Bankulutu oyo bazali “bandakisa epai ya etonga”
“Bóbatela etonga ya Nzambe oyo epesami na mabɔkɔ na bino . . . na bolingo malamu . . . , na mposa makasi . . . , na kokómáká bandakisa epai ya etonga.”—1 PETELO 5:2, 3.
1, 2. (a) Mokumba nini Yesu apesaki Petelo, mpe mpo na nini tokoki koloba ete Yesu amikosaki te? (b) Ndenge nini Yehova atalelaka bankulutu?
MWA moke liboso ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Petelo ná bayekoli mosusu motoba bazalaki kolya bilei oyo Yesu abongiselaki bango na pembeni ya Ebale ya Galilai. Wana ezalaki mbala ya liboso te oyo Petelo amonaki Yesu nsima ya lisekwa na ye, mpe na ntembe te azalaki na esengo makasi ya koyeba ete Yesu azali na bomoi. Kasi, ekoki mpe kozala ete Petelo azalaki komitungisa na likambo moko. Ekoki kozala ete azalaki komitungisa mpamba te, mwa mikolo liboso, awanganaki Yesu liboso ya bato nyonso. (Luka 22:55-60; 24:34; Yoane 18:25-27; 21:1-14) Yesu apamelaki Petelo mpo amonisaki kondima te? Te. Kutu, apesaki ye nde mokumba ya koleisa mpe kobatela “bana-mpate” na ye. (Yoane 21:15-17) Ndenge lisolo ya Biblia oyo elobeli lisangá ya boklisto ya ekeke ya liboso emonisi yango, Yesu amikosaki te ndenge atyelaki Petelo motema. Elongo na bantoma mosusu mpe mikóló na Yelusaleme, Petelo abatelaki lisangá ya boklisto na eleko moko ya komekama mpe ya bokoli makasi.—Misala 1:15-26; 2:14; 15:6-9.
2 Lelo oyo, na nzela ya Yesu Klisto, Yehova aponi mibali ya makoki mpo bátambwisa bampate na ye na eleko moko ya mabe koleka banda mokili ebandá. (Baefese 4:11, 12; 2 Timote 3:1) Yehova amikosi nde? Libota ya kimya ya boklisto oyo esangisi bato ya mokili mobimba emonisi ete Yehova amikosi te. Toboyi te, mibali yango bazali bato ya kozanga kokoka lokola Petelo. (Bagalatia 2:11-14; Yakobo 3:2) Atako bongo, Yehova apesi bango mokumba ya kobatela bampate “oyo ye asombaki na makila ya Mwana na ye moko.” (Misala 20:28) Yehova alingaka mibali yango mingi, mpe amonaka ete “babongi na lokumu mibale.”—1 Timote 5:17.
3. Ndenge nini bankulutu babatelaka elimo ya komipesa?
3 Ndenge nini bankulutu babatelaka elimo ya komipesa, oyo ekómisaka bango bandakisa mpo na etonga? Lokola Petelo ná bankulutu mosusu ya ekeke ya liboso, bango mpe batyelaka elimo santu ya Nzambe motema, oyo epesaka bango nguya oyo basengeli na yango mpo na komema mokumba na bango. (2 Bakolinti 4:7) Elimo santu epesaka bango mpe likoki ya komonisa mbuma ya elimo: bolingo, esengo, kimya, motema molai, motema malamu, bolamu, kondima, boboto mpe komipekisa. (Bagalatia 5:22, 23) Tótalela sikoyo mwa balolenge oyo bankulutu bakoki kopesa ndakisa na komonisa mbuma yango, ntango bazali kobatela etonga oyo Nzambe apesi bango.
Balingaka etonga mobimba mpe mpate mokomoko
4, 5. (a) Ndenge nini Yehova ná Yesu bamonisaka bolingo mpo na etonga? (b) Wapi mwa balolenge oyo bankulutu bamonisaka bolingo mpo na etonga?
4 Ezaleli eleki monene oyo elimo ya Nzambe epesaka ezali bolingo. Yehova amonisaka ete alingaka etonga mobimba na ndenge apesaka bango ebele ya bilei ya elimo. (Yisaya 65:13, 14; Matai 24:45-47) Kasi, asukaka kaka na koleisa etonga mobimba te. Azalaka mpe na bolingo makasi mpo na mpate mokomoko. (1 Petelo 5:6, 7) Yesu mpe alingaka etonga. Akabaki molimo na ye mpo na etonga, mpe ayebi mpate mokomoko “na nkombo.”—Yoane 10:3, 14-16.
5 Bankulutu balandaka ndakisa ya Yehova ná Yesu. Balingaka etonga mobimba ya Nzambe mpe ‘bamipesaka na koteya’ lisangá. Masukulu oyo basalaka eleisaka mpe ebatelaka etonga, mpe bandeko nyonso bamonaka mosala makasi oyo bazali kosala. (1 Timote 4:13, 16) Eloko bandeko bamonaka te ezali bangonga oyo balekisaka mpo na kotalela balapolo ya lisangá, kokoma mpe kotánga mikanda, kobongisa baprogramɛ mpe kokokisa ebele ya mikumba mosusu mpo makambo nyonso ya lisangá esalema “na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.” (1 Bakolinti 14:40) Lokola bandeko bamonaka te makambo mingi oyo basalaka, ekoki kozala mpasi bátɔnda bango mpo na yango. Ezali mpenza mosala ya bolingo.—Bagalatia 5:13.
6, 7. (a) Wapi lolenge moko oyo bankulutu bayebaka bampate malamu? (b) Mpo na nini ezalaka mbala mosusu malamu tóyebisa bankulutu makambo na biso?
6 Bankulutu ya bolingo batyelaka mpate mokomoko na kati ya lisangá likebi. (Bafilipi 2:4) Likambo moko oyo bankulutu basalaka mpo na koyeba mpate mokomoko ezali kobimaka elongo na bango na mosala ya kosakola. Mbala mingi, Yesu azalaki kobima na bayekoli na ye na mosala ya kosakola mpe na mabaku yango azalaki kolendisa bango. (Luka 8:1) Nkulutu moko oyo akɔmeli alobaki boye: “Namonaka ete lolenge moko ya malamu ya koyeba ndeko moko mpe kolendisa ye ezali kobima na ye na mosala ya kosakola.” Soki obimi naino na nkulutu moko mikolo oyo te, ekozala malamu oyokana na moko mpo obima na ye.
7 Bolingo ezalaki kotinda Yesu akabola bisengo mpe bampasi ya bayekoli na ye. Na ndakisa, ntango bayekoli na ye 70 oyo atindaki na mosala ya kosakola bazongaki na esengo, Yesu “atondaki na esengo.” (Luka 10:17-21) Nzokande, ntango amonaki ndenge Malia ná bandeko na ye mosusu mpe baninga batondaki na mawa mpo na liwa ya Lazalo, “Yesu alelaki na mai na miso.” (Yoane 11:33-35) Ndenge moko mpe lelo oyo, bankulutu ya bolingo bakabolaka mawa mpe bisengo ya bampate. Bolingo etindaka bango ‘básepela elongo na bato oyo bazali kosepela mpe bálela elongo na bato oyo bazali kolela.’ (Baloma 12:15) Soki ozali na esengo to mawa, kokakatana te koyebisa bankulutu. Koyoka ete ozali na esengo ekolendisa bango. (Baloma 1:11, 12) Soki mpe bayoki ete ozali na mikakatano, bakolendisa mpe bakobɔndisa yo.—1 Batesaloniki 1:6; 3:1-3.
8, 9. (a) Ndenge nini nkulutu moko azalaki komonisa ete alingaka mwasi na ye? (b) Mpo na nini ezali na ntina ete nkulutu alingaka libota na ye?
8 Lolenge oyo nkulutu alingaka libota na ye moko, emonisaka bolingo na ye mpo na etonga. (1 Timote 3:1, 4) Soki azali na mwasi, bolingo mpe lokumu oyo apesaka mwasi na ye ekozala ndakisa oyo bandeko mibali basengeli kolanda. (Baefese 5:25; 1 Petelo 3:7) Yoká ndenge Linda, mwasi moko moklisto, alobaki mpo na mobali na ye oyo azalaki mokɛngɛli na boumeli ya mbula 20 liboso akufa: “Mobali na ngai azalaki ntango nyonso na makambo mingi ya kosala mpo na lisangá. Kasi, azalaki komonisa ngai ete tozali moto moko. Azalaki mbala mingi kotɔnda ngai mpo na lisungi na ngai, mpe azalaki kolekisa ntango oyo azali na mosala te elongo na ngai. Mpo na yango, nazalaki komona ete alingaka ngai, mpe nazalaki komona mabe te ete alekisa ntango mpo na makambo ya lisangá.”
9 Soki nkulutu azali na bana, lolenge oyo azali kopesa bango disipilini na bolingo nyonso mpe kopesa bango longonya mpo na makambo ya malamu oyo bazali kosala, ekozala ndakisa mpo na baboti mosusu. (Baefese 6:4) Ya solo, bolingo oyo akomonisa na libota na ye ekobanda ntango nyonso komonisa ete abongi na mokumba oyo elimo santu epesaki ye.— 1 Timote 3:4, 5.
Koyeba kosolola ememaka esengo mpe kimya
10. (a) Nini ekoki kobebisa esengo mpe kimya na kati ya lisangá? (b) Likambo nini elingaki kobebisa kimya na kati ya lisangá ya ekeke ya liboso, mpe ndenge nini basilisaki likambo yango?
10 Elimo santu ekoki kotya esengo mpe kimya na motema ya moklisto moko, na lisangani ya bankulutu mpe na kati ya lisangá mobimba. Nzokande, soki lisolo ezali te, esengo mpe kimya yango ekoki kobeba. Mokonzi Salomo alobaki boye: “Myango ekobeba esika bato basololaka te.” (Masese 15:22, NW) Nzokande, kosolola na limemya mpe na bosembo ememaka esengo mpe kimya. Na ndakisa, ntango likambo ya kokata ngenga elingaki ebebisa kimya ya lisangá ya ekeke ya liboso, lisangani ya mikóló-bakambi oyo ezalaki na Yelusaleme elukaki litambwisi ya elimo santu. Bapesanaki makanisi na ntina na likambo yango. Nsima ya kosolola ntango molai, bazwaki ekateli. Ntango bayebisaki masangá ekateli oyo bango nyonso bazwaki, bandeko “basepelaki na elendiseli yango.” (Misala 15:6-23, 25, 31; 16:4, 5) Likambo yango ememaki esengo mpe kimya.
11. Ndenge nini bankulutu bakoki komema esengo mpe kimya na kati ya lisangá?
11 Ndenge moko mpe lelo oyo, soki bankulutu bazali kosolola, esengo mpe kimya ekozala na kati ya lisangá. Ntango makambo oyo ekoki kobebisa kimya na kati ya lisangá ebimi, bakutanaka mpe bapesanaka makanisi polelepolele. Bayokaka makanisi ya baninga na bango na limemya nyonso. (Masese 13:10; 18:13) Nsima ya kobondela mpo na kosɛnga litambwisi ya elimo santu, bazwaka bikateli oyo euti na Biblia mpe na malako ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47; 1 Bakolinti 4:6) Soki lisangani ya bankulutu bazwi ekateli moko oyo eyokani na Makomami, nkulutu mokomoko andimaka litambwisi ya elimo santu mpe andimaka ekateli yango, ata soki likanisi na ye endimamaki te. Komikitisa ya ndenge wana ememaka esengo mpe kimya mpe epesaka bampate ndakisa malamu mpenza ya kotambola elongo na Nzambe. (Mika 6:8 ) Ondimaka na komikitisa nyonso bikateli euti na Biblia oyo bankulutu bazwaka na kati ya lisangá?
Bózala na motema molai mpe boboto
12. Mpo na nini Yesu asengelaki komonisela bantoma na ye motema molai mpe boboto?
12 Yesu azalaki komonisela bantoma na ye motema molai mpe boboto, atako bazalaki mbala na mbala kosala mabunga. Na ndakisa, Yesu amekaki mbala na mbala koteya bango elimo ya komikitisa. (Matai 18:1-4; 20:25-27) Nzokande, na butu na ye ya nsuka awa na mabelé, atako autaki kosukola bango makolo mpo na koteya bango komikitisa, “ntembe makasi ebimaki mpe na kati na bango mpo na koyeba soki nani na bango amonani ete aleki bango nyonso.” (Luka 22:24; Yoane 13:1-5) Yesu agangelaki bango? Te, na boboto nyonso alobaki na bango boye: “Nani aleki, moto oyo afandi na mesa to oyo azali mosali? Ezali moto oyo afandi na mesa, boye te? Kasi ngai nazali na katikati na bino lokola mosali.” (Luka 22:27) Motema molai mpe boboto ya Yesu, bakisá mpe ndakisa malamu na ye esimbaki mitema ya bantoma.
13, 14. Ntango nini mpenza bankulutu basengeli komonisa boboto?
13 Ndenge moko mpe, ekoki mbala mosusu kosɛnga nkulutu ete apesa moto moko toli mbala na mbala mpo na likambo moko kaka. Yango ekoki kopesa nkulutu yango nkanda. Kasi, soki abosani te ete ye mpe asalaka mabunga, akomonisela ndeko na ye motema molai mpe boboto ntango azali ‘kokebisa moto yango ya mobulu.’ Na ndenge yango, akomekola Yesu ná Yehova oyo bamonisaka bizaleli yango epai ya baklisto nyonso, ezala ata bankulutu.—1 Batesaloniki 5:14; Yakobo 2:13.
14 Ntango mosusu, ekoki kosɛnga ete bankulutu bápamela makasi moto oyo asali lisumu ya monene. Soki moto yango abongoli motema te, bankulutu basengeli kobimisa ye na lisangá. (1 Bakolinti 5:11-13) Atako bongo, lolenge oyo bakobanda kotalela moto yango ekomonisa ete bayini lisumu, kasi te mosumuki. (Yuda 23) Soki bankulutu bamonisi boboto epai ya mpate oyo abungi nzela, yango ekoki kosalisa ye azonga na etonga.—Luka 15:11-24.
Kondima ememaka misala ya malamu
15. Wapi lolenge moko oyo bankulutu bamekolaka bolamu ya Yehova, mpe nini etindaka bango básala bongo?
15 “[Yehova] azali malamu epai ya bato nyonso,” ata epai ya baoyo bazali na botɔndi te mpo na oyo azali kosalela bango. (Nzembo 145:9; Matai 5:45) Bolamu ya Yehova emonanaka mingimingi na ndenge azali kotinda basaleli na ye básakola ‘nsango malamu ya bokonzi.’ (Matai 24:14) Bankulutu bamonisaka bolamu ya Nzambe ntango bazali kopesa ndakisa na mosala ya kosakola. Nini etindaka bango bámipesa na molende bongo? Kondima makasi mpo na Yehova mpe bilaka na ye.—Baloma 10:10, 13, 14.
16. Ndenge nini bankulutu bakoki ‘kosala oyo ezali malamu’ epai ya bampate?
16 Longola kosala “epai ya bato nyonso oyo ezali malamu” na mosala ya kosakola, bankulutu bazali na mokumba ya kosala oyo ezali malamu “mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na [bango] na kati ya kondima.” (Bagalatia 6:10) Lolenge moko oyo basalaka yango ezali kokende kotala bandeko na bandako na bango mpo na kolendisa bango. Nkulutu moko alobi boye: “Nasepelaka mingi kokende kotala bandeko na bandako na bango. Yango epesaka ngai libaku ya kopesa bandeko longonya mpo na milende oyo bazali kosala mpe kosalisa bango báyeba ete mosala makasi oyo bazali kosala ezali na motuya mingi.” Ntango mosusu, ekoki kosɛnga ete bankulutu báyebisa ndeko moko makambo oyo akoki kobongisa lisusu na mosala ya Yehova. Mpo na kosala yango, bankulutu ya bwanya bamekolaka ntoma Paulo. Alobaki na bandeko ya Tesaloniki boye: “Tondimi mpenza na kati ya Nkolo mpo na bino, ete bozali kosala mpe bokokoba kosala makambo oyo tozali kotinda.” (2 Batesaloniki 3:4) Ntango bampate bazali koyoka maloba oyo ezali komonisa ete bankulutu bazali kotyela bango motema, yango esalisaka bango básala lisusu malamu koleka mpe bákakatanaka te ‘kotosa baoyo bazali kokamba.’ (Baebele 13:17) Soki nkulutu moko ayei kotala yo mpe alendisi yo, mpo na nini te kotɔnda ye mpo na yango?
Mpo na kozala na boboto, esɛngaka komipekisa
17. Liteya nini Petelo azwaki epai ya Yesu?
17 Yesu azalaki na boboto, ata ntango basali ye mabe. (Matai 11:29) Ntango Yuda atɛkaki Yesu mpe bakangaki ye, Yesu amonisaki boboto mpe amipekisaki mpenza. Nzokande, Petelo akangaki motema te, abimisaki mopanga mpe abɛtaki moko ya bato yango. Kasi, Yesu alobaki na ye boye: “Okanisi nde ete nakoki te kosɛnga Tata na ngai apesa ngai sikoyo mampinga koleka zomi na mibale ya baanzelu?” (Matai 26:51-53; Yoane 18:10) Petelo asimbaki mpenza liteya yango, mpe na nsima akundwelaki baklisto ete: “Klisto . . . anyokwamaki mpo na bino, kotikeláká bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu. . . . Ntango azalaki kofingama, azalaki kozongisa kofinga te. Ntango azalaki konyokwama, azalaki kokanela moto te.”—1 Petelo 2:21-23.
18, 19. (a) Ntango nini mpenzampenza bankulutu basengeli komonisa boboto mpe komipekisa? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo elandi?
18 Ndenge moko, bankulutu ya malamu bamonisaka boboto ata ntango basali bango mabe. Na ndakisa, bato mosusu oyo balukaka kosalisa na lisangá bakoki kondima lisalisi na bango te. Soki moto oyo bazali koluka kopesa toli azali kobɛla na elimo, akoki kobanda ‘koloba kozanga kokanisa lokola nde azali kokata na mopanga.’ (Masese 12:18, NW) Kasi, lokola Yesu, bankulutu bazongisaka te, ezala na maloba to na misala. Na esika ya kozongisa, bamipekisaka mpe bakobaka komitya na esika na ye; mpe yango ekoki kosalisa moto oyo bazali kosunga. (1 Petelo 3:8, 9) Olandaka ndakisa ya bankulutu mpe omonisaka boboto mpe komipekisa soki bapesi yo toli?
19 Na ntembe te, Yehova ná Yesu basepelaka na mosala makasi oyo bankóto ya bankulutu bazali kosala na mokili mobimba mpo na kobatela etonga na bolingo na bango moko. Yehova ná Mwana na ye balingaka mpe mingi bankóto ya basaleli na misala oyo bazali kopesa bankulutu mabɔkɔ na ‘kosalela basantu.’ (Baebele 6:10) Kasi, mpo na nini bandeko mibali mosusu bakakatanaka mpo na koluka kosala ‘mosala wana ya malamu mingi’? (1 Timote 3:1) Ndenge nini Yehova ateyaka bankulutu? Tokotalela mituna wana na lisolo oyo elandi.
Ozali koyeba lisusu?
• Wapi mwa balolenge oyo bankulutu bamoniselaka etonga bolingo?
• Ndenge nini bandeko nyonso na kati ya lisangá bakoki komema esengo mpe kimya?
• Mpo na nini bankulutu bamipekisaka mpe bazalaka na boboto ntango bazali kopesa toli?
• Ndenge nini bankulutu bamonisaka bolamu mpe kondima?
[Elilingi na lokasa 18]
Bolingo nde etindaka bankulutu básalela lisangá
[Bililingi na lokasa 18]
Baminanolaka mpe elongo na mabota na bango . . .
. . . mpe babimaka na bango na mosala ya kosakola
[Elilingi na lokasa 20]
Soki bankulutu bazali kosolola, esengo mpe kimya ekozala na kati ya lisangá