Okoki kozwa kimya ya makanisi?
Na mobu 1854, mokomi mpe moto ya Amerika Henry Thoreau akomaká boye: “Bato bazali kotungisama mingi na bomoi na bango atako bazali koloba eloko te.”
Maloba yango emonisi ete na ntango oyo moto wana azalaki na bomoi, bato mingi bazalaki na kimya ya makanisi te. Kasi banda wana tii sikoyo eleki soki mbula 150. Lelo oyo makambo ebongwani? To ata lelo oyo mpe likambo oyo Thoreau alobaki ezali komonana? Ezali boni mpo na yo moko? Ozali na esengo mpe na kimya? To ozali na elikya moko te, ozali koyeba te soki lobi okozala ndenge nini? ‘Ozali kotungisama atako ozali koloba eloko te,’ lokola Thoreau alobaki yango?
LELO oyo, makambo oyo ezali kosala ete bato bázala na kimya ya makanisi te ezali mingi. Tótánga kaka mwa ndambo. Na mikili mingi, lokola bato mingi bazali basɔmɛlɛ mpe bato oyo bazali kosala bazali kofutama malamu te, bato mingi bazali babola mpe bazali komitungisa mpo na kozanga mbongo. Na mikili mosusu, bato mingi bazali koboma nzoto mpo na koluka bomɛngo mpe konduka biloko. Kasi, mbala mingi, komipesa na koluka bomɛngo ebendelaka bato motungisi na esika ya kimya. Makambo lokola maladi, bitumba, mobulu, kozanga bosembo, mpe konyokola bato ezali kosala ete bato bázala na kimya ya makanisi te.
Balukaki kimya ya makanisi
Bato mingi bazali kosepela te ete makambo etikala kaka ndenge ezali lelo oyo. Antônioa azalaki mokonzi na lisangá moko ya sɛndika na kompanyi moko monene na engumba São Paulo, na Brésil. Lokola azalaki na mposa ete bato ya mosala bázala malamu, azalaki na kati ya bato oyo bazalaki kosala bagrɛvɛ mpe kotambola na balabala mpo na komonisa ete balingi mbongwana. Atako bongo, azwaki kimya ya makanisi te.
Bato mosusu bakanisaka ete soki babali nde bakozala na mwa kimya na bomoi na bango, kasi mbala mosusu elikya na bango ekokisamaka te. Marcos azalaki moto ya mombongo mpe mosala na ye ezalaki kotambola malamu. Na nsima akɔtaki na makambo ya politiki mpe akómaki mokonzi ya engumba moko oyo ezali na bakompanyi mingi. Nzokande, na ndako na ye makambo ezalaki kotambola malamu te. Ntango bana na ye bakolaki mpe balongwaki na ndako, ye na mwasi na ye bakabwanaki mpo bazalaki kaka koyokana te.
Gerson akimaki ndako mpe azalaki kolala na balabala na engumba Salvador, na Brésil. Akómaki kotambolatambola na bamboka. Azalaki kotambola na basɔfɛlɛ ya mituka ya minene, kolongwa na engumba moko mpe kokende na engumba mosusu mpe bongo na bongo. Mwa moke na nsima akómaki komela bangi mpe azalaki koyiba biloko ya bato mpo na kozwa mbongo ya kosomba bangi. Bapolisi bakangaki ye mbala mingi. Atako azalaki moto ya nkanda mingi mpe alingaki bitumba, Gerson azalaki na mposa ya kimya ya makanisi. Akokaki kozwa kimya yango?
Vania azalaki naino mwana moke ntango mama na ye akufaki; mpe na nsima Vania akómaki lokola mama ya ndako, mpe lisusu azalaki kosalisa leki na ye ya mwasi oyo azalaki kobɛla. Vania azalaki kokende ndakonzambe kasi azalaki kokanisa ete Nzambe asundolá ye. Tomoni ete ye mpe azalaki na kimya ya makanisi te.
Tozali mpe na Marcelo. Ye alingaki bisengo mingi. Alingaki mingi kosakana na bilenge mosusu: kobina, komela masanga, mpe komela bangi. Mokolo moko abundaki na elenge mosusu mpe azokisaki elenge yango. Na nsima, likambo oyo asalaki epesaki ye mawa mingi mpe abondelaki Nzambe asalisa ye. Ye mpe azalaki na mposa ya kimya ya makanisi.
Bandakisa oyo emonisi mwa makambo oyo ekoki kobebisa kimya ya makanisi. Moto ya sɛndika, moto ya politiki, mwana oyo alalaka na balabala, elenge mwasi oyo azalaki kosala misala mingi, elenge mobali oyo alingaki bisengo, bango nyonso wana bakokaki kozwa kimya ya makanisi oyo bazalaki koluka? Makambo oyo ekómelaki bango ekoki koteya biso eloko moko? Eyano na mituna yango ezali ete ɛɛ, lokola tokomona yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bato mosusu bankombo mosusu.
[Elilingi na lokasa 3]
Ozali koluka kimya ya makanisi?