Mpo na nini kozala na elimo ya komipesa?
Bill azali tata ya libota oyo asi aleki mwa moke mbula 50 mpe azali molakisi ya misala ya botongi bandako. Na mbula moko mpe na mbongo na ye moko, alekisaka bapɔsɔ mingi mpo na kopesa mabɔkɔ na kobongisa mpe kotonga Bandako ya Bokonzi mpo na masangá ya Batatoli ya Yehova. Emma azali elenge mwasi monzemba ya mbula 22, asilisi kelasi na ye mpe ayebi mosala. Na esika ya kosala makambo oyo ezali mpo na bolamu na ye moko to aluka komipesa na bisengo, ye azali mosakoli mpe alekisaka sanza na sanza ngonga koleka 70 na mosala ya kosakola, mpo na kosalisa bato ete báyekola Biblia. Maurice na Betty bazwá epaso. Na esika básalaka mingi te mpo na kopemisa nzoto, bango bakendaki na mboka mopaya mpo na kosalisa bato báyekola mokano oyo Nzambe azali na yango mpo na mabele.
BATO yango bamimonaka te ete baleki bato mosusu to soki bakómi bato ya lolenge nini. Bazali kaka bato lokola bato nyonso oyo basepelaka kosala makambo ya malamu. Mpo na nini bazali kopesa ntango, makasi, makoki, mpe bozwi na bango mpo na bolamu ya bato mosusu? Bazali kosala bongo mpo balingaka Nzambe mpe balingaka bazalani na bango. Bolingo yango epesi mokomoko na bango elimo ya komipesa.
Elimo ya komipesa ezali nini? Kozala na elimo ya komipesa ezali kosɛnga te kozala na bomoi oyo ezangi esengo. Elingi koloba mpe te komipimela makambo nyonso oyo esepelisaka moto. Diksionɛrɛ moko (The Shorter Oxford English) elimboli elimo ya komipesa lokola elimo ya “kotika matomba, bolamu, mpe bamposa na yo moko mpo na bolamu ya bato mosusu.”
Yesu klisto azali ndakisa ya liboso
Yesu klisto, Mwana mobotami-bobele-moko ya Nzambe, azali ndakisa ya liboso ya moto oyo azali na elimo ya komipesa. Liboso ya koya lokola moto, azalaki na bomoi ya malamu mpe ya esengo koleka bomoi ya bato mosusu nyonso. Azalaki moninga mpenza ya Tata na ye na bikelamu mosusu ya elimo. Lisusu, Mwana ya Nzambe asalelaki mayele na ye na misala ya ntina mpe ya esengo lokola “kapita mosali.” (Masese 8:30, 31, NW) Na ntembe te, azalaki na bomoi ya malamu mingi koleka ata oyo moto oyo aleki bato nyonso na mokili mobimba na bozwi akoki kozala na yango te. Azalaki na esika moko monene mpe ya lokumu kuna na likoló, na esika ya mibale nsima ya Yehova Nzambe.
Kasi, Mwana ya Nzambe ‘amiyeisaki mpamba, akamataki motindo ya moombo, abotamaki na lolenge ya bato.’ (Bafilipi 2:7) Andimaki kotika bolamu na ye moko, akómaki moto mpe apesaki bomoi na ye lokola lisiko mpo na kosikola bato na mabe oyo Satana alukelaki bango. (Genese 3:1-7; Malako 10:45) Yango wana asengelaki koya kofanda na bato ya masumu na mokili oyo ezali na nguya ya Satana Zabolo. (1 Yoane 5:19) Esɛngaki na ye mpe koyikela mikakatano ya bomoi mpiko. Atako esɛngaki ye asala makasi mingi, Yesu Klisto azalaki na mposa makasi ya kosala mokano ya Tata na ye. (Matai 26:39; Yoane 5:30; 6:38) Yango ezalaki komekama mpenza ya bolingo mpe ya bosembo ya Yesu. Andimaki komipesa tii wapi? Ntoma Paulo alobaki ete “amisokisi mpe atosi kino kufa, ɛɛ, kino kufa na [nzete ya mpasi, NW].”—Bafilipi 2:8.
“Bózala na elimo yango”
Tolendisami ete tólanda ndakisa ya Yesu. Paulo alobaki boye: “Bózala na elimo oyo ezalaki na Klisto Yesu.” (Bafilipi 2:5, NW) Ndenge nini tokoki kosala yango? Ya liboso soki tozali ‘kotala bobele makambo na biso moko te, kasi makambo na bamosusu lokola.’ (Bafilipi 2:4) Bolingo ya solosolo “ekolukaka malamu na yango mpenza te.”—1 Bakolinti 13:5.
Bato oyo bamitungisaka mpo na bazalani na bango bamipesaka mpo na kosalela bato mosusu. Nzokande, lelo oyo ebele ya bato bazali kotalela kaka makambo na bango. Bato ya mokili balukaka naino bolamu ya bango moko. Tosengeli komibatela mpo elimo ya mokili ebebisa biso te, mpamba te soki ebebisi makanisi na biso mpe ndenge oyo biso totalelaka makambo, na ntembe te tokobanda koluka ete matomba na biso ezalaka na esika ya liboso. Na ndenge yango, nyonso oyo tokosala: ndenge oyo tokolekisa ntango na biso, makasi na biso, mpe bozwi na biso, ekozala libosoliboso mpo na bolamu na biso moko. Tosengeli kobunda etumba makasi mpo tózwama na elimo yango te.
Ntango mosusu, ata toli oyo epesami na makanisi ya malamu ekoki kolɛmbisa elimo na biso ya komipesa. Ntango ayebaki likambo oyo ekokómela Yesu lokola andimaki komipesa, ntoma Petelo alobaki ete: “Zalá na boboto epai na yo moko, Nkolo.” (Matai 16:22, NW) Amonaki mabe ndenge oyo Yesu andimaki ata kokufa mpo na bokonzi ya Tata na ye mpe mpo na kobikisa bato. Alukaki kopekisa Yesu ete atika makanisi wana.
‘Omiboya’
Yesu asalaki nini? Lisolo elobi boye: “Nde ye abongwi, amoni bayekoli na ye mpe apameli Petelo, alobi ete, Kendá nsima na ngai, Satana! Zambi ozali kokanisa makambo ya Nzambe te kasi makambo ya bato.” Na nsima Yesu abengaki ebele ya bato na bayekoli na ye mpe alobaki na bango ete: “Soko moto alingi [kolanda] ngai, tiká ete amiboya ye mpenza, atombola [nzete ya mpasi, NW] na ye mpe [alanda] ngai.”—Malako 8:33, 34.
Mbula 30 na nsima kobanda apesaki Yesu toli yango, Petelo amonisaki ete akangaki ntina ya komipesa. Petelo alendisaki baninga na ye bandimi te ete bálɛmbisa mabɔkɔ na bango mpe bázala na boboto epai na bango moko. Kutu, Petelo alendisaki bango nde ete bákanga nkamba na makanisi mpo na mosala mpe balanda lisusu te bamposa na bango ya liboso. Atako mikakatano ezalaki, kosala mokano ya Nzambe esengelaki kozala na esika ya liboso na bomoi na bango.—1 Petelo 1:6, 13, 14; 4:1, 2.
Likambo oyo eleki malamu oyo mokomoko na biso akoki kosala ezali ya kopesa Yehova nyonso oyo tozali na yango, kolanda ndakisa ya kondima ya Yesu mpe kotika ete Nzambe atambwisa misala na biso. Na likambo oyo, Paulo atikaki ndakisa moko malamu. Lokola azalaki komona ete asengeli kozelisa makambo te mpe lokola azalaki na botɔndi epai ya Yehova, yango etindaki ye na kotika mikano to bamposa ya mokili oyo ekokaki kopekisa ye kosala mokano ya Nzambe. Alobaki boye: “Na esengo, nakobimisa nyonso izali na ngai mpe nakobimisama” mpo na matomba ya basusu. (2 Bakolinti 12:15) Paulo asalelaki mayele na ye mpo na matomba ya Nzambe, kasi ya ye moko te.—Misala 20:24; Bafilipi 3:8.
Ndenge nini tokoki komitalela mpo na koyeba soki tozali na likanisi lokola oyo ntoma Paulo azalaki na yango? Tokoki komituna mituna lokola oyo: Lolenge nini nasalelaka ntango, makasi, makoki, mpe bozwi na ngai? Nasalelaka ntango mpe makabo mosusu ya malamu mpo na matomba na ngai moko to nasalelaka yango nde mpo na kosalisa basusu? Nakanisaka ndenge oyo nakoki kosala mingi na mosala ya kosakola nsango malamu—mosala oyo ezali kobikisa bomoi ya bato—mbala mosusu nasala lokola mobongisi-nzela? Nakoki komipesa na mosala ya kotonga to kobongisa Bandako ya Bokonzi? Nasalisaka bato oyo bazali na mposa ya lisalisi? Napesaka Yehova biloko na ngai oyo eleki malamu?—Masese 3:9.
“Esengo ya kopesa eleki”
Kasi, kozala na elimo ya komipesa ezali mpenza likambo oyo ebongi? Ɛɛ. Na bomoi na ye, Paulo amonaki mpenza ete elimo ya komipesa ememeka matomba. Elimo yango ememelaki ye bolamu mpe esengo mingi. Alimbolaki likambo yango epai ya mibali oyo bautaki na Efese ntango akutanaki na bango na Milete. Paulo alobaki: “Na makambo nyonso napesi bino elakiseli ekoki na bino kosala bongo [na elimo ya komipesa] mpo na kosunga balɛmbi, kokanisaka mpe maloba na Nkolo Yesu ete, Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.” (Misala 20:35) Bamilio ya bato bamoni ete komonisa elimo yango ezali komema bolamu mingi ata sikoyo. Na mikolo ezali koya, ekomemela bango esengo ntango Yehova akopesa mbano na baoyo bazali kotya matomba na ye mpe ya bamosusu na esika ya liboso mpe oyo ya bango moko na nsima.—1 Timote 4:8-10.
Ntango batunaki ye mpo na nini azali komipesa mingi na kosalisa bato mosusu na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi, Bill alobaki boye: “Kosalisa baoyo bazali na masangá mike na likambo yango epesaka ngai esengo mingi. Nasepelaka kosalela makoki mpe mayele nyonso oyo nazali na yango mpo na bolamu ya bamosusu.” Mpo na nini Emma aponaki kosalela makasi mpe makoki na ye na kosalisa bato mosusu mpo báyekola solo ya Makomami? “Nakanisaka kosala mosala mosusu te. Lokola nazali naino elenge mpe nakoki kosala mosala yango, nalingi kosala nyonso oyo ekoki na ngai mpo na kosepelisa Yehova mpe kosalisa bato mosusu. Mpo na ngai, komipimela biloko mosusu esalaka ngai mpasi te. Nazali kaka kosala oyo nasengeli kosala na kotalela makambo Yehova asali mpo na ngai.”
Maurice na Betty bazali koyoka mawa te lokola bamitiki te na bomoi ya kopemisa nzoto nsima ya bambula ya mpasi oyo balekisaki mpo na kobɔkɔla mpe kokolisa bana na bango. Sikoyo lokola bazwi epaso, balingi kokoba kosala makambo ya ntina mpe oyo ezali komema matomba. Balobi boye: “Tolingi kofanda mpe kokanga mabɔkɔ sikoyo te. Kosalisa bato mosusu báyeba Yehova na mboka mopaya ezali libaku ya kosalaka mosala ya ntina mpenza.”
Ozali na mokano ya kozala na elimo ya komipesa? Ekozala likambo ya pɛtɛɛ te. Etumba ezali makasi kati na bamposa ya nzoto na biso ya bato ya kozanga kokoka mpe mokano na biso ya kosepelisa Nzambe. (Baloma 7:21-23) Kasi, tokoki kolonga etumba yango soki totiki Yehova atambwisa bomoi na biso. (Bagalatia 5:16, 17) Yehova akobosana te elimo na biso ya komipesa na mosala na ye mpe akopambola biso mingi. Yehova Nzambe ‘akozipola maninisa ya lola akosopela biso mapamboli kino esika ekozanga mpo na yango.’—Malaki 3:10; Baebele 6:10.
[Elilingi na lokasa 23]
Yesu azalaki na elimo ya komipesa. Ezali boni mpo na yo?
[Bililingi na lokasa 24]
Paulo asalaki milende mpo na kosakola Bokonzi