Etikali moke moto nyonso akozala na elikya
MPASI ya bomoi ezali se kobakisama mpe makambo oyo ezali kosala ete bato bázala lisusu na elikya te ezali ebele. Ntango tolɛmbi nzoto, ekoki kozala mpasi mpo tóyeba komipekisa. Yango wana, ata bato oyo balingaka kozala na bomoi, bakoki kokóma mawamawa! Tótalela mwa bandakisa.
Na ntango ya kala, mosakoli Mose alɛmbaki mpenza nzoto, yango wana alobaki na Nzambe boye: “Bóma ngai noki, soko nazwi ngɔlu na miso na yo, ete namona mawa na ngai te.” (Mituya 11:15) Ntango mosakoli Eliya azalaki kokima banguna na ye, alobaki ete: “Ekokie! [Sikoyo], ɛ [Yehova], longolá bomoi na ngai.” (1 Mikonzi 19:4) Mpe lisusu, mosakoli Yona alobaki boye: “Ɛ [Yehova], nalɔmbi yo ete olongola bomoi na ngai mpo ete kokufa eleki malamu epai na ngai nde kobika te.” (Yona 4:3) Kasi, ezala Mose, Eliya, to Yona, moto moko te amibomaki. Bango nyonso bayebaki mobeko ya Nzambe oyo elobi ete: “Okoboma te.” (Exode 20:13) Lokola bazalaki na kondima makasi epai ya Nzambe, bayebaki ete ata mpasi yango ezali ndenge nini, ekoki kosila, mpe bayebaki ete bomoi ezali likabo ya Nzambe.
Tokoloba boni mpo na mikakatano oyo tozali kokutana na yango na moi ya lelo? Longola konyokwama na makanisi, na bamaladi, ntango mosusu bandeko na biso, baninga ya kartye to baninga ya mosala bakoki konyokola biso. Biblia elobeli bato oyo “batondi na ndenge nyonso ya bokesene, na mabe, na bilulela, na nko; batondi na zuwa na mposa ya koboma bato, na kowelana, na kozimbisa bamosusu, na kokana mabe, na kopalanganisa nsango mabe; na kotukatuka, na koyina Nzambe, na lolendo, na ngambo, na maloba mpamba, na koluka ndenge ya sika ya mabe, na kotyola baboti; bayibi, baboyi kondima, bazangi bolingo, bazangi mawa.” (Baloma 1:28-31) Lokola mokolo na mokolo tozalaka na bato ya ndenge yango, tokoki mpenza komona ete bomoi ekómi nkaka. Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bazali na mposa ya libɔndisi
Tóyeba koyoka
Minyoko na bampasi ekoki kobulunganisa makanisi ya moto. Moto ya mayele alobaki boye: “Solo minyoko ikokómisa moto ya mayele na bolema.” (Mosakoli 7:7) Yango wana soki moto azali kolobela likambo ya komiboma, tosengeli kozwa likambo yango na lisɛki te. Ekoki mbala mosusu kosɛnga ete tótya likebi nokinoki na likambo oyo ezali kotungisa ye to ezali kopesa ye maladi, to mpe ezali kobebisa elimo na ye. Ya solo, lisalisi mpe nkisi ya minganga ezali ndenge na ndenge; mpe kopona yango ezali likambo ya moto ye moko.—Bagalatia 6:5.
Ezala likambo nini oyo ezali kopesa moto makanisi ya komiboma, ezali malamu ete moto moko oyo azali na bososoli, na motema mawa, mpe na motema molai, oyo moto yango akoki kofungolela ye motema, azala pembeni na ye. Soki ezali na bandeko mpe baninga oyo bayebi koyoka, bakoki mpenza kosalisa ye. Longola kozala na bolingo mpe na boboto, makanisi ya kolendisa oyo euti na Liloba ya Nzambe ekoki mpenza kosalisa bato oyo bazali lisusu na elikya te.
Lisalisi ya elimo mpo na baoyo bazali kotungisama na makanisi
Mbala mosusu okoki kokamwa na ndenge oyo kotánga Biblia ekoki kolendisa moto. Atako Biblia ezali mokanda ekomami te mpo na kosalisa moto oyo azali konyokwama na makanisi, kasi ekoki kosalisa biso tóyeba ntina ya bomoi. Mokonzi Salomo alobaki boye: “Nayebi ete eloko mosusu eleki oyo te ete básepela mpe ete básala malamu naino bazali na bomoi, mpe ete moto na moto alya mpe amela mpe ayoka esengo mpo na malamu na mosala na ye nyonso. Yango likabo ya Nzambe.” (Mosakoli 3:12, 13) Mosala ya malamu esalisaka moto na komona ete bomoi ezali na ntina; longolá yango, mwa makambo mikemike lokola mwa mopɛpɛ ya mpiɔ, moi, bafololo, banzete na bandɛkɛ, ezali makabo ya Nzambe oyo ekoki kosepelisa biso.
Likambo mosusu oyo ekoki kolendisa biso mingi ezali elikya oyo Biblia epesi ete Yehova Nzambe na Mwana na ye Yesu Klisto, bazali komibanzabanza mpo na biso. (Yoane 3:16; 1 Petelo 5:6, 7) Yango wana mpenza, mokomi ya nzembo alobaki ete: “Nkolo akumisama, ye oyo akomema mikumba na biso mokolo na mokolo, ye Nzambe ya kobika na biso.” (Nzembo 68:19) Ata soki tozali kokanisa ete tozali na ntina moko te, Nzambe alobi na biso tóbondela ye. Yebá ete Nzambe akoki kotyola moto moko te oyo, na komikitisa mpe na bosembo nyonso, azali kosɛnga ye ete asalisa ye.
Moto moko te akoki kokanisa ete akozala na bomoi oyo ezangi mpenza mikakatano na moi ya lelo. (Yobo 14:1) Kasi, mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe esalisi bato mingi na komona ete mpo na kosilisa mikakatano, nzela malamu ezali komiboma te. Tótalela ndenge oyo ntoma Paulo asalisaki mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ; moto yango azalaki lisusu na elikya te mpo “elamukaki [ye], amoni bikuke ya bolɔkɔ polele, abendi mopanga na ye mpe alingaki komiboma, mpo ete akanisi ete bakangami bakimi.” Na miniti wana, mokɛngɛli akanisaki ete eleki malamu amiboma na esika báboma ye nsima ya kosambwisa ye mpe konyokola ye. Ntoma abelelaki ete: “Salá likambo mabe na nzoto na yo te! mpo ete biso nyonso tozali.” Paulo asukaki kaka na koloba bongo te. Ye na Sila balendisaki mokɛngɛli ya bolɔkɔ mpe bapesaki eyano na motuna oyo atunaki ete: “Batata, nasala nini ete nabikisama?” Balobaki na ye ete: “Ndimelá Nkolo Yesu mpe okobikisama, na yo na bato ya ndako na yo.” Na nsima bateyaki ye na bato ya ndako na ye liloba ya Yehova, mpe na nsuka, “abatisami nokinoki, na ye na bato nyonso ya ndako na ye lokola.” Mokɛngɛli ya bolɔkɔ na bato nyonso ya ndako na ye basepelaki mingi mpe bomoi na bango ekómaki na ntina mpenza.—Misala 16:27-35.
Lelo oyo, koyeba ete Nzambe te nde apesaka biso bampasi ezali mpenza kobɔndisa! Liloba na ye eyebisi ete elimo moko ya mabe, “oyo abyangami Motɛmɛli mpe Satana,” nde azali “mozimbisi ya bato ya mokili mobimba.” Kasi, mikolo na ye ekómi ya kotánga. (Emoniseli 12:9, 12) Etikali moke Nzambe alongola bampasi nyonso oyo Satana na bademo na ye bamemelaki bato na mokili. Nsima na yango, mokili ya sika ya bosembo oyo Nzambe alakaki ekoya mpe makambo nyonso oyo ezali kosala ete bato bázala na elikya te mpe makambo nyonso oyo ezali kotinda bango na komiboma ekozala lisusu te.—2 Petelo 3:13.
Libɔndisi mpo na baoyo bazali koluka lisalisi
Ata lelo oyo, Makomami ekoki kolendisa bato oyo balɛmbi nzoto. (Baloma 15:4) Davidi ayembaki ete: “Ɛ Nzambe, yo okoboya motema motutami mpe na mawa te.” (Nzembo 51:17) Ya solo, tozangaka te kokutana na mikakatano mpe tomonaka mbuma mabe oyo bomoto na biso ya kozanga kokoka ebotaka. Kasi soki toyebi malamu ete Tata na biso ya likoló oyo atondi na boboto, na bolingo, mpe azali na makambo makasi te, yango ekondimisa biso ete tozali biloko mpamba te na miso na ye. Nzambe akoki kozala Moninga na biso mpe Molakisi na biso ya liboso. Soki toluki kozala mpenza baninga ya Yehova Nzambe, ye akoboya biso te. Mozalisi na biso alobi boye: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.”—Yisaya 48:17.
Bato mingi bazwi lisalisi mpo batyelaki Nzambe motema. Tópesa ndakisa: Mara alɛmbaki nzoto mpo anyokwamaki na makanisi ntango molai; mpe na nsima, mpasi mosusu eyaki kobakisama: mwana na ye ya mobali kaka moko akufaki na likama ya motuka.a Esalaki ye nsɔmɔ mpe alukaki komiboma. Kasi, ndenge tozali koloba boye, mokolo na mokolo Mara alamukaka ntɔngɔntɔngɔ mpo na kosala misala ya ndako. Asepelaka koyoka miziki mpe kosalisa bato mosusu. Lokola ayebi ete “lisekwa ekozala na bato sembo mpe na bato sembo te,” amitungisaka lisusu mingi te mpo na liwa ya mwana na ye oyo alingaki mingi mpe elikya yango elendisi kondima na ye epai ya Nzambe. (Misala 24:15) Lokola banda kala Mara azalaki kosepela te na likanisi ya kokóma anzelu na likoló, maloba ya Nzembo 37:11 esimbaki mpenza motema na ye ete: “Bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.”
Sandra, mwasi mosusu na Brésil, azalaki kosala mingi mpo na bana na ye misato. Alobi boye: “Namipesaki mpenza na mosala na ngai, yango wana ntango tata na ngai akufaki liwa ya mbalakaka, mpe na ntango yango kaka, nayokaki ete mobali na ngai azali na makango, nakanisaki ata kobondela Nzambe te ete asalisa ngai.” Sandra azalaki lisusu na elikya te mpe alukaki komiboma. Eloko nini esalisaki ye? Sandra amipesaki mingi na makambo ya elimo. Alobi boye: “Mpokwa nyonso liboso ya kolala, natángaka Biblia, mpe namekaka komitya na esika ya bato oyo balobeli bango na masolo oyo nazali kotánga. Natángaka mpe bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lamuká, mpe nalingaka mingi masolo ya bomoi ya bato, mpamba te esalisaka ngai nasepela na bomoi na ngai.” Lokola ayebi ete Yehova azali moninga na ye ya motema, sikoyo alobaka na ye polele ntango azali kosala libondeli.
Na mikolo ezali koya, moto nyonso akozala na elikya
Tozali mpenza kobɔndisama na koyeba ete bampasi oyo ezali kotungisa bato ekosila! Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mokili, mikóló na bana oyo bazali konyokwama mpo na mobulu, kozanga bosembo, to mpo bato mosusu bazali kokanisela baninga mabe, bakozala na esengo. Ndenge nzembo moko esakolaki yango, Yesu Klisto, Mokonzi oyo Yehova aponi, “akobikisa mobola oyo akoganga mpe moto ya mawa oyo azali na mosungi te.” Lisusu, “akoyokela moto ya bolɔzi mpe mobola mawa; akobikisa milimo ya babola,” mpe “akosikola milimo na bango na kati ya konyokola mpe na kongala; makila na bango ekozala na motuya na miso na ye.”—Nzembo 72:12-14.
Etikali moke bisakweli yango ekokisama. Likanisi ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele, esika makambo ekozala malamu ndenge yango, ezali kosepelisa yo te? Soki ozali kosepela, yango ekoki kopesa yo esengo mpe ekoki kosalisa yo omona ete bomoi ezali likabo ya Nzambe. Mpe soki ozali koyebisa bato mosusu bilaka oyo ezali na kati ya Makomami, okoki kosala ete bato mosusu oyo bazali kosɛnga lisalisi ya mokili oyo ezangi mawa mpe ezangi bolingo, bázala na esengo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
[Elilingi na lokasa 6]
Makambo mingi ekoki kopesa biso esengo lelo oyo
[Elilingi na lokasa 7]
Ozali kozela mokili oyo moto nyonso akozala na elikya?