“Ntango ya kolinga mpe ntango ya koyina”
“NZAMBE azali bolingo.” Na bamboka mosusu, bato babambaka maloba yango na efelo ya ndako. Maloba kitoko yango emonisi ete Nzambe atondi mpenza na bolingo.
Kasi, bato mingi bayebaka te ete maloba yango euti na Biblia. Ntoma Yoane nde akomaki ete: “Moto oyo alingaka te ayebi Nzambe te, mpo ete Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Yoane akomaki mpe na ntina na bolingo ya Nzambe mpo na bato; alobaki boye: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”—Yoane 3:16.
Mpo na yango, bato mosusu bakanisaka ete Nzambe akangaka miso na makambo nyonso oyo tosalaka. Bato mingi bakanisaka ete ata soki bazali kosala nini na bomoi na bango, Nzambe akosambisa bango te. Kasi, likanisi yango ezali solo? Nzambe alingaka moto nyonso, ezala moto malamu to moto mabe? Ezali mpe na ntango oyo Nzambe ayinaka?
Ntango oyo Nzambe alingaka mpe ntango oyo ayinaka
Mokonzi Salomo alobaki boye: “Eloko nyonso ezali na ntango na yango, ɛɛ likambo na likambo na ntango na yango na nse ya lola . . . ntango ya kolinga mpe ntango ya koyina.” (Mosakoli 3:1, 8) Na kolanda maloba yango, atako Nzambe azali na bolingo mpe na boboto mingi, ntango mosusu mpe ayinaka.
Kasi, na Biblia liloba “koyina” elimboli nini? Buku moko elobi boye: “Na Makomami, liloba ‘koyina’ ezali na ndimbola mingi. Ekoki kolimbola kosepela ata moke te, kozala na motema mabe oyo esangani na mposa ya kobebisa lokumu ya moto. Koyina ya ndenge wana ekoki kotinda moto oyo azali na yango asala mozalani na ye mabe.” Tosalelaka mingi liloba yango na ndimbola wana, mpe tozali komona ndenge oyo koyina yango ezali kobebisa makambo na mokili mobimba. Kasi, buku yango elobi mpe boye: “‘Koyina’ ekoki mpe kolimbola kosepela ata moke te, kasi na likanisi ya kosala mabe te.”
Na lisolo oyo, tozali kosalela liloba yango na ndimbola wana. Ezali koboya makasi, koyoka mpii, kasi ezali te kozala na motema mabe to na likunya, to mpe na mposa ya kosala mabe. Nzambe akoki kozala na koyina ya ndenge wana? Talá oyo Biblia elobi na Masese 6:16-19: “Ezali na makambo motoba oyo Yehova ayinaka mpenza; ɛɛ, makambo nsambo oyo eyinamá na molimo na ye: miso ya lolendo, lolemo ya lokuta mpe mabɔkɔ oyo ezali kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te, motema oyo ekanaka kosala makambo oyo eyokisaka mpasi, makolo oyo ewelaka kopota mpo na kosala mabe, motatoli ya lokuta oyo asopasopaka makambo ya lokuta, mpe moto nyonso oyo abimisaka kowelana na kati ya bandeko.”
Ndenge tomoni yango, ezali na makambo oyo Nzambe ayinaka. Kasi, yango elimboli kaka te ete ayinaka moto oyo asalaka makambo yango. Atalelaka makambo mosusu lokola bolɛmbu ya moto, esika oyo moto akolá, ndenge oyo moto abɔkwamá, mpe kozanga koyeba. (Ebandeli 8:21; Baroma 5:12) Mokomi ya Masese alimboli likambo yango na ndakisa moko kitoko: “Yehova apamelaka moto oyo ye alingaka, kaka ndenge tata apamelaka mwana oyo ye asepelaka na ye.” (Masese 3:12) Moboti akoki koyina makambo ya mwana ya motó makasi, kasi akolinga kaka mwana yango mpe akosala nyonso oyo akoki mpo na kopesa ye disiplini mpo atika makambo ya mabe. Na bolingo na ye, Yehova mpe asalaka ndenge yango na ntango amoni ete moto ya masumu akoki kobongwana.
Ntango oyo koyina ezalaka mabe te
Nzambe asalaka nini soki moto ayebi mokano na Ye, kasi aboyi kosala yango? Nzambe alingaka moto yango te, aboyaka ye. Yehova akoyina ye soki azali kosala na nko makambo oyo Ye ayini. Na ndakisa, Biblia elobi ete: “Yehova ye moko atalatalaka moyengebene ná moto mabe, mpe molimo na Ye eyinaka mpenza moto oyo alingaka mobulu.” (Nzembo 11:5) Nzambe akoki te kolimbisa moto ya ndenge wana oyo aboyi kobongola motema, ndenge ntoma Paulo amonisaki yango polele na mokanda na ye epai ya Baebre: “Soki tozali na momeseno ya kosala lisumu na nko nsima ya kozwa boyebi ya sikisiki ya solo, mbeka mosusu ezali te mpo na masumu, kasi tozali kaka kozela lisambisi moko ya nsɔmɔ mpe zuwa moko ya makasi oyo ekozikisa batɛmɛli lokola mɔtɔ.” (Baebre 10:26, 27) Mpo na nini Nzambe ya bolingo akani kosala bongo?
Soki moto azali na momeseno ya kosala lisumu na nko, tokoki koloba mpo na moto yango ete mabe elati ye mpenza. Akoki kobeba mpenza, koteyama lisusu te to kobonga lisusu te. Biblia ekokanisi moto ya ndenge wana na nkoi oyo ekoki te kobongola matɔnɔ na yango. (Yirimia 13:23) Moto wana oyo alingi kobongola motema te, azali kosala oyo Biblia ebengi “lisumu ya seko,” oyo ekoki kolimbisama te.—Marko 3:29.
Ezali yango nde ekómelaki Adama ná Eva, mpe Yudasi Mokeriota. Lokola Adama ná Eva bazalaki bato ya kokoka ntango Nzambe akelaki bango mpe mobeko oyo apesaki bango ezalaki polele mpe bango mibale bakangaki ntina na yango, tokoloba ete basalaki lisumu na nko mpe mpo na yango, bakoki kolimbisama te. Makambo oyo Nzambe alobaki na bango na nsima emonisi te ete apesaki bango likoki ya kobongola motema. (Ebandeli 3:16-24) Atako Yudasi azalaki moto ya kozanga kokoka, azalaki moninga mpenza ya Mwana ya Nzambe, kasi na nsima atɛkaki ye. Yesu ye moko abengaki ye “mwana ya libebi.” (Yoane 17:12) Biblia emonisi mpe ete Zabolo asalaka mabe banda kalakala mpe akosuka kaka na kobomama. (1 Yoane 3:8; Emoniseli 12:12) Mpo na misala na bango, Nzambe ayinaki bato yango.
Kasi, tokoki kosepela na koyeba ete moto nyonso te oyo asali mabe nde akoki kolimbisama te. Yehova azali na motema molai mingi mpe asepelaka te kopesa etumbu na bato oyo basalaka masumu mpo bazali na boyebi te. (Ezekiele 33:11) Azali kosɛnga bango bábongola motema mpo alimbisa bango. Tozali kotánga boye: “Moto mabe atika nzela na ye, mpe moto oyo alukaka kosalela bato mabe atika makanisi na ye; mpe azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa, azongela Nzambe na biso, mpo akolimbisa mpenza.”—Yisaya 55:7.
Tómekola Nzambe na likambo etali kolinga mpe koyina
Lokola bakristo ya solo bamekolaka Nzambe, basengeli koyeba malamu wapi “ntango ya kolinga” mpe wapi “ntango ya koyina.” Motema ya moto ekoki kokosa ye mpe komema ye alinga to amonisaka motema mawa na ndenge oyo ebongi te. Kasi, maloba ya moyekoli Yuda ekoki kosalisa biso tózala na bokatikati na ndenge ya komonisa motema mawa mpe koyina masumu: “Bókoba komonisela bamosusu motema mawa, bósala bongo na kobanga, wana bozali koyina ata elamba ya kati, oyo nzoto etye litɔnɔ.” (Yuda 22, 23) Yango wana, tosengeli koyina oyo ezali mabe, kasi elakisi te ete tosengeli kaka koyina moto oyo asali mabe.
Bakristo basengeli mpe kolinga banguna na bango mpe kosalela bango makambo ya malamu. Yesu alobaki boye: “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino.” (Matai 5:44) Yango wana, Batatoli ya Yehova batikaka te kosakwela bazalani na bango nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, atako bamosusu basepelaka koyoka yango te. (Matai 24:14) Lokola Batatoli balandaka makanisi ya Biblia, batalelaka moto mokomoko ete Yehova akoki kolinga ye mpe koyokela ye mawa. Soki basusu bazali kosepela te na milende oyo bazali kosala mpo na kosalisa bato, to bazali koboya bango to mpe konyokola bango, Batatoli balandaka toli ya ntoma Paulo oyo elobi boye: “Bópambolaka baoyo bazali konyokola bino; bópambolaka mpe bólakelaka mabe te. . . . Bózongisela moto mabe na mabe te.” (Baroma 12:14, 17) Babosanaka te ete Yehova nde akokata soki akolinga nani mpe akoyina nani. Ye nde Mosambisi ya nsuka oyo akopesa bomoi to etumbu ya liwa.—Baebre 10:30.
Ya solo, “Nzambe azali bolingo.” Biso tosengeli nde kosepela na bolingo na ye mpe kosala nyonso mpo na koyeba mokano na ye mpe kosala yango. Batatoli ya Yehova na mboka na bino bakosepela kosalisa yo oyekola na Biblia na yo moko mokano ya Nzambe mpe ndenge ya kosalela yango na bomoi na yo. Na ndenge yango, Nzambe akoyina yo te, kasi akolinga yo.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 23]
“Ezali na makambo motoba oyo Yehova ayinaka mpenza; ɛɛ, makambo nsambo oyo eyinamá na molimo na ye: miso ya lolendo, lolemo ya lokuta mpe mabɔkɔ oyo ezali kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te, motema oyo ekanaka kosala makambo oyo eyokisaka mpasi, makolo oyo ewelaka kopota mpo na kosala mabe, motatoli ya lokuta oyo asopasopaka makambo ya lokuta, mpe moto nyonso oyo abimisaka kowelana na kati ya bandeko.”—MASESE 6:16-19
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 24]
“Soki tozali na momeseno ya kosala lisumu na nko nsima ya kozwa boyebi ya sikisiki ya solo, mbeka mosusu ezali te mpo na masumu, kasi tozali kaka kozela lisambisi moko ya nsɔmɔ.”—BAEBRE 10:26, 27
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 25]
“Moto mabe atika nzela na ye, mpe moto oyo alukaka kosalela bato mabe atika makanisi na ye; mpe azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa . . . akolimbisa mpenza.”—YISAYA 55:7
[Elilingi na lokasa 24]
Moboti oyo alingaka mwana na ye apesaka ye disiplini mpo na kosalisa ye
[Elilingi na lokasa 25]
Bato mingi ya bolɔkɔ bazali komona bolingo mpe motema mawa ya Nzambe