Mokonzi Davidi mpe miziki
SOKI ezali na nkombo moko oyo soki toyoki yango etindaka biso tókanisa miziki ya ntango ya kala, ezali nkombo ya Davidi, moto moko oyo ayebani mingi oyo azalaki na bomoi esili koleka mbula soki 3 000. Kutu, makambo mingi oyo toyebi na ntina na miziki ya ntango wana euti na masolo ya Biblia oyo elobeli makambo ya Davidi—kobanda ntango azalaki naino elenge mobateli ya mpate tii ntango akómaki mokonzi mpe mobongisi malamu ya makambo.
Na nzela ya Davidi, tokoki koyekola makambo mingi na oyo etali miziki na ntango ya kala. Na ndakisa, bibɛtɛlo ya ndenge nini bazalaki kosalela, mpe banzembo ya ndenge nini bazalaki koyemba? Miziki ezalaki na esika nini na bomoi ya Davidi mpe na ekólo Yisraele mobimba?
Esika ya miziki na Yisraele ya kala
Kozongela na mongongo ya nse maloba ya nzembo moko, mbala mingi etindaka moto ameka kokanisa ndenge oyo nzembo yango ekoki koyembama. Biblia ezali na maloba ya banzembo mingi, oyo tii lelo miziki na yango eyebani te. Ekoki kozala ete miziki yango ezalaki mpe kitoko mingi mpenza. Maloba kitoko oyo ezali na mokanda ya Nzembo emonisi ete miziki ya banzembo yango ezalaki kitoko mingi koleka.
Mpo na oyo etali bibɛtɛlo ya miziki, Biblia elobeli yango kaka moke. (Talá etanda “bibɛtɛlo ya miziki na ntango ya kala.”) Ata lolenge ya nzɛnzɛ oyo Davidi azalaki kosalela, eyebani malamumalamu te. Emonani polele ete Bayisraele babimisaki bibɛtɛlo ndenge na ndenge ya miziki, na ndakisa banzɛnzɛ ya mabaya ya kitoko mpenza oyo ezalaki komonana mingi te.—2 Ntango 9:11; Amose 6:5.
Kasi, likambo ya solo ezali ete, miziki ezalaki na esika ya ntina mingi na bomoi ya Baebre, mingimingi na losambo na bango epai ya Nzambe. Bazalaki kobɛta miziki ntango moto azwi bokonzi, bazalaki mpe kosalela yango na milulu ya losambo, mpe na ntango ya etumba. Bazalaki mpe kobɛta miziki na ndako ya mokonzi, na fɛti ya libala mpe na ntango mabota eyangani, ezalaki mpe kosepelisa bato na ntango ya fɛti ya kobuka mbuma ya vinyo mpe bambuma mosusu. Likambo ya mawa, miziki ezalaki mpe kobɛtama na bisika oyo makambo ya mbindo ezalaki kosalema. Lisusu, soki moto akufi, miziki ezalaki mpe kobɔndisa bato oyo bazali na mawa.
Na Yisraele, miziki ezalaki mpe na ntina mosusu. Ezalaki kofungola makanisi ya basakoli mpe kosalisa bango báyamba makambo ya elimo. Elisha azwaki esakweli ya Nzambe ntango ayokaki lokito ya bibɛtɛlo ya bansinga. (2 Bakonzi 3:15) Bazalaki mpe kosalela miziki mpo na koyebisa makambo ya ntina mingi. Na ndakisa, mpo na koyebisa sanza ya sika mpe bafɛti mosusu, bazalaki kobɛta bakelelo mibale ya palata. Na mokolo ya Yubile, bazalaki kobɛta liseke mpo na kosakola bonsomi ya baombo mpe kozongisama ya mabele mpe bandako na bankolo na yango. Kanisá naino esengo oyo baombo bazalaki na yango ntango bayoki miziki oyo ezalaki koyebisa ete bakómi na bonsomi to mpe bazongeli biloko na bango!—Balevi 25:9; Mitángo 10:10.
Bayisraele mosusu bazalaki babɛti minene ya miziki to mpe bayembi minene. Kutu, etanda ya moto moko ya Asiri emonisi Mokonzi Senakeribe azali kosɛnga Mokonzi Hizikiya, apesa ye lokola mpako babɛti miziki, mobali mpe mwasi. Emonani ete bato yango bazalaki babɛti miziki ya solosolo. Kasi, Davidi alekaki bango nyonso.
Alangá-nzembo monene
Davidi azalaki alangá-nzembo monene mpo azalaki mobɛti miziki mpe powɛti. Koleka katikati ya banzembo ezali ya ye. Ntango azalaki naino elenge, azalaki mobateli ya mpate, mpe makambo oyo amonaki na bisika oyo babɔkɔlaka bampate na Beteleme esimbaki motema na ye. Ayebaki esengo oyo moto akoki kozala na yango ntango ayoki mwa makɛlɛlɛ ya milúká mpe kolela ya mpate ntango eyoki mongongo ya nkolo na yango. “Makɛlɛlɛ” kitoko oyo azalaki koyoka na esika yango, ezalaki kotinda ye azwa nzɛnzɛ na ye mpe abanda koyemba mpo na kosanzola Nzambe. Koyoka miziki oyo Davidi abongisaki na Nzembo 23 ekoki mpenza kosimba mitema na biso!
Banda ntango azalaki elenge, Davidi azalaki kobɛta nzɛnzɛ kitoko mingi, yango wana bamemaki ye epai ya Mokonzi Saulo, oyo azwaki ye mpo abanda kobɛtela ye miziki. Ntango Saulo azalaki komitungisa mingi, Davidi azalaki koya mpe azalaki kobɛta miziki kitoko na nzɛnzɛ na ye, oyo ezalaki kokitisa mokonzi motema. Makanisi mabe oyo ezalaki kotungisa Saulo ezalaki kosila mpe azalaki kotika komitungisa.—1 Samwele 16:16.
Miziki, oyo Davidi azalaki kolinga mingi mpe oyo ezalaki kopesa ye esengo mingi ezalaki mpe ntango mosusu kobimisela ye makambo. Mokolo moko, ntango Davidi ná Saulo bazongaki na esengo nsima ya kolonga Bafilistia, mokonzi ayokaki nzembo ya elonga mpe ya esengo oyo bato bazalaki koyemba. Basi bazalaki koyemba boye: “Saulo abomi oyo ya ye bankóto, mpe Davidi abomi oyo ya ye bankóto zomi zomi.” Mpo na yango, Saulo asilikaki makasi mpe akómaki na zuwa mpe “azalaki ntango nyonso kotala Davidi na liso mabe.”—1 Samwele 18:7-9.
Miziki ezalaki kotambwisa ye
Banzembo ya Davidi oyo azalaki kokoma na lisalisi ya elimo ya Nzambe, elekaki banzembo mosusu na kitoko na makambo mingi. Na kati ya banzembo na ye ezali na oyo ezali kotinda moto akanisa mozindo mpe oyo ezali kolobela mosala ya kobatela bampate. Banzembo yango mosusu ezali na maloba ya kosanzola mpe mosusu ezali na masolo ya makambo eleká, elobeli esengo oyo bato bazalaki koyoka na ntango ya kobuka mbuma mpe na ntango ya molulu ya kofungola ndako ya mokonzi, kokanisa makambo oyo eleká mpe kokóma na elikya, mabondeli mpe malɔmbɔ. (Talá Nzembo 32, 23, 145, 8, 30, 38, 72, 51, 86 mpe maloba oyo ezali na likoló ya mikapo yango.) Ntango Saulo mpe mwana na ye Yonatana bakufaki, Davidi asalaki nzembo ya mawa oyo abengaki “Litimbo,” nzembo yango ebandi na maloba oyo: “Ee Yisraele, bonzenga ebomami na bisika na yo oyo etombwaná.” Ezalaki koyembama na mongongo ya mawa. Na maloba mpe na miziki oyo azalaki kobɛta na nzɛnzɛ na ye, Davidi ayebaki mpenza komonisa ndenge oyo azalaki koyoka na motema.—2 Samwele 1:17-19.
Lokola azalaki moto ya esengo, Davidi azalaki kolinga mingi miziki ya makasimakasi. Ntango amemaki sanduku ya kondimana na Siona, azalaki kopumbwapumbwa mpe kobina na nguya nyonso mpo na kosepela molulu yango. Biblia emonisi ete, na ntembe te miziki yango ezalaki mpenza oyo eningisaka. Kanisá naino ndenge likambo yango elekaki! Esalaki ete mwasi na ye Mikale aswanisa ye. Kasi, yango elɛmbisaki Davidi te. Alingaki Yehova, mpe miziki yango oyo epesaki ye esengo mpe etindaki ye apumbwa liboso ya Nzambe na ye.—2 Samwele 6:14, 16, 21.
Esuki wana te, Davidi akesanaki na basusu mpo azalaki kobimisa bibɛtɛlo ya miziki ya sika. (2 Ntango 7:6) Na koleka, emonani ete Davidi abotamaki na makoki ya miziki, azalaki mobimisi ya bibɛtɛlo ya miziki, powɛti, mobongisi ya banzembo, mpe mobɛti miziki. Kasi, Davidi asalaki makambo mingi ya minene.
Koyemba mpe miziki na tempelo
Libula oyo Davidi atiká, ezali lolenge oyo abongisaki koyemba mpe miziki na ndako ya Yehova. Liboso ya bayembi mpe babɛti miziki 4 000, atyaki Asafe, Hemane mpe Yedutune (oyo ekoki kozala ete azalaki mpe kobengama Etane). Davidi asangisaki bango na bato 288 oyo bayebaki mosala yango malamumalamu, baoyo balakisaki bato mosusu koyemba mpe bazalaki kokamba bango. Bayembi mpe babɛti-miziki 4 000, bazalaki kozanga te na tempelo na bafɛti misato ya minene oyo ezalaki kosalema mbula na mbula. Kanisá naino mingongo yango oyo ezalaki koyokana kitoko!—1 Ntango 23:5; 25:1, 6, 7.
Na tempelo, kaka mibali nde bazalaki koyemba. Maloba “mpo na bilenge basi,” oyo ezali na likoló ya Nzembo 46, emonisi ete mingongo yango ezalaki makasi to ebɛtɛlo ya miziki yango ezalaki na lokito makasi. Bayembaki lokola moto moko, ndenge emonisami na 2 Ntango 5:13: “Bayembi bayembaki na bomoko lokola moto moko.” Banzembo yango ekokaki kozala mondule, na ndakisa Nzembo 3 mpe banzembo mosusu mingi ya Davidi, mpe ntango mosusu ezalaki na mondimo, lokola oyo ezali na Nzembo 42:5, 11 mpe 43:5. Bato bazalaki mpe kosepela na banzembo oyo moto moko azalaki naino koyemba mpe na nsima bamosusu bayambi. Ezali bongo na Nzembo 24, oyo na ntembe te ebongisamaki mpo na ntango oyo Davidi amemaki sanduku ya kondimana na Siona.—2 Samwele 6:11-17.
Kasi, kaka Balevi te nde basengelaki koyemba. Bato nyonso bazalaki koyemba ntango bazali kokende na Yerusaleme, na bafɛti oyo bazalaki kosala mbula na mbula. Ekoki kozala ete “loyembo ya ntango ya komata,” ezalaki nde komonisa likambo yango. (Nzembo 120 tii 134) Na ndakisa, na Nzembo 133, Davidi alobelaki esengo ya bondeko oyo Bayisraele bazalaki koyoka na mabaku yango. Abandi nzembo yango na maloba oyo: “Talá! Ezali mpenza malamu mpe ezali mpenza esengo ete bandeko báfanda na bomoko!” Kanisá naino miziki oyo bazalaki kobɛta ntango bazali koyemba nzembo yango!
Miziki mpe losambo ya Yehova
Moko ya zomi ya miziki oyo ezali na Biblia, mpe na mokanda ya Nzembo ezali kolendisa bato nyonso báyembaka nzembo ya masanzoli. (Nzembo 150) Miziki ezali na nguya ya kosalisa moto abosana mitungisi ya bomoi, mpe koyemba ekoki kozala lokola mafuta oyo ezali kozipa mpota oyo moto azali na yango na motema. Kasi, Biblia ezali mpe kolendisa baoyo bazali na esengo na motema báyemba nzembo.—Yakobo 5:13.
Koyemba ezali lolenge oyo moto akoki komonisa kondima mpe bolingo na ye epai ya Nzambe. Na butu ya nsuka liboso abomama, Yesu ná bantoma na ye basukisaki bolei na bango na nzembo. (Matai 26:30) Kanisá naino mongongo oyo Mwana ya Davidi akokaki kozala na yango, ye oyo ayebaki kutu ndenge bikelamu ya elimo bayembaka na likoló! Ekoki kozala ete bayembaki nzembo oyo babengi Hallel, Nzembo 113 tii 118. Soki ezali bongo, elongo na bantoma, oyo bayebaki te makambo nyonso oyo esengelaki kosalema, na ntembe te, Yesu ayembaki na mongongo makasi ete: “Nalingaka mpenza ntango Yehova ayokaka mongongo na ngai, malɔmbɔ na ngai. . . . Bansinga ya liwa ezingaki ngai mpe mitungisi ya Nkunda ezwaki ngai. . . . ‘Aa, Yehova, bikisá mpenza molimo na ngai!’”—Nzembo 116:1-4.
Moto te nde abandisá miziki. Biblia elobeli miziki mpe banzembo na likoló, epai bikelamu ya elimo bazali kobɛta banzɛnzɛ ya elilingi mpe bazali koyemba mpo na kokumisa Yehova pembeni ya kiti na ye ya Bokonzi. (Emoniseli 5:9; 14:3; 15:2, 3) Yehova Nzambe apesá bato likabo ya miziki, atyá na mitema na bango mposa ya miziki mpe mposa makasi ya kobimisa ndenge bazali koyoka na nzela ya bibɛtɛlo ya miziki to mpe koyemba. Mpo na moto ya kondima, miziki ezali libosoliboso likabo ya Nzambe.—Yakobo 1:17.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]
“Na mokolo ya esengo na bino mpe na bileko na bino ya fɛti . . . bosengeli koyula bakelelo.”—MITÁNGO 10:10
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 28]
“Yehova azali Mobateli na ngai. Nakozanga eloko te. Alalisaka ngai na bisika ya koleisa banyama oyo etondi na matiti; atambwisaka ngai na bisika ya kopema oyo ezali na mai mingi.”—NZEMBO 23:1, 2
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]
“Bazalaki nkóto minei (4 000) . . . oyo bapesaka Yehova masanzoli na bibɛtɛlo ya miziki oyo Davidi alobaki ete: ‘Nasali yango mpo na kopesa masanzoli.’”—1 NTANGO 23:4, 5
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]
Na maloba mpe na banzembo, Davidi azalaki kobimisa ndenge azali koyoka
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 30]
“Bósanzola Yah! Bósanzola ye na mbonda ya moke mpe na mabina ya kozunguluka. Eloko nyonso oyo ezali na mpema—esanzola Yah.”—NZEMBO 150:1, 4, 6
[Etanda/Bililingi na lokasa 28]
Bibɛtɛlo ya miziki na ntango ya kala
Na kati ya bibɛtɛlo ya bansinga, tokoki kotánga bibɛtɛlo ya nsinga misato, banzɛnzɛ, mpe bibɛtɛlo ya nsinga zomi. (Nzembo 92:3) Babongisaki yango mpo ekokana na lolaka ya Alamote mpe ya Sheminite, maloba oyo mbala mosusu ekoki kolimbola maloba mwambe ya miziki oyo ezali na likoló mpe na nse. (1 Ntango 15:20, 21) Na kati ya bibɛtɛlo ya ebende ya brɔnze mpe ya mopɛpɛ, tokoki kotánga piololo, liseke mpe bakelelo, oyo lokito na yango ezalaki “makasi.” (2 Ntango 7:6; 1 Samwele 10:5; Nzembo 150:3, 4) Na ntango ya bofungoli tempelo, bakelelo mpe bayembi “bayembaki na bomoko lokola moto moko.” (2 Ntango 5:12, 13) Yango emonisi ete bazalaki kobongisa yango mpo eyemba na bomoko. Na kati ya bibɛtɛlo ya bambonda, tokoki kotánga bambonda ya mike, bangɔngɛ, lolenge moko ya ebɛtɛlo ya miziki oyo esɛngaka koningisa yango mpe “mitindo nyonso ya bibɛtɛlo ya miziki oyo esalemi na nzete ya jenevriye.” Ezalaki mpe na basɛmbalɛ—ya mike “ya mondule kitoko” mpe basɛmbalɛ ya minene oyo bazalaki kobenga “makɛlɛlɛ ya basɛmbalɛ.”—2 Samwele 6:5; Nzembo 150:5.
[Bililingi]
Na likoló: Makambo oyo ezali na Liyemi ya Titus, na Rome, Italie, ezali komonisa bakelelo oyo bazwaki na tempelo ya Yerusaleme na mobu 70 ya ntango na biso. Mbongo ya bibende oyo bazalaki kosalela na mobu soki 130 ya ntango na biso, oyo ezali komonisa bibɛtɛlo ya miziki ya Bayuda
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mbongo ya bibende: © 2007 by David Hendin. All rights reserved.