato yango. Alobaki boye: “Bandeko, soko moto azwami na likambo, bino bato [ya elimo, bósembola ye na elimo, NW ] ya bopɔlɔ. Omitalela yo moko ete yo omekama te!” (Bagalatia 6:1) Yuda alobelaki mpenzampenza baklisto oyo bazali na ntembe, mpe akomaki ete: “Soko bamosusu bakotyana na bino ntembe, bóyokela bango mawa; bóbikisa bango kobɔtɔláká bango na mɔ́tɔ.” (Yuda 22, 23) Nzokande soki bakebisi moto moko mbala na mbala kasi azali kaka koteya mateya ya lokuta, bankulutu basengeli kozala na mpiko mpe kozwa ekateli makasi mpo na kobatela lisangá.—1 Timote 1:20; Tito 3:10, 11.

Tótondisa elimo na biso na makambo malamu

21, 22. Na makambo nini tosengeli koponaka mpe tosengeli kotondisa makanisi na biso na makambo nini?

21 Baklisto bakimaka maloba ya mabe oyo ezali lokola “mpota oyo elyaka mosuni malembe malembe.” (2 Timoteo 2:16, 17, Boyokani ya Sika; Tito 3:9) Bakimaka maloba yango, ezala euti na “mayele” ya mokili oyo ezali kokosa bato, ezala maloba oyo bapɛngwi bazali kopanza, to bilobela ya bato mosusu na kati ya lisangá. Atako moto akoki kozwa litomba soki azali na mposa ya koyeba makambo ya sika, kasi soki tozali kokeba te, mposa yango ekoki komema biso na makanisi ya mabe. Toyebi mikano ya Satana malamu. (2 Bakolinti 2:11) Toyebi ete Satana azali kosala makasi mpo na kozimbisa biso mpo tólɛmbisa mabɔkɔ na mosala ya Nzambe.

22 Lokola tozali baministre ya solosolo, tósimba makasi mateya ya Nzambe. (1 Timote 4:6) Tósalela ntango na biso malamu mpe tópona makambo nini tokoki koyekola. Soki tosali bongo, ekozala mpasi mpo ete makambo oyo Satana azali kobimisa ebebisa biso. Tótalela ntango nyonso “makambo nyonso ya solo, na makambo nyonso ya lokumu, na makambo nyonso ya sembo, na makambo nyonso ya pɛto, na makambo nyonso ya boboto, na makambo nyonso ya ngɔlu, soko malamu ezali mpe soko lisanzoli ezali.” Soki totondisi elimo na biso mpe mitema na biso na makambo motindo wana, Nzambe ya kimya akozala na biso.—Bafilipi 4:8, 9.

Toyekoli makambo nini?

• Ndenge nini mayele ya mokili ekoki kozala likama mpo na elimo na biso?

• Ndenge nini tokoki kokima makambo mabe ya bapɛngwi?

• Masolo nini tosengeli koboya na kati ya lisangá?

• Ndenge nini moklisto akoki komonisa bokatikati na makambo ebele ebele oyo ezali koteyama na mokili?

[Elilingi na lokasa 9]

Bazulunalo mpe mikanda mingi ya mokili elobelaka makambo oyo eyokani te na bizaleli malamu ya biso baklisto.

[Elilingi na lokasa 10]

Baklisto bakoki kopesana makanisi kozanga ete bándimisa basusu makanisi oyo ya na bango moko.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto