Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/3 nk. 10-15
  • Tózala na bomoi mpo na biso moko lisusu te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózala na bomoi mpo na biso moko lisusu te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo ekoki mpenza kosalisa biso!
  • Tokoki kosalela bankolo mibale te
  • Bolingo ya nani ezali kopusa biso?
  • Tosalela Jéhovah ma elimo ya komipesa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Tóbila Yesu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Eloko nini okopesa mpo otikala na bomoi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • “Yaká landá ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/3 nk. 10-15

Tózala na bomoi mpo na biso moko lisusu te

“[Klisto] akufelaki bato nyonso mpo baoyo bazali na bomoi bákoka kozala na bomoi mpo na bango moko lisusu te.”​—2 BAKOLINTI 5:15.

1, 2. Mobeko nini ya Biblia etindaki bayekoli ya Yesu na ekeke ya liboso báboyaka koluka bolamu na bango moko?

EZALAKI butu ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabelé. Mwa bangonga na nsima, apesaki bomoi na ye mpo na bato oyo bakomonisa kondima epai na ye. Na butu yango, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ya sembo makambo mingi ya ntina. Moko na yango ezalaki mobeko etali ezaleli oyo basengelaki kozala na yango mpo bato bámona ete bazali bayekoli na ye. Alobaki boye: “Nazali kopesa bino komandema ya sika, ete bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, mpo bino mpe bólingana bino na bino. Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:34, 35.

2 Baklisto ya solo basengeli kozala na bolingo oyo etindaka moto andima konyokwama mpo na basusu mpe basengeli kolukaka liboso bolamu ya bandeko na bango. Basengeli kokakatana te ata mpo na ‘kokaba molimo na bango mpo na baninga na bango.’ (Yoane 15:13) Ndenge nini baklisto ya liboso batalelaki mobeko yango ya sika? Na buku na ye (Apologétique), Tertullien, mokomi moko ya ekeke ya mibale, azongelaki maloba oyo bato mosusu bazalaki koloba mpo na baklisto: ‘Talá ndenge balinganaka; bandimaka ata kokufa mpo na bandeko na bango.’

3, 4. (a) Mpo na nini tosengeli kolonga mposa ya koluka bolamu na biso moko? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Biso mpe tosengeli ‘kokoba komemelana kilo biso na biso, mpe na ndenge yango kokokisa mobeko ya Klisto.’ (Bagalatia 6:2) Nzokande, koluka bolamu na biso moko ezali likambo eleki monene oyo ekoki kopekisa biso kotosa mobeko ya Klisto mpe ‘kolinga Yehova Nzambe na biso na motema na biso mobimba mpe na molimo na biso mobimba mpe na makanisi na biso nyonso, mpe kolinga bazalani na biso lokola biso moko.’ (Matai 22:37-39) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, motema na biso etindaka biso na koluka kaka bolamu na biso moko. Longola yango, mitungisi ya mokolo na mokolo, koluka koleka baninga na kelasi to na mosala, mpe kozanga mbongo ebakisaka lisusu mposa wana. Mposa wana ya koluka kaka matomba na biso moko ezali kokita te. Ntoma Paulo akomaki boye: “Na mikolo ya nsuka . . . bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko.”​—2 Timote 3:1, 2.

4 Na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, Yesu ateyaki bayekoli na ye makambo misato oyo ekokaki kosalisa bango mpo bálonga mposa ya koluka matomba na bango moko. Ezalaki makambo nini, mpe ndenge nini mateya na ye ekoki kosalisa biso?

Makambo oyo ekoki mpenza kosalisa biso!

5. Ntango Yesu azalaki kosakola na nɔrdi ya Galilai ayebisaki bayekoli na ye likambo nini, mpe mpo na nini likambo yango etungisaki bango?

5 Yesu azalaki kosakola pembeni ya Kaisalia ya Filipo, na nɔrdi ya Galilai. Mokili yango ya kimya mpe ya kitoko ebongaki mpo na kokende kozwa mopɛpɛ, kasi te mpo na kokanisa bamposa ya bato mosusu. Nzokande, ntango Yesu azalaki kuna, akómaki koyebisa bayekoli na ye ete “asengeli kokende na Yelusaleme mpe konyokwama na makambo mingi uta na mikóló mpe na banganga-nzambe bakonzi mpe na bakomeli, mpe kobomama, mpe na mokolo ya misato kolamuka.” (Matai 16:21) Tokanisi mpenza ete likambo yango etungisaki bayekoli ya Yesu, mpamba te tii na ntango wana, bazalaki kokanisa ete Nkolo na bango akotya Bokonzi na ye awa na mabelé!​—Luka 19:11; Misala 1:6.

6. Mpo na nini Yesu apamelaki Petelo?

6 Mbala moko Petelo “abendaki [Yesu] pembeni mpe abandaki kopamela ye, kolobáká ete: ‘Zalá na boboto epai na yo moko, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.’” Yesu asalaki nini? “Kopesáká ye mokɔngɔ, alobaki na Petelo: ‘Leká nsima na ngai, Satana! Ozali epai na ngai libaku oyo ekweisaka, mpamba te ozali kokanisa, makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.’” Makanisi na bango mibale ekesanaki mpenza! Yesu andimaki konyokwama mpo na basusu ndenge Nzambe atindaki ye, mpe mwa basanza na nsima, akufaki na nzete ya mpasi. Petelo apesaki ye toli apona bomoi ya malamu. Alobaki na ye ete: “Zalá na boboto epai na yo moko.” Na ntembe te, Petelo azalaki na makanisi ya mabe te. Kasi, Yesu apamelaki ye mpamba te na libaku wana amitikaki ete Satana asalela ye. Petelo azalaki na “makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.”​—Matai 16:22, 23.

7. Ndenge ekomami na Matai 16:24, makambo nini Yesu asɛngaki bayekoli na ye básalaka?

7 Lelo oyo mpe tokoki koyoka maloba lokola oyo Petelo ayebisaki Yesu. Mbala mingi bato balobaka ‘zalá na boboto epai na yo moko’ to ‘komilukela mindɔndɔ te.’ Nzokande, Yesu alendisaki makanisi oyo ekeseni mpenza. Alobaki na bayekoli na ye boye: “Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Matai 16:24) Buku moko (The New Interpreter’s Bible) elobi boye: “Na maloba wana, Yesu azalaki te kosɛnga bato bákóma bayekoli na ye, kasi azalaki nde komonisa mokumba ya bato oyo basilaki kokóma bayekoli na ye.” Ezali bandimi nde basengeli kosala makambo misato oyo Yesu alobelaki na mokapo yango. Tótalela mokomoko ya makambo yango.

8. Komiboya elimboli nini?

8 Ya liboso, tosengeli komiboya. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “komiboya” elimboli koboya kokokisa bamposa na biso moko to kosala makambo ndenge oyo motema na biso elingi. Komiboya elimboli te komipimela bisengo mosusu mpo na mwa ntango; elimboli mpe te koboya bisengo nyonso to kominyokola. Tozali lisusu ‘bato na biso moko te’ na boye ete tondimi kopesa Yehova bomoi na biso mobimba mpe makambo na yango nyonso. (1 Bakolinti 6:19, 20) Na esika tólukaka kaka bolamu na biso moko, tomipesi nde na kosalela Nzambe. Komiboya elimboli kozala na mposa makasi ya kosala mokano ya Nzambe, ata soki ntango mosusu mokano yango eyokani te na oyo motema na biso elingi. Tomonisaka ete tolingi kosalela Nzambe ntango tomipesi mpe tozwi batisimo. Na nsima, tosalaka makasi ya kokokisa ndai wana bomoi na biso mobimba.

9. (a) Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, nzete ya mpasi ezalaki komonisa nini? (b) Na ndenge nini tomemaka nzete na biso ya mpasi?

9 Ya mibale, tosengeli komema nzete na biso ya mpasi. Na ekeke ya liboso, nzete ya mpasi ezalaki komonisa minyoko, nsɔni, mpe liwa. Bazalaki koboma kaka bato mabe likoló ya nzete ya mpasi to kokakisa bibembe na bango na nzete. Na maloba wana, Yesu amonisaki ete lokola moklisto azali moto ya mokili te, asengeli koyeba ete bakonyokola ye, bakotyola ye, ata mpe koboma ye. (Yoane 15:18-20) Mitinda ya boklisto ekesenisaka biso na bato ya mokili; yango wana bakoki ‘kofinga biso.’ (1 Petelo 4:4) Ekoki kokómela biso na kelasi, na mosala, ata mpe na libota. (Luka 9:23) Kasi, ata soki bato ya mokili bazali kotyola biso, toyikaka mpiko mpamba te bomoi na biso ezali lisusu mpo na biso moko te. Yesu alobaki boye: “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo mabe ya ndenge nyonso mpo na ngai. Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló.” (Matai 5:11, 12) Ya solo, kondimama epai ya Nzambe nde likambo eleki ntina.

10. Kolanda Yesu ntango nyonso elimboli nini?

10 Ya misato, Yesu Klisto alobaki ete tosengeli kolanda ye ntango nyonso. Diksionɛrɛ moko (An Expository Dictionary of New Testament Words) ya William Vine, elobi ete kolanda moto elimboli kozala moninga na ye​—“kozala moto oyo azali kotambola na ye elongo.” Vɛrsɛ ya 1 Yoane 2:6 elobi boye: “Moto oyo azali koloba ete azali na bomoko elongo na [Nzambe] asengeli ye moko mpe kokoba kotambola ndenge moto wana [Klisto] atambolaki.” Yesu atambolaki ndenge nini? Bolingo oyo Yesu azalaki na yango mpo na Tata na ye ya Likoló mpe mpo na bayekoli na ye esalaki ete aluka kaka bolamu na ye te. Ntoma Paulo akomaki ete “Klisto amisepelisaki ye moko te.” (Baloma 15:3) Ata ntango alɛmbaki to azalaki na nzala, Yesu azalaki ntango nyonso koluka kokokisa naino bamposa ya basusu. (Malako 6:31-34) Yesu azalaki na molende na mosala ya kosakola Bokonzi mpe koteya. Na ndakisa na ye, tosengeli kozala na molende mpo na kokokisa mosala ya ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo Yesu apesaki etinda’! (Matai 28:19, 20) Klisto atikelaki biso ndakisa na makambo nyonso wana, mpe tosengeli ‘kolanda matambe na ye malamumalamu.’​—1 Petelo 2:21.

11. Mpo na nini ezali na ntina tómiboya, tómema nzete na biso ya mpasi, mpe tólanda Yesu Klisto ntango nyonso?

11 Ezali na ntina mingi tómiboya, tómema nzete na biso ya mpasi, mpe tólanda ntango nyonso Yesu, Ndakisa na biso. Soki tosali bongo, yango ekosalisa biso tólukaka kaka bolamu na biso moko te; ezaleli oyo epekisaka biso tómonisa bolingo oyo etindaka moto andima konyokwama mpo na basusu. Yesu alobaki lisusu boye: “Moto nyonso oyo alingi kobikisa molimo na ye akobungisa yango; kasi moto nyonso oyo abungisi molimo na ye mpo na ngai akozwa yango. Mpo litomba nini ekozala na moto soki azwi mokili mobimba kasi abungisi molimo na ye? to eloko nini moto akopesa na esika ya molimo na ye?”​—Matai 16:25, 26.

Tokoki kosalela bankolo mibale te

12, 13. (a) Likambo nini ezalaki mokakatano epai ya elenge mozwi oyo atunaki Yesu toli? (b) Toli nini Yesu apesaki elenge yango, mpe mpo na nini?

12 Mwa basanza, nsima ya komonisa ete bayekoli na ye basengeli komiboya, elenge mozwi moko ayaki epai na ye mpe atunaki boye: “Moteyi, malamu nini nasengeli kosala mpo na kozwa bomoi ya seko?” Yesu ayebisaki ye ‘atosaka bakomandema ntango nyonso’ mpe atángelaki ye bakomandema yango mosusu. Elenge mobali yango alobaki ete: “Nasili kotosa nyonso wana.” Emonani ete elenge mobali yango azalaki motema sembo mpe azalaki kosala nyonso oyo akokaki mpo na kotosa Mibeko. Yango wana atunaki boye: “Nini ezali kozanga ngai lisusu?” Yesu asɛngaki ye likambo moko: “Soki olingi kozala moto ya kokoka [“kobonga na malamu,” haut fleuve], kende kotɛka biloko na yo mpe pesá na babola mpe okozwa eloko ya motuya na likoló, mpe yaká landá ngai.”​—Matai 19:16-21.

13 Yesu amonaki ete mpo elenge mobali yango asalela Yehova na molimo na ye mobimba, asengelaki kolongola eloko moko oyo ezalaki kozwa likebi na ye mingi: bozwi na ye. Moyekoli ya solo ya Klisto akoki te kosalela bankolo mibale. ‘Akoki te kosala lokola moombo mpo na Nzambe mpe mpo na Bomɛngo.’ (Matai 6:24) Asengeli kozala na ‘liso oyo ezali alima’ elingi koloba, kotya makanisi na ye na makambo ya elimo. (Matai 6:22) Moto oyo atiki biloko na ye mpe apesi yango na babola, amipimeli. Yesu asɛngaki elenge mobali yango akaba biloko na ye epai ya babola mpe na esika na yango, apesaki ye libaku malamu ya komibombela bomɛngo na likoló​—bomɛngo oyo elimboli bomoi ya seko mpe elikya ya koyangela elongo na Klisto na likoló. Elenge mobali yango asepelaki te na likanisi ya komiboya. “Akendaki na mawa, mpo azalaki na biloko mingi.” (Matai 19:22) Nzokande, bayekoli mosusu ya Yesu basalaki bongo te.

14. Baluki-mbisi minei basalaki nini ntango Yesu alobaki na bango bálanda ye?

14 Soki mbula mibale liboso, Yesu abengaki mpe baluki-mbisi minei: Petelo, Andele, Yakobo, ná Yoane. Ntango Yesu abengaki bango, mibale bazalaki koboma mbisi, mpe mibale bazalaki kobongisa minyama na bango. Yesu alobaki na bango boye: “Bólanda ngai, mpe nakokómisa bino baluki-bato.” Bango nyonso minei batikaki mosala na bango ya koboma mbisi mpe balandaki Yesu bomoi na bango mobimba.​—Matai 4:18-22.

15. Ndenge nini Motatoli moko ya Yehova amipimelaki makambo mosusu mpo na kolanda Yesu?

15 Lelo oyo, baklisto mingi, na esika ya kosala lokola elenge mozwi wana, balandi ndakisa ya baluki-mbisi minei. Batiki bozwi mpe libaku ya kokóma bato minene na mokili mpo na kosalela Yehova. Deborah alobi boye: “Ntango nazalaki na mbula 22, nasengelaki kozwa ekateli moko ya ntina mingi, nayekolaki Biblia na boumeli ya sanza motoba, mpe nalingaki komipesa na Yehova, kasi bandeko na ngai balingaki koyoka likambo wana ata moke te. Lokola libota na biso ezali na bozwi mingi, bamonaki ete soki nakómi Motatoli ekozala nsɔni mpo na bango. Bapesaki ngai mokolo moko mpo nakanisa mpe nayebisa bango soki nalingi nini​—bomɛngo to kokóma Motatoli. Bandeko na ngai bayebisaki ngai ete soki natiki Lingomba ya Batatoli te, bakotika eloko moko te na nkombo na ngai. Yehova asalisaki ngai nazwa ekateli ya malamu mpe apesaki ngai makasi ya kokokisa yango. Nalekisi mbula 42 na mosala ya ntango nyonso, mpe nazali na mawa ata moke te. Lokola naboyaki bomoi ya koluka kaka bolamu na ngai moko mpe bisengo, esalisaki ngai nazala te lokola bandeko na ngai oyo bazali na bomoi ezangi ntina mpe esengo ya solosolo. Ngai ná mobali na ngai tosalisi bato koleka nkama báyeba solo. Bana wana ya elimo bazali na motuya mingi koleka bomɛngo nyonso ya mokili.” Batatoli ya Yehova mingi bakanisaka lokola ye. Ezali mpe bongo mpo na yo?

16. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali lisusu na bomoi mpo na biso moko te?

16 Mposa ya kozala lisusu na bomoi mpo na bango moko te etindi bankóto ya Batatoli ya Yehova na kosala mosala ya mobongisi-nzela. Batatoli mosusu oyo bakoki kosala mosala yango te, bamonisaka elimo ya babongisi-nzela mpe bapesaka mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi na ndenge oyo makoki na bango ezali kopesa nzela. Baboti bamonisaka mpe elimo yango ntango bapesaka ntango na bango mpe batyaka pembeni makambo na bango mosusu mpo na kopesa bana na bango formasyo na makambo ya elimo. Mokomoko na biso azali na lolenge moko oyo akoki komonisa ete atyaka matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na ye.​—Matai 6:33.

Bolingo ya nani ezali kopusa biso?

17. Nini etindaka biso tomipimela makambo mosusu?

17 Komonisa bolingo oyo elukaka liboso bolamu ya basusu ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi, tókanisa naino nini ezali kopusa biso. Paulo akomaki boye: “Bolingo oyo Klisto azali na yango ezali kopusa biso, mpamba te oyo biso tomoni yango oyo, ete moto moko akufelaki bato nyonso . . . Mpe akufelaki bato nyonso mpo baoyo bazali na bomoi bákoka kozala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango mpe alamwisamaki.” (2 Bakolinti 5:14, 15) Ezali bolingo ya Klisto nde ezali kopusa biso tózala lisusu na bomoi mpo na biso moko te. Yango ezali ntina monene mpenza! Lokola Klisto akufaki mpo na biso, tozali lokola na nyongo ya kozala na bomoi mpo na ye! Kutu, botɔndi na biso mpo na bolingo makasi oyo Nzambe mpe Klisto bamoniselaki biso epusaki biso tómipesa na Nzambe mpe tókóma bayekoli ya Klisto.​—Yoane 3:16; 1 Yoane 4:10, 11.

18. Mpo na nini komipimela makambo mosusu ezali mpenza na ntina?

18 Ezali mpenza na ntina ete tózala lisusu na bomoi mpo na biso moko te? Ntango elenge mozwi aboyaki likambo oyo Klisto asɛngaki ye mpe akendaki, Petelo alobaki na Yesu boye: “Talá! Biso totiki biloko nyonso mpe tolandi yo; eloko nini mpenza ekozala mpo na biso?” (Matai 19:27) Petelo ná bantoma mosusu bamiboyaki mpenza. Mbano na bango ezalaki nini? Ya liboso, Yesu alobaki ete bakozwa libaku ya koyangela elongo na ye na likoló. (Matai 19:28) Yesu alobelaki mpe mapamboli oyo bayekoli na ye nyonso bakozwa. Alobaki boye: “Ata moto moko te atiki ndako to bandeko ya mibali to bandeko ya basi to mama to tata to bana to bilanga mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu oyo akozanga kozwa mbala nkama sikoyo na eleko oyo . . . mpe na ebongiseli ya ntango oyo ezali koya bomoi ya seko.” (Malako 10:29, 30) Mapamboli oyo tozwaka eleki makambo oyo tomipimelaka. Batata, bamama, bandeko ya basi mpe ya mibali mpe bana oyo tozwaka na lisangá, baleki mpenza eloko nyonso oyo tomipimelaki mpo na Bokonzi! Kati na Petelo mpe elenge mozwi, nani azwaki bomoi ya malamu koleka?

19. (a) Esengo ya solosolo eutaka na nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

19 Na maloba mpe na misala na ye, Yesu amonisaki ete esengo eutaka na kopesa mpe kosalela basusu, kasi te na koluka kaka bolamu na biso moko. (Matai 20:28; Misala 20:35) Soki tozali lisusu na bomoi mpo na biso moko te kasi tozali kolanda Klisto ntango nyonso, tokozala na esengo mingi na bomoi lelo oyo mpe tokozala na elikya ya bomoi ya seko na mikolo ezali koya. Ya solo, ntango tomiboyi, Yehova akómi Nkolo na biso. Na bongo, tokómi baombo ya Nzambe. Mpo na nini boombo yango ezali malamu? Ndenge nini totalelaka yango ntango tozali kozwa bikateli na bomoi na biso? Tokolobela mituna yango na lisolo elandi.

Ozali koyeba lisusu?

• Mpo na nini tosengeli kolonga mposa ya koluka bolamu na biso moko?

• Komiboya, komema nzete ya mpasi, mpe kolanda Yesu ntango nyonso elimboli nini?

• Nini etindaka biso tózala lisusu na bomoi mpo na biso moko te?

• Mpo na nini ezali na ntina tózala na bomoi ya komipimela?

[Elilingi na lokasa 11]

“Zalá na boboto epai na yo moko, Nkolo”

[Elilingi na lokasa 13]

Eloko nini epekisaki elenge mozwi alanda Yesu?

[Bililingi na lokasa 15]

Bolingo etindaka Batatoli ya Yehova básakola Bokonzi na molende

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto