Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w24 Juillet lok. 30-lok. 31 par. 2
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Masolo mosusu
  • Losambo ya solo ekómi na mokili mobimba
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • Yehova azali kokómisa basaleli na ye kitoko na pole
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Nkembo ya Yehova ezali kongɛngɛla basaleli na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • “Nkombo ya sika”
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
w24 Juillet lok. 30-lok. 31 par. 2
Bato bazali na esengo na paradiso na mabele. Na mosika, ebale ezali kotiyola euta na engumba ya elilingi, Yerusaleme ya Sika. Banzete ezali kokola na ngámbo mibale ya engumba yango.

Mituna ya batángi

“Mwasi” oyo Yisaya 60:1 elobeli ezali nani, mpe ndenge nini ‘atɛlɛmi’ mpe ‘apanzi pole’?

Yisaya 60:1 elobi: “Ee mwasi, tɛlɛmá, panzá pole, mpo pole na yo eyei. Mpe nkembo ya Yehova engɛngɛli yo.” Makambo oyo mokapo yango elobeli emonisi ete na ntango wana, “mwasi” yango ezalaki Siona to Yerusaleme, mboka-mokonzi ya Yuda.a (Yis. 60:14; 62:​1, 2) Engumba yango ezalaki komonisa ekólo mobimba. Maloba ya Yisaya ebimisi mituna mibale: Ya liboso, ntango nini mpe ndenge nini Yerusaleme ‘etɛlɛmaki’ mpe epanzaki pole ya elimo? Ya mibale, maloba ya Yisaya ezali na kokokisama ya monene na mikolo na biso?

Ntango nini mpe ndenge nini Yerusaleme ‘etɛlɛmaki’ mpe epanzaki pole ya elimo? Yerusaleme ná tempelo na yango etikalaki mpamba ntango Bayuda bazalaki na mboka mopaya na Babilone mbula 70. Kasi, ntango Babilone ekweaki na mabɔkɔ ya Bamede ná Baperse, Bayisraele oyo bazalaki na ampire mobimba ya Babilone bazwaki ndingisa ya kozonga na mboka na bango mpe kozongisa lisusu losambo ya solo. (Ezr. 1:​1-4) Kobanda na 537 L.T.B., bato nyonso ya sembo na mabota 12 ya Yisraele bazongaki. (Yis. 60:4) Babandaki kopesa Yehova bambeka, kosala bafɛti ya losambo, mpe kotonga lisusu tempelo. (Ezr. 3:​1-4, 7-11; 6:​16-22) Na ndenge yango, nkembo ya Yehova ebandaki kongɛnga na Yerusaleme, elingi koloba, ekólo ya Nzambe oyo ezongisamaki. Mpe bato ya ekólo yango bazalaki kongɛngisa bikólo mosusu, oyo ezalaki na molili ya elimo.

Kasi, bisakweli ya Yisaya oyo elobelaki kozongisama ekokisamaki kaka moke na Yerusaleme ya kala. Bayisraele mingi bakobaki kotosa Nzambe te. (Neh. 13:27; Mal. 1:​6-8; 2:​13, 14; Mat. 15:​7-9) Na nsima, baboyaki kutu Masiya, Yesu Kristo. (Mat. 27:​1, 2) Na mobu 70 T.B., Yerusaleme ná tempelo na yango ebebisamaki mpo na mbala ya mibale.

Yehova asakolaki ete makambo yango ekosalema. (Dan. 9:​24-27) Ezali polele ete mokano na ye ezalaki te ete Yerusaleme awa na mabele ekokisa likambo nyonso oyo etali kozongisama, oyo Yisaya mokapo 60 esakolaki.

Maloba ya Yisaya ezali na kokokisama ya monene na mikolo na biso? Ɛɛ, kasi ezali kokokisama epai ya mwasi ya elilingi— “Yerusaleme mboka ya likoló.” Ntoma Paulo akomaki mpo na mwasi yango ete: “Azali mama na biso.” (Gal. 4:26) Yerusaleme mboka ya likoló ezali eteni ya likoló ya ebongiseli ya Yehova, oyo esangisi bikelamu ya sembo ya elimo. Bana na yango ezali Yesu ná bakristo 144000 oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali na elikya ya bomoi na likoló lokola ntoma Paulo. Bakriso oyo batyami mafuta na elimo bazali “ekólo moko mosantu,” elingi koloba “Yisraele ya Nzambe.”—1 Pe. 2:9; Gal. 6:16.

Ndenge nini Yerusaleme mboka ya likoló ‘etɛlɛmi’ mpe ‘ezali kopanza pole’? Ezali kosala yango na nzela ya bana na yango oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali awa na mabele. Tótalela likambo na bango na boyokani na makambo oyo Yisaya mokapo 60 esakolaki.

Bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengelaki ‘kotɛlɛma’ mpo bazalaki na molili ya elimo ntango matiti mabe, to lipɛngwi oyo esakolamaki, epalanganaki na siɛklɛ ya mibale T.B. (Mat. 13:​37-43) Na ntango yango, bakómaki bakangami na Babilone monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazalaki na bokangami tii na “eleko ya nsuka ya mokili,” oyo ebandaki na 1914. (Mat. 13:​39, 40) Mwa moke na nsima, na 1919, basikolamaki mpe mbala moko babandaki kopanza pole ya elimo na ndenge bamipesaki mobimba na mosala ya kosakola.b Nsima ya bambula, bato ya bikólo nyonso bayei na pole yango, ata mpe bato mosusu oyo bazali na kati ya Yisraele ya Nzambe, to “bakonzi,” oyo Yisaya 60:3 elobeli.—Em. 5:​9, 10.

Na mikolo ezali koya, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakopanza lisusu mingi pole oyo euti na Yehova. Na ndenge nini? Ntango bakosilisa bomoi na bango awa na mabele, bakosala “Yerusaleme ya Sika,” to mwasi ya Kristo oyo esangisi bato 144000 oyo bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe lokola ye.—Em. 14:1; 21:​1, 2, 24; 22:​3-5.

Yerusaleme ya Sika ekozala na mokumba monene mpo na kokokisa Yisaya 60:1. (Talá mpe 60:​1, 3, 5, 11, 19, 20 ná Emoniseli 21:​2, 9-11, 22-26.) Ndenge kaka Yerusaleme ya kala ezalaki esika guvɛrnema ya Yisraele ya kala efandaki, Yerusaleme ya Sika mpe Kristo ekokóma guvɛrnema ya mokili ya sika. Na ndenge nini Yerusaleme ya Sika “euti na likoló epai ya Nzambe ezali kokita”? Na ndenge ekotyela mabele likebi. Bato ya bikólo nyonso oyo babangaka Nzambe “bakotambola na lisalisi ya pole na yango.” Bakosikolama kutu na lisumu mpe na liwa. (Em. 21:​3, 4, 24) Yango ekozala mpenza “bantango oyo Nzambe akozongisa makambo nyonso sika” oyo Yisaya ná basakoli mosusu balobelaki. (Mis. 3:21) Kozongisama wana monene ya makambo sika ebandaki ntango Kristo akómaki Mokonzi mpe ekosila na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto.

a Na Yisaya 60:​1, Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli “mwasi” kasi te “Siona,” to “Yerusaleme” mpo bavɛrbɛ ya Ebre oyo ebongolami na “tɛlɛmá” mpe “panzá pole” elobeli mwasi, ndenge moko na oyo elobeli “yo.” Liloba “mwasi” esalisaka motángi akanga ntina ete bazali nde koloba na mwasi moko ya elilingi.

b Kozongisama ya makambo nyonso sika na ndenge ya elimo oyo esalemaki na 1919 elobelami mpe na Ezekiele 37:​1-14 mpe Emoniseli 11:​7-12. Ezekiele esakolaki kozongisama ya elimo ya bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo nsima ya eleko ya bokangami oyo eumelaki ntango molai. Esakweli oyo ezali na Emoniseli elobeli kozongisama ya elimo ya etuluku moko ya bandeko oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazalaki kokamba mosala nsima ya ntango moke oyo basalaki mosala te mpo batyaki bango na bolɔkɔ na ndenge ya kozanga bosembo. Na 1919, batyamaki “moombo ya sembo mpe ya mayele.”—Mat. 24:45; talá Losambo ya pɛto ya Yehova—Nsukansuka ezongisami!, lok. 118.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto