Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/9 nk. 17-18
  • “Ntango ya kozongisa makambo ndenge ezalaki” ekómi pene!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ntango ya kozongisa makambo ndenge ezalaki” ekómi pene!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntango ya kozongisa makambo ndenge ezalaki ebandi
  • Kozongisama mosusu ekómi pene!
  • Nguya ya kozongisa makambo ndenge ezalaki—Yehova azali “kosala biloko nyonso biloko ya sika”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Makambo oyo koya ya klisto ekokokisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Tózala na esengo sikawa mpe mpo na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/9 nk. 17-18

“Ntango ya kozongisa makambo ndenge ezalaki” ekómi pene!

Ntango etikalaki moke Yesu amata na likoló, bayekoli na ye mosusu kati na baoyo batikalaki sembo epai na ye batunaki ye boye: “Motei, okozongisela Yisalaele bokonzi na ntango oyo?” Eyano oyo Yesu apesaki emonisaki ete esengelaki ntango eleka liboso Bokonzi eya. Na ntango yango, bayekoli na ye basengelaki kozala na mosala moko monene. Basengelaki kozala batatoli ya Yesu “na Yelusaleme, na [Yudea, NW ] mobimba, na Samalia, mpe kino na nsuka ya mokili.”—Misala 1:6-8.

MOSALA yango ekokaki kozala mosala ya mwa mikolo, bapɔsɔ to basanza te. Kasi, bayekoli bazelaki te, babandaki mbala moko kosakola. Atako bongo, likambo ya kozongisa makambo ndenge ezalaki elongwaki na makanisi na bango te. Mokolo mosusu, Petelo alobelaki yango liboso ya ebele ya bato oyo bayanganaki na Yelusaleme, boye: “Bongolá mitema, mpe butwá ete bópɛtwa na masumu na bino ete ntango ya kopema euta na Nkolo, mpe ete atinda Klisto oyo aponameli bino, ye Yesu. Ekoki ete aumela na likoló kino [Ntango ya kozongisa makambo nyonso ndenge ezalaki liboso, “NW” ], yango elobaki Nzambe na minɔkɔ ya basakoli na ye ya bulɛɛ longwa na kalakala.”—Misala 3:19-21.

“Ntango” yango “ya kozongisa makambo ndenge ezalaki” esengelaki kosuka na “bileko ya kopema” oyo ekouta na Yehova. Ntango ya kozongisa makambo ndenge ezalaki oyo basakolaki esengelaki koya na ndenge mibale. Libosoliboso, esengelaki kozala ntango ya kozongisa makambo ndenge ezalaki, na ndenge ya elimo, oyo ezali kopesa bato kopema; yango nde ezali kosalema sikoyo. Ya mibale, paladiso ekozonga awa na mabele.

Ntango ya kozongisa makambo ndenge ezalaki ebandi

Lokola ntoma Petelo alobaki yango liboso ya ebele ya bato na Yelusaleme, likoló ‘ebombaki Yesu.’ Ebombaki ye tii na 1914, ntango Yesu azwaki bokonzi mpe abandaki koyangela lokola Mokonzi oyo Nzambe aponi. Petelo asakolaki ete na ntango wana, Yehova ‘akotinda’ Mwana na ye, elingi koloba akopesa Yesu nzela ya kokokisa mokumba na ye lokola Mokokisi monene ya mikano ya Nzambe. Biblia elobeli likambo yango na maloba ya elilingi oyo: “[Ebongiseli ya Nzambe na likoló] aboti mwana mobali, [Bokonzi ya Nzambe na mabɔkɔ ya Yesu Klisto] oyo akokɛngɛla mabota nyonso na fimbo ya ebende.”—Emoniseli 12:5.

Kasi, bikólo ya mokili elingaki ata moke te koyoka likambo ya kotosa Klisto lokola mokonzi. Kutu, batombokelaki bato oyo bandimi bokonzi yango awa na mabele, oyo bayebani lelo na nkombo ya Batatoli ya Yehova. Ndenge moko na bantoma oyo basalaki liboso na bango, Batatoli babangaki te kosala “mosala ya kotatola mpo na Yesu.” (Emoniseli 12:17, NW ) Na bikólo mingi, bato mosusu balingaki te ete baklisto wana ya sembo básala mosala na bango. Na 1918, bandeko oyo bazalaki kotambwisa mosala na biro monene ya la Société Watch Tower, na Brooklyn, na engumba New York, basambisamaki na tribinale mpo na makambo ya lokuta oyo bakoselaki bango mpe bakatelaki bango bambula ebele ya bolɔkɔ. Na boumeli ya mwa ntango, emonanaki lokola nde mosala ya kosakola “kino na nsuka ya mokili” elingaki kokufa.—Emoniseli 11:7-10.

Kasi na 1919, babimisaki bandeko yango na bolɔkɔ mpe na nsima, bazuzi balobaki ete makambo nyonso oyo bafundaki bango ezalaki makambo ya lokuta. Bandeko yango bazongelaki mbala moko mosala ya kozongisa makambo ndenge ezalaki na elimo. Kobanda ntango wana, basaleli ya Yehova bakómi na bozwi ya elimo na ndenge oyo emonaná naino te.

Babandaki mosala monene ya koteya bato ya bikólo nyonso ete bátosa makambo oyo Klisto atindaki bayekoli na ye básala. (Matai 28:20) Ezalaki mpenza esengo na komona ndenge bato mosusu, oyo bazalaki bato ya yauli, babongolaki bizaleli na bango! Babwakaki bomoto ya kala, na bizaleli na yango lokola “nkanda,” “kofinga,” mpe “maloba ya mbindo,” mpe balataki bomoto ya sika, “oyo, na nzela ya boyebi ya solosolo, ezali kozonga sika, na elilingi ya [Nzambe] oyo akelaki yango.” Ata na moi ya lelo, maloba ya mosakoli Yisaya ezali kokokisama na ndenge ya elimo; elobi ete: “[Mbwa ya zamba, NW ] [elingi koloba moto oyo azalaki liboso na bizaleli lokola mbwa ya zamba] akofanda mwa moke elongo na mwana ya mpate [moto ya kosɔkɛma], mpe nkoi akolala elongo na mwana ya ntaba; mwana ya ngɔmbɛ mpe nkosi mpe nyama ya mafuta bakozala elongo.”—Bakolose 3:8-10, NW; Yisaya 11:6, 9.

Kozongisama mosusu ekómi pene!

Longola kozongisa makambo ndenge ezalaki oyo ememi paladiso ya elimo lelo oyo, etikali moke mabele yango moko ekóma mpenza paladiso. Mwa esika moke awa na mabele ezalaká paladiso mpe kuna, Yehova atyaki bankɔkɔ na biso Adama na Eva, babengaki yango elanga ya Edene. (Genese 1:29-31) Yango wana tokoki koloba ete Paladiso ekozonga. Kasi, liboso na yango, esengeli naino mangomba nyonso ya lokuta oyo ezali kobebisa lokumu ya Nzambe elongwa. Bakonzi ya politiki ya mokili oyo nde bakoboma mangomba yango. (Emoniseli 17:15-18) Na nsima, bato ya politiki na bato ya mombongo, bakisa mpe bato oyo bazali nsima na bango, bakobomama. Na nsuka, banguna ya nsuka ya Nzambe, elingi koloba Satana na bademo na ye, bakokangama mpo na mbula nkóto, mpe na mbula nkóto yango nde makambo nyonso ekozongisama ndenge ezalaki. Na ntango yango, “lisobe na esika ekaoki ikosepela, lisobe ekoyoka esengo, ekobimisa felele na habaselete.” (Yisaya 35:1) Mabele mobimba ekozala na kimya. (Yisaya 14:7) Kutu, bato ebele oyo bakufá bakozonga na bomoi awa na mabele. Bango nyonso bakomona ndenge makambo nyonso ekozongisama ndenge ezalaki na lisalisi ya mbeka oyo epesamaki mpo na kosikola bato. (Emoniseli 20:12-15; 22:1, 2) Na mokili mobimba, moto moko oyo akufá miso, to akufá matoi, to oyo alobaka te, akozala te. “Mofandi moko te akoloba ete, Ngai nazali na maladi.” (Yisaya 33:24) Na nsuka ya Mbula Nkóto oyo Klisto akoyangela, Zabolo na bademo na ye bakobimisama mpo na mwa ntango moke mpe bakomona ndenge oyo mokano ya Nzambe mpo na mabele ekokokisama na ntango wana. Bongo na nsuka nde bakobomama mpo na libela.—Emoniseli 20:1-3.

Mosala ya kozongisa makambo ndenge ezalaki ekoumela mbula nkóto, na nsuka na yango, “biloko nyonso oyo epemaka” ekosanzola Yehova awa na mabele, mpe ekozala bongo libela na libela. (Nzembo 150:6, NW ) Yo mpe okozala kati na bango? Okoki kozala kati na bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto