Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 68
  • Nalukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nalukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Wapi mabe ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka?
  • Lolenge mosusu ya malamu koleka ezali?
  • Mpo na nini nalukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka?
    Lamuká!—2004
  • Nakosala nini soki nalingaka kozala moto ya kokoka?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Mpo na nini tosengeli te koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Ndenge nini nakoki kotika koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka?
    Lamuká!—2004
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 68
Elenge mobali azali komeka mbala na mbala kodesiné mpunda

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nalukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka?

Soki

  • olingaka ozwa kaka bapwɛ mingi na kelasi

  • oboyaka komeka nzoto na likambo ya sika mpo na kobanga ete olonga te

  • omonaka ete mabe oyo balobeli yo mpo na ezaleli na yo, ezali lokola bafingi yo

. . . , boye, eyano na motuna oyo ezali awa na likoló esengeli kozala ɛɛ. Kasi yango ezali mpenza na ntina?

  • Wapi mabe ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka?

  • Lolenge mosusu ya malamu koleka ezali?

  • Makambo bilenge mosusu balobi

Wapi mabe ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka?

Ezali mabe te koluka kosala nyonso oyo okoki kosala. Kasi, buku moko Perfectionism​—What’s Bad About Being Too Good? Elobi “koluka kosala likambo na ndenge ya malamu koleka ekeseni na koluka kosala likambo oyo ekoki kosalema te.” Ebakisi boye: “Koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ekoki kokómela moto kilo mpo moto ya kokoka azali te.”

Biblia endimi yango. Elobi boye: “Ezali na moto moko te oyo azali moyengebene na mabele oyo asalaka kaka malamu.” (Mosakoli 7:20) Lokola ozali moto ya kozanga kokoka, na bantango mosusu makambo oyo okosala ekolonga mpenza te.

Kondima likambo yango ezali mpasi mpo na yo? Soki bongo, talelá makambo minei oyo koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ekoki kosala yo mabe.

  1. Ndenge omitalelaka. Baoyo balukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka balekisaka ndelo na mibeko oyo bamityelaka​—makambo oyo ekolɛmbisa bango nzoto. “Mpo na koloba solo, tokolonga na makambo nyonso te mpe soki tozali komizwa na valɛrɛ te mpo tozangi kokoka, tokosuka na komityela lisusu motema te. Yango ekoki kotungisa makanisi na biso.”​—Alicia.

  2. Ndenge otalelaka toli ya malamu. Bato oyo balukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka bamonaka lokola soki balobeli likambo na bango ya mabe ezali lokola babomi bango. Elenge mobali moko na nkombo Jeremy, alobi boye: “Soki basemboli ngai, namiyokaka mabe.” Abakisi boye: “Kozala moto oyo alukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka ekopekisa yo oyeba esika makoki na yo esuki mpe ondima lisalisi oyo osengeli na yango.”

  3. Ndenge otalelaka basusu. Mbala mingi baoyo balukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka balobelaka basusu mabe mpe ezali mpasi te koyeba mpo na nini. Elenge mwasi moko na nkombo Anna, alobi boye: “Soki yo moko olukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka, okolinga mpe bato mosusu básala makambo ndenge yo olingi. Soki basali bongo te, okobanda ntango nyonso kobaye bango.”

  4. Ndenge basusu batalelaka yo. Soki olekisaka ndelo na makambo oyo olingaka basusu básala, kokamwa te soki bato bakómi kokima yo! Mwasi moko na nkombo Beth, alobi boye: “Koluka kosala makambo na ndenge moto oyo alingaka makambo esalema na ndenge ya kokoka alingi, ebayisaka. Moto moko te akolinga kozala pembeni na moto ya ndenge wana!”

Lolenge mosusu ya malamu koleka ezali?

Biblia elobi: “Bato nyonso báyeba ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te.” (Bafilipi 4:5) Moto ya makambo makasimakasi te alekisaka ndelo te na makambo oyo amizelaka na yango to azelaka epai ya basusu.

“Tokutanaka na makambo mingi oyo etungisaka biso. Mpo na nini kobakisa mitungisi mosusu na koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka? Wana ezali kolekisa ndelo!”​—Nyla

Biblia esɛngi: “Kotambola na bopɔlɔ elongo na Nzambe na yo!” (Mika 6:8) Bato ya bopɔlɔ bayebaka esika makoki na bango esuki. Basalaka te makambo oyo bakokoka te; balekisaka mpe te ntango mingi na mosala oyo bakokoka kosala te.

“Soki nalingi namona ete nazali mpenza kokokisa mikumba na ngai, nasalaka kaka oyo nakokoka. Nakoki te kosala koleka ndelo.”​—Hailey

Biblia elobi: “Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza.” (Mosakoli 9:10) Boye, nkisi ya kosilisa ezaleli ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ezali te kozala gɔigɔi kasi nde kozala makasi na mosala mpe komonisa bizaleli oyo tolobeli awa na likoló​—kozala makambo makasimakasi te mpe kozala na bopɔlɔ.

“Nalukaka kosala mosala na ndenge ya malamu koleka mpe namipesaka mobimba. Nayebaka ete ekosalema na ndenge ya kokoka te, kasi nayokaka esengo koyeba ete nasali oyo nakoki kosala.”​—Joshua

Makambo bilenge mosusu balobi

Sierra

“Koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ekoki kobimisela moto mitungisi mingi mpe okoki komiyoka mabe ntango basemboli yo na likambo moko. Namoni na esika nakanisa ete nakolonga lisusu te mpo nasali mabunga, ebongi nde natalela yango lokola mateya oyo nazwi.”​—Sierra

Bo

“Koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ekoki kozangisa yo bisengo. Okoki mpe kolɛmbisa baninga na yo nzoto mpo ekomonana lokola ozali kosambisa bango to kokanisa ete bayebi eloko te.”​—Bo

Sarina

“Tozali kaka na ngonga 24 na mokolo mpe misala esengeli kosalema. Yango wana, soki ntango mingi ezali koleka na likambo nyonso ya moke, makambo ya ntina; ata mpe kolya to kolala ekozonga nsima.”​—Sarina

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto