Miziki oyo esepelisaka Nzambe
Balobaka ete miziki ezali “mosala ya mayele oyo bato basalaka banda kalakala mpe oyo bato balingaka mingi koleka misala mosusu nyonso ya mayele.” Lokola koloba ezali likabo, miziki mpe ezali likabo ya kitoko oyo ekesenisi moto na nyama. Miziki ekɔtelaka moto na motema. Moto akoki koyoka elɛngi na yango mpe ekoki kotikala na bɔɔngɔ. Na koleka, miziki ekoki kosepelisa Nzambe.
NDENGE Biblia emonisi yango, Bayisalaele balingaki miziki mingi mpe bayebaki kobɛta yango. Buku moko (Unger’s Bible Dictionary) elobi ete miziki ezalaki “mosala monene ya mayele na ntango ya kala.” Lokola bato balingaki miziki mingi, bazalaki koyemba mingi mpe kobɛta bibɛtɛlo ya miziki na losambo na bango. Kasi bazalaki mingimingi nde koyemba na mingongo na bango.
Mokonzi Davidi aponaki bato na kati ya Balevi mpo “na mosala ya koyemba” na mongombo, liboso bákóma koyemba na tempelo oyo mwana na ye Salomo atongaki. (1 Ntango 6:31, 32) Ntango sanduku ya kondimana oyo ezalaki komonisa ete Yehova azali kati na bango ekómaki na Yelusaleme, Davidi abongisaki Balevi mosusu mpo na “kobyanga mpe kotɔnda mpe kosanzola [Yehova].” Basanzolaki Yehova na mingongo na bango mpe babɛtaki “bibɛtɛlo-na-nsinga mpe na nzenze mpe . . . bilonza . . . mpe mindule.” Bato yango “batángami nkombo ete bátɔnda [Yehova] zambi boboto na ye ekoumela seko.”—1 Ntango 16:4-6, 41; 25:1.
Tozali kokuta maloba oyo bazalaki koyemba ete “boboto ya [Yehova] ekoumela seko” mbala ebele na mokanda ya Nzembo, mokanda ya Biblia oyo elobeli mingi banzembo. Na ndakisa, tozali kokuta maloba yango na eteni ya mibale ya vɛrsɛ mokomoko na kati ya bavɛrsɛ nyonso 26 ya Nzembo 136. Molimboli moko ya Biblia alobi ete: “Ezali mpasi te mpo bato báyeba maloba yango malamu, mpamba te ezali mokuse. Moto nyonso oyo ayoká yango, akoki koyemba yango na motó.”
Mwa maloba oyo ekomami likoló ya banzembo emonisi ete bazalaki kobɛta bibɛtɛlo ya miziki mingi. Nzembo 150 etángi bibɛtɛlo ya miziki lokola kelelo, nzenze, ndundu, piololo, mpe ngomo, na bibɛtɛlo-na-nsinga. Atako bongo, eloko oyo eleki ezali nde mongongo ya moto. Vɛrsɛ 6 elobi ete: “Tiká ete nyonso na mpema básanzola [Yehova]. Aleluya!”
Lokola miziki emonisaka mayoki na biso, yango wana na ntango ya kala, soki bato bazali na mawa bazalaki koyemba banzembo ya mawa to banzembo ya kolela. Kasi, lolenge yango ya koyemba ezalaki kosalema mingi te na miziki ya Bayisaele. Mokanda Étude perspicace des Écrituresa elobi boye: “Longola se nzembo ya mawa to ya komilela, koloba lokola moto azali koyemba, ekoki koleka mondule ya miziki te, ata mpe elɛngi ya mongongo oyo ezali kobongwana ntango moto azali kosala lisukulu.”
Yesu na bantoma na ye ya sembo bayembaki banzembo mpo na kokumisa Yehova na butu ya mokolo oyo Yesu akufaki, na ntembe te bayembaki maloba ya Nzembo ya Hallel. (Nzembo 113-118) Yango elendisaki bayekoli ya Yesu mpo báyika mpiko ntango bakobungisa Nkolo na bango! Longola wana, balendisaki ekateli na bango ya kozala ntango nyonso basaleli ya sembo ya Yehova, Mokonzi Monene ya molɔ́ngɔ́, ntango bazongelaki maloba “boboto na ye ekoumelaka lobiko na lobiko” mbala mitano mobimba.—Nzembo 118:1-4, 29.
Baklisto ya ekeke ya liboso na mboka Efese mpe na Kolose bayembelaki “Nzambe nzembo, nzembo ya kosanzola.” Bazalaki mpe na “nzembo ya elimo” oyo bazalaki koyemba na mitema na bango. (Baefese 5:19; Bakolose 3:16) Ezala na banzembo to na maloba, bazalaki kosalela minɔkɔ na bango malamu mpo na kokumisa Nzambe. Kutu, Yesu alobaki ete “moto abimisaka na monoko makambo oyo etondi na motema na ye,” boye te?—Matai 12:34, Boyokani ya Sika.
Miziki oyo esepelisaka Nzambe te
Kasi miziki nyonso te oyo balobeli na kati ya Biblia nde esepelisaki Nzambe. Na ndakisa, tótalela likambo oyo esalemaki na Ngomba Sinai, epai Mose azwaki Mibeko, na Mibeko Zomi. Mose ayokaki nini ntango akitaki na ngomba? “Lokito na konganga na elonga te,” “lokito na kolela na kobukana te” kasi “lokito na nzembo” mosusu. Ezalaki miziki ya losambo ya bikeko, likambo oyo esepelisaka Nzambe te, mpe mpo na yango bato 3 000 kati na baoyo babɛtaki miziki yango bakufaki.—Exode 32:18, 25-28.
Atako bato bakoki kosala miziki ya ndenge nyonso, kobɛta yango mpe kosepela na yango, yango elingi koloba te ete miziki nyonso esepelisaka Nzambe. Mpo na nini? Ntoma moklisto Paulo alobaki boye: “Bato nyonso babungi mpe bazangi nkembo ya Nzambe.” (Baloma 3:23) Na miziki ya lelo oyo, mbala mingi bayembaka makambo lokola milulu ya bapakano oyo etali makambo ya kobota, bayembaka ete molimo ya moto ekufaka te mpe bakumisaka Malia lokola “mama ya Nzambe.” Nzokande, bindimeli mpe misala yango ekumisaka Nzambe ya solo te, mpo ete ekeseni na makambo oyo Liloba na ye Biblia elobi.—Deteronome 18:10-12; Ezekiele 18:4; Luka 1:35, 38.
Tóyeba kopona miziki ya malamu
Lelo oyo miziki ezali ndenge na ndenge mpe ezali likambo moke te mpo na kopona miziki ya malamu. Likoló ya bakasɛti bazali kotya bafɔtɔ mpe makambo mosusu mpo na kobenda bakiliya básomba miziki ya motindo nyonso. Kasi soki mosaleli ya Nzambe alingi kosepelisa Ye, asengeli kozala na ekɛngɛ mpe koyeba kopona mpo na koboya miziki oyo maloba na yango mpe lolenge oyo babɛti yango ezali komonisa bindimeli ya losambo ya lokuta to oyo ezali kokumisa bomoi ya mbindo to losambo ya bademo.
Albert, ye azalaká misionɛrɛ na Afrika, alobi ete kuna azalaki kozwa ntango mingi te mpo na kobɛta piano na ye. Kasi, azalaki koyoka mbala mingi badiskɛ oyo akendaki na yango. Lelo oyo, Albert azongá na mboka na ye mpe atalaka masangá ya baklisto lokola mokɛngɛli-motamboli. Azali na ntango mingi te mpo na koyoka miziki. Alobi ete: “Nalingaka mingi banzembo ya Beethoven. Nazalaki kosomba badiskɛ ya banzembo na ye mokemoke tii nakómaki na yango mingi (symphonies, concertos, sonates, na quartets).” Azalaki kosepela mingi ntango azalaki koyoka yango. Ya solo, moto na moto azali na miziki oyo ye alingaka, kasi lokola tozali baklisto, tosengeli kobosana toli ya Paulo te ete: “Soko bokolyaka soko bokomɛlaka, soko bokosalaka nini, bósala nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”—1 Bakolinti 10:31.
Tosengeli komipesa mobimba na miziki?
Liboso, Susie amipesaki mingi na miziki. Alobi boye: “Nabandaki kobɛta piano ntango nazalaki na mbula 6, mpe violon ntango nazalaki na mbula 10, mpe nzenze (harpe) ntango nakómaki na mbula 12.” Na nsima, Susie akɔtaki na eteyelo ya miziki (Royal College of Music) na Londres, na ekólo Angleterre mpo na koyekola kobɛta nzenze. Alekisaki mbula minei mobimba mpo na kolanda mateya ya molakisi moko ya nzenze oyo ayebani mingi, moto ya Espagne, asalaki lisusu mbula moko na Conservatoire ya Paris, azwaki badiplome na ndenge azalaki kobɛta nzenze mpe mpo na kolakisa bato kobɛta piano.
Susie akómaki kosangana na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova na Londres. Na lisangá, amonaki ete Batatoli bazali kosepela na ye mpe bazali na bolingo ya solosolo. Mokemoke, akómaki kolinga Yehova mingi mpe molende na ye mpo na mosala ya Nzambe etindaki ye aluka ndenge oyo akoki kosalela ye. Yango wana amipesaki mpe azwaki batisimo. Susie alobi ete: “Mosala ya miziki esɛngaka komipesa, na yango komipesa mobimba na mosala moko ezali likambo ya sika te epai na ngai.” Azalaki kobɛta lisusu miziki mingi te ntango amipesaki na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpo na kotosa malako ya Yesu.—Matai 24:14; Malako 13:10.
Sikoyo lokola azali na ntango mingi te mpo na kobɛta miziki, ayokaka ndenge nini? Alobi boye: “Ntango mosusu nayokaka mwa mawa ete nazali na ntango mingi te ya kobɛta miziki, kasi nabɛtaka bibɛtelo na ngai ya miziki mpe nasepelaka na miziki. Miziki ezali likabo ya Yehova. Sikoyo nazali kosepela na yango mingi koleka lokola natii mosala na ye na esika ya liboso na bomoi na ngai.”—Matai 6:33.
Miziki oyo ekumisaka Nzambe
Mbala na mbala, ezala Albert, Susie to Batatoli ya Yehova mosusu soki milio 6, bakumisaka Yehova Nzambe na miziki. Na makita ya lisangá oyo esalemaka na Bandako ya Bokonzi na mikili 234, soki likambo moko ezali kopekisa bango te, babandaka mpe basukisaka makita na bango na nzembo mpo na kokumisa Yehova. Ezali banzembo kitoko oyo bayembaka na mingongo kitoko, mpe maloba na yango oyo euti na Makomami ezali kokumisa Yehova Nzambe.
Bayangani nyonso bayembaka na esengo nyonso ete Yehova azali Nzambe oyo abatelaka biso (Loyembo 44). Bayembaka nzembo mpo na kokumisa Yehova (Loyembo 190). Banzembo na bango elobelaka bisengo mpe mikumba ya bandeko na kati ya lisangá ya boklisto, bomoi ya baklisto, mpe bizaleli ya baklisto. Banzembo yango ezali mpenza kitoko mpo basangisi yango na miziki ndenge na ndenge oyo Batatoli ya Amerika ya Nɔrdi na ya Sudi, ya Australie, ya Azia, mpe ya Mpoto babɛtaki mpe bakɔtisi yango na nzembo mpo na kosala banzembo yango.b
Na ntango ya mokomi ya nzembo, bakomaki nzembo moko molai mpo na mokonzi mpe maloba na yango ya ebandeli elobaka ete: “Bóyembela [Yehova] loyembo ya sika. Bóyembela [Yehova] bino bato ya mokili mobimba. Bóyembela [Yehova], bókumisa nkombo na ye, bósakola [nsango malamu ya, NW] kobikisa na ye mokolo na mokolo. Bósolola lokumu na ye kati na mabota ya bato, misala na ye ya kokamwa kati na bato nyonso.” (Nzembo 96:1-3) Batatoli ya Yehova basalaka bongo na mboka oyo ofandi, mpe bazali kobenga yo osangana na bango na koyemba nzembo yango ya kokumisa Nzambe. Bakoyamba yo malamu na ndako ya Bokonzi na bango, esika okoyeba ndenge ya kokumisa Yehova na miziki oyo esepelisaka ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Banzembo yango ezali na buku oyo ezali na motó ya likambo Nzembo mpo na kokumisa Yehova, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 28]
Koyemba esanzolaka Yehova.