Tózelaka Yehova na esengo
OSILÁ kolya mbuma oyo eteli naino te? Na ntembe te, oyokaki mino ngai. Mbuma eumelaka mpo etela, mpe kozela tii etela ezali mpenza na ntina. Na makambo mosusu, ezalaka malamu kozela. Biblia elobi ete: “Ezali malamu ete moto [azela lobiko ya Yehova na kimya, NW].” (Bileli 3:26; Tito 2:13) Ndenge nini Baklisto basengeli kozela Yehova? Matomba nini tokozwa soki tozali kozela ye?
Kozela Yehova elimboli nini?
Biso Baklisto tozali ‘kozela mpe kobatela na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova.’ Tozali kozela na elikya mpenza kosikolama, ntango Yehova ‘akobebisa bato oyo batyolaka Nzambe.’ (2 Petelo 3:7, 12) Yehova azali na mposa makasi ya kosilisa mabe nyonso, kasi azali kozela mpo abikisa baklisto na ndenge oyo ekokumisa nkombo na ye. Biblia elobi boye: “Nzambe, atako azali na mokano ya komonisa nkanda na ye mpe ya kolakisa nguya na ye, atikaki nzela na motema molai mpenza na bambɛki ya nkanda oyo ebongi na libebi, mpo akoka kolakisa bomɛngo ya nkembo na ye likoló ya bambɛki ya motema mawa.” (Baloma 9:22, 23) Ndenge kaka ezalaki na ntango ya Noa, lelo oyo mpe Yehova ayebi ntango oyo ebongi mpo na kobikisa bato na ye. (1 Petelo 3:20) Na yango, kozela Yehova elimboli kozela ntango oyo ye moko abongisi mpo na kosala.
Ntango tozali kozela mokolo ya Yehova, tokoki ntango mosusu koyoka motema mpasi na ndenge etamboli ya bato ezali se kobeba. Soki bongo, ekozala malamu tóbosana te maloba ya Mika, mosakoli ya Nzambe oyo akomaki ete: “Moto malamu alimwe na mokili, mpe ata moto moko ya sembo azali te na kati ya bato.” Mpe abakisaki boye: “Mpo na ngai, nakokoba kotalela Yehova. Nakozela Nzambe ya lobiko na ngai.” (Mika 7:2, 7, NW) “Kozela” elimboli nini? Lokola kozela ezalaka mbala mingi pɛtɛɛ te, ndenge nini tokoki kozala na esengo ntango tozali kozela Nzambe?
Tózelaka na esengo
Tokoki koyekola ndenge ya malamu ya kozela epai ya Yehova. Ye azalaka ntango nyonso “Nzambe ya esengo.” (1 Timote 1:11) Azali na esengo ntango azali kozela, mpo azali kokoba kosala mpo na kokokisa mokano na ye ya kokómisa bato oyo balingaka ye bato ya kokoka, ndenge alingaki bázala ntango akelaki bango. (Baloma 5:12; 6:23) Yehova azali komona matomba ya mosala na ye na ndenge bamilio ya bato bazali koya na losambo ya solo. Yesu alobaki ete: “Tata na ngai azali kokoba kosala tii sikoyo, mpe ngai nazali kokoba kosala.” (Yoane 5:17) Mpo na kozala na esengo, esengeli mpenza kosalela bato mosusu. (Misala 20:35) Ndenge moko, ntango bazali kozela, baklisto ya solo bakangi mabɔkɔ te. Bazali kokoba kosalisa basusu báyeba mokano ya Nzambe mpo na bato.
Wana bazali kozela ntango oyo Nzambe akosala, bato ya sembo basepelaka ntango nyonso kosanzola ye. Tózwa ndakisa ya Davidi. Mokonzi na ye anyokolaki ye, moninga na ye ya motema atɛkaki ye mpe mwana na ye abalukelaki ye. Na nyonso wana, Davidi akokaki kozala na esengo ntango azali kozela mokolo oyo Yehova abongisaki mpo na kobikisa ye? Nzembo 71, oyo na ntembe te ekomamaki na Davidi, elobi boye: “Ngai nakolikya epai na yo ntango nyonso mpe nakofulisa masanzoli na ngai kosanzola yo. Monɔkɔ na ngai ekosakola boyengebene na yo mpe makambo ya kobikisa na yo mokolo mobimba.” (Nzembo 71:14, 15) Na esika ya kozela na motema likoló, Davidi azalaki na esengo mpo azalaki ntango nyonso kokumisa Yehova mpe kolendisa bato mosusu na losambo ya solo.—Nzembo 71:23.
Kozela Yehova, ezali te lokola ozali kozela na motema likoló bisi oyo ezali koya noki te. Ezali nde lokola baboti oyo bazali kozela na esengo ntango mwana na bango azali kokola na ndenge oyo ezali kosepelisa bango. Bazali na mosala mingi na bambula nyonso wana: koteya ye, kokɔtisa ye kelasi mpe kosembola ye, nyonso wana mpo akola na ndenge oyo balingi. Ndenge moko, biso baoyo tozali kozela Yehova tozalaka na esengo ya kosalisa basusu bápusana penepene na Nzambe. Biso mpe tolingi Nzambe asepela na biso mpe tózwa lobiko.
Tóbungisa elikya te
Kozela Yehova elimboli kokoba kolinga mpe kosalela ye kozanga kobungisa elikya. Yango ekoki kozala mpasi, mpo basaleli mingi ya Nzambe lelo oyo bafandi na bisika oyo batyolaka moto nyonso oyo andimaka bilaka ya Nzambe mpe azali komitambwisa na boyokani na kondima na ye. Kasi, talá ndakisa ya Bayisalaele ya sembo oyo babungisaki elikya na bango te na boumeli ya mbula 70 oyo bazalaki na boombo na Babilone. Nini esalisaki bango? Na ntembe te, kotánga banzembo elendisaki bango. Nzembo moko, oyo na ntembe te ekomamaki na ntango wana, elobi boye: “Natye motema na liloba na ye. Molimo na ngai ezali kozela Yehova koleka ndenge basinzili bazelaka ntɔngɔ etana. Tiká ete Yisalaele bákoba kozela Yehova.”—Nzembo 130:5-7, NW.
Bayuda oyo babatelaki elikya na bango na kotánga mpe kolobela yango, bapambolamaki ntango Babilone ekweaki na mabɔkɔ ya banguna. Mosika te, bankóto ya Bayuda oyo batikalaki sembo bazongaki na Yelusaleme. Mpo na eleko yango, Biblia elobi boye: “Ntango Yehova azongisaki baoyo bakendaki boombo na Siona, . . . minɔkɔ na biso etondaki na kosɛka.” (Nzembo 126:1, 2, NW) Bayuda wana balɛmbaki te, kasi bakobaki kolendisa kondima na bango. Balɛmbaki mpe te kosanzola Yehova na nzembo.
Ndenge moko, baklisto ya solo oyo bazali kozela Nzambe na nsuka ya “ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” bazali ntango nyonso kosala makasi mpo na kobatela kondima na bango. Bazali koyekola Liloba ya Nzambe, kolendisana mpe kosanzola Yehova na kosakola nsango malamu ya Bokonzi na ye.—Matai 24:3, 14.
Tózelaka Nzambe ntango basemboli biso mpo tózwa matomba
Ndenge tomonaki liboso, mosakoli Yilimia akomaki boye: “Ezali malamu ete moto [azela lobiko ya Yehova na kimya, NW].” (Bileli 3:26) Yilimia alingaki koloba ete ebongaki te basaleli ya Nzambe báimaima mpo na ndenge Yehova asembolaki bango ntango atikaki Yelusaleme ebebisama. Basengelaki nde kozwa liteya na kozanga botosi na bango mpe koyeba mbongwana oyo basengelaki kosala.—Bileli 3:40, 42.
Matomba oyo tozwaka ntango Yehova azali kosembola biso ekokani na ndenge oyo mbuma ekolaka na bilanga. Mpo na likambo ya kosembolama na Nzambe, Biblia elobi boye: “Epai ya baoyo bateyami na yango ebotaka mbuma ya kimya, elingi koloba, boyengebene.” (Baebele 12:11) Kaka ndenge mbuma eumelaka mpo etela, soki Nzambe asemboli biso esɛngaka mpe ntango mpo tóbongwana. Na ndakisa, soki tomitambwisi malamu te mpe tobungisi mikumba na lisangá, kozela Nzambe ekosalisa biso tólɛmba te. Na ntango wana, maloba ya Davidi oyo elandi ekolendisa biso: “Nkanda ya [Nzambe] ekoumela bobele ntango moke nde ngɔlu na ye ekoumela mikolo nyonso; kolela ekozala na butu, nde esengo ekoya na ntɔngɔ.” (Nzembo 30:5) Nsukansuka, soki tozali kozela mpe kolanda batoli oyo tozwaka na Liloba ya Nzambe mpe na ebongiseli na ye, “esengo” na biso ekoya.
Kokɔmela na elimo esɛngaka ntango
Soki ozali elenge to ozwi batisimo sika, okoki kozala na mposa ya kozwa mikumba na lisangá. Kasi, esɛngaka ntango mpo na kokóma na makoki ya kozwa mikumba yango. Na yango, salá makasi okola na elimo ntango ozali naino elenge. Na ndakisa, bolenge ezali eleko malamu mpo na kotánga Biblia mobimba, kolona bizaleli ya Boklisto mpe koyekola ndenge ya kokómisa bato bayekoli. (Mosakoli 12:1) Soki ozali kozela na komikitisa nyonso, okozwa mikumba na ntango oyo Yehova abongisi.
Mosala ya kokómisa bato bayekoli esɛngaka mpe kozala motema molai. Ndenge moloni akobaka kobwakela milona mai kino Nzambe akokolisa yango, mosala ya kokómisa bato bayekoli ezali mpe bongo. (1 Bakolinti 3:7; Yakobo 5:7) Kosalisa basusu bákóma na kondima mpe na botɔndi mpo na Yehova ezwaka basanza, ata mpe bambula ya koyekola na bango Biblia. Kozela Yehova esɛngaka kolendendela, ata soki na ebandeli bayekoli bazali kosalela te makambo oyo bazali koyekola. Soki bakómi komonisa ata mwa botɔndi moke, yango ekoki komonisa ete babandi kolanda elimo ya Yehova. Soki ozali na motema molai, okozala na esengo ya komona ndenge Yehova akokómisa moto oyo ozali koyekola na ye Biblia moyekoli ya Yesu.—Matai 28:20.
Monisá bolingo na kozela
Ndakisa ya ndeko mwasi moko ya mobange oyo afandaka na mokili moko ya esobe na Bangomba Andes, na Amerika ya Sudi, emonisi mpenza ete koyeba kozela ekoki kozala elembo ya bolingo mpe ya elikya. Na mboka na bango, bazali Batatoli ya Yehova kaka bango mibale, ye ná ndeko mosusu ya mwasi. Kanisá naino esengo oyo bazalaka na yango soki bayoki ete bandeko bazali koya kotala bango! Mokolo mosusu, mokɛngɛli ya zongazonga moko oyo akendaki kotala bango mpo na mbala ya liboso abungaki nzela. Asengelaki kozonga tii na esika abandaki mobembo mpo na koluka lisusu nzela. Bangonga ebele elekaki, kasi akómaki naino te. Ntango ayaki komona mboka yango na mosika, midi ya butu esilaki koleka. Lokola lotiliki ezalaki na esika yango te, akamwaki komona mwinda ezali kongala. Asepelaki makasi ntango akómaki na ebandeli ya mboka yango mpe amonaki ete kongenga yango ezalaki kouta na mwinda ya petrole oyo ndeko mwasi wana ya mobange atyaki na esika moko ya likoló mpenza. Azalaki na kondima ete mokɛngɛli akoya, yango wana azalaki kozela ye.
Lokola tozali na motema molai lokola ndeko wana, tozelaka Yehova na esengo. Tozali na elikya mpenza ete akokokisa bilaka na ye. Lokola mokɛngɛli ya zongazonga wana, biso mpe tosepelaka na bato oyo bazelaka biso na bolingo nyonso. Na yango, tokokamwa te ete Yehova asepelaka na bato oyo bazali kozela ye. Biblia elobi boye: “[Yehova] akosepela na . . . baoyo batye elikya na bango kati na boboto na ye.”—Nzembo 147:11.
[Elilingi na lokasa 18]
Bato oyo bamipesi na kosanzola Nzambe bazali kozela Yehova na esengo