Mpo na nini tosengeli te koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka?
Ozali ntango nyonso koboma nzoto mpo osala malamu koleka? Soki ozali kosala bongo, ekoki komemela yo moko na bato mosusu oyo ofandi na bango matomba mingi. Kasi, na likambo yango, bato mosusu bakei mosika mpe bakómi koluka kosala makambo ya kokoka. Yango elingi koloba nini?
KOLUKA kosala makambo ya kokoka elimboli kozala na makanisi ete likambo nyonso, soki kaka ezali ata na mwa mabe moke, ebongi te. Na ntembe te oyebi bato mosusu oyo bazalaka na ezaleli wana. Okomona ete bato yango basɛngaka bamosusu makambo ya mindɔndɔmindɔndɔ mpe yango ekoki kobimisa mikakatano mingi; ezaleli wana elongolaka esengo mpe elɛmbisaka nzoto. Bato mingi oyo bazali na makanisi malamu bayebi ete, ata na likambo nini na bomoi, koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka, elingi koloba koluka makambo ya mindɔndɔmindɔndɔ mpe kosɛnga bato básala makambo oyo eleki ndelo ezali mpenza malamu te. Esengeli kolonga ezaleli yango. Kasi, mokakatano ezali ete ezalaka mpasi mpo biso moko tóndima ete tozali na ezaleli ya koluka kosala makambo ya kokoka; yango wana, mpo na kolonga ezaleli yango ezalaka likambo moke te.
Nelson azali mokonzi monene ya kompani mpe azali na makambo mingi ya kosala mpo mosala etambola malamu. Mbala na mbala atalelaka mituya mpe mpo na ye, likambo oyo eleki ntina ezali ete mosala etambola malamu mpe kompani ekɔtisa mbongo mingi. Lokola kozwa mosala ezali etumba monene, bato mingi bazali komona ete basengeli kosala makambo ya kokoka mpo bándima bango. Bato mosusu bakoki kosepela ete Nelson asalaka mosala na ye malamu, nzokande lokola alukaka makambo ya kokoka, yango ememelaka ye mikakatano na nzoto; na ndakisa, ayokaka mingi motó mpasi mpe azalaka na kimya ya makanisi te. Yo mpe ozali lokola Nelson?
Bilenge mpe bazali na maladi yango ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka. Rita akolá na engumba Rio de Janeiro; ntango azalaki mwana moke alingaki kelasi mingi. Azalaki kolinga komonisa te ete alingaki makambo ya minene; kasi, azalaki kolɛmba nzoto soki azwi bapwɛ koleka banakelasi nyonso te. Rita alobi boye: “Banda bomwana na ngai, nazalaki komikokanisa na bato mosusu oyo bazalaki na ntango mingi, nazalaki komitungisa ntango nyonso mpe kosala makambo mbangumbangu. Nazalaki kozwa ntango ya kopema te mpamba te nazalaki ntango nyonso na mosala ya kosala.”
Ntango Maria azalaki mwana moke, soki akoki koyema malamu lokola bana mosusu te, azalaki koyoka nkanda mpe kolela. Na nsima, lokola azalaki na mposa akóma mobɛti monene ya miziki, mbala mingi ntango azalaki kobɛta miziki to koyemba, na esika ayokaka elɛngi ya miziki, azalaki komitungisa mpe kobangabanga. Tânia, elenge mosusu ya ekólo Brésil, azalaki kolinga komilakisa te mpe azalaki koluka kowelana te; kasi alobi ete, ezala na kelasi to na ndako, azalaki koluka kosala makambo oyo eleki makasi na ye. Azalaki komona ete soki asali mosala oyo ezali mabe ata mwa moke kaka, bato bakosepela na ye mpenza te. Tânia azalaki mpe ntango mosusu kosɛnga bato makambo makasi, na yango azalaki komona ete bato mosusu bazalaki kosala te ndenge ye azalaki kokanisa mpe yango ezalaki kokómisa ye mawamawa.
Atako koyeba mosala malamu, komipesa na mosala, mpe koyoka esengo na makambo oyo osali ezali na ntina, nzokande soki moto azali komityela mikano oyo akokoka yango te, ekoki kopesa ye makanisi ya mabe lokola kobanga ete mbala mosusu akolonga te. Baboti to bato mosusu bakoki kolukela bana makambo ya kokoka oyo ekozala mpasi mpo bákokisa yango, ezala na kelasi to na masano. Na ndakisa, mama ya Ricardo azalaki kosɛnga ye makambo mineneminene: alingaki ete Ricardo akóma monganga, ayeba kobɛta piano, mpe ayeba koloba minɔkɔ mingi. Omoni ete makanisi ya ndenge wana epesaka mikakatano soki bazali koyeba kotyela yango ndelo te!
Mpo na nini tosengeli te koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka?
Lelo oyo, bato balingi mosala oyo esalami malamu mpenza, balingi makambo oyo ezali sikisiki mpe oyo ezali ata na mbeba moko te. Yango wana, na misala bato bazali kowelana. Likambo mosusu oyo ezali kotinda bato mingi báboma nzoto ezali ete bazali kobanga kobungisa mosala oyo bazali kobikela na yango. Bato mosusu ya misala bakómi lokola moto ya masano oyo azali koboma nzoto mpo asala lisusu malamu koleka ndenge oyo azali kosala sikoyo. Soki akosala momekano moko ya mpasi, akoki kozala na mposa amibongisa lisusu mingi koleka, mpe mbala mosusu akomela bankisi mpo na kobakisa makoki na ye mpo akoka kolonga. Soki moto akómi na mposa ya kosala makambo ya kokoka na esika ya koluka kosala makambo ya malamu, “yango ekoki kotinda ye asala makambo na kobanga ete mbala mosusu akolonga te” to asala yango “na mposa ya koleka bato nyonso.”—The Feeling Good Handbook.
Ya solo, bato mosusu bakanisaka ete bakoki kosala malamu koleka ndenge oyo bazali kosala sikoyo, ezala na misala ya ntɔki to na masano. Kasi, Doktɛrɛ Robert Eliot alobi ete “koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ezali mposa oyo moto akoki kokokisa yango te.” Alobi lisusu ete: “Ezali mposa oyo esangisi makambo mingi lokola komiyoka lokola nde omemi ngambo, komilongisa mpe kobanga noki te básɛka yo.” Yango wana, maloba ya Mokonzi Salomo ezali mpenza solo ete: “Ngai namoni ete misala nyonso ya mayele nyonso kati na mosala iuti na kolulela ya moto oyo akolulelaka mozalani na ye. Oyo mpe ezali mpamba mpe koluka [kokanga] mopɛpɛ.”—Mosakoli 4:4.
Okosala nini soki olukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka? Omonaka ete ozali kosala nyonso, kasi ozali kokoka kaka te? Olingi kolɛmbisa mwa moke makambo oyo osɛngaka bato mosusu básala mpe ozala na makambo makasi te? Kozala moto ya kokoka elimboli nini? Ozali na mposa ete osala na mayele mpe na makasi na yo nyonso kasi oluka kosala makambo ya kokoka te? Soki bato ya kozanga kokoka bakoki kosalela mayele oyo Nzambe apesi bango mpo na kosala biloko oyo ekoki kopesa bato mosusu matomba, kanisá makambo oyo bakosala ntango bakozala na mokili ya kokoka mpe ntango Nzambe akotambwisa bango!
[Elilingi na lokasa 4]
Baboti to bato mosusu bakoki kolukela bana makambo ya kokoka oyo ekozala mpasi mpo bákokisa yango.