Ndenge okoki kosala mpo bomoi na yo ezala na ntina mingi
LISESE moko ya kala elobi ete: “Koboma nzoto te mpo na koluka bomɛngo, bombá mayele na yo. Otiki miso na yo kotala bozwi, nzokande yango ezali mpamba? Mpo ete bozwi ekobimisa mapapu, lokola oyo ya mpongo mpe ekopumbwa na likoló.” (Masese 23:4, 5, NW ) Na maloba mosusu, koboma nzoto mpo na koluka kokóma mozwi ezali na ntina te, mpamba te bozwi ekoki kobima mapapu lokola oyo ya mpongo mpe kopumbwa.
Ndenge Biblia emonisi yango, bozwi ya mokili ekoki kolimwa na mbala moko. Bozwi ekoki kolimwa na ngonga moko na makambo lokola makama, kokwea ya nkita, to makambo mosusu oyo eyelaka biso na mbalakaka. Lisusu, ata bato oyo bakómaka na bozwi, mbala mingi bazalaka na esengo te. Tókamata ndakisa ya John, mosala na ye ezalaki kosepelisa bato ya politiki, bavedɛti ya masano, bato ya lokumu mpe bakonzi minene ya mboka.
John alobi boye: “Namipesaki mobimba na mosala na ngai. Nakómaki na mbongo mingi, nazalaki kofanda na baotɛlɛ ya minene, mpe ntango mosusu nazalaki kokende mosala na mpɛpɔ. Na ebandeli, nazalaki kosepela na mosala yango mingi kasi, mokemoke mosala yango ezalaki lisusu kosepelisa ngai te. Bato oyo nazalaki kobomela nzoto bazalaki kaka motó likolólikoló. Bomoi na ngai ezalaki na ntina te.”
Lokola John amonaki yango, soki makambo ya elimo ezali na esika te na bomoi ya moto, moto yango akozala na esengo te. Na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, Yesu Klisto amonisaki ndenge oyo moto akoki kozwa bolamu ya solosolo. Alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bamposa na bango ya elimo, mpamba te bokonzi ya likoló ezali mpo na bango.” (Matai 5:3, NW ) Tomoni polele ete kotya makambo ya elimo na esika ya liboso ezali likambo ya mayele. Nzokande, ezali mpe na makambo mosusu oyo ekoki kosalisa biso mpo ete bomoi na biso ezala na ntina mingi.
Libota na yo na baninga na yo bazali na ntina
Bomoi na yo elingaki mpenza kozala na esengo soki ozalaki na libota te to na baninga ya motema te? Tokanisi ete te. Mozalisi na biso akelá biso na mposa ya kolinga bato mpe ete bato bálinga biso. Ezali mpe mpo na yango nde Yesu amonisaki ntina ya ‘kolinga mozalani na biso lokola biso moko.’ (Matai 22:39) Libota ezali likabo ya Nzambe, ezali esika oyo tokoki komonisa bolingo ya solosolo.—Baefese 3:14, 15.
Ndenge nini bomoi na biso ekoki kozala na ntina mingi na kati ya libota? Tokoki kokokanisa libota oyo ezali na bomoko na elanga kitoko ya fololo epai moto akoki kokende kopema mpo na kobosana mwa mitungisi mosusu. Ndenge moko mpe, na kati ya libota, tokoki kozala na bato oyo tolingaka mingi mpe tokozala na esengo na esika ya kozala mawamawa lokola bato oyo bazalaka kaka bango moko. Ya solo, ezali likambo ya mbalakaka te ete libota ezala esika ya kopema ndenge yango. Kasi, soki bato ya libota bazali kolingana mingi mpe bazali koyokana malamu, bomoi ekómaka na ntina mingi. Na ndakisa, soki tozali na molongani mpe tozali komonisa ete tolingi ye mpe tozali komemya ye mpe kotyela ye likebi, ezali lokola nde tozali kolona mokolo na mokolo mpe nsukansuka tokobuka ebele ya mbuma ya malamu.—Baefese 5:33.
Soki tozali na bana, tosengeli kosala makasi mpo ete ndako na biso ezala esika moko malamu mpo na kobɔkɔla bango. Kofanda na bango elongo, kosolola na bango na mabaku nyonso, mpe koteya bango makambo ya elimo, ekoki kosɛnga biso ntango. Kasi ntango oyo tozali kolekisa elongo na bango mpe milende oyo tozali kosala mpo na kosalisa bango ekoki komemela biso bolamu mingi. Mpo na baboti ya malamu, bana bazali lipamboli, bazali likabo ya Nzambe oyo basengeli kobatela malamu.—Nzembo 127:3.
Soki tozali na baninga ya malamu, bomoi na biso mpe ekozala malamu mpe ekozala na ntina. (Masese 27:9) Tokoki kokóma na baninga mingi soki tozali na boboto mpo na bandeko. (1 Petelo 3:8) Baninga ya solosolo bapesaka biso mabɔkɔ mpo tótɛlɛma soki tokwei. (Mosakoli 4:9, 10) Lisusu, ‘moninga ya solo azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.’—Masese 17:17.
Soki tozali na baninga ya malamu, tokoki mpenza kozala malamu! Kolala ya moi ezalaka kitoko lisusu koleka, bilei ezalaka elɛngi lisusu koleka, mpe ezalaka esengo mingi na koyoka miziki soki tozali elongo na baninga. Ya solo, libota ya malamu na baninga ya motema ezali kaka ndambo ya makambo oyo esalaka ete bomoi ezala na ntina mingi. Makambo nini mosusu Nzambe abongisaki mpo ete bomoi na biso ezala na ntina mingi?
Kokokisa bamposa na biso ya elimo
Lokola tomonaki yango liboso, Yesu Klisto amonisaki ete mpo tózala malamu, tosengeli koyeba bamposa na biso ya elimo. Nzambe akelá biso na makoki ya elimo mpe ya bomoto. Yango wana, Biblia elobelaka “moto ya elimo” mpe “[bomoto oyo, NW ] ebombami na motema.”—1 Bakolinti 2:15; 1 Petelo 3:3, 4.
Mokanda moko (An Expository Dictionary of New Testament Words) ya William Vine, elobi ete motema ya elilingi ezali “bɔɔngɔ ya moto mpe makanisi na ye ndenge esalaka, ezala makambo oyo azali kokanisa to mayoki na ye.” Mpo na kolimbola malamu, Vine alobi lisusu ete: “Na maloba mosusu, motema ezali elobeli ya elilingi mpo na kolobela makambo oyo ebombami na bomoi ya moto.” Mokanda yango elobi lisusu ete “motema, ndenge ezali kuna na kati, ezali ‘moto ya kati,’ . . . moto ya solosolo.”
Ndenge nini tokoki kokokisa bamposa ya “moto ya elimo,” to “bomoto ya kati,” elingi koloba, “bomoto oyo ebombami na motema”? Tokosala malamu mpenza mpo na likambo yango mpe mpo na kokokisa bamposa na biso ya elimo, soki tondimi likanisi ya mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Bóyeba ete [Yehova] ye azali Nzambe; ye asalaki biso, biso tozali bato na ye. Tozali bato na ye, mpate ya elanga na ye.” (Nzembo 100:3) Soki tondimi likambo yango, na ntembe te yango ekotinda biso na koloba ete tozali na makambo ya kozongisa epai ya Nzambe. Soki tolingi kozala na kati ya “bato na ye, mpate ya elanga na ye,” tosengeli kotosa Liloba na ye, Biblia.
Kozala na makambo ya kozongisa epai ya Nzambe ezali mabe? Te, mpamba te soki toyebi ete ndenge oyo tozali komitambwisa ezali na ntina mingi na miso ya Nzambe, yango ekosala mpe ete bomoi na biso ezala na ntina. Ekolendisa biso tózala na bizaleli malamu lisusu, mpe tobanzi ete soki tomityeli mokano ya ndenge wana ekozala malamu mingi. Mokapo ya Nzembo 112:1 elobi ete: “Esengo ezali na moto oyo akobangaka [Yehova], oyo akosepelaka [na] mibeko na ye mingi.” Kobanga Nzambe mpe kotosa mibeko na ye na motema mobimba ekoki kosala ete bomoi na biso ezala na ntina mingi.
Mpo na nini tosepelaka kotosa Nzambe? Mpamba te tozali na lisosoli, likabo oyo Nzambe atyá epai ya moto nyonso. Lisosoli ezali mokɛngɛli oyo ayebisaka biso ete likambo oyo tosali to tolingi kosala ezali malamu to mabe. Esilá kokómela biso nyonso ete lisosoli na biso etungisama. (Baloma 2:15) Kasi lisosoli na biso ekoki mpe kopesa biso mbano. Soki tosali malamu na miso ya Nzambe mpe na miso ya bazalani na biso, toyokaka esengo na motema. Tomonaka ete “esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.” (Misala 20:35) Ezali na ntina moko monene oyo esalemaka bongo.
Mozalisi na biso akelá biso ete tómitungisaka mpo na bamposa ya bazalani na biso. Na ntango tosalisi bato mosusu, toyokaka esengo na motema. Lisusu, Biblia elobi na biso ete ntango tokabeli moto oyo azangi, Nzambe amonaka lokola nde tosali malamu yango epai na ye.—Masese 19:17.
Longola esengo oyo biso moko toyokaka, kotalela bamposa na biso ya elimo ekoki nde kosalisa biso na bomoi na biso? Moto moko ya Moyen-Orient, ye azali mpe moto ya mombongo, nkombo na ye Raymond, andimi ete ekoki kosalisa biso. Alobaki boye: “Mposa na ngai ezalaki kaka nazwaka mbongo. Kasi banda nandimaki na motema na ngai ete Nzambe azali mpe Biblia eyebisi biso mikano na ye, nabongolá mpenza makanisi na ngai. Koluka mbongo ekómá na esika ya mibale na bomoi na ngai. Lokola nakómá kosala nyonso mpo na kosepelisa Nzambe, yango esalisaki ngai nalongola makanisi mabe oyo nazalaki na yango ya koyina bato. Atako tata na ngai akufaki na matata moko oyo ebimaki, nazali na mposa ya kozongisa mabe epai ya bato oyo babomaki ye te.”
Ndenge Raymond amonaki yango, kokokisa bamposa ya “moto ya elimo” ekoki kokitisa motema ya moto. Kasi, soki tozali kotika nzela na mikakatano ya bomoi ya mokolo na mokolo ete elɛmbisa biso, bomoi ekozala mpenza na ntina te.
Tokoki kozala na “kimya ya Nzambe”
Na mokili oyo etondi na yikiyiki, mikolo ya kimya ezalaka mingi te. Makama ezali kobima, makambo mosusu bato bakanaka kosala ezali kokenda na mai, mpe bato bazali kobimisela biso mpasi. Makambo ya ndenge wana ekoki kolongola biso esengo. Kasi, mpo na baoyo bazali kosalela Yehova Nzambe, Biblia elaki ete bakozala mpenza na esengo na motema, to “kimya ya Nzambe.” Ndenge nini tozwaka kimya yango?
Ntoma Paulo akomaki boye: “Bómitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tiká ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malɔmbɔ mpe na matɔndi. Mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekosɛnzɛla mitema na bino mpe [makanisi] na bino kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Na esika ya kobunda na mikakatano na biso biso moko, tosengeli nde kobondela makasi, kopesa mikakatano na biso ya mokolo na mokolo na mabɔkɔ ya Nzambe. (Nzembo 55:22) Soki tozali na kondima ete ayokaka malɔmbɔ ya ndenge wana na nzela ya Mwana na ye, Yesu Klisto, kondima yango ekobakisama ntango tozali kokola na elimo mpe tozali kososola ndenge oyo Nzambe asalisaka biso.—Yoane 14:6, 14; 2 Batesaloniki 1:3.
Soki tokómi na elikya makasi epai ya Yehova Nzambe, ‘ye Moyoki ya mabondeli,’ yango ekosalisa biso na kolonga mikakatano lokola maladi oyo eumeli, bobange, to kokufela moto. (Nzembo 65:2, NW ) Kasi, mpo bomoi ezala mpenza na ntina, tosengeli mpe kotalela mikolo ezali koya.
Sepelá mpo na elikya
Biblia elaki “makoló ya sika mpe mabele ya sika,” elingi koloba guvɛrnɛma ya sembo oyo ekozala na likoló mpe ekokokisa bamposa ya bato mpe ekoyangela bato ya botosi. (2 Petelo 3:13, NW ) Na mokili yango ya sika oyo Nzambe alaki, bitumba mpe kozanga bosembo ekozala te; ekotika esika na kimya mpe bosembo. Yango ezali elikya ya mpamba te, kasi ezali likambo ya solo mpenza oyo tokoki kokanisaka yango mokolo na mokolo. Ezali mpenza nsango malamu mpe likambo ya esengo.—Baloma 12:12; Tito 1:2.
John oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo, azali sikoyo komona ete bomoi na ye ezali na ntina mingi. Alobi ete: “Atako nazalaki kolanda makambo ya losambo te, nazalaki kondima ete Nzambe azali. Kasi nazalaki kosala eloko moko te kino mokolo oyo Batatoli ya Yehova mibale bayaki kosolola na ngai. Natunaki bango ebele ya mituna lokola oyo: ‘Mpo na nini tozali awa na mabele? Na nsima tokokende wapi?’ Biyano na bango oyo ezalaki kouta na Biblia esepelisaki ngai mpe mpo na mbala ya liboso namonaki ntina ya bomoi na ngai. Wana ezalaki kaka ebandeli. Nakómaki na mposa ya mateya ya solo mpe yango esalaki ete nabongola ndenge na ngai ya kotalela makambo. Atako nazali lisusu na bozwi ya mokili oyo te, nazali koyoka ete nazali na bozwi mingi na elimo.”
Lokola John, mbala mosusu yo mpe obosaná bamposa na yo ya elimo banda kala. Kasi, soki okolisi “motema ya mayele,” okoki kolamusa bamposa yango. (Nzembo 90:12) Soki ozwi ekateli ya kosala molende, okoki kozala na esengo, kimya mpe elikya ya solosolo. (Baloma 15:13) Mpe bomoi na yo ekoki kozala na ntina mingi.
[Elilingi na lokasa 6]
Libondeli ekoki kopesa biso “kimya ya Nzambe”
[Bililingi na lokasa 7]
Oyebi eloko oyo ekoki kosala ete bomoi na libota ezala na esengo mingi?