Babateli ya mpate ya Klisto, ‘Bófungola mpenza mitema na bino’!
‘YEHOVA azali mobateli na ngai, nakozanga eloko te.’ Davidi alobaki bongo mpo na komonisa ete atyaki motema na ye mobimba na Nzambe na ye. Na elobeli ya elimo, Yehova amemaki ye epai oyo “matiti mobesu” mpe “mai ya kimya” ezali, atambolisaki ye na “nzela ya boyengebene.” Ntango banguna bazingelaki Davidi, Nzambe asungaki ye mpe alendisaki ye, yango wana alobaki na Yehova ete: “Nakobanga mabe te; zambi yo ozali na ngai elongo.” Lokola azalaki na Mobateli oyo aleki babateli nyonso, Davidi azwaki mokano ya ‘kofanda na ndako ya Yehova kino nsuka ya mikolo na ye.’—Nzembo 23:1-6.
Yehova abatelaki Mwana mobotami-bobele-moko na ye na bolingo mpenza, yango wana, ye mpe, abatelaki bayekoli na ye malamumalamu mpe amonisaki yango na ndenge azalaki kosalela bango makambo ntango azalaki awa na mabele. Yango wana Makomami ebengaka ye “mobateli malamu,” “Mobateli monene ya bampate,” mpe “Mokonzi Mobateli.”—Yoane 10:11; Baebele 13:20; 1 Petelo 5:2-4.
Ntango nyonso, Yehova na Yesu babatelaka bato oyo balingaka bango. Libateli na bango ezali komonana mpe na ebongiseli ya bolingo oyo bazwi ya kotya babateli-balandi na kati ya lisangá. Ntoma Paulo alobaki na babateli-balandi yango ntango alobaki boye: “Bókeba na ntina na bino mpenza mpe na ntina na etonga mobimba oyo elimo santu esili kotya bino bakɛngɛli na yango, bózala babateli na [lisangá] ya Nzambe oyo asombaki na makila ya [Mwana na ye, NW].”—Misala 20:28.
Kobatela etonga na ndenge oyo Yehova na Klisto Yesu balingi, ezali likambo moke te, kasi ezali likambo ya ntina mingi mpenza lelo oyo. Kanisá Batatoli koleka milio moko oyo bazwaki batisimo na kati ya mbula misato oyo eleki! Bato yango ya sika bayebi makambo ya elimo mingi te oyo moto ayebaka nsima ya bambula mingi. Kanisá mpe Batatoli oyo bazali naino bana to bilenge. Bazali na mposa ya libateli ya baboti na bango kaka te kasi lisusu ya babateli-balandi na kati ya lisangá.
Ya solo, moklisto mokomoko azali komekama na makambo ya mokili, bakisa mpe baninga. Biso nyonso tosengeli kobunda etumba mpo tólanda bamposa ya mokili te. Na mikili mosusu, basakoli ya Bokonzi bakoki kolɛmba nzoto mpamba te bato bazali kosepela mpenza te na nsango na bango. Basakoli mingi bazali na mitungisi ya kolɔngɔnɔ ya nzoto. Mikakatano ya mbongo ekoki mpe kolongola bamosusu molende ya koluka liboso Bokonzi. Ya solo, biso nyonso, na baoyo baumeli kati na solo, tozali na mposa mpe tobongi na lisalisi ya babateli ya mpate ya bolingo.
Makanisi ya malamu
Bapesaki baklisto ya ekeke ya liboso toli ete: ‘Bófungola mpenza mitema na bino’! (2 Bakolinti 6:11-13, NW) Ebongi mpenza ete baklisto oyo bazali bankulutu bálanda toli yango ntango bazali kokokisa mokumba na bango ya kobatela bampate. Ndenge nini bakoki kosala yango? Mpe tokoloba boni mpo na basaleli ya misala oyo mingi na bango bakokóma mpe bankulutu?
Soki baklisto oyo bazali bankulutu balingi kozala lipamboli mpo na etonga, basengeli te kosalaka mosala na bango mpo kaka bákokisa mokumba. Bapesi bango toli ete: “Bóbatela etonga ya Nzambe kati na bino. Bóbatela bango mpo na kopusama te, kasi na mitema malamu lokola elingi Nzambe, na mposa na kozwa lifuti te kasi mpo na kopesa mpamba.” (Biso nde totɛngisi makomi; 1 Petelo 5:2) Mpo na kobatela bampate malamu, esɛngaka kozala na motema malamu mpe na mposa ya kosalela bato mosusu. (Yoane 21:15-17) Elingi koloba komona bamposa ya bampate mpe kokokisa yango nokinoki. Elingi koloba lisusu komonisela bamosusu bizaleli malamu ya boklisto oyo ebengami mbuma ya elimo ya Nzambe.—Bagalatia 5:22, 23.
Kobatela bampate ntango mosusu esɛngaka kotala bandeko na bandako na bango.a Kasi babateli ya bampate oyo ‘bafungolá mpenza mitema na bango,’ basalaka lisusu mingi koleka. Elingi koloba, basukaka kaka te kotala bandeko na mwa mabaku. Basalelaka libaku nyonso oyo emonani mpo na kotala bampate mosusu na kati ya etonga.
Bólakisa bato mosusu mosala mpo bango mpe bákóma babateli ya bampate
Ndeko mobali nyonso, ata azali na mbula nini, oyo “alingi ete asala mosala ya Mokɛngɛli, azali na mposa malamu.” (1 Timote 3:1) Basaleli ya misala mingi bamonisi mposa malamu ya kozwa mikumba mingi. Na yango, lokola bandeko yango ‘balingi kosala mosala ya Mokɛngɛli,’ bankulutu bazali kosalisa bango na esengo nyonso. Yango elingi koloba, bazali kolakisa bango mosala mpo bázala babateli ya bampate ya malamu.
Lisangá ya boklisto ya Yehova elandaka malamu mibeko ya Nzambe, yango wana ebebisamaka te na babateli ya mpate ya mabe lokola baoyo balobeli na Ezekiele 34:2-6. Yehova asepelaki na bango ata moke te. Na esika ya koleisa etonga, bazalaki nde komileisa bango moko. Bazalaki kobɔndisa bato ya maladi te, kobikisa baoyo bazalaki na mpasi te, kokanga elamba na baoyo babukanaki te, to kozongisa baoyo bapalanganaki to babungaki te. Bazalaki mpenza kosala lokola bambwa ya zamba kasi lokola babateli ya bampate te, bazalaki konyokola bampate. Bampate basundolamaki mpe bapalanganaki, bakómaki koyengayenga mpe moto ya kobatela bango azalaki te.—Yilimia 23:1, 2; Nahumu 3:18; Matai 9:36.
Babateli wana ya bampate oyo bazalaki sembo te balandaki ndakisa ya Yehova te, kasi babateli ya bampate ya Klisto balandaka ndakisa ya Yehova. Bazali kosalisa bampate bákende epai “matiti mobesu” mpe “mai ya kimya” ya elimo ezali. Bazali kosala makasi mpo na kokamba bango “na nzela ya boyengebene” na ndenge bazali kosalisa bango báyeba malamu Liloba ya Yehova mpe básalela yango. Bakoki kosala yango malamu mpenza mpamba te bazali ‘balakisi malamu.’—1 Timote 3:2.
Bankulutu bateyaka mingimingi na makita ya lisangá. Kasi, bankulutu bateyaka mpe moto mokomoko. Ya solo, bamosusu bakoki kozala na makoki mingi ya koteya ntango azali kosolola na moto moko, nzokande bamosusu bazali na makoki ya kosala masukulu. Kasi, soki ndeko moko azali na makoki mingi te ya koteya na lolenge moko elingi koloba te ete abongi te mpo na kozala moteyi. Bankulutu basalelaka makambo nyonso oyo epesameli bango mpo na koteya, bakisa mpe kotala bandeko na bandako. Mpo na kotala bandeko na bandako na bango, esɛngaka ntango mosusu kozala na programɛ, na ndakisa, esɛngaka kolanda programɛ oyo ebongisami mpo na kotala bandeko. Kasi kokende kotala bandeko ata soki oyebisaki bango te ete okoya kotala bango, yango mpe epesaka matomba mingi.
Bózalaka ntango nyonso babateli ya bampate mpe bateyi
Monganga azalaka na mposa ya koyeba mosala na ye mpe komesana na yango. Kasi bato ya maladi basepelaka soki bamoni ye azali na boboto, na motema mawa, azali komitungisa mpo na bango, mpe soki azali kosepela na bango mpenza. Bizaleli oyo esengeli kozala na kati ya bomoto na ye. Bizaleli ya ndenge yango esengeli kokóma bomoto ya moteyi mpe mobateli ya bampate ya malamu, na bomoi na ye ya mokolo na mokolo. Moteyi malamu asengeli komibongisa mpo na koteya bato oyo bazali pene na ye ntango nyonso oyo yango esengeli. Masese 15:23 elobaka ete: “Liloba lilobami na ntango ekoki ezali malamu boni!” “Ntango ekoki” ekoki kozala ntango azali koloba na ebaelo, ntango azali koteya na ndako na ndako, to ntango azali kosolola na basusu liboso to nsima ya makita na Ndako ya Bokonzi to na telefone. Se ndenge moko, mobateli ya bampate malamu asalaka makasi mpo na komonisa bizaleli malamu oyo ebongi na mobateli ntango nyonso, kasi kaka te ntango azali kotala bandeko epai na bango. Lokola ‘afungoli mpenza motema na ye,’ akosalela libaku nyonso oyo emonani mpo na kobatela bampate, kobatela bango na ndenge ekoki. Yango nde ekosala ete bampate bálinga ye mingi.—Malako 10:43.
Wolfgang, ye azali sikoyo nkulutu, azali kokanisa lisusu ntango mosaleli ya misala moko na mwasi na ye bayaki kotala bango na ndako. Alobi ete: “Bana na biso basepelaki mingi na likebi oyo batyelaki bango mpe ntango ya esengo oyo tolekisaki. Balobelaka likambo yango tii na moi ya lelo.” Ya solo, mosaleli ya misala yango amonisaki ete azali mobateli; azalaki ‘kofungola mpenza motema na ye.’
Bokoki mpe ‘kofungola mpenza mitema na bino’ soki bozali kotala bato ya maladi, kotindela bango mwa mikanda mike ya kolendisa, to kobenga bango na telefone, nyonso oyo ekoki kolakisa bango ete bozali kokanisa bango! Bópesa lisalisi soki esengeli. Soki bazali na likambo ya koloba, bóyoka bango na likebi nyonso. Bólobela makambo ya malamu, misala malamu ya Teokrasi na kati ya lisangá na bino mpe bipai mosusu. Bósalisa bango bátya miso na mikolo malamu oyo ekoya mpo na bato oyo balingaka Yehova.—2 Bakolinti 4:16-18.
Kotala bandeko mpe makambo mosusu
Kozanga kobosana ntina ya kobatela bampate, ezali solo ete kotala bandeko na bandako na bango na kolanda programɛ oyo ebongisami, atako ezali na ntina mingi, kasi ezali kaka moko na makambo oyo esɛngami. Mobateli ya bampate oyo azali na bolingo ‘akofungola mpenza motema na ye’ soki azali kosala ete bandeko bábangaka te kosolola na ye na makambo nyonso mpe na ntango nyonso. Boyokani malamu oyo azali kosala na bandeko ezali kopesa bandeko elikya ete na ntango ya mpasi, basengeli kobanga eloko ya mabe te, mpo bayebi ete bandeko na bango ya bolingo, babateli ya bampate ya Klisto, bazali wana mpo na kobatela bango.—Nzembo 23:4.
Bino nyonso oyo bozali babateli ya bampate ya Klisto ‘bófungola mpenza mitema na bino.’ Bómonisa bolingo ya solosolo mpo na bandeko na bino na lisangá, bósala nyonso oyo ekoki mpe bólendisa bango, bóbɔndisa bango, bótonga bango na elimo. Bósalisa bango bápikama makasi kati na kondima. (Bakolose 1:23) Bampate bakozanga eloko te, lokola Nzambe apesi bango lipamboli ya kozala na babateli ya mpate oyo ‘bafungoli mpenza mitema na bango.’ Bakozala na mokano ya kofanda na ndako ya Yehova kino nsuka ya mikolo na bango lokola Davidi. (Nzembo 23:1, 6) Talá makambo oyo ebongi mpo na mobateli ya bampate oyo azali na bolingo!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bokoki kozwa makanisi na ndenge ya kotala bandeko na bandako na bango na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1993, nkasa 20-23, mpe na oyo ya 15 Marsi 1996, nkasa 24-27.
[Etanda na lokasa 30]
Babateli ya mpate ya Klisto
• Bazalaka na mposa makasi mpe bazalaka na bolingo ya kosalela bandeko
• Baleisaka bampate mpe babatelaka yango
• Basalisaka bamosusu bálona mposa ya kozala babateli ya mpate
• Batalaka bato ya maladi mpe basalisaka bango
• Bazalaka ntango nyonso pene ya kosalisa bandeko na bango
[Bililingi na lokasa 31]
Ezala na mosala ya kosakola, na makita, to na bisika mosusu oyo bakutani, bankulutu bazalaka ntango nyonso babateli ya mpate