Oyebaka Kozela?
OYEBI soki na mbula moko bato balekisaka ntango boni kaka mpo na kozela? Bazelaka na molɔngɔ mpo na kofuta mbongo na magazini to mpe mpo na kosomba esansi. Ntango bakei na restora mpo na kolya, bazelaka báyela bango biloko. Mpo na kokutana na monganga, bazelaka. Mpo na kozwa bisi to engbunduka mpe bazelaka. Na bomoi na ye, moto alekisaka ntango mingi mpenza mpo na kozela. Bamekaki kosangisa ntango oyo bato ya Allemagne balekisaka na mbula moko mpo na kozela soki mituka ekangami na nzela: epesaki ngonga miliare 4,7! Moto moko amekaki kotánga ngonga nyonso wana mpe amonaki ete ezali bambula oyo bato soko 7 000 bakoki kolekisa na bomoi oyo ezali mwa molai.
Kozela ekoki kozala motungisi mpenza. Na moi ya lelo, tozali komona lokola ete bato bazali kozanga ntango ya kosala makambo nyonso oyo basengeli kosala, mpe soki moto oyo azali kozela abandi kokanisa makambo mosusu oyo akokaki kosala, amonaka kozela lokola etumbu mpenza. Mokolo mosusu, mokomi Alexander Rose alobaki boye: “Soki ezali na makambo zomi oyo etungisaka moto, mitano kati na yango ezali kozela.”
Benjamin Franklin, ye azalaká prezida ya États-Unis, alobaki ete kozela ekoki kosala ete moto azanga mbongo. Eleki sikoyo mbula 250, moto yango alobaki ete “ntango ezali mbongo.” Yango wana bato ya mombongo balukaka ndenge oyo bakoki kosomba ntango na misala na bango. Soki biloko mingi ya kotɛkisa ezali kosalema na mwa ntango moke, yango ekoki kosala ete bazwa matabisi mingi. Na bisika oyo basalelaka bato mosala to batɛkisaka biloko, lokola na banganda maboke, na misala mosusu ya ndenge yango, basalaka makambo nokinoki mpo bayebi ete bakiliya balingaka te bálekisa bango ntango.
Kozela eyibaka ntango ya bomoi na biso
Mokolo mosusu, Ralph Waldo Emerson, mokomi ya maloba ya ntɔki mpe moto ya États-Unis, azalaki na bomoi na ekeke ya 19, alobaki boye: “Bato balekisaka ntango ebele mpenza ya bomoi na bango na kozela!” Na mikolo euti koleka, mokomi Lance Morrow alobaki ete kozela ezalaka motungisi mpe elɛmbisaka moto. Na nsima alobelaki likambo oyo ye abengaki yango ete “motungisi ya kozela oyo emonanaka polele te.” Yango ezali nini? “Ezali likambo ya koyeba ete moko na makambo oyo eleki ntina epai ya moto, elingi koloba ntango, oyo ezali eteni mpenza ya bomoi na ye, ezali koleka mpe soki eleki, ezongaka lisusu te.” Ezali mawa kasi ezali mpe solo ete ntango oyo moto alekisaka mpo na kozela, akoki kozwa yango lisusu te.
Ya solo, soki bomoi ezalaki molai, mbɛlɛ tomitungisaka mingi te mpo na ntango oyo tolekisaka mpo na kozela. Kasi, bomoi ezali mokuse. Eleki sikoyo bambula ebele mpenza, mokomi moko ya nzembo alobaká ete: “Motuya ya mbula na biso ezali ntuku nsambo, mpe soko mpo na makasi ikokóma na ntuku mwambe; nzombo na yango ezali bobele mpasi mpe bolɔzi, zambi ekosila noki mpe biso tokopumbwa.” (Nzembo 90:10) Ata soki tofandi wapi to tozali banani, biso nyonso tozali na bomoi mokuse, mpe tokutanaka na makambo oyo esɛngaka tólekisa ntango mpo na kozela to kozela bato, atako ntango yango ezali na ntina mingi mpo na biso.
Tóyekola kozela
Mingi kati na biso tosi tomatá na motuka moko oyo sofɛlɛ azali kosala nyonso mpo aleka mituka mosusu oyo ezali liboso na ye. Mbala mingi, soki otali malamu ntina mpenza oyo azali kowela koleka ezali te, likambo moko te ezali kosɛnga ye akende nokinoki. Kasi, alingi te ete motuka mosusu epekisa ye kotambola na ndenge oyo ye alingi. Motema mɔ́tomɔ́to na ye emonisi ete ayekoli naino kozela te. Tolobi koyekola? Ɛɛ, moto akoki koyekola kozela. Moto moko te ayebaka kozela banda kobotama na ye. Soki mwana moke azali na nzala to likambo moko ezali kotungisa ye, alukaka bákokisa mposa na ye nokinoki. Ntango azali kokola nde ayebaka ete ntango mosusu asengeli kozela liboso azwa eloko oyo azali na mposa na yango. Lokola makambo ya kozela na bomoi ya moto ezangaka te, moto oyo ayebaka kozela na motema molai soki esɛngi kozala na motema molai, amonisaka ete akɔmeli.
Ya solo, makambo mosusu ekómelaka biso oyo, soki moto azali na motema mɔ́tomɔ́to na ntango yango, tokomona yango mabe te. Na ndakisa, moto moko te akomona mabe soki mobali moko alingi kozela te mpo azali komema mwasi na ye na lopitalo nokinoki mpo alingi kobota. Baanzelu oyo bayebisaki Lota abima na Sodomo bazalaki na ntango ya kozela te ntango Lota azalaki kosala malɛmbɛmalɛmbɛ. Etikalaki moke mboka yango ebomama, mpe Lota, mwasi na ye na bana na bango, bakokaki kokufa. (Genese 19:15, 16) Kasi, makambo mingi oyo esɛngaka biso tózela, ezalaka mpenza makambo ya kokufa to ya kobika te. Na makambo ya ndenge wana, ezali malamu mpenza soki moto na moto ayekoli kozala na motema molai, ata soki moto oyo azali kozelisa biso azali kosala malɛmbɛ to azali kosala lokola kobosana likambo na biso. Longola yango, moto na moto akoki mpenza kozala na motema molai soki ayekoli ndenge nini akoki kosalela malamu ntango oyo azali kolekisa na kozela. Etanda oyo ezali na lokasa 5 epesi mwa makanisi oyo moto akoki kosalela mpo alɛmba te mpe abebisa ntango te soki esengeli ete azela.
Tóbosana te ete, mbala mosusu, moto oyo azali na motema mɔ́tomɔ́to azali moto ya lolendo, azali kokanisa ete azali na motuya mingi, yango wana bakoki kozelisa ye te. Ebongi ete moto nyonso oyo azali na ezaleli wana, atalela maloba ya Biblia oyo elobi ete: “Moto oyo azali na motema molai azali malamu koleka moto ya lolendo.” (Mosakoli 7:8, NW ) Lolendo ezali ezaleli mabe mpenza; lisese moko ya Biblia elobi ete: “Mitema nyonso ya lolendo iboyami na [Yehova].” (Masese 16:5) Yango wana, mpo tóyekola kozala na motema molai to tóyekola kozela, ezali kosɛnga biso tómitalela malamumalamu biso moko mpe tótalela bizaleli na biso epai ya bato oyo tofandaka na bango.
Bato ya motema molai bakozwa mbano
Soki tozali kozela eloko oyo toyebi malamu ete ezali na ntina mpe nsukansuka ekoya, tomitungisaka mingi te. Yango wana, ezali malamu tókanisa likambo oyo: bato nyonso oyo bazali kosambela Nzambe bazelaka kokokisama ya bilaka ya kitoko oyo ezali na kati ya Biblia. Na ndakisa, elimo santu etindaki moto moko akoma nzembo oyo elobi na biso boye: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” Ntoma Yoane azongelaki makanisi yango ntango alobaki ete: “Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.” (Nzembo 37:29; 1 Yoane 2:17) Tomoni mpenza ete soki tozalaki na bomoi libela na libela, mbɛlɛ kozela ezalaka mpenza mokakatano monene te. Kasi, likambo ezali nde mpo tozali na bomoi ya libela te. Kutu, ebongi nde tólobela likanisi ya bomoi ya seko?
Liboso tópesa eyano na motuna yango, tóyeba ete ntango Nzambe akelaki bankɔkɔ na biso ya liboso alingaki ete bázala na bomoi libela na libela. Lisumu na bango nde ezangisaki bango, na bana na bango (na biso lokola) likoki wana. Kasi, ntango kaka basalaki lisumu, Nzambe alobaki ete akolongola makambo mabe oyo kozanga botosi na bango ekomema. Alakaki ete “mombóto” moko akoya, mpe mombóto yango ezalaki Yesu Klisto.—Genese 3:15; Baloma 5:18.
Moto na moto akoki kopona ye moko soki alingi kozwa bolamu oyo ekoya ntango Nzambe akokokisa bilaka na ye nyonso. Yango ezali mpe kosɛnga kozala na motema molai. Mpo na kosalisa biso tóyekola kozala na motema molai ndenge yango, Biblia elendisi biso tókanisa ndakisa ya mosali bilanga. Soki mosali bilanga aloni milona na ye, esɛngaka azala na motema molai mpo na kozela; asalaka nyonso oyo akoki mpo na kobatela milona na ye tii na eleko ya kobuka mbuma. Na ntango yango nde azwaka mbano ya motema molai na ye mpe amonaka litomba ya mosala na ye. (Yakobo 5:7) Ntoma Paulo apesi ndakisa mosusu ya motema molai. Alobeli bato ya sembo oyo bazalaká na bomoi na ntango ya kala. Bato yango bazalaki kozela Nzambe akokisa mikano na ye, kasi basengelaki kozela ntango oyo ye moko Nzambe aponaki. Paulo alendisi biso tólanda ndakisa na bango, baoyo “na nzela ya kondima mpe ya motema molai, bazwi makambo oyo elakamaki.”—Baebele 6:11, 12, NW.
Kozela ezali likambo oyo tokoki kokima te na bomoi na biso. Kasi, tokoki kosala ete tómitungisaka ntango nyonso te oyo tozali kozela. Bato oyo bazali kozela Nzambe akokisa bilaka na ye, kozela ekoki komemela bango esengo. Bakoki kosalela ntango oyo bazali kozela mpo bákóma mpenza baninga ya Nzambe mpe básala misala oyo ekomonisa ete bazali na kondima. Mpe soki bazali kosala mabondeli, bazali koyekola, mpe bazali kozwa ntango ya kokanisa malamumalamu makambo oyo bazali koyekola, yango ekoki kosalisa bango bázala na elikya makasi ete makambo nyonso oyo Nzambe alaki ekosalema na ntango oyo ebongi.
[Etanda/Bililingi na lokasa 5]
MPO OMITUNGISA MINGI TE NTANGO OZALI KOZELA
Yebá kobongisa makambo liboso! Soki oyebi ete ekosɛnga ozela, luká eloko ya kotánga, ya kokoma, ya kotonga, to kosala mwa mosala mosusu ya ntina.
Salelá ntango yango mpo na komanyola. Lelo oyo, lokola makambo nyonso ezali kosalema nokinoki, bato bazali kozwa ntango ya komanyola te.
Tyaká mwa mikanda ya kotánga pembeni ya telefone mpo na kotánga soki balobi na yo ozela; okoki kotánga mwa makambo mingi na miniti mitano to zomi.
Soki bozali bato ebele oyo bozali kozela, na mwa ntango yango, soki likoki ezali, luká kosolola na bato mpo na koteya bango makambo ya ntina.
Zalaká na mwa kaye to mokanda ya kotánga na kati ya motuka na yo, mpo mbala mosusu okoki kokutana na likambo oyo ekosɛnga yo ozela.
Kangá miso, nyolisá nzoto, to salá libondeli.
MPO MOTO AMITUNGISA MINGI TE NTANGO AZALI KOZELA, ETALELAKA MINGIMINGI ELIMO NA YE TO NDENGE OYO AMIBONGISAKI LIBOSO.