Tozali bato oyo bazali na kondima
Nsango malamu ezali kosakolama na bilanga ya loso na Taïwan
MBULA ebɛtaka mingi na ekólo Taïwan mpe yango esalaka ete bálona loso mingi, mbala mibale na mbula moko. Kasi, ntango mosusu, mbula ebɛtaka te na ntango oyo esengeli ebɛta mpe milona ekufaka. Moloni alɛmbaka nzoto soki milona ekufi mpo mbula ezali kobɛta te? Te, alɛmbaka te. Moloni ayebi ete asengeli kolendendela. Akolona lisusu loso mosusu na pepiniɛrɛ mpe na nsima, akotya yango na elanga. Na bongo, soki mbula ebɛti, moloni akolongola loso mingi na elanga. Ntango mosusu, mosala ya kolona mpe ya kobuka mbuma ya elimo ezalaka mpe ndenge wana.
Kolendendela na mosala ya kobuka mbuma ya elimo
Na boumeli ya bambula mingi, Batatoli ya Yehova basalaki makasi mpo na kolona milona mpe kobuka mbuma ya mateya ya solo oyo ezali na Makomami, na bisika mosusu ya Taïwan, atako emonanaki ete ezalaki kobota mbuma te. Tózwa ndakisa ya etúká ya Miao-li. Mbala nyonso oyo milende esalemaki mpo na kopesa litatoli na etúká wana, kaka bato moke nde bazalaki kondima. Yango wana, na 1973, batindaki babongisi-nzela minene mibale, mobali moko na mwasi na ye, mpo na kosala kuna lokola basakoli ya Bokonzi ya ntango nyonso. Na ebandeli, bobele bato moke nde basepelaki na nsango malamu. Kasi, kosepela yango ezalaki se mpo na mwa ntango moke. Na yango, batindaki babongisi-nzela monene yango epai mosusu.
Na 1991, batindaki babongisi-nzela monene mosusu mibale kuna. Kasi, ndenge makambo ezalaki kotambola emonisaki lisusu ete ntango ekokaki naino te mpo makambo ya elimo etambola malamu na mboka yango. Nsima ya mwa bambula, batindaki babongisi-nzela yango esika mosusu oyo ekokaki kobota mbuma mingi. Na yango mboka yango epemaki na boumeli ya mwa ntango.
Milende mosusu eboti mbuma
Na Sɛtɛmbɛ 1998, mokano ekamatamaki ete esengeli kosala makasi mpo na koluka bisika oyo ekobota mbuma na teritware monene ya Taïwan epai masangá ezali te. Ndenge nini balingaki kokokisa mosala yango? Batindaki babongisi-nzela monene 40 oyo basengelaki kosala mpo na ntango mokuse na bateritware yango atako ezali na bato ebele.
Na bateritware oyo baponaki mpo na kampanye yango, ezalaki na mboka mibale oyo ezalaki penepene, na etúká ya Miao-li. Bandeko basi minei minzemba basengelaki kosala kuna na boumeli ya sanza misato mpo na kotala soki teritware yango ekobota mbuma. Mwa moke nsima ya kokóma kuna, batindaki lapolo moko malamu oyo emonisaki ete bakutanaki na bato ebele oyo bazalaki kosepela na nsango malamu. Ntango basilisaki sanza misato ya mosala na bango ya babongisi-nzela monene na esika wana, bazalaki koyekola Biblia na bato ebele. Na lisalisi ya nkulutu moko oyo azalaki kouta na lisangá moko ya pene na esika bazalaki, basalaki etuluku moko ya boyekoli ya mokanda.
Na kati ya bandeko basi wana minei, misato bamonisaki polele ete balingi kokoba kobatela “milona” wana ya mike mpo ezalaki kokola malamu. Yango wana, mibale kati na bango bakómaki babongisi-nzela monene mpenza mpe oyo ya misato akobaki kosala kuna lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Nkulutu ya lisangá moko oyo ezalaki pene wana akendaki na teritware yango mpo na kosalisa bango. Bato koleka 60 bayanganaki na lisukulu ya bato nyonso oyo esalemaki mpo na mbala ya liboso na mboka yango. Lelo oyo, lisangá moko oyo ezali pene wana ezali kosalisa etuluku yango ya sika na kosala makita mikolo nyonso ya lomingo, longola boyekoli ya mokanda oyo basalaka na bisika mingi. Lisangá ya sika ekoki kosalema na mboka yango na mikolo ezali koya.
Kolendendela ememi mapamboli na bisika mosusu ya Taïwan
Na bisika mosusu mpe, bato bandimaki nsango malamu. Na etúká ya I-lan, na nɔrdi-ɛsti ya esanga yango, basalaki etuluku moko ya sika mpo na Boyekoli ya Mokanda na esika oyo babongisi-nzela monene ya ntango mokuse bazalaki kosala.
Mokolo moko na mpokwa, ntango azalaki kosakola ndako na ndako, mobongisi-nzela monene moko oyo azalaki kosala mpo na ntango mokuse akutanaki na elenge mobali moko mpe alakisaki ye lokasa oyo ezalaki na programɛ ya makita ya lisangá. Mbala moko, elenge mobali yango atunaki ye ete: “Nakoki koya na likita yango lobi na mpokwa? Bongo soki nayei, nakolata ndenge nini?” Mobongisi-nzela yango akómaki koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ na bato mwambe oyo bazalaki kosepela. Mosika te, mingi kati na bato yango babandaki komibongisa mpo bákóma mpe basakoli ya nsango malamu, mpe mokano na bango ezalaki ete bázwa batisimo.
Kaka na engumba wana, mwasi moko azalaki kokende na ndakonzambe na boumeli ya bambula ebele, kasi azalaki komona moto moko te oyo akokaki koteya ye Biblia. Ntango ayokaki ebongiseli ya koyekola Biblia, andimaki koyekola Biblia. Mobongisi-nzela wana alendisaki ye atángaka liboso lisolo oyo bakoyekola. Ntango mobongisi-nzela ayaki, akutaki mwasi yango asili kosala “devuare” na ye, elingi koloba asombaki kaye mpe akomaki mituna nyonso oyo ezalaki na mokanda oyo ayekolaki. Na nsima, akomaki eyano na ye na motuna mokomoko. Lisusu, akomaki mikapo nyonso oyo ezalaki na liteya oyo ayekolaki na kaye na ye. Ntango ndeko mwasi akendaki kotambwisa boyekoli ya liboso, mwasi yango asilaki kobongisa mateya misato ya liboso!
Mosala ebotaki mpe mbuma ndenge moko na engumba Dongshih, na kati mpenza ya Taïwan. Na boumeli ya sanza misato oyo basalaki kuna, babongisi-nzela monene oyo basalaki mpo na ntango mokuse bakabolaki mwa babuku koleka 2 000. Na sanza ya misato, bazalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia 16. Engumba yango ebebaki makasi ntango mabele eninganaki na katikati ya Taïwan, na mokolo ya 21 Sɛtɛmbɛ 1999, kasi bato mosusu oyo basepelaki bazali kokola na elimo, atako basengeli kotambola na boumeli ya ngonga moko mpo na koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene. Ya solo, esengeli kolendendela mpo na kobuka mbuma kitoko, ezala na mosuni to na elimo.
[Karte na lokasa 8]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
CHINE
Détroit de Taïwan
TAÏWAN
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.