Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/7 nk. 4-7
  • Epai wapi okoki kozwa kimya ya makanisi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Epai wapi okoki kozwa kimya ya makanisi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo nini bato mingi bazali na kimya te?
  • Epai wapi tokoki kozwa kimya ya makanisi?
  • Okoki kozwa kimya ya makanisi atako mokili etondi na mobulu
  • Ndenge nini kozwa kimya ya solosolo lelo oyo
  • Okoki kozwa kimya ya makanisi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Okoki kozala na kimya na mokili oyo ya yikiyiki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tika ete “kimya na Nzambe” ebatela mitema na bino!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ndenge oyo okoki kozwa kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/7 nk. 4-7

Epai wapi okoki kozwa kimya ya makanisi?

Soki tokokanisi ntango na biso na ntango oyo Thoreau, moto oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki, azalaki na bomoi, tokomona ete makambo mingi ekeseni. Moko na makambo oyo ekeseni mpenza ezali ete lelo oyo toli mpo na kozwa kimya ya makanisi ezali bebo. Bato ya pisikoloji na bato oyo bakomaka mikanda mpo na kopesa toli, ata mpe bapanzi-nsango, bazali kopesa makanisi na bango. Toli na bango ekoki kosalisa mpo na mwa ntango; kasi mpo na kozwa lisalisi ya solosolo, bato bazali na mposa ya eloko mosusu ya malonga. Bato oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki bazwaki eloko yango.

BANGO nyonso, Antônio, Marcos, Gerson, Vania, na Marcelo, moto na moto akutanaki na mikakatano na ye. Kasi, bango nyonso bazalaki na makambo soki misato oyo ekokanaki. Ya liboso, na ntango moko boye ‘bazalaki na elikya te mpe bazalaki na Nzambe te na mokili.’ (Baefese 2:12) Ya mibale, bazalaki na mposa ya kimya ya makanisi. Mpe ya misato, bango nyonso bazwaki kimya ya makanisi oyo basengelaki na yango nsima ya koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Ntango bazalaki koyekola, bamonaki ete Nzambe akanisaka bango. Ya solo, lokola Paulo alobaki yango na bato ya Atene na ntango na ye, Nzambe “azali mpe mosika na moto na moto na biso te.” (Misala 17:27) Tosengeli kondima likambo yango mpo na kozwa kimya ya makanisi.

Mpo nini bato mingi bazali na kimya te?

Biblia eyebisi ntina mibale ya minene oyo ezali kosala ete kimya ezala te na mokili, ezala kimya ya makanisi to kimya kati na bato. Mokapo ya Yilimia 10:23 elimboli ntina ya liboso na maloba oyo: “Nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.” Moto akokoka te komitambwisa na mayele mpe na makanisi na ye moko, kasi kaka Nzambe nde akoki mpenza kosalisa ye. Bato oyo balukaka te ete Nzambe atambwisa bango bakoki kozwa kimya ya solosolo te. Ntina ya mibale oyo kimya ezali te ezali na maloba ya ntoma Yoane oyo ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Soki Nzambe alakisi nzela te, milende nyonso oyo moto azali kosala mpo na kozwa kimya ekozala mosala ya mpunda, mpamba te ekobebisama na misala ya “oyo mabe,” elingi koloba Satana; ye amonanaka te kasi azali mpe azali na nguya mingi.

Mpo na ntina oyo mibale (bato mingi bazali koluka te ete Nzambe atambwisa bango mpe Satana azali kosala mosala na ye na mokili oyo), mokili mobimba ezali na mpasi. Ntoma Paulo amonisaki yango polele na maloba oyo: “Biloko nyonso bisalamaki na Nzambe, izali kokimela elongo kino ntango oyo.” (Baloma 8:22) Nani akoki kobɛtɛla likambo oyo ntembe? Ezala na mikili ya bozwi to na mikili ya bobola, mikakatano na kati ya mabota, mobulu, kozanga bosembo, kozanga boyokani, mbongo mpasi, koyinana kati na bato ya bikólo oyo ekeseni, konyokola bato, maladi mpe makambo mosusu, nyonso wana ezali kolongola bato kimya ya makanisi.

Epai wapi tokoki kozwa kimya ya makanisi?

Ntango Antônio, Marcos, Gerson, Vania, na Marcelo bayekolaki Biblia, Liloba ya Nzambe, makambo oyo bayebaki ebongolaki bomoi na bango. Ya liboso, bayebaki ete mokolo mosusu makambo ekobongwana na mokili oyo. Yango ezali likanisi mpamba te ete nsukansuka makambo nyonso ekokóma malamu. Ezali mpenza elikya ya solosolo ete Nzambe akani kosala makambo mingi mpo na bato mpe ete ata sikoyo tokoki komona bolamu soki tozali kosala makambo oyo alingi. Bato yango basalelaki makambo oyo bayekolaki na kati ya Biblia mpe bomoi na bango ekómaki malamu. Bakómaki na esengo mingi mpe bazwaki kimya oyo bakanisaki ata te.

Lelo oyo, Antônio akɔtaka lisusu na makambo ya bagrɛvɛ te mpe atiká mosala ya sɛndika. Ayebi ete makambo wana ememaka mpenza mbongwana ya solo te mpe mwa mbongwana oyo yango ememaka ezalaka se ya mwa ntango moke. Moto yango oyo azalaki mokonzi ya sɛndika ayekolaki makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala. Bato ebele basɛngaka Bokonzi yango ntango basalaka Libondeli ya Nkolo (to, Tata wa Biso) mpe balobaka na Nzambe ete: “Tiká Bokonzi na yo eya.” (Matai 6:10a) Antônio ayekolaki ete Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza guvɛrnɛma oyo ekoyangela na likoló mpe ekopesa bato kimya ya solosolo.

Marcos alandaki toli malamu oyo Biblia epesi mpo na libala. Yango wana, mobali yango oyo azalaki moto ya politiki, azali lelo oyo na esengo mpo bazonganá na mwasi na ye. Marcos mpe azali kozela mokolo oyo ezali lisusu mosika te ntango Bokonzi ya Nzambe ekotya makambo ya malamu koleka na esika ya makambo oyo tozali komona lelo oyo lokola lokoso mpe moimi. Sikoyo azali kokanga malamu ntina ya maloba ya Libondeli ya Nkolo oyo elobaka ete: “Mokano na yo esalema na nse [lokola] na Likoló!” (Matai 6:10b) Ntango mokano ya Nzambe ekosalema awa na mokili, bato bakozala na bomoi ya malamu na ndenge oyo emonaná naino te.

Bongo Gerson? Ye atiká kotambolatambola na bamboka mpe atiká moyibi. Bomoi ya elenge yango oyo azalaki kolala na balabala ezali sikoyo na ntina mpamba te azali kosalela makasi na ye mpo na kosalisa bato mosusu bázwa kimya ya makanisi. Lokola bandakisa oyo emonisi yango, koyekola Biblia mpe kosalela toli na yango ekoki mpenza kokómisa bomoi ya moto malamu.

Okoki kozwa kimya ya makanisi atako mokili etondi na mobulu

Nzambe akotinda Yesu Klisto mpo na kokokisa mokano na ye, mpe ntango moto ayekoli Biblia na Batatoli ya Yehova, ayebaka makambo mingi oyo etali Yesu. Na butu oyo abotamaki, baanzelu bakumisaki Nzambe na nzembo oyo: “Nkembo na Nzambe na bisika-bileki-Likoló, mpe kimya na nse kati na bato oyo ye asepeli [na] bango.” (Luka 2:14) Ntango Yesu akómaki mokóló, azalaki na mposa ete bato bázala na bomoi ya malamu. Azalaki koyeba mitungisi na bango mpe azalaki na mawa mingi mpo na bato oyo bazalaki konyokwama mpe bato ya maladi. Mpe lisusu, ndenge baanzelu bayembaki yango, apesaki bato ya komikitisa mwa kimya ya makanisi. Ntango akómaki na nsuka ya mosala na ye, alobaki na bayekoli na ye boye: “Nazali kotikela bino kimya, nazali kopesa bino kimya na ngai moko. Napesi bino [lokola] ekopesaka mokili te. Tiká ete mitema na bino mitumolana te, mibanga mpe te.”—Yoane 14:27.

Yesu alekaki mosika mpenza bato oyo basalisaka bato oyo bazali na mpasi. Amonisaki ete azali lokola mobateli ya bampate, mpe bayekoli na ye oyo bazali na komikitisa, bazali lokola bampate, ntango alobaki ete: “Ngai nayei ete bázala na bomoi mpe ete bázala na bomoi boleki mingi. Ngai nazali mobateli malamu; mobateli malamu akotika bomoi na ye mpo na bampate.” (Yoane 10:10, 11) Ya solo, Yesu akeseni mpenza na bakonzi mingi lelo oyo, bango balukaka libosoliboso matomba na bango moko, kasi ye apesaki bomoi na ye mpo na bampate na ye.

Ndenge nini tokoki kozwa litomba na likambo oyo Yesu asalaki? Bato mingi bayebi maloba oyo: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi [Mwana mobotami-bobele-moko, NW ] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Kondimela Yesu esɛngi koyeba naino ye na Tata na ye Yehova. Koyeba Nzambe na Yesu Klisto ekoki kokómisa moto moninga mpenza ya Yehova Nzambe mpe na nsima, yango ekosalisa ye azwa kimya ya makanisi.

Yesu alobaki boye: “Bampate na ngai bakoyokaka mongongo na ngai mpe ngai nayebi bango mpe [bakolandaka] ngai. Nazali kopesa bango bomoi ya seko mpe libela bakobeba te; moto moko akobɔtɔla bango na lobɔkɔ na ngai te.” (Yoane 10:27, 28) Maloba yango ezali mpenza kosimba motema mpe kobɔndisa! Ya solo, eleki sikoyo mbula nkóto mibale banda Yesu alobá maloba yango kasi ezali naino kosimba mitema ya bato tii na moi ya lelo. Tóbosana te ete Yesu Klisto azali na bomoi mpe azali kosala mosala, azali sikoyo koyangela lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe kuna na likoló. Ntango azalaki awa na mabele eleki sikoyo bambula ebele, azalaki kokanisa bato ya bopɔlɔ, baoyo bazali na mposa ya kimya ya makanisi mpe tii sikoyo akanisaka bango. Mpe lisusu, azali ntango nyonso Mobateli ya bampate na ye. Soki tolandi ye, akosalisa biso tózwa kimya ya makanisi, mpe kimya yango esangani na elikya ya solosolo ya komona, na mikolo ezali koya, kimya na mokili mobimba, elingi koloba mobulu, bitumba mpe kobomana ekozala lisusu te.

Soki toyebi mpe tondimi ete Yehova akosalisa biso na nzela ya Yesu, tokozwa mpenza matomba. Kanisá lisusu Vania, ye azalaki na misala mingi ntango azalaki elenge mpe azalaki kokanisa ete Nzambe asundolá ye. Lelo oyo, Vania ayebi ete Nzambe asundolá ye te. Alobi boye: “Nayebaki ete Nzambe azali moto ya solo mpe azali na bizaleli malamu mpenza. Bolingo na ye epusaki ye atinda Mwana na ye awa na mabele mpo apesa biso bomoi. Ezali na ntina mingi koyeba likambo yango.”

Marcelo alobi ete ye na Nzambe bazali mpenza baninga ya solo. Elenge yango oyo alingaki bisengo alobi boye: “Mbala mingi bilenge bayebaka te makambo oyo basengeli kosala, mpe basukaka na komisalela mabe. Bamosusu, lokola ngai, bamipesaka na komela bangi. Natii elikya ete bilenge mosusu mingi bakozwa mapamboli lokola ngai, soki bayekoli solo oyo ezali kolobela Nzambe na Mwana na ye.”

Lokola bayekolaki mpenza Biblia, Vania na Marcelo bakómaki na kondima makasi epai ya Nzambe mpe bakómaki na elikya ete azali mpenza na mposa ya kosalisa bango bálonga mikakatano na bango. Soki tosali lokola bango, elingi koloba toyekoli Biblia mpe tolandi toli na yango, tokozwa mpenza kimya ya makanisi ndenge bango bazwaki. Na nsima, elendiseli ya ntoma Paulo ekokokisama epai na biso ete: “Bómitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tiká ete bisengeli na bino biyebana epai ya Nzambe na mabondeli mpe na malɔmbɔ mpe na matɔndi. Mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso, ekosɛnzɛla mitema na bino mpe [makanisi] na bino kati na Klisto Yesu.”—Bafilipi 4:6, 7.

Ndenge nini kozwa kimya ya solosolo lelo oyo

Yesu Klisto azali kotambwisa bato oyo bazali na mposa ya mateya ya solo na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. Lokola azali kotambwisa bango na losambo ya pɛto ya Nzambe, bazali na kimya lokola oyo Biblia elobeli: “Bato na ngai bakofanda na efandelo ya kimya na bifandelo ya solo mpe na ndako ya bolɔzi te.” (Yisaya 32:18) Mpe kimya yango ezali kaka elakiseli ya mwa moke ya kimya oyo bakozala na yango na mikolo ekoya. Biblia elobi: “Nde bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo. Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:11, 29.

Sikoyo, motuna yango oyo: Tokoki nde kozwa kimya ya makanisi lelo oyo? Eyano ezali ete tokoki kozwa yango. Lisusu, tokoki kozala na elikya ete na mikolo oyo ezali koya, Nzambe akopesa bato ya botosi kimya na ndenge oyo emonaná naino te. Yango wana, bondelá Nzambe apesa yo kimya na ye! Soki ozali na mikakatano oyo ezali kosala ete ozala na kimya te, salá lokola Mokonzi Davidi, bondelá boye: “Mikakatano ya motema na ngai iyei mingi mingi; bimisá ngai na mpasi yango nyonso. Talá mawa na ngai mpe mpasi na ngai, limbisá mpe ngai mabe na ngai nyonso.” (Nzembo 25:17, 18) Yebá ete Nzambe ayokaka mabondeli ya ndenge wana. Asembolaka lobɔkɔ na ye mpe apesaka kimya epai ya bato nyonso oyo balukaka yango na motema sembo. Na bolingo nyonso, balobi na biso boye: “[Yehova] azali penepene na bango nyonso bakobyanga ye, baoyo bakobyanga ye na solo. [Akokokisa] mposa na bango baoyo bakobanga ye, akoyoka mpe koganga na bango mpe akobikisa bango.”—Nzembo 145:18, 19.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

Moto akokoka te komitambwisa na mayele mpe na makanisi na ye moko, kasi kaka Nzambe nde akoki mpenza kosalisa ye

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

Soki moto ayebi Nzambe na Yesu Klisto, akoki kokóma moninga mpenza na bango mpe na nsima, akoki kozwa kimya ya makanisi

[Elilingi na lokasa 7]

Kolanda toli ya Biblia epesaka kimya na kati ya libota

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto